Yaka, Landa Ngai
Makanisi ya Kobosana te: “Yesu Akoloba na Yisalaele Mobimba, ‘Bozonga na Ndako’”


“Makanisi ya Kobosana te: ‘Yesu Akoloba na Yisalaele Mobimba, “Bozonga na Ndako,”’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Makanisi ya Kobosana te: ‘Yesu Akoloba na Yisalaele Mobimba, “Bozonga na Ndako,”’” Yaka Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

elembo ya makanisi

Makanisi ya Kobosana te

“Yesu Akoloba na Yisalaele Mobimba, ‘Bozonga na Ndako’”

Kati na esobe ya Sinai, Mose asangisaki bana ya Yisalaele na nse ya ngomba. Kuna Nkolo asakolaki ete Alingaki kobongola etuluku oyo ya bawumbu oyo bawuti kosikolama na bato ya nguya. “Bokozala mpo na ngai,” Ye Alobaki, “Bokonzi ya banganganzambe, mpe ekolo esantu” (Esode 19:6). Asakolaki ete bakofuluka mpe bakozwa bomengo, ata ntango bazingami na banguna ebele mpe ya nguya makasi mingi.

Nyonso oyo ekoki kokoma kaka te mpo Bayisalaele bazalaki ebele to makasi to mayele mingi. Ekokoma, Nkolo alimbolaki, soki bakolinga “kotosa mongongo na [Ye] solo, mpe kobatela mayokani na [Ye]” (Esode 19:5). Nguya ya Nzambe, kasi ya bango moko te, nde ekokomisa bango nguya.

Nzokande, Bayisalaele bazalaki ntango nyonso kotosa mongongo ya Nzambe te, mpe na nsima batikaki kobatela boyokani na Ye. Ebele bakumbamelaki banzambe misusu mpe bazwaki mimesano ya bonkoko ya bikolo nzinganzinga na bango. Babwakaki eloko ya motuya oyo esalaki bango ekolo ekesena—boyokani na bango ya kimoninga elongo na Nzambe. Kozanga nguya ya Nzambe mpo na kobatela bango, ezalaki na eloko moko te mpo na kopekisa banguna na bango.

Bopalangani

Mbala mingi kati ya pene na mobu 735 mpe 720 liboso ya mbotama ya Klisto, Baasulia bakotaki na Bokonzi ya Nordi ya Yisalaele, ndako ya mabota zomi kati na zomi na mibale, mpe bamemaki bankoto ya Bayisalaele na bowumbu na bisika ndenge na ndenge ya bokonzi ya Asulia. Bayisalaele yango bayebanaki lokola “mabota ebunga,” na ndambo mpamba te balongolamaki uta na mabele na bango mpe bapalanganisamaki na bikolo misusu. Kasi babungisamaki lisusu na liyoki moko ya mozindo: na boumeli ya ntango babungisaki liyoki na bango ya bomoto lokola bato ya boyakani ya Nzambe.

Nsukansuka bato mingi kati na bokonzi ya sudi ya Yuda lisusu bapesaki Nkolo mokongo. Baasulia babundisaki mpe balongaki eteni monene ya bokonzi yango; kaka Yelusaleme nde ebatelamaki na ndenge ya likamwisi. Nsima, katikati na 597 mpe 580 liboso ya mbotama ya Klisto, Bababilone babebisaki Yelusaleme, kobakisa tempelo, mpe bamemaki bato mingi na bowumbu. Nsima ya mibu 70, Bayuda oyo batikalaki bapesamaki nzela ya kozonga na Yelusaleme mpe kotonga lisusu tempelo. Nzokande, mingi batikalaki na Babilone.

Yelusaleme eziki na moto.

The Destruction of Jerusalem by Nebuzar-adan [Bobebisi ya Yisalaele epayi ya Nebuzar-adana], na William Brassey Hole, © Providence Collection/na ndingisa ya goodsalt.com

Lokola ntango elekaki, Bayisalaele uta mabota nyonso “bapalanganisamaki … na mopepe makasi na kati ya bikolo nyonso oyo bayebaki te” (Jekalia 7:14). Basusu Nkolo akambaki mosika na mboka misusu. Basusu batikaki Yisalaele mpo na kokima bokangami to ntina ya politiki to ya nkita.

Tobengaka makambo oyo nyonso bopalangani ya Yisalaele”. Mpe ezali motuya koyeba oyo etali bopalangani mpo na bantina mingi. Likambo ya yambo, ezali likambo monene ya Kondimana na Kala—baprofeta mingi ya Kondimana na Kala bazalaki banzeneneke ya bokwei ya molimo oyo ememaki na bopalangani. Bamonaki yango yambo mpe bakebisaki na oyo etali yango. Basusu kati na bango babikaki yango. Yango ezali na litomba mpo na komikundola ntango bozali kotanga mikanda ya Yisaya, Yelemia, Amosa, mpe basakoli mosusu na eteni ya nsuka ya Kondimana na Kala. Na likambo oyo na moto, ntango bozali kotanga masakoli na bango na oyo etali Asulia mpe Babilone, losambo ya bikeko mpe bowumbu, kobebisama mpe na nsima kozongisama, bokoyeba nini bazali kolobela.

Bososoli ya bopalangani ya Yisalaele ekosalisa bino kososola lisusu malamu koleka Buku ya Mormon, mpamba te Buku ya Mormon ezali likundoli ya eteni moko ya Yisalaele epalangana. Likundoli yango ebandi na libota ya Lehi kokimaka Yelusaleme pene na mobu 600 liboso ya mbotama ya Klisto, kaka liboso ya bobundisi ya Babilone. Lehi azalaki moko ya basakoli oyo basakolaki na oyo etali bopalangani ya Yisalaele. Mpe libota na ye esalisaki mpo na kokokisa lisakoli yango, kozwaka etape na bango ya Yisalaele mpe kolona yango na ngambo mosusu ya mokili, kati na Amerika.

Bosangisi

Bopalangani ya Yisalaele, nzokande, ezali kaka ndambo ya lisolo. Nkolo abosanaka bato na Ye te, Ye asundolaka bango mpe te, atako bango batikaki Ye. Masakoli ebele oyo elobi ete Nzambe akopalanganisa Yisalaele ekendaki elongo na bilaka ebele ete mokolo moko Ye Akosangisa bango.

Mokolo yango ezali lelo—mokolo na biso. Bosangisi esi ebandaki Na 1836, mibu nkoto nsima Mose asangisaki bana ya Yisalaele na nse ya ngomba ya Sinai, amimonisaki na Tempelo ya Kirtland kopesa Joseph Smith “bafungola ya bosangisi ya Yisalaele uta bangambo minei ya mabele” (Malongi mpe Mayokani 110:11). Sikoyo, na botambwisi ya bato oyo basimbaka bafungola yango, mabota ya Yisalaele bakosangisama uta bikolo nyonso wapi basali ya Nkolo bakoki kokende.

Mose amimonisi na Joseph Smith mpe Oliver Cowdery kati na Tempelo ya Kirtland.

Moses, Elias, and Elijah Appear in the Kirtland Temple [Mose, Eliasi, mpe Eliya Babimi kati na Tempelo ya Kirtland], na Gary E. Smith

Mokambi Russell M. Nelson abengi bosangani “likambo eleki na motuya na oyo ezali kosalemaka na mabele lelo. Likambo moko te mosusu emekisami monene, likambo mosusu moko te emekisami na motuya, likambo moko te mosusu emekisami na lokumu. Mpe soki boponi, soki bolingi, bokoki kozala eteni monene na yango.”

Lolenge nini tokoki kosunga? Elimboli nini kosangisa Yisalaele? Yango elakisi kozongisa mabota zomi na mibale na mabele bafandaki kala? Sikawa, elakisi eloko moko ya monene mingi, ya seko mingi koleka. Lokola Mokambi Nelson alimbolaki:

“Ntango tozali kolobela kosangisa, tozali na pete koloba solo ya ebandeli oyo: moko na moko ya bana ya Tata na Lola, na ngambo nyonso mibale ya elamba, abongi mpo na koyoka nsango ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto.

Mbala nyonso bosalaka eloko songolo oyo esungaka moto nyonso—na ngambo nyonso ya elamba—bozwa mokano ya kosala mayokani na Nzambe mpe bozwela bango libatisi ya motuya mpe makuli ya tempelo, bozali kosalisaa mpo na kosangisa Yisalaele. Ezali bobele bongo.”

Yango esalamaki, lokola Yisaya alobaki, “moko na moko” (Yisaya 27:12) to, lokola Yelemia elakaki, “moko ya engumba, mpe mibale ya libota” (Yilimia 3:14).

Bosangisi ya Yisalaele elingi koloba kozongisa bana na Nzambe epayi na Ye. Elakisi kozongisa bango na boyokani na bango ya mokangano elongo na Ye. Elakisi kozongisa “ekolo esantu” oyo Ye alingaki kosala uta kala (Esode 19:6).

Bozonga na Ndako

Lokola moko oyo asali boyokani na Nzambe, bozali eteni ya ndako ya Yisalaele. Bosangisamaki, mpe bozali mosangisi. Lisolo monene ya bato na boyokani uta bikeke ekomi na songe na yango ya bongengi, mpe bozali mosali ya ntina mingi. Sikawa ezali ngonga ntango “Yesu akoloba na Yisalaele mobimba, ‘Bozonga Ndako.’”

Oyo ezali nsango ya basangisi: Bozonga ndako na boyokani. Bozonga ndako na Siona. Bozonga ndako epayi ya Yesu Klisto, Mosantu Moko ya Yisalaele, mpe Akomema bino epayi ya Nzambe, Tata na bino.

Matangi

  1. Botala Dutelonome 28:1–14.

  2. Botala 2 Mikonzi 17:6–7; 2 Ntango 36:12–20.

  3. Botala 2 Mikonzi 17:1–7. Mabota zomi oyo ezwamaki na bowumbu epayi ya Assyria ezalaki Reuben, Simeon, Issachar, Zebulun, Dan, Naphtali, Gad, Asher, Ephraim, mpe Manasseh. Libota ya Levi epalanganaki na bamboka ya mabota mosusu na bongo bakokaki te kokokisa mikumba na bango ya bonganganzambe.

  4. Botala 2 Mikonzi 19; Yisaya 10:12–13.

  5. Botala 2 Mikonzi 24–25; 2 Ntango 36; Yilimia 39; 52.

  6. Botala Ejela 17; Nehemia 2.

  7. Botala 2 Nefi 1:1–5; Omini 1:15–16.

  8. Botala 2 Mikonzi 25:22–26; Yilimia 42:13–19; 43:1–7.

  9. Na AD 70, Yelusaleme mpe tempelo na ye ebebisamaki lisusu, na ngonga wana epayi ya Baloma, mpe Yuda oyo batikalaki bapalanganisamaki na bikolo nzike.

  10. Botala Yelemia 29:18; Ezekiele 22:15; Hosea 9:17; Amosa 9:9; 1 Nefi 1:13.

  11. Botala 1 Nefi 15:12.

  12. Botala 1 Nefi 1:13, 18–20; 10:12–14.

  13. Botala Yisaya 5:26; 27:12; 54; Yelemia 16:14–15; 29:14; 31:10; Ezekiele 11:17; 34:12; 37:21–28; Zekalia 10:8; 1 Nefi 10:14; 22:25; 3 Nefi 16:1–5; 17:4.

  14. Russell M. Nelson, “Elikya ya Yisalaele” (losambo ya mokili mobimba mpo na bilenge, Sanza ya motoba 3, 2018), Biblioteke ya Nsango Malamu.

  15. Russell M. Nelson, “Elikya ya Yisalaele

  16. Botala 2 Nefi 30:2.

  17. Now Let Us Rejoice,” Hymns, no. 3.