Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mitano 25–31. “Nkolo Atelemisaki Mokangoli”: Basambisi 2–4; 6–8; 13–16


“Sanza ya mitano 25–31. ‘Nkolo Atelemisaki Mokangoli’: Basambisi 2–4; 6; 8; 13– 34,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya mitano 25–31. ‘Nkolo Atelemisaki Mokangoli,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Debola Mosakoli ya mwasi

“I Will Surely Go with Thee”—Deborah the Prophetess [“Nakotambola Solo elongo na Yo”—Debola Mosakoli ya mwasi], na Des Leavitt

Sanza ya mitano 25–31: “Nkolo Atelemisaki Mokangoli”

Basambisi 2–4; 6–8; 13–16

Biso nyonso toyebi nini ezali kosumuka, komiyoka mabe na oyo etali yango, mpe nsima koyambola mpe kozwa mokano ya kobongola banzela na biso. Kasi mbala mingi tobosanaka mokano na biso ya liboso, mpe, lisengenya eyaka, tomimonaka komipesaka na lisumu kaka moko wana. Ndakisa oyo emonanaka mbala mingi kati na buku ya Basambisi. Etindikami na bindimeli mpe misala ya bokumbameli ya bato ya Kanana—oyo bakanisaki kobengana libanda ya mboka—Bayisalaele babukaki mayokani na bango elongo na Nkolo mpe bapesaki ye mokongo na kokumbamelaka Ye. Lokola mbano, babungisaki bobateli na Ye mpe bakweyaki na bokangemi. Mpe kasi ntango nyonso oyo esalemaki, Nkolo apesaki bato na Ye ya boyokani litomba ya koyambola mpe atelemisaki mokangoli, mokambi ya mampinga abengami “mosambisi.” Basambisi nyonso te kati na buku ya Basambisi bazalaki sembo, kasi basusu kati na bango basalelaki bondimi na kokangolaka bana ya Yisalaele mpe kozongisaka bango na mokangano na bango ya boyokani na Nkolo. Masolo oyo ekundolisi biso ete atako likambo nini epengwisi biso uta na Yesu Klisto, Ye azali Mosikoli ya Yisalaele mpe azali ntango nyonso na bolingi ya kokangola biso mpe ayambaka biso ntango tozongelaka Ye.

Mpo na koyeba makambo ya buku ya Basambisi, botala “Judges, book of [Basambisi, Buku ya]” na the Bible Dictionary.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Basambisi 2:1–19; 3:5–12

Nkolo alimbisaka mbala nyonso nayambolaka.

Buku ya Basambisi ekoki kozala nyonso mibale likebisi mpe bolendisi. Boluka likebisi mpe bolendisi oyo ntango bozali kotanga Basambisi 2:1–19; 3:5–12. Boyokaka lolenge likebisi mpe bolendisi yango esalemelaka bino?

Ndakisa, soki Basambisi 2:19 ezalaka kolobela bino mpe masenginya na bino na esika ya kolobela Bayisalaele ya kala, nini yango ekokaki koloba? Soki Basambisi 3:9 ezalaki kolobela maye Nkolo asalaki mpo na kokangola bino, nini yango ekokaki koloba?

Bokanisa kotanga motuna mpe eyano yango na lokasa 9 ya Mpo na Bokasi ya Bilenge: Mokambi mpo na Kosala Maponi. Lolenge nini bomonaka ete yango esalamelaka na likambo Bayisalaele bakutanaki na yango kati na buku ya Basambisi? Yango eteyi bino nini etali Yesu Klisto?

Basambisi 4:1–15

elembo ya seminele
Nakoki kofula basusu bazala na bondimi kati na Nkolo.

Ntango mosusu bondimi ya moto moko ekoki kofula bondimi kati na basusu mingi. Na Basambsi 4, moto moko wana ezalaki Debola. Botanga oyo etali ye na Basambisi 4:1–15, mpe bokoma botindiki azalaki na yango likolo ya bato nzinganzinga na ye. Botala mwa mituna miye ekoki kosalisa bino bokanisa lolenge nini boyebi na ye ekoki kosalelama epayi na bino.

  • Lolenge nini bokoki kolimbola ezalela Bayisalaele bazalaki na yango na ngonga wana? (botala milongo 1–3). Bokokani nini bozali komona na bizalela lelo—kati na bato na bato mpe na lisanga?

  • Maloba to bikela nini ya Debola elakisi bino ete azalaki na bondimi na Nkolo? Lolenge nini bondimi na ye etindikaki basusu? Nini mosusu esimbi bino mpo na oyo etali ye?

  • Nini bokanisi Debola alingi koloba na motuna na ye kati na molongo 14: “Ezali Nkolo te kotambola liboso na yo?” Lolenge nini Nkolo “atambolaka liboso” na bino? (botala Malongi mpe Mayokani 84:87–88).

Bilenge basi bazali kotambola elongo

Bomanyola lolenge nini bondimi kati na Yesu Klisto ekoki kopambola basusu na lolenge bondimi ya Debola epambolaki Balaka mpe Bayisalaele mosusu. Mpo na kosalisa bino bokanisa oyo etali yango, bokoki koyekola etinda ya Mpaka Neil L. Andersen “We Talk of Christ [Tolobelaka Klisto]” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 88–91). Boluka etinda mpo na (1) bantina ya kolobela mingi koleka na polele etali Mobikisi mpe (2) ndenge ya kosala yango.

Nsima bokoki kosala molongo ya makambu boyebi etali Yesu Klisto—uta na makomi, uta na maloba ya baprofeta na bomoi, mpe uta na makambu ya bino moko. Nani asengeli koyeba oyo? Lolenge nini bokokabola yango?

Botala lisusu Matai 5:14–16; 1 Petelo 3:15; “Each Life That Touches Ours for Good,” Hymns, no. 187.

Bobenga bokaboli. Soki bozali moteyi—na ndako to na eklezia—“bopesa bayekoli mabaku ya kokabola moko na mosusu maye bazali koyekola etali Mobikisi mpe nsango malamu na Ye. Kosalaka boye ekosalisa bango bayeba na motema bosolo oyo bateyami mpe balakisa yango yango (Koteya na Lolenge ya Mobikisi26). Ndakisa, ntango bozali koyekola Basambisi 4 elongo, bokoki kopesa moyekoli moko na moko eloko moko ekesena ya koluka kati na mokapo mpe nsima kobengisa bango bakabola elongo na moko na mosusu maye bazwi.

Basambisi 6–8

Nkolo akoki kosala makamwisi ntango natie motema na banzela na Ye.

Ntango bozali kotanga Basambisi 6–8, bokoma bandakisa epayi wapi Nkolo asengaki Gideona andimela eloko moko oyo ekokaki komonana ya solo te. Asenga bino naino eloko moko ekokani na yango?

Bomoni ete Nkolo azali komeka koteya bino nini na lisolo oyo? Lolenge nini bomoni Nkolo kosala mosala na Ye na ndenge oyo ezalaki komonana solo te.

Basambisi 13–16

Nzambe alendisaka ngai ntango nazali sembo na mayokani na ngai.

Samasona abungisaki nyonso mibale bokasi na ye ya nzoto mpe bokasi na ye ya molimo mpo abukaki mayokani na ye na nzambe, kobakisa oyo ezalaki mingimingi kosalelama epayi ya Banazalite (mpo na nsango etali Banazalite, botala Mituya 6:1–6; Basambisi 13:7). Ntango bozali kotanga oyo etali Samasona kati na Basambisi 13–16, bokoma milongo oyo ezali kolakisa ete Nkolo azalaki elongo na Samasona, lokola mpe milongo oyo ezali kolakisa ete Samasona azalaki komipesa mobimba epayi ya Nkolo te.

Bokoki lisusu komanyola mayokani bosalaki elongo na Nkolo. Lolenge nini mayokani oyo ememaki nguya na Ye kati na bomoi na bino? Boyekoli nini uta na makambo ya Samasona oyo efuli bino botikala solo na mayokani na bino na Nzambe?

Ndeko mwasi Ann M. Dibb ateyaki: “Samasona abotamaki na makoki monene. Mama na ye alakamaki, ‘Ye akobanda kobikisa Yisalaele na loboko ya Bafilisitia’ [Basambisi 13:5]. Kasi ntango Samasona akolaki, atalaki mingi na mokili ya masenginya koleka na boyangeli ya Nzambe. Asalaki maponi mpo ete yango ‘esepelisaki [ye] mingi’ [Basambisi 14:3] na esika ezalampo ete maponi wana ezalaki malamu. Mbala na mbala, makomi esalelaka maloba ‘mpe akitaki’ [Basambisi 14:7] ntango ezali kolobela mibembo, bikela, mpe maponi ya Samasona. Na esika ya kotelemaka mpe kongenga liboso mpo na kokokisa makoki na ye minene, Samasona alongamaki na mokili, abungisaki nguya na ye epesama na Nzambe, mpe akufaki liwa ya likama, ya ntongontongo” (“Arise and Shine Forth [Telema mpe Ngenga],” Liahona, Sanza ya mitano 2012, 118).

Botala Dallin H. Oaks, “Covenants and Responsibilities [Mayokani mpe Mikumba],” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 93–96; Ulisses Soares, “Covenant Confidence through Jesus Christ [Kotya Motema na Boyokani kati na Yesu Klisto],” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 17–21.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Lokola Eyenga oyo ezali Eyenga ya yambo ya sanza, bateyi ya Eteyelo ya Bana balendisami kosalela milulu ya boyekoli na “Appendix B: Preparing Children for a Lifetime on God’s Covenant Path [Bobakisi B: Kolengela Bana mpo na Ntango ya Bomoi Mobimba na Nzela ya Boyokani ya Nzambe].”

Basambisi 3–7–9, 12– 15

Yesu Klisto azali Mokangoli na ngai.

  • Basambisi 3 elimboli ndakisa oyo eteyaka oyo etali nguya ya Mobikisi mpo na kokangola biso uta na lisumu. Mpo na kosalisa bana na bino bamona ndakisa yango, bokoki kokoma maloba oyo: “basalaki mabe,” “balelelaki Nkolo,” mpe “atelemisaki mokangoli.” Nsima bana na bino bakoki koluka maboke ya maloba oyo kati na Basambisi 3:7–9 mpe Basambisi 3:12–15. Toyekoli nini etali Nkolo uta na ndakisa oyo?

  • Mpo na kobeta nsete ete Yesu Klisto azali Mokangoli na biso, bokoki kosangisa bafoto mingi ya bato, kokotisaka foto ya Yesu, mpe botia yango bilongi na nse. Botika bana na bino basala na ngala ya kobalusaka bafoto yango. Ntango bazwi foto ya Yesu, boyemba loyembo etali Ye, lokola “He Sent His Son” (Children’s Songbook, 34–35), mpe bolobela bana na bino oyo etali lolenge nini Akangolaki bino.

Basambisi 4:1–15

Nakoki kofula basusu bazala na bondimi kati na Nkolo.

  • Bokoki kosalela“Debola Mosakoli ya mwasi” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 92–95, mpo na kobetala bana na bino lisolo oyo ezali kati na Basambisi 4. Bokabola na moko na mosusu mpo na maye bosepelaka na yango etali Debola. Lolenge nini bondimi na ye kati na Nkolo epambolaki bato nzinganzinga na ye? Nini tokoki kosala mpo na kosalisa basusu bazala na bondimi mingi kati na Klisto?

    2:9

    Deborah the Prophetess

Basambisi 7:1–21

Nkolo akoki kosalela biloko moke mpo na kosala mosala monene.

  • Bosalela Basambisi 7:4–7, lokasa ya milulu ya poso oyo, to “The Army of Gideon [Mampinga ya Gideona]” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 96–99, mpo na koteya bana na bino oyo etali lolenge nini Nkolo akomisaki limpinga ya Yisalaele moke koleka. Mpo na nini Nkolo alingaki limpinga ya Gideona ezala moke mpenza? (botala Basambisi 7:2).

    2:37

    The Army of Gideon

  • Bana na bino bakoki koyema bililingi ya mbeli, nguba, kelelo, mwinda, mpe mbeki mpe kosolola etali nini ya biloko oyo bakolinga kati na etumba. Nsima bakoki kotanga Basambisi 7:16 mpo na koyekola nini Nkolo ayebisaki limpinga ya Gideona esalela. Ntango bozali kotanga oyo etali etumba kati na Basambisi 7:19–21, bokabola na moko na mosusu maye boyekoli etali Nkolo uta na lisolo oyo.

Samasona azali kokweisa makonzi ya tempelo

Samson Puts Down the Pillars [Samasona Akweisi Makonzi], na James Tissot mpe basusu

Basambisi 13:5

Kobatela mayokani epesaka ngai bokasi.

  • Mayokani ya Samasona na Nkolo epesaki ye bokasi ya nzoto, kaka lokola mayokani na biso epesaka biso bokasi ya molimo. Bana na bino bakoki kosepela kosala mwa bangalasisi ya nzoto mpe kosolola lolenge nini bangalasisi wana ekoki kosalisa mpo na kokomisa banzoto na biso makasi. Lolenge nini kobatelaka mayokani na biso ekomisaka milimo na biso makasi? (botala Mosiya 18: 8–10; Malongi mpe Mayokani 20:77, 79).

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Bato ya limpinga ya Gideona bazali kopeta baloseba na bango

Gideon’s Army [Limpinga ya Gideona], na Daniel A. Lewis

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nkolo akoki kosalela biloko mike mpo na kosala mosala monene