Yaka, Landa Ngai
Sanza ya Motoba 22–28. “Yoka uta na Lola Libondeli na Bango”: 2 Samwele 11–12; 1 Bakonzi 3; 6–9; 11


“Sanza ya motoba 22–26. ‘Yoka uta na Lola Libondeli na Bango’: 2 Samwele 11–12; 1 Bakonzi 3; 6–9; 11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya motoba 22–26. ‘Yoka uta na Lola Libondeli na Bango,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Salomo azali kobulisa tempelo

Solomon Dedicates the Temple at Jerusalem [Salomo Azali Kobulisa Tempelo na Yelusaleme], na James Tissot mpe basusu

Sanza ya motoba 22–28: “Yoka uta na Lola Libondeli na Bango”

2 Samwele 11–12; 1 Bakonzi 3; 6–911

Saulo, Dawidi, mpe Salomo, bakonzi misato ya liboso ya Yisalaele, banso babandaki na bilaka mingi mpenza. Ya komikitisa, mpiko, mpe bwanya, bazwaki moko na moko ngolu na Nkolo—pene na ebandeli. Likambo ya mawa, mokonzi moko na moko lisusu amipesaki na botau mpe lisenginya ya bomoto. Batiaki bamposa na bango moko liboso ya oyo ya Nkolo. Mpe lokola tomoni yango mbala na mbala kati na makomi—mpe kati na bomoi na biso moko—wana ekambaki na likama.

Kasi eloko moko ya motuya esalemaki na eleko ya boyangeli ya Salomo oyo epesaki mwa elikya mpo na kimia na bomoi ya bato ya boyokani. Salomo atongaki tempelo. Esengelaki kozala ndako ya Nkolo ya libela koleka ndenge tabelenakele ezalaki. Mpe ekolakisa bozali ya Nkolo ya libelai kati na bato na Ye. Salomo ayebaki ete bato bakokoba kokutana na botau mpe mimekano ya ndenge ekeseni. Na kobulisaka ndako esantu ya sika yango, Salomo abondelaki Nkolo, “Soki … basengi bolimbisi na motema na bango mobimba, … boye, yoka libondeli na bango” (1 Bakonzi 8:47–48). Wana ezali eteni ya maye mayokani ya tempelo esalaka mpo na biso—ekelaka mokangano na Nzambe. Ebatelaka mpo na biso elaka ete na nzela ya boyamboli na biso mpe boboto na Ye, Akoki “kofanda kati na [biso]” mpe kotika biso te (1 Bakonzi 6:13).

Mpo na koyeba makambo ya buku ya 1 Bakonzi, botala “Bakonzi, Buku ya” na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

2 Samwele 11; 12: 12–14

elembo ya seminele
Nkolo akoki kosalisa ngai nasala maponi malamu ntango namekami mpo na kosumuka.

Ntango mosusu totalaka bato oyo bamonana lokola makasi kati na bondimi na bango, mpe tokanisaka ete bakutanaka na lisenginya te. Maponi ya likama ya Dawidi elimbolami kati na 2 Samwele 11 na polele elakisi ete oyo ezli solo te. Bokanisa mateya nini bokoki koyekola uta na mayebi na ye. Mituna lokola oyo ekoki kosalisa bino boyekola 2 Samwele 11–12:

  • Maponi nini Dawidi asalaki oyo ememaki ye na nzela moko mingimingi ya lisumu? Maponi ya sembo akokaki kosala kasi? (Botala lisusu video “To Look Upon [Kotala Likolo Ya] ” Biblioteke ya Nsango Malamu).

    4:15

    To Look Upon

    Kosalela bavideo. Bavideo ekoki kosalisa bino botala masolo ya makomi mpe bokanisa lolenge nini kosalela yango mpo na bino. Bokanisa lolenge nini bokoki kosalela yango mpo na kotombola mateya mpe boyekoli. Ndakisa, ntango bozali kotala “To Look Upon” (Biblioteke ya Nsango Malamu]), bokanisa kotelemisa video na bisika bikeseni mpo na komanyola to kosolola mituna misusu epesami kati na molulu oyo.

  • Lolenge nini motungisi ezali komeka komema bino na banzela ya lisumu? Maponi nini tokoki kosala mpo na kolakisa ete toponi Ye?

  • Botala eyano ya Dawidi na lisolo ya Natana kati na 2 Samwele 12: 1–6. Eyano na ye ekanisisi nini etali lolenge Dawidi amimonelaki? Nini Nkolo asali mpo na kosalisa bino bomimona malamu mingi?

  • Lolenge nini bokoki koloba na mokuse makambo ya 2 Samwele 11–12 na likebisi ya molongo ya maloba kaka moko?

Kotangaka oyo etali maponi mabe ya Dawidi ekoki kokamba bino boyekola oyo etali makama ya polonogalafi mpe lisumu ya koyebana nzoto. Buku malamu mpo na yango ezali Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi, mingimingi biteni ya nkombo “Kosala nini na ngonga yango” mpe “Nzoto na yo ezali bule” (nkasa 21–28). Ntango mosusu bokoki koluka kati na buku toli oyo elingaki kosalisa Dawidi asala maponi malamu koleka. To bokoki kotanga “Yesu Klisto akosalisa yo” (nkasa 6–9), kolukaka eloko moko oyo elingaki kosalisa Dawidi azongela Nkolo.

Bokanisa koyemba loyembo lokola “I Need Thee Every Hour” (Hymns, no. 53) mpe komanyolaka lolenge nini Mobikisi alendisaki bino ntango bokutanaki na lisenginya.

Botala lisusu 2 Nefi 28:20–24; Ulisses Soares, “Seek Christ in Every Thought [Boluka Klisto na Makanisi nyonso],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 82–85; “Taking Charge of Technology [Kozwa Mokumba ya Tekinolozi],” Biblioteke ya Nsango Malamu]; “Watch Your Step [Tala Litambe na Yo]” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu].

2:36

Watch Your Step

1 Bakonzi 3:1–15

Likabo ya bososoli esalisaka ngai nakesenisa malamu mpe mabe.

Soki Nkolo alobelaki yo, “Lomba eloko nini ekopesa ngai na yo” (1 Bakonzi 3:5), olingaki kosenga nini? Nini esimbi yo mpo na oyo etali bosenga ya Salomo? Bokanisa mpo na nini “motema ya mayele” mpo na “kokesenisa mabe mpe malamu” (molongo 9) ezali likabo ya motuya. Nini bokoki kosala mpo na koluka likabo oyo?

Botala lisusu Moroni 7:12–19.

1 Bakonzi 6–8; 9:1–9

Na nzela ya mayokani esalami kati na ndako ya Nkolo, Nkolo afandi elongo na ngai.

Na 1 Bakonzi 6–7 bokomona bolimboli na molayi ya ndako ya bule oyo Salomo atongaki mpo na Nkolo. Makambo yango ya mikemike ekoki te komonana lokola mpe motuya epayi na bino lokola ezalaki na Bayisalaele ya kala. Kasi kotangaka mikapo oyo ekoki kopesa bino ndimbola mpo na motuya nini ezalaki epayi na bango kozala na ndako ya Nkolo. Mpo na nini ezali motuya epayi na bino?

Bokoki komanyola biteni ekesena nini tempelo ya Salomo ekokaki kolinga kolakisa. Ndakisa, bokanisa nini bakeluba, banzete, mpe bafololo kati na 1 Bakonzi 6:35 ekoki kotalisa. (Botala Genese 3:24.)

Mokapo 8 ekundolisi nsambo ya Salomo ntango asilisaki tempelo (botala milongo 22–61). Bokanisa kokoma molongo ya nkombo ya mapamboli Salomo asengaki. Nini esimbi yo mpo na oyo etali mapamboli oyo? (Botala lisusu bilaka ya Nkolo oyo ezali kati na 2 Bakonzi 6:11–13; 9:1–9.) Soki bokendaki na ndako ya Nkolo, bokanisa oyo etali mayebi na bino ya kokumbamelaka kuna. Lolenge nini kobatela mayokani ya tempelo esalisi bino bozwa mapamboli ya Nkolo?

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 109; Henry B. Eyring, “I Love to See the Temple [Nalingaka Komona Tempelo],” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 28–31.

Tempelo ya Barranquilla na Colombie

Tempelo ya Barranquilla na Colombie

1 Bakonzi 8:61; 11:1–11

“Motema na ye ezalaki malamu te na Nkolo.”

Nini elingi koloba “tika ete mitema na bino … mizala sembo epayi na Nkolo”? (1 Bakonzi 8:61). Yango ekeseni uta na bikela na biso kozalaka malamu? Na ndenge nini? Botanga 1 Bakonzi 11:1–11, mpe bokoma maye Nkolo alobaki etali motema ya Salomo. Bokoki komanyola soki ezali to te na banguya kati na bomoi na bino oyo ekoki kopengwisa motema na bino na Nkolo mpe kobalola yango epayi ya “banzambe mosusu.”

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Samwele 11

Nkolo akoki kosalisa ngai ntango nazwami na lisenginya.

  • Mokonzi Dawidi” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 117–20, ekoki kosalisa bino bobetela bana na bino lisolo oyo ezali kati na 2 Samwele 11. Bokoki kosenga bana na bino bamona maponi mabe Dawidi asalaki mpe bapesa makanisi ya maponi malamu akokaki kosala na esika na yango. Mwa makambo nini tokoki kosala ntango tozali kozwama na lisenginya oyo ekoki kosalisa biso tosala boponi malamu?

    2:11

    King David

  • Kotanga oyo etali masumu ya Dawidi ya likama ekoki kozala libaku malamu ya kosolola makama ya polonogalafi. Video “What Should I Do When I See Pornography [Nasengeli Kosala Nini Ntango Namoni Ponologalafi]?” (Biblioteke ya Nsango Malamu) ezali na bokambi ya motuya. Bosalisa bana na bino basala mwango etali maye bakosala ntango bakutani na polonogalafi.

    5:46

    What should I do when I see pornography?

1 Bakonzi 8:22–61

Kosala mayokani kati na ndako ya Nkolo—mpe kobatela yango—esalisaka ngai natambola na banzela na Ye.

  • Ntango bino mpe bana na bino boyekoli oyo etali bobulisi tempelo kati na 1 Bakonzi 8, bokoki kotala bafoto ya batempelo kati na mateya ya poso oyo. Tika bana na bino basolola etali makambo mike mike bamoni kati na bafoto yango. Bokoki kobeta nsete na milongo 57– 58. Elingi koloba nini “kotambola na banzela nyonso [ya Nkolo]”? (1 Bakonzi 8:58). Ntango mosusu bana na bino bakoki kopusana litambe moko mpo na eyano moko na moko bazali kopesa.

  • Bolobela bana na bino lolenge nini kobatela mayokani oyo bosalaka kati na tempelo esalisaka bino botambola na nzela ya Nkolo. Bokoki koyebisa bango nini mayokani yango ezali (botala Buku Monene, 27.2, Biblioteke ya Nsango Malamu). Bokoki lisusu koyemba loyembo elongo lokola “I Love to See the Temple” (Children’s Songbook, 95).

Tempelo ya Salomo

Elilingi ya Tempelo ya Salomo, na Sam Lawlor

1 Bakonzi 11:1–11

Nakoki kotia Nkolo na esika ya yambo na bomoi na ngai.

  • Kotanga oyo etali lolenge nini basi ya Salomo batindikaki ye ekoki kokamba na lisolo etali bandakisa ya “banzambe mosusu”—to makambo oyo bato bakumbamelaka to balinga na esika ya Nkolo. Lolenge nini tolakisaka ete tolingaka Ye mingi koleka eloko kani mosusu na bomoi na biso?

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Tempelo ya Salomo

Dedication of the Temple of Solomon in Jerusalem [Bobulisi ya Tempelo ya Salomo na Yelusaleme], na William Hole

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Kosala mayokani kati na ndako ya Nkolo esalisaka ngai natambola na banzela na Ye