Miziki
Tosepela lelo


62

Tosepela lelo

Na kitoko

1. Tosepela lelo mokolo mwa lobiko.

Tokozala Lisusu bampaya te.

Nsango elamu ezali Kobete tangba,

Ngonga ya Nkolo mwa moke ekoya;

Ekokisami bilako bya Basantu

bakotungisa bango lisusu te,

Nse ekozala elanga Ya Edeni,

Yesu akoloba: “Yisalaele zonga.”

2. Tokolingana banso, tokokabwana te.

Totika mabe, bomoko tozala.

Ntango bato babe bakolenge na nsomo,

Boyei bwa Nkolo biso tokozela;

Ekokisami bilako bya Basantu

bakotungisa bango lisusu te,

Nse ekozala elanga Ya Edeni,

Yesu akoloba: “Yisalaele zo nga.”

3. Na bondimi tokotia motema na Yova,

Akamba biso mikolo mya nsuka.

Nsima ya bitumbu to ya mbuma kobuka,

Na Mobikisi bosekwi bokoya,

Ekokisami bilako bya Basantu

bakozwa mbano solo na banzelu,

Nse ekozala elanga Ya Edeni,

Klisto na ba ye bakozala bo moko.

Maloba: William W. Phelps, 1792–1872. Ekota o Cantiques des SDJ ya yambo, 1835.

Miziki: Henry Tucker, ca. 1863

Mose 7:61–67

Biteni ya Bondimi 1:10