Yaka, Landa Ngai
Sanza ya nsambo 20–26. “Miso na Biso Ezali Kotalela kaka Yo”: 2 Ntango 14–20; 26; 30


“Sanza ya nsambo 20–26. ‘Miso na Biso Ezali Kotalela kaka Yo’: 2 Ntango 14–20; 26; 30,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya nsambo 20–26. ‘Miso na Biso Ezali Kotalela kaka Yo’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Mokonzi Yosafata azali kosambela

King Jehoshaphat’s Prayer [Losambo ya Mokonzi Yosafata], na Keeley Rae

Sanza ya nsambo 20–26: “Miso na Biso Ezali Kotalela kaka Yo”

2 Ntango 14–20; 2630

Bokonzi ya Yuda ezingamaki. Mampinga ya bikolo misato ya banguna ya nguya ezalaki kopusana na mbala moko, ya kolengelama mpo na etumba. Na ngonga ya mawa oyo ya bonsenga, Yosafata, Mokonzi ya Yuda, abalukaki epayi na Mokonzi ya lola mpe mabele. Yosafata asangisaki bato na ye na tempelo mpe basambelaki. Andimaki botau na bango ya bomoto mpe abondelaki mpo na bokangoli. Na eyano, Nkolo alakaki bobateli na Ye: “Bobanga te, mpe bolenga te” (2 Ntango 20:17).

Tokoki kozala na limpinga ya kokamata mboka na monoko ya ekuke na biso te kobangisaka mpo na kobebisa biso te, kasi ntango mosusu tomiyokaka ya kozingama na motungisi mpe bobe. Nzela na biso epayi ya bokangoli ezali kaka moko Yosafata alukaki, mpe losambo na biso ekoki kozala lokola ya ye mpe: “O Nzambe na biso, … tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso; toyebi te tosala nini: miso na biso ezali kotalela kaka yo” (2 Ntango 20:12).

Na 2 Ntango 14–30, bokotanga oyo etali Yosafata bakonzi mosusu kati na Yuda. Bokanisa lolenge nini bambongwana, bilonga, mpe mikakatano na bango ewuti na bondimi na bango ekoki kosalelamela na bomoi na bino moko.

Mpo na koyeba makambo ya buku ya 2 Ntango, botala “Ntango” na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

2 Ntango 14–16

Kotyela Nzambe motema ekomemela ngai kimia.

Ntango Asa azalaki Mokonzi ya Yuda, akutanaki na mikakatano mingi—kaka lokola tokutanaka na yango lelo. Ntango bozali kotanga oyo etali mimekano akutanaki na yango, botala epayi wapi atiaki motema mpe lolenge nini yango ebongwanaki nsima ya ntango.

Matangi

Mikakatano Asa akutanaki na yango

Epayi wapi atyaki motema na ye

Matangi

2 Ntango 14:9–12

Matangi

2 Ntango 15:1–8

Matangi

2 Ntango 16:1–10

Mpo na nini ntango mosusu totikaka kotyela Nkolo motema? Boyekoli nini lisusu uta na bomoi ya Asa?

Botala lisusu Mpaka D. Todd Christofferson “Mokangano na Biso na Nzambe,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 78–80).

2 Ntango 18

Nakoki kokotela bosolo, ata ntango eyebani mingi te?

Mosakoli Mikaya asengelaki koyoka bofinani mingi mpo na kosakola elonga mpo na bakonzi Yosafata mpe Ahaba na etumba na bango na Siliya. Boluka bosolo emonanaka na miso ya bofinani wana kati na 2 Ntango 18:1–12. Bosolo emonanaka na miso nini bozwi na mpiko mpe bosembo ya Mikaya kati na milongo 13–27? (Bomona ete kati na molongo 14, Mikaya apesi eyano moko ya litio; eyano na ye ya solo ezali kati na molongo 16.) Lolenge nini maloba ya Mikaya ekokisamaki kati na milongo 28–34?

Bizaleli nini mosusu kati na yango bokoki kokutana na bofinani lokola Mikaya akutanaki na yango? Nini epesaka bino mpiko ya kotelema mpo na Nkolo mpe mateya na Ye?

kalati ya Yuda

Na ntango ya Mokonzi Yosafata, bikolo misato abundisaki Yelusaleme

2 Ntango 20:1–25

elembo ya seminele
Na ntango ya kpokoso, nakoki kotalela Nzambe mpe baprofeta na Ye.

Ntango bozali kotanga 2 Ntango 20:1–12, boluka maye Mokonzi Yosafata asalaki ntango bikolo ebele eyaki kobundisa Yuda. Lolengi nini bokoki kosalela bikela na ye kati na makambo ya mikakatano bozali kokutana na yango?

Eyano ya Nkolo epayi ya Yosafata ezwami kati na milongo 14–17. Biteni ya maloba nini bozwi kuna oyo ekoki kolendisa bino to moto moko boyebi na eleko ya ntango ya kpokoso?

Mokolo oyo elandi, bato ya Yelusaleme babimaki mpo na kokutana na limpinga oyo etelemelaki bango. Ntango bozali kotanga 2 Ntango 20:20, boluka etinda Yosafata apesaki na bato ya Yelusaleme. Lolenge nini maloba na ye ekokisamaki? (botala milongo 22–23). Lolenge nini Nzambe apambolaki bino mpo na kondimelaka Ye mpe kolandaka baprofeta na Ye?

Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Boyebi na ngai ezali ete soki botiki kotya bilembo ya motuna nsima ya masakoli ya baprofeta mpe botye bilembo ya kokamwa na esika na yango, mpe bosali yango, mapamboli esopanaka kaka. Namitunaka te, ‘Ntango nini profeta alobaka lokola profeta mpe ntango nini te?’ Bosepeli na ngai ezali, ‘Lolenge nini nakoki koyoka ye mingi?’” (kati na Lane Johnson, “Russell M. Nelson: A Study in Obedience,” Ensign, Sanza ya mwambe 1982, 24).

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 21:4–6; “A Secure Anchor [Longo ya Bobateli]” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu; “Bosala maponi efulama,” Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi (2022), 4–5.

3:37

A Secure Anchor

Bomona masakoli ya pete ya bosolo. Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki: “Makomi epesaka biso badiama ya malongi mingi mpenza. Ntango pole ya Molimo ezali kosakana lisano na bangambo ekeseni, engengaka na lolenge ya lola mpe engengisaka nzela tosengeli kolanda” (“According to the Desire of [Our] Hearts,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1996, 21). Ntango bozali kotanga makomi, bokanisa kozwa ntango ya komona, kotya nkoma, mpe komanyola bitinda ya mikuse kasi ya nguya. Bandakisa mosusu ekoki kozwama kati na 2 Ntango 14:11; 15:7; 18:13; 20:15; 26:5. Bandakisa mosusu nini ya “badiama ya malongi” bokoki kozwa?

2 Ntango 26:3–21

Lolendo ememaka na libebi.

Lokola na bakonzi mosusu mingi ya Yuda, boyangeli ya Uziya ebandaki na makokisi minene kasi esukaki na likama. Boluka ndakisa oyo na 2 Ntango 26. Nini bokoki koloba ezalaki likambo ya mutuya ya bomoi ya Uziya?

Ntango bozali kotanga milongo 16–23, botya na mitema ete na ntango oyo, kaka banganganzambe bazalalaki kopesama nzela ya kotumba malasi kati na tempelo. Mpo na nini bokanisi Mokonzi Uziya atosaki Nzambe te? Boyekoli nini uta na boyebi ya likama oyo?

Botala lisusu “Be Thou Humble,” Hymns,, no. 69.

2 Ntango 30

Nakoki kozala mopesi kimya

Na 2 Ntango 30, Hizikiya azalaki mokonzi ya Yuda. Abengisaki Bokonzi ya mbanda ya Yisalaele esangana kati na Yelusaleme mpo na kosala feti ya Pasika—eloko moko oyo Bayisalaele bazalaki na makoki te ya kosala mibu mingi (botala milongo 1–12). Nini etuti bino etali libengisi mpe lolenge eyambamaki—nyonso mibale na bapaya ya Bayisalaele mpe na bapaya na bango kati na Yuda?

Mpo ewumelaki mpenza, batali misusu ya Yelusaleme bamesanaki te na makambo ya mike mike ya lolenge nini kozala kati na Pasika. Ntango bozali kotanga 2 Ntango 30: 18–27, nini boyekoli uta na eyano ya Yizikaya mpe bambano ya eyano na ye.

Botala lisusu Russell M. Nelson, “Tozali na Mposa ya Bapesi Kimia,” Liahona, Sansa ya mitano 2023, 98–101.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Ntango 14–1620

Nakoki kotyela Nzambe motema.

  • Mpo na koyingisa likanisi ya kotyela Nkolo motema, bokoki kolakisa bana na bino eloko moko botyelaka motema mpo botikala ya kokauka ntango mvula ezali kobeta, lokola ebateli ya mvula to kazaka. Botika bango basolola oyo etali mpo na nini tokoki kotya motema na biloko oyo. Nsima bosalisa bango bakokanisa wana na botye ya motema na biso na Nkolo. Mpo na nini totyelaka Ye motema mpo na kobatela biso na molimo?

  • Bokoki kosalisa bana na bino bamona lolenge nini Mokonzi Asa mpe Mokonzi Yosafata bayanolaki na mikakatano na kotyelaka Nkolo motema (botala 2 Ntango 14:11; 20:3–5, 12). Bokabola moko na mosusu ndenge mosusu bokoki kolakisa Nkolo ete botyelaka Ye motema.

2 Ntango 20:1–29

Nzambe akoyoka mpe akoyanola mabondeli na ngai.

  • Lokasa ya milulu ya poso ekoki kosalisa bana na bino basosola lisolo ya losambo ya Yosafata mpe eyano ya Nkolo. Bino mpe bana na bino bokoki kokabola bangonga oyo Nzambe ayokaki mpe ayanolaki nsambo na bino. Bokanisa kobakisa bangonga oyo biyano eyaki na ndenge to na bangonga oyo bokanaki te. Loyembo etali losambo, ndakisa “I Pray in Faith” (Children’s Songbook, 14), ekoki kosalisa kotonga bondimi ya bana na bino.

2 Ntango 26:3–23

Nakoki kozala ya komikitisa.

  • Mpo na koyekola oyo etali makama ya lolendo, bana na bino bakoki kotonga ndako molai na biliki to bakopo ya mike. Ntango bazali kotya kiliki to kopo moko na moko na ndako ya molai, bosalisa bango bamona moko ya makokisi ya Uziya uta na 2 Ntango 26:3–15. Nsima ya kosilisa ndako ya molai, bosolola na bana na bino lolenge nini Uziya akokaki kobatela yango ezala molai mpe makasi. Nini ekokaki kokweyisa yango? Nsima, ntango bozali kotanga molongo 16, bokoki kosolola oyo etali maye elingi koloba kozala na mitema na biso “ya kotombolama epayi [ya biso] libebi.” Bokabola elongo na bana na bino maye masalemelaki Uziya kati na milongo 16–23. Botika bango bakweyisa ndako molai na bango. Bosolola oyo etali maye tokoki kosala mpo na kotikala ya komikitisa.

Yizikiya azali kosanzola Nzambe

King Hezekiah and the People Thank God [Mokonzi Yizikiya mpe Bato Bazali Kotonda Nzambe], © Lifeway Collection/na ndingisa ya goodsalt.com

2 Ntango 30

Nakoki kozala mopesi kimya

  • Elilingi oyo ezali likolo ezali kolakisa ntango Yizikiya abengisaki baninga ya pembeni ya Yuda uta na Bokonzi ya Yisalaele mpo na kosala feti ya Pasika elongo na bango. Bokoki kotala na elilingi oyo elongo na bana na bino mpe kotanga 2 Ntango 30:18–19, oyo ezali kolimbola ete bapaya mosusu bamisukolaka te engebene na mobeko ya Mose. Yizikiya asalaki nini? Lolenge nini oyo eyokisaki bapaya? Bosalisa bana na bino bakanisa lolenge nini bakoki kozala lokola Yizikiya na lolenge bazwaka basusu.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Uziya bazali kobengana ye uta na tempelo lokola maba emonani na elongi na ye

Uzziah’s Pride and Punishment [Lolendo mpe Etumbu ya Uziya], na A. M. Boon

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nzambe akoyoka mpe koyanola nsambo na ngai