6
Yaka, bana ba Nkolo
Na nsai
1. Yaka, bana ba Nkolo,
Yemba nzembo elongo
Sanzola na esengo
Mokonzi moyangeli
Wa nse eye mokolo,
Topetwami na mabe
Bo esili masumu,
Bato bakolingana.
2. Ekozala esengo
Mokolo Mobikisi
Akokita na nkembo;
nde mabe masili nie.
Nzembo kani na Nkolo,
Mokonzi tokoyemba!
Boye bolingo kani!
Nsomo esili biso.
3. Na bila mba bya mpembe,
Tokofanda na solo
Tokoyemba, sanzola,
Koganga na esengo
Nse nde epetwami nie.
Manso kati ya yango
Makozala kitoko:
Mitema na esengo.
Maloba: James H. Wallis, 1860–1940
Miziki: Loembo na Spanish; ebongisami na Benjamin Carr, 1768–1831
Malongi mpe Mayokani 133:25, 33, 56
Emoniseli 7:9–17