Yaka, Landa Ngai
Sanza ya motoba 29–Sanza ya nsambo 5. “Soki Nkolo Azali Nzambe, Tika ete Bolanda Ye”: 1 Bakonzi 12–13; 17–22


“Sanza ya motoba 29–Sanza ya nsambo 5. ‘Soki Nkolo Azali Nzambe, Tika ete Bolanda Ye ’: 1 Bakonzi 12–13; 17–22,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya motoba 29–Sanza ya nsambo 5. ‘Soki Nkolo Azali Nzambe, Tika ete Bolanda Ye,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Eliya liboso ya etumbelo ezali kozika

Elijah Contends against the Priests of Baal [Eliya Atye Tembe na Banganganzambe ya Bala], na Jerry Harston

Sanza ya Motoba 29–Sanza ya nsambo 5: “Soki Nkolo Azali Nzambe, Tika ete Bolanda Ye”

1 Bakonzi 12–13; 17–22

Ndako ya Yisalaele ezalaki na mobulungano. Bokonzi ekabwanaki, elongo na mabota zomi kosalaka Bokonzi ya Nordi ya Yisalaele mpe mabota mibale esalaki Bokonzi ya Sudi ya Yuda. Kasi mabe koleka bokabwani na bango ya moko na mosusu ezalaki bokabwani ya babokonzi uta na mayokani na bango. Bakonzi mabe bakambaki bato mosika na Nkolo, mpe bato mingi baninganaki na bondimi na bango.

Na makambo ya bongo, Nkolo abengaki Eliya azala profeta. Bomoi na ye elakisi ete moto akoki kozwa bondimi monene kati na Nkolo ata kati na makambo ya mpasi. Ntango mosusu Nkolo ayanolaka na bondimi ya bongo na makamwisi minene, oyo esalemaka liboso ya bato nyonso, lokola moto kokita uta na likolo. Kasi Asalaka lisusu makamwisi ya kimia, ya nkuku, lokola koleisa mwasi ya sembo akufela mobali mpe mwana na ye ya mobali. Mpe mbala mingi makamwisi ya Nkolo ezalaki mpenza ya moto na moto ete eyebanaki bobele na moto moko—ndakisa, ntango Nkolo amimonisi Yemei epayi na bino na nzela ya “mongongo ya kimya mpe ya moke” (1 Bakonzi 19:12).

Mpo na koyeba mingi etali Eliya, botala “Eliya” na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

1 Bakonzi 12:1–20

Bakambi lokola Klisto basalelaka bato oyo bazali kokamba.

Lolende nini bokoki kolimbola mbeba Mokonzi Rehoboam, mwana ya Salomo, basalaki kati na 1 Bakonzi 12:1–14? Bizaleli lokola ya Klisto ekokaki kosalisa Rehoboam abikisa bokonzi na ye? (botala molongo 7; Matai 20:25–28; Mosiya 2:10–21). Lolenge nini bokoki kosalela bizalela oyo lokola mokambi—ata na libyangi ya Eklezia to lokola mokambi ya bomoi na bino moko?

1 Bakonzi 17:8–16; 19:19–21

elembo ya seminele
Libyangi ya komibonzaa ezali libaku ya kosalela bondimi na ngai na Yesu Klisto.

Profeta Eliya asengaki mwasi moko apesa ye bilei mpe mayi yambo ya komileisa yemei mpe mwana na ye ya mobali oyo azalaki na nzala. Mpo na nini Ye asalaki yango? Bosenga ya Eliya ekokaki komonana lokola lipamboli ya libota na ye ya moke. Bazalaki na mposa ya lipamboli ya Nkolo, mpe likabo ememaka mapamboli—kobakisa lipamboli ya bondimi makasi koleka.

Ntango bozali kotanga 1 Bakonzi 17:8–16, bomitya na esika ya mwasi oyo akufela mobali. Nini etuti bino etalia ye? Bokoki lisusu kosala molongo ya maponi oyo esengaka bondimi (mpo na ndakisa, botala Mpo na Bokasi ya Bilenge: Mokambi mpo na Kosala Maponi [2022]). Boyekoli nini uta na mwasi oyo akufela mobali etali kosalela bondimi?

Lolenge nini ezali misala ya Eliya kati na 1 Bakonzi 19:19–21 ekokani na misala ya mwasi akufela mobali?

Bokanisa oyo etali mabonza oyo bosali mpo na kolanda Mobikisi. Nini 1 Bakonzi 17:8–16; 19:19–21 eteyi bino etali ya mabonza oyo? Lolenge nini boyebi na bino ya mobikisi esalisaka bino ntango Asengaki bino bobonzela? Lolenge nini Apambolaki bino?

Botala lisusu Matai 4:18–22; 6:25–33; Luka 4:24–26; “Elijah and the Widow of Zarephath” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu; “When Faith Endures,” Hymns, no. 45.

10:13

Elijah and the Widow of Zarephath

1 Bakonzi 18

“Soki Nkolo Azali Nzambe, Tika ete Bolanda Ye.”

Bayisalaele bakanisaki ete bazalaki na matomba malamu ya kosambela Baala, oyo ayebanaki lokola nzambe ya mipepe makasi mpe ya mbula. Nsima ya mibu misato ya kozanga mvula, bazalaki na mposa ya mvula na bozangi elikya. Mpe bokumbameli Baala endimamaki na bato mpe ekumisamaki na mokonzi mpe mwasi ya mokonzi. Ntango bozali kotanga 1 Bakonzi 18, bokanisa oyo etali mpo na nini moto moko kati na mikolo na biso akoki kozanga mokano na oyo etali kolanda Nkolo. Na mokapo oyo, nini bokanisi Nkolo azalaki komeka koteya oyo etali Yemei? Boyebi nini esalisaki bino bomipesa na kolanda Mobikisi?

Botala lisusu D. Todd Christofferson, “Boponi mpe Bomipesi” (losambo ya mokili mobimba mpo na bilenge mikolo, sanza ya yambo 12, 2020), Biblioteke ya Nsango Malamu.

Eliya na Ngomba Horebe

Elilingi ya Eliya, na Wilson Ong

1 Bakonzi 19:1–18

Nkolo mbala mingi alobaka na kimya, na ndenge ya pete.

Na mawa, likamwisi na Ngomba Karmele ekomisaki etinda ya Eliya pete te. Nzokande, bomoi na ye ekomaki na likama, mpe asengelaki kobatama na nse ya mabele kati na esobe. Kuna, kobundaka na kozala ye moko mpe kolemba nzoto, azwaki likambo moko elongo na Nkolo oyo ekesanaki mpenza na likambo oyo akutanaki na yango na Ngomba Karmele. Nini likambo ya Eliya kati na 1 Bakonzi 19:1–18 eteyi bino oyo etali lolenge Nkolo asololaka na bino na bantango na bino ya bosenga?

Bomanyola bangonga oyo boyokaki ete Nkolo alobaki na bino. Lolenge nini bokoki kolimbola lolenge asololaka na bino? Mpo na nini maloba “kimya” mpe “moke” ezali lolenge malamu ya kolimbola mongongo ya Molimo? Maloba mosusu nini bozwi kati na Elamani 5:30; Malongi mpe Mayokani 6:22–23; 11:12–14? Nini bosengeli kosala mpo na kozwa bokambami ya Nkolo mbala mingi?

Botala lisusu Nzembo 46:10.

Bosalela mayoki ndenge na ndenge mpo na kobongisa boyekoli. Biso banso toyekolaka oyo etali mokili na nzela ya mayoki na biso mitano. Kosalela mayoki oyo ekoki mpe lisusu kobongisa mingi boyekoli ya nsango malamu. Ndakisa, bokanisa na ntina ya bililingi mpe mingongo bokoki kosalela mpo na kolobela maloba “kimya” mpe “moke” ntango bozali koyekola to koteya oyo etali mongongo ya Nkolo kati na 1 Bakonzi 19.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

1 Bakonzi 17

Nkolo apambolaka ngai ntango nazali ba bondimi kati na Ye.

  • Mpo na kosalisa bana na bino bayekola masolo ya bondimi kati na 1 Bakonzi 17, bokoki kolakisa bango bililingi to biloko mpo na komonisa masolo yango, lokola bandeke, mampa, to mwana mobali. Ntango boyebisi bana na bino masolo oyo, bobengisa bango bazwa elilingingi to eloko oyo ebalani na lisolo moko moko. “Eliya Profeta” (kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 121–24) ekoki kosalisa bino kobeta masolo oyo. Nini lisolo moko na moko eteyi biso na oyo etali kolakisa bondimi kati na Yesu Klisto?

    1:58

    Elijah the Prophet

  • Bosalisa bana na bino bakanisa ndenge bakoki kolakisa bondimi na bango kati na Yesu Klisto. Boyemba elongo na bango loyembo oyo etali bondimi, lokola “I Have Faith in the Lord, Jesus Christ” (Biblioteke ya Nsango Malamu), mpe bokabola elongo moko na mosusu nini boyekoli oyo etali bondimi uta na loyembo.

Eliya, mwasi moko akufela mobali, mpe mwana na ye ya mobali.

Elilingi ya Eliya mpe kobikisama ya mwana ya mwasi moko akufela mobali, na Charles Edmund Brock

1 Bakonzi 17:8–16

Ntango Nkolo asengi ngai nasala libonza, nakoki kotosa na nzela ya bondimi.

  • Mbala mosusu bana na bino bakoki koyema elilingi moko ya maye Nkolo asengaki mwasi akufela mobali apesa na Eliya (botala 1 Bakonzi 17:12–13) mpe nini mwasi akufela mobali azwaki na nsima (botala 1 Bakonzi 17:15–16). (Botala lokasa ya milulu ya poso oyo.) Bakoki lisusu koluka bililingi ya bato mosusu oyo basundolaki eloko balingaki mpo na eloko oyo eleki motuya. Bobengisa bana na bino bazwa bililingi kati na Gospel Art Book [Buku ya Bilili ya Nsango Malamu] to Yaka, Landa Ngai. Mpo na nini Nkolo alingi biso tobonzela? Lolenge nini Apambolaka biso?

1 Bakonzi 18:17–39

Nakoki kopona kolanda Yesu Klisto.

  • Ntango bozali kotanga 1 Bakonzi 18:17–39 elongo, bana na bino bakoki kozwa molongo mpe koyema elilingi ya nini ezali kolimbola. Bakoki kosalela bililingi na bango mpo na kobeta lisolo na maloba na bango moko. (Botala lisusu “Eliya mpe Banganganzambe ya Baala,” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 125–28.)

    2:17

    Elijah and the Priests of Baal

  • Bosalisa bana na bino bakanisa makambo oyo bakoki kozala na mposa ya kozwa mokano ya kolanda Yesu Klisto to te. Ntango mosusu bakoki koyema bililingi ya bango moko kosalaka maponi malamu. Bokabola moko na mosusu mpo na nini boponi kolanda Yesu.

1 Bakonzi 19:9–12

Nkolo alobaka na ngai na nzela ya mongongo ya kimya, ya moke ya Molimo Mosantu.

  • Ntango bozali koloba na mokuse 1 Bakonzi 19:9–12, bobengisa bana na bino basala misala mpo na komonisa mopepe makasi, koningana ya mabele, mpe moto. Nsima bobengisa bango bafanda kimya ntango bozali koloba elongo, na mongongo kimya ya moke, “nsima ya moto ya mongongo moke ya kimya” (molongo 12). (Botala lisusu “Nkolo Alobaki na Eliya,” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 129–31.) Boyebisa bana na bino oyo etali bangonga oyo boyokaki mongongo ya kimya, moke ya Molimo Mosantu.

    1:48

    The Lord Speaks to Elijah

  • Na kimya boyemba loyembo etali Molimo, lokola “The Still Small Voice” (Children’s Songbook106–7). Nini ekoki kobungisa mayele na biso mpo na koyeba Molimo? Nini ekoki kosalisa biso koyoka Ye?

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Mwasi akufela mobali ya Sarepta mpe mwana na ye

Widow of Zarephath [Mwasi akufela mobali ya Sarepta], na Rose Datoc Dall

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Ntango Nkolo asengi ngai nasala libonza, nakoki kotosa na nzela ya bondimi.