“Sanza ya nsambo 6–12. ‘Ezali na Mosakoli Moko kati na Yisalaele’: 2 Bakonzi 2–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya nsambo 6–12. ‘Ezali na Mosakoli Moko kati na Yisalaele,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
At River’s Edge [Na Nsuka ya Ebale], na Annie Henrie Nader
Sanza ya nsambo 6–12: “Ezali na Mosakoli Moko kati na Yisalaele”
2 Bakonzi 2–7
Misio ya yambo ya mosakoli ezali koteya mpe kotatola Mobikisi Yesu Klisto. Nzokande, lisolo na biso ya mosakoli Elisa ezali kokotisa mingi ya mateya to matatoli na ye te. Maye lisolo ezali kosangisa ezali makamwisi oyo Elisa asalaki, kobakisa kosekwisa mwana moko uta na liwa (botala 2 Bakonzi 4:18–37), koleisa bibele na kaka mwa bilei (botala 2 Bakonzi 4:42–44), mpe kobikisa moto ya maba moko (botala 2 Bakonzi 5:1–14). Yango wana ntango tozali na maloba ya Elisa te oyo etali Klisto, tozali mpenza na lotomo mpe makamwisi ya Elisa, oyo ezali mpenza kotatola Klisto. Ezali bimoniseli ya nguya ya kopesa bomoi, koleisa, mpe kobikisa ya Nkolo. Makamwisi esalamaka mbala mingi na bomoi na biso koleka bososoli na biso ntango mosusu. Mpo na komona yango, tosengeli koluka bondimi Elisa azalaki na yango ntango asambelaki mpo na elenge moombo na ye ya kobanga: “Nabondelaki ete, Nkolo, fungola miso na ye ete amona” (2 Bakonzi 6:17).
Mpo na koyeba makambo ya buku ya 2 Bakonzi, botala “Bakonzi, Buku ya” na Mokambi na Makomi.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
2 Bakonzi 2:6
Nzambe akoki kosala makamwisi kati na bomoi na ngai.
Makamwisi elakisaka biso nguya ya Nzambe. Ekoki kosalisa biso tolonga kpokoso ya kibomoto—lokola mokili ekauka oyo esengeli na mayi ya peto (botala 2 Bakonzi 2:19–22) to epasola ebunga oyo esengeli kozwama lisusu (botala 2 Mokonzi 6:4–7). Kasi ya motuya mpenza, makamwisi ekoki kobalola biso epayi ya Nkolo. Ntango bozali kotanga 2 Bakonzi 2–6, bokanisa kosala milongo ya makamwisi bozwi, mpe bomanyola mateya ya molimo boyekoli uta na mokona mosusu.
Bokoki lisusu komekolisa makamwisa oyo Elisa asalaki na makamwisi oyo Yesu Klisto asalaki (botala 2 Bakonzi 4:8–37 mpe Luka 7:11–16; 2 Bakonzi 4:42–44 mpe Yoane 6:1–13; 2 Bakonzi 5:1–15 mpe Luka 17:11–19). Makamwisi oyo eteyi bino nini etali Mobikisi mpe basakoli na Ye?
Botala lisusu 2 Nefi 26:12–13; 27:23; Moroni 7:35–37; eteni “Boluka mpe bolikya makamwisi” kati na Russell M. Nelson, “Nguya ya Bolingi ya Kotambola na Molimo,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 99–100.
Elisha Raising the Son of the Shunamite [Elisa Azaki Kosekwisa Mwana mobali ya Suneme], na Frederic Leighton
1 Bakonzi 4: 8– 17; 7:1–16
Nkolo akokokisa maloba na Ye epesami na nzela ya basakoli na Ye.
Nkolo afulaki Elisa asakola makambo ekoya—mingimingi, makambo oyo ezalaki komonana lokola ekosalema te. Ntango bozali kotanga 2 Bakonzi 4:8–17; 7:1–16, bokanisa oyo etali lolenge nini bokoki koyanola na liloba ya Nkolo na nzela ya baprofeta na Ye lelo. Mateya, masakoli, to bilaka nini boyoki uta na baprofeta na bomoi? Bozali kosala nini mpo kosalela kati na bondimi maloba na bango?
Botala lisusu 3 Nefi 29: 29; Malongi mpe Mayokani 1:37–38; “Teachings of Presidents” collection, Biblioteke ya Nsango Malamu.
2 Bakonzi 5
Ntango nazali ya komikitisa mpe nazali na botosi, Yesu Klisto akoki kobikisa ngai.
Ntango bozali kotanga 2 Bakonzi 5, bokanisa kokokanisisa maba ya Namana na mokakatano ya molimo bozali kokutana na yango.
Ezali na moto lokola “elenge mwana mosala ya mwasi” kati na bomoi na bino, oyo azali kolendisa bino boluka bokambi etali mokakatano na bino uta na basakoli ya Nkolo? (bota milongo 2–3, 13).
Nini Nkolo azali kobengisa bino bosala oyo ekoki komonana lokola pete mpenza—lokola “kosokola, mpe kopetolama”? (molongo 13). Nini ekoki kopekisa bino kondima mabengisi na Ye ya pete?
Lolenge nini bokoki kolakisa bomikitisi lokola esalaki Namana?
Bokoma lolenge nini boyebi ya Namana esimbaki bondimi na ye epayi ya Nzambe ya Yisalaele (botala molongo 15). Bokoki koyekola nini uta na oyo?
Botala lisusu Luka 4:27; 1 Petelo 5:5–7; Alma 37:3–7; Etele12:27; L. Whitney Clayton, “Whatsoever He Saith unto You, Do It [Atako Alobi na Yo Nini, Sala Yango],” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 97–99; “Namana mpe Elisa” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.
Naaman and Elisha
Bokokanisa makomi yango na bomoi na bino. Ntango mosusu ezali pete koleka kozwa ndimbola ya bino moko kati na makomi ntango bozali kokokanisa makambo ya nzoto kati na lisolo moko na makambo ya molimo na bomoi na bino. Ndakisa, ntango bozali koyekola 2 Bakonzi 2–7, bokoki kokokanisa bizalela na bomoi na bino na makambo lokola maba, epasola ya kodefa, Ebale ya Yaladene, to limpinga monene kokamataka na makasi. Mateya nini Nkolo akoki kozala na yango mpo na bino kati na masolo oyo?
2 Bakonzi 6:8–23
“Baoyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka baoyo bazali elongo na bango.”
Ntango bomeki kolanda Klisto, bomiyoka naino lokola elenge mosaleli ya Elisa—ya kolekelama na motango mpe ya kobanga? Bokanisa bozalaki na esika na ye ntango bozali kotanga 2 Bakonzi 6:8–23. Lolenge nini lisolo oyo ebongolaki lolenge bokanisaka mpe bomiyokaka na oyo etali mimekano na bino, mikumba na bino, to makasi na bino ya kobika nsango malamu?
Ntango bozali komanyola, bokanisa maloba ya Mokambi Henry B. Eyring : “Lokola mosaleli wana ya Elisa, ezali mingi elongo na bino koleka baoyo bokoki komona ya kotelemela bino. Basusu oyo bazali elongo na bino bakozala ya komonana te na miso na bino ya kufa. Nkolo akosunga bino mpe ntango mosusu akosala yango na kobiangaka basusu batelema na bangambu na bino” (“O Ye That Embark [O Yo Oyo Okpeli],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 58).
Bokanisa kokoma molongo ya “bango oyo bazali elongo na [bino]” (molongo 16)—bato Nzambe atie kati na bomoi na bino mpo na kosunga bino. Bokoki kosenga Ye basalisa bino bomona bango na kofungolaka miso na bino ya molimo. Mpe Ye atie bino lisusu kati na bomoi ya basusu mpo na kosalisa bango. Ndenge nini bokoki kozwa bokasi mpe lisungi uta na moko na mosusu?
Ntango nini boyokaki lisungi oyo Nkolo alimboli kati na Malongi mpe Mayokani 84:88?
Bokoki lisusu koyekola etinda ya Ndeko mwasi Michelle D. Craig “Eyes to See [Miso mpo na Komona]” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 15–17). Bomituna, “Nini Nzambe alingi ngai namona?”
Kolobelaka lisolo kati na 2 Bakonzi 6:8–23, Mpaka Ronald A. Rasband alobaki: “Tokoki to te kozala na makalo ya moto etindami mpo na kopanza babobangi na biso mpe kolonga bazabulu na biso, kasi liteya ezali polele. Nkolo azali elongo na biso, kokanisa biso mpe kopambola biso na ndenge bobele Ye akoki. Losambo ekoki kobenga bokasi mpe emoniseli oyo tosengeli na yango mpo na kotia makanisi na bino likolo ya Yesu Klisto mpe mbeka ya bomikabi na Ye Nkolo ayebaki ete ntango mosusu tokoyoka bobangi. Nazalaki kuna bino mpe lokola. … Kati na Eklezia oyo tokoki kozala moke na motango na lolenge mokili etangaka nguya, kasi soki tofungoli miso na biso ya molimo, ‘baoyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka baoyo bazali elongo na bango’ [2 Bakonzi 6:16]” (“Be Not Troubled [Botungisama Te],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 18, 19). Lolenge nini bokosalela maloba oyo mpo na kosalisa moto oyo azali koyoka motema likolo to kobanga?
Botala lisusu “Dearest Children, God Is Near You,” Hymnsno. 190.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.
Makanisi mpo na Koteya Bana
2 Bakonzi 4
Nzambe akoki kosala makamwisi kati na bomoi na ngai.
-
Nsima ya kosalisa bana na bino basosola nini likamwisi ezali, bobengisa bango basala molongo ya bandakisa mingi ya makamwisi ndengebakoki. Bililingi na Buku ya Bilili ya Nsango Malamu] to Yaka, Landa Ngai ekoki kosalisa. Nsima bakoki koluka makamwisi na 2 Bakonzi 4:1–7, 14–17, 32–35, 38–44. Makamwisi oyo eteyi nini na oyo etali Tata na Lola?
-
Bino mpe bana na bino bokoki kolobela oyo etali lolenge nini Nzambe alakisi bolingo na Ye na nzela ya makamwisi. Bokoki lisusu koyemba elongo loyembo moko lokola “God’s Gracious Love” (Biblioteke ya Nsango Malamu)
Stand as a Witness [Botelema lokola Nzeneneke], na Kwani Povi Winder
2 Bakonzi 5:1–15
Nakoki kopona kosala maye Nzambe atindi na nzela ya profeta na Ye.
-
Bosalisa bana na bino bayekola lisolo kati na 2 Bakonzi 5:1–3, 9–14. Bokanisa kosalela “Elisha Heals Naaman [Elisa Abikisi Namana]” (kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 134–37) to elilingi ya Namana kati na mateya ya poso oyo. Mpo na nini Namana alingi kosokola kati na Ebale ya Yaledene te, kutu atako Elisa alobaki ete oyo elingaki kobikisa bokono na ye? Lolenge nini Namana apambolamaki ntango alandaki malako ya Elisa? Bokoki kokabola elongo na moko na mosusu mayebi ya ntango botosaki Nkolo, kutu ntango boyebaki solo te bolingaki kotosa.
1:52Elisha Heals Naaman
-
Bokoki kobeta lisusu nsete na 2 Bakonzi 5:13, epayi wapi basaleli ya Namana basalisaki ye azwa mokano ya kotosa mosakoli Elisa. Bana na bino bakoki nsima kosolola oyo etali ndenge ya kosalisela baninga mpe bato ya libota na bango bayokela mpe batosa profeta.
2 Bakonzi 6:8–17
Nazali ngai moko te.
-
Bino mpe bana na bino bokoki kobanza bozingami na limpinga moko ya mimpanga, bampunda, mpe makalo. Lolenge nini bokomiyoka? Bokosala nini? Na nsima, bana na bino bakoki kokanga miso ntango bozali kotangela bango 2 Bakonzi 6:16–17. (Botala lisusu “Elisha and the Lord’s Army [Elisa mpe Limpinga ya Nkolo],” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 138–39, to elilingi oyo ezali na nsuka ya mateya oyo.) Ntango bokomi na maloba “fungola miso na ye” (molongo 17), bosenga bana bafungola miso na bango. Bosolola oyo etali maye mosaleli amonaki. Bokabola elongo na bana na bino ndenge bomiyokaki ete Nkolo azalaki elongo na bino na eleko ya mikakatano, kutu ntango ezalaki komonana lokola bozalaki bino moko.
1:9Elisha and the Lord’s Army
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.