Yaka, Landa Ngai
Sanza ya motoba 1–7. “Motema na Ngai Ezali Kosepela kati na Nkolo”: Luta; 1 Samwele 1–7


“Sanza ya Motoba 1–7. ‘Motema na Ngai Ezali Kosepela kati na Nkolo’: Luta; 1 Samwele 1–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya Motoba 1–7. ‘Motema na Ngai Ezali Kosepela kati na Nkolo,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Luta mpe Nsaomi bazali kokende mobembo elongo.

Whither Thou Goest [Bozali Kokende Wapi], na Sandy Freckleton Gagon

Sanza ya motoba 1–7: “Motema na Ngai Ezali Kosepela kati na Nkolo.”

Luta; 1 Samwele 1:7

Ntango mosusu tobanzaka ete bomoi na biso esengeli kolanda nzela ya polele uta na ebandeli tii na nsuka. Ntaka ya mokuse mpenza katikati ya bisika mibale ezali nzela ya semba, nsima ya nyonso. Mpe lisusu bomoi etonda mbala mingi na baletale mpe kotepatepa oyo ememaka biso na banzela ekanama te.

Luta mpe Hana solo basosolaki yango. Luta azalaki moto ya Yisalaele te, kasi abalaki moko, mpe ntango mobali na ye akufaki, azalaki na boponi ya kosala. Akolinga kozonga na libota na ye mpe ya ye bomoi ya kala, mpe ya momesano, to akolinga koyamba bondimi ya bato ya Yisalaele mpe ndako ya sika elongo na mama bokilo na ye? (botala Luta 1:4–18). Mwango ya Hana mpo na bomoi na ye ezalaki kobota bana, kasi akokaki te, mpe yango etikaki ye “na bololo na motema” (botala 1 Samwele 1:1–10). Ntango bozali kotanga oyo etali Luta mpe Hana, bokanisa bondimi basengelaki kozala na yango mpo na bakende mobembo na banzela na bango bakanaki te. Nsima bokanisa oyo etali mobembo ya bino moko. Ekeseni na oyo ya Luta mpe ya Hana—mpe ya moko kani mosusu. Kasi na mimekano mpe bambalakaka mobimba katikati ya awa mpe nsuka na bino ya seko, bokoki koyekola koloba elongo na Hana, “Motema na ngai ezali kosepela na Nkolo” (1 Samwele 2:1).

Botala lisusu Mokambi na Makomi mpo na koyeba makambo mingi ya babuku ya Luta mpe 1 Samwele.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Luta

Yesu Klisto akoki kobalusa likama na elonga.

Bomoi ezali mpasi mpo na mwasi mokufeli mobali na eleko kani. Kasi ntango mobali ya Luta akufaki, ezalela na ye ezalaki mingimingi ya mpasi. Na bonkoko ya Yisalaele na ngonga wana, mwasi azanga mobali to bana azalaki na likoki te ya kozwa libula na biloko mpe banzela moke ya kobikela. Ntango bozali kotanga lisolo ya Luta, botala lolenge nini Nkolo abalusaki likama na mapamboli minene. Nini bomoni etali Luta oyo ekokaki kosalisa ye? Lolenge nni Boaza asikolaki Luta uta na ezalela na ye ya kozanga elikya? (botala Luta 4:4–10). Lolenge nini bango mibale Luta mpe Boaza bazalaki lokola Yesu Klisto?

Botala lisusu “Be Still, My Soul,” Hymns, no. 64.

Luta; 1 Samwele 1

Nakoki kotya motema ete Nzambe akokamba mpe akosalisa ngai kozangaka kotala ezalela na ngai.

Ntango mosusu boyokaki mpasi ya bobungisi monene, lokola eyokaki Luta mpe Naomi (botala Luta 1:1–5). To ntango mosusu, lokola Hana, bolukaka mapamboli bozwi naino te (botala 1 Samwele 1:1–10). Lolenge nini basi oyo balakisaki bondimi na bango na Nzambe? Boyekoli nini uta na ndakisa na bango?

Ya solo, moto nyonso te oyo asambelaka mpo na mwana azwaka ye, mpe moto nyonso te oyo molongani na ye akufi abalaka lisusu. Kasi moto nyonso oyo atalelaka Mobikisi azwaka lisalisi mpe bokambi na Ye. Bokanisa lolenge nini “bokomi kotya motema epayi” ya Nkolo (Luta 2:12) na eleko ya bangonga ya mpasi.

Botala lisusu Amy A. Wright, “Abide the Day in Christ [Botosa Mokolo na Klisto],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 9–11.

Hana mpe mwana na ye

For This Child I Prayed [Mpo na Mwana Oyo Nasambelaki], na Elspeth Young

1 Samwele 2; 4–7.

Mpo na kozwa lisalisi ya Nkolo, nasengeli kotyela Ye motema mpe kotosa mitindo na Ye.

Ntango banguna na bango babundisaki bango, bato ya Yisalaele bakanisaki lokola ete na pete kozalaka na sanduku ya boyokani ekokaki kobatela bango. Ntango bozali kotanga 1 Samwele 4–6, bokanisa etali mpo na nini yango etambolaki te. (Botala lisusu bikela ezanga sembo ya bana ya Eli, oyo bazalaki kosala lokola banganganzambe kati na tabelenakele, na 1 Samwele 2:12–25.) Bokanisi ete Nkolo azalaki komeka koteya bato na Ye nini? Boyekoli nini uta na maye masalemaki epayi ya Bafilisitia nsima ya kokanga sanduku yango? (botala mikapo 5–6). Boyekoli nini uta na makasi ya Yisalaele ya kozongela bobateli ya Nkolo kati na 1 Samwele 7?

Bokoki kofulama na kotangaka ntoki ya masanzoli ya Hana kati na 1 Samwele 2:1–10. Bozwi nini kati na maloba na ye oyo ekokaki kosalisa bana ya Eli mpe bato ya Yisalaele oyo batikali?

1 Samwele 3

elembo ya seminele
Nakoki koyoka mpe kotosa mongongo ya Nkolo.

Ntango mosusu, bokoki komiyoka lokola Samwele, oyo ayokaki mongongo ya Nkolo kasi ayebaki yango te. Lokola banso kati na biso, Samwele asengelaki koyekola lolenge nini koyeba mongongo ya Nkolo. Ntango bozali kotanga 1 Samwele 3, boyekoli nini uta na elenge mobali etali koyoka mpe kotosa mongongo ya Nkolo. Bokoki lisusu koluka makomi mosusu mpe kosala molongo ya banzela ya koyangela oyo ekoki kosalisa moto ayeba mongongo ya Nkolo: 1 Mikonzi 19:11–12; Luka 24:15–32; 3 Nefi 11:3–7; Malongi mpe Mayokani 6:22–23; 8:2–3; 9:7–9.

Ntango mosusu, bokoki komiyoka ete balola ekangami mpe ete Nzambe alingi kosolola na bino te. Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Nzambe mpenza alingi kolobela yo? Iyo!” (“Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Bomoi na Biso,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 93–96. Ntango ozali koyekola etinda ya Mokambi, bozwi nini oyo efuli bino boyoka mpe botosa mongongo ya Nkolo? Mokambi Nelson abengisi bino bosala nini, mpe mapamboli nini alaki? Bokoki lisusu kozwa mabengisi mpe mapamboli elakama etali emoniseli kati na “Botambola na Mwinda ya Nzambe” (Mpo na Bokasi ya Bilenge: Mokambi mpo na Kosala Maponi, 16–20). Bokanisa kopona eloko moko bokoki kosala mpo na “kobakisa makoki ya molimo mpo na kozwa emoniseli.”

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Luta

Nakoki kolakisa bolingo mpe boboto epayi ya bato nzinganzinga na ngai.

  • Ntango bozali kokabola elongo na bana na bino lisolo ya Luta (bokoki kosalela “Luta mpe Naomi” na Masolo ya Kondimana na Kala, 100–103), bobengisa bango batombola maboko na bango ntango nyonso bayoki ekela moko ya boboto kati na lisolo yango. Bakoki lisusu kokabola lolenge nini bamiyokaka ntango basusu bazalaka boboto epayi na bango, to ntango bazalaka boboto epayi ya basusu. Lolenge nini Mobikisi azalaki boboto epayi na biso? Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa na Ye? (botala “Kindness Begins with Me,Children’s Songbook, 145).

    2:0

    Ruth and Naomi

Luta; 1 Samwele 1

Nakoki kozala na bondimi kati na Nkolo.

  • Masolo ya Luta mpe Hana ekoki kofula bana na bino batikala bosembo na eleko ya bangonga ya mpasi. Bokanisa kosalisa bango bakela etanda ya pete na mito Mimekano, Misala, Mapamboli. Nsima bokoki kotanga elongo Luta 1:3–5, 8, 16; 2:1–3, 8–12; 4:13–17; 1 Samwele 1:1–18 mpe bokoma na nse ya mito maye bazwi kati na milongo oyo. Lolenge nini Luta mpe Hana balakisi bondimi na bango kati na Nkolo? Bino mpe bana na bino bokoki nsima kokabola bandakisa ya lolenge nini Nkolo apamboli bino na ntango ya mpasi.

1 Samwele 1:1–18

Tata na Lola ayokaka mpe ayanolaka nsambo na ngai.

  • Mpo na koyekola oyo etali Hana, bana na bino bakoki kotanga 1 Samwele 1:1–18 to “Hana” kati na Masolo ya Kondimana na Kala (104–5) to kotala “Hannah’s Faith [Bondimi ya Hana]” (video, Bibliotekeya Nsango Malamu). Ekoki lisusu kozala nsai kobwaka ndembo epayi ya mwana moko mpe kobengisa bango baloba eteni ya lisolo yango liboso ya kolekisa ndembo epayi moto mosusu. Toyekoli nini etali losambo uta na ndakisa ya Hana?

    1:15

    Hannah

    3:9

    Hannah's Faith

Samwele mpe Eli

Samuel Tells Eli the Truth [Samwele Alobeli Eli Bosolo], na Robert T. Barrett

1 Samwele 3:1–10

Nakoki koyoka mpe kotosa mongongo ya Nkolo.

  • Ntango mosusu lisano ya pete ya ngala ekoki kosalisa bana na bino bayekola uta makambo Samwele akutanaki na yango na emoniseli. Mwana moko akoki kosala lokola kozala Samwele, mpe basusu bakoki kosala lokola kozala Eli ntango bozali kotanga 1 Samwele 3:1–10 (botala lisusu “Samwele Mosakoli” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 106–9, to video “Samuel and Eli [Samwele mpe Eli],” Biblioteke ya Nsango Malamu). Boyekoli nini uta na Samwele etali lolenge nini koyokela mongongo ya Nkolo? Lolenge nini tolakisaka ete tozali na bolingi ya koyoka ntango Nkolo alobelaka biso?

    2:10

    Samuel the Prophet

    1:58

    Samuel and Eli

  • Botuna bana na bino lolenge nini bakolimbolela moto moko lolenge nini Nkolo alobelaka bango. Bokoki kosalisa bango baluka biyano na Malongi mpe Mayokani 6:22–23; 8:2–3; 9:7–9.

Bosalisa bana na bino bayekola koyeba Molimo. Ezali pete te kososola bokeseni kati ya mayoki na biso moko mpe Molimo Mosantu. Moto nyonso abundaka na yango mbala na mbala. Bozwa libaku nyonso oyo bokoki mpo na kosalisa bana na bino bayeba ntango nini bayokaka nguya ya Molimo. Ndakisa, ntango bozali kotanga 1 Samwele 3:1–10 mpe milongo oyo epesami kati na Malongi mpe Mayokani, bokoki kokabola makambo bokutanaki na yango oyo wapi Nkolo ateyakii bino na mayele mpe motema na bino.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Samwele kolamukaka na mbeto

Boy Samuel Called by the Lord [Elenge Mobali Samwele Abengamaki na Nkolo], na Harry Anderson

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Tata na Lola ayokaka mpe ayanolaka nsambo na ngai