“Sanza ya motoba 8–14. ‘Nkolo Atalaka na Motema‘: 1 Samwele 8–10; 13; 15–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya motoba 8–14. ‘Nkolo Atalaka na Motema,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Beside Still Waters [Pembeni ya Mai ya Kimia], na Simon Dewey
Sanza ya Motoba 8–14: “Nkolo Atalaka na Motema”
1 Samwele 8–10; 13; 15–16
Saulo azalaki mobateli ya bampunda. Atako azalaki molai mpe kitoko, azalaki “lmoke na miso na [ye] moko” mpe azalaki komitungisa na na oyo etali libula ya libota na ye (botala 1 Samwele 9:2–3, 21; 15:17). Na mokolo oyo esengelaki alakisama liboso ya Yisalaele lokola mokonzi, amimonisaki te; azalaki na kobanga makasi mpe “amibombaki” (1 Samwele 10:21–22). Kotala Saulo, bokoki kokanisa te ete akokamba Bayisalaele na elonga uta na banguna na bango—to ete alingaki nsima kokoma lofundu mpe motomboki kotelemela Nkolo.
Dawidi azalaki mobateli mpate. Azalaki na nzoto ya kokamwisa te lokola bandeko na ye mibali nsambo. Na mokolo Samwele ayaki kopona mokonzi ya sika mpo na Yisalaele, emonanaki ete ebongaki te kotya Dawidi na molongo ya bato oyo bakoki koponama, yango wana batikaki ye na bilanga na bampate. Kotala Dawidi, bokoki kokanisa te ete akokaki kozala na bondimi mpe mpiko ya kokweisa engambe moko mpe kokoma mokonzi ya Yisalaele oyo alonga koleka.
Kasi Nkolo amonaka koleka bilembo na biso, lolenge na biso ya nzoto, bozangi bokengi na biso. Ye Atalaka, na esika na yango, “na motema” (1 Samwele 16:7). Mpe ata ntango motema na biso ezali malamu mpenza te, soki tozali na bolingi, Akopesa biso “motema mosusu” (1 Samwele 10:9)
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
1 Samwele 8
Yesu Klisto azali Mokonzi na ngai.
1 Samwele 8 elobeli likambo moko oyo ekobongola libela nsuka ya Bayisalaele. Mpo na komibatela liboso ya banguna na bango, Bayisalaele balingaki oyo bazalani na bango bazalaki na yango—mokonzi moko oyo akoyangela likolo na bango. Ntango bozali kotanga oyo etali bosenga na bango mpe eyano ya Nkolo, bokanisa oyo etali baye epayi ya nani bobalukaka mpo na kozwa bokengi mpe litambwisi. Bokanisa nini elingi koloba kotika Nkolo “ayangela likolo na [bino]” (1 Samwele 8:7).
Na baposo ekoya, bokotanga oyo etali motango ya bakonzi babengamaki mpo na kokamba Yisalaele. Ntango bozali kotanga oyo etali bango, bokanisa mituna miye milandi:
-
Lolenge nini makebisi ya Nkolo ekokisamaki na 1 Samwele 8:10–18?
-
Lolenge nini bana Yisalaele basimbamaki na mbano ya maponi na bango ya kozala na mokonzi ya mokili?
-
Lolenge nini Yesu Klisto azali na bokeseni uta na bakonzi ya mokili? Bokanisa botindiki nini ya mokili bosengeli mbala mosusu kolongola na bomoi na bino mpo na kotika Klisto azala mokonzi na bino.
Botala lisusu “Rejoice, the Lord Is King!,” Hymns, no. 34.
1 Samwele 9–10; 16:1–13
Nzambe abengaka bato na nzela ya lisakoli mpo na kosala kati na bokonzi na Ye.
Botanga oyo etali lolenge Nzambe aponaki bakonzi ya Yisalaele na 1 Samwele 9–10 mpe 16 (botala mingimingi 9:15–17; 10:1–12; 16:1–13). Boluka makomi oyo ekosalisa bino bososola nini elingi koloba “kobengama na Nzambe na nzela ya lisakoli” kati na Eklezia ya Nkolo lelo (Eteni ya Bondimi 1:5). Bokoki kokanisa komitya na esika ya mokambi oyo azali kobenda libyangi (Samwele), moto oyo azali kobengama (Saulo mpe Dawidi), mpe bato oyo babengami kosalela (Bayisalaele). Boyekoli nini uta maloba mpe misala kati na mikapo oyo?
Elilingi ya Samwele azali kopakola Saulo mafuta, na P. Mann, © Lifeway Collection/na ndingisa ya goodsalt.com
1 Samwele 13:5–14; 15
“Kotosa ezali malamu mingi koleka mbeka.”
Kokanisaka lolenge Saulo azalaki nsoninsoni kati na 1 Samwele 10, ezali ya kokamwa kotanga oyo etali “botomboki” mpe “moto makasi” na ye nsima ya kokoma mokonzi. (1 Samwele 15:23). Bokanisi yango ekomaki mpo na nini? Kati na 1 Samwele 13:5–14, ezaleli mpe momesano nini bomoni oyo ezali komema na bokwei na ye?
Kati na 1 Samwele 15, bokotanga oyo etali motindo uta na Nkolo oyo Saulo atosaki te mpamba te akanisaki ete azalaki na ntina ya malamu. Mpo na koyekola uta na maponi mabe ya Saulo, botala molongo 22 mpe botya na esika ya maloba “mbeka” mpe “mafuta ya bampate” biloko oyo ezali komonana malamu, kasi ezali na ntina mingi te lokola koyoka mpe kotosa Nkolo. Lolenge nini bopambolamaki ntango bozali kotya bolingi ya Nkolo liboso kati na bomoi na bino?
1 Samwele 16:6–12
“Nkolo atalaka na motema.”
Bosila kozwa ekateli na kotalaka lolenge ya libanda ya moto to ya eloko moko, mpe nsima komona ete bomikosaki? Mbala mosusu bolyaki eloko moko oyo ezalaki kitoko te lokola ezalaki komonana. To mbala mosusu bosambisaki moto moko na bosembo te.
Ntango Samwele azalaki koluka mokonzi ya sika ya Yisalaele, Nkolo ateyaki ye lolenge ya malamu. Botanga oyo etali yango kati na 1 Samwele 16:6–7, mpe bokanisa kosala molongo ya ndenge bato basambisaka basusu “na lolenge oyo emonanaka na libanda.” Bokoki kozwa mwa bandakisa kati na nsango ya Mpaka Christophe G. Giraud-Carrier “Tozali Bana na Ye” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 114–16). Elingi koloba nini kotala “na motema,” lokola Nkolo asalaka? 1 Samwele 16:7. Bokoki kozwa bandakisa na yango, lisusu, kati na nsango ya Mpaka Giraud-Carrier. Ntango mosusu bokoki kokanisa bangonga misusu oyo Mobikisi atalaki te lolenge moto azali komonana na libanda. (Botala, ndakisa, Malako 12:41–44; Luka 5:1–11; 19:1–9; Yoane 4:5–30; Mose 6:31–36.) Boyekoli nini uta na bandakisa oyo?
Lolenge nini bokoki kolanda ndakisa ya Mobikisi na lolenge bomonaka basusu—mpe binomei? Lolenge nini kosala bongo ekoki kosimba ndenge na bino ya kosolola na basusu? Bokanisa koyebisa moto moko oyo etali bolamu bomoni na motema na ye.
Botala lisusu Ulisses Soares, “Bandeko Mibali Mpe ya Basi Kati na Klisto,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 70–73.
Mpo na mingikoleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.
Makanisi mpo na Koteya Bana
1 Samwele 8
Yesu Klisto azali Mokonzi na ngai.
-
Ntango bozali kotanga 1 Samwele 8 elongo na bana na bino, bosalisa bango koluka bantina Samwele ayebisaki Bayisalaele ete kozala na mokonzi ezalaki likanisi moko ya mabe. Mpo na nini ezali malamu koleka kozala na Yesu Klisto lokola mokonzi na biso? Mbala mosusu bokoki kosala motole moko ya papie elongo mpe kolata yango moko nsima na mosusu mpe kokabola eloko moko tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingi Yesu azala Mokonzi na biso. (Botala lisusu Yelemia 23:5; Malongi mpe Mayokani 45:59.)
1 Samwele 8:6; 9:15–17; 10:1–24; 16:1–13
Bato basalaka na Eklezia babiangamaki na Nzambe.
-
Masolo ya Nzambe koponaka Saulo mpe Dawidi kozala bakonzi ekoki kosalisa bana na bino basosola lolenge bato babiangemaka mpo na kosala kati na Eklezia lelo na limonisi. Mpo na koteya bango masolo oyo, bokoki kokoma makambo ya lisolo na biteni ya bapapie, mpe bana na bino bakoka kotya yango na molongo malamu ntango bozali kotanga elongo makomi (botala lisusu “Elenge Dawidi” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 110–11). Nsima, bokoki kolobela oyo etali bantango Nzambe apambolaki bino na nguya ya molimo mpo na kokokisa etinda moko to libiangi (botala 1 Samwele 10:9–10).
1:16Young David
-
Yango ekoki kozala ngonga malamu ya koteya bana na bino eteni ya bondimi ya mitano. Boyebisa bango lolenge nini bozwi libyangi na bino na Eklezia. Lolenge nini boyebaka ete bobiangamaki na Nzambe?
The Prophet Samuel Anoints David to Be King of Israel in Bethlehem [Profeta Samwele apakolaki Dawidi mafuta mpo na kozala mokonzi ya Yisalaele kati na Beteleme], na Balage Balogh
1 Samwele 16:1–13
Nkolo atalaka na motema motema.
-
Liteya eteyami na kosaleka eloko ekoki kosalisa bana na bino basosola mobeko kati na 1 Samwele 16:7. Ndakisa, bokoki kolakisa bango mwa bilei to buku moko na papie ya poso ya likolo oyo ebalani te na makambo ezali na kati. Nini 1 Samwele 16:7 mpe ndakisa ya liteya oyo epesi lokola likanisi oyo etali lolenge tosengeli komitala mpe bato mosusu? Boyemba loyembo moko oyo ebeti nsete na mobeko, lokola “Love One Another” (Children’s Songbook, 136).
Bosalela mateya ya ndakisa Ntango bana na bino bazali na eloko moko ya komona mpe kosimba elandi mobeko ya nsango malamu, bakoki mpenza komikundola yango. Ndakisa, ntango bozali kotanga 1 Samwele 16:7 elongo na bango, bokoki kotika bango basalisa bino na koluka bandakisa ya bozangisi ya miso mpo na kolakisa likambo oyo tosengeli komeka komona lokola Nkolo asalaka—na kotalaka “na motema”—na esika ya kosambisa oyo etongami na “emoneli ya libanda.”
-
Bino mpe bana na bino bokoki kokabola makambo oyo wapi boyekoli mpo na nini bosengeli “kotala na motema,” kaka te “na emoneli ya libanda” (molongo 7). Bokoki lisusu koyebisana moko nsima ya mosusu oyo etali makambo malamu bomoni na motema ya moko mpe mosusu.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.