“Sanza ya nsambo 27–Sanza ya mwambe 2. ‘Nazali Kosala Mosala moko Monene”: Ezela 1; 3–7; Nehemia 2; 4–6; 8,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya nsambo 27–Sanza ya mwambe 2. ‘Nazali Kosala Mosala moko Monene,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Nazali Kosala Mosala moko Monene, na Tyson Snow
Sanza ya nsambo 27–Sanza ya mwambe 2: “Nazali Kosala Mosala moko Monene”
Ezela 1; 3–7; Nehemia 2; 4–6; 8
Bayuda bazalaki na boombo na Babilone banda mibu soki 70. Babungisaki Yelusaleme mpe tempelo, mpe mingi babosanaki mokano na bango na mobeko ya Nzambe. Kasi Nzambe abosanaki bango te. Kutu, Ye asakolaki na nzela ya profeta na Ye, “Nakoya epayi na bino, mpe nakokokisa elaka na ngai ya ngolu, mpo na kozongisa bino esika oyo” (Yilimia 29:10). Na bosembo na esakola oyo, Nkolo asalaki nzela mpo na bato na Ye bazonga—na Yelusaleme mpe, ya motuya mingi, na mayokani na bango. Mpe atombolaki basali oyo bakokisaki “mosala moko monene” (Nehemia 6:3): Mokambi moko na nkombo ya Zorobabeli akambaki mosala ya botongi lisusu ya ndako ya Nkolo. Ezela, nganganzambe mpe mokomeli, asalisaki bato batalisa mitema na bango na mobeko ya Nkolo. Mpe Nehemia akambaki botongi lisusu ya bifelo oyo ezalaki kobatela nzinganzinga ya Yelusaleme. Bakutanaki na botemeli, kasi bazwaki mpe lisusu lisungi uta na bisika oyo bakanisaki te. Makambo na bango ekoki koteya mpe kofula ya biso mpo biso mpe tozali kosala mosala monene. Mpe lokola oyo ya bango, mosala na biso ezali na mingi ya kosala elongo na ndako ya Nkolo, mobeko ya Nkolo, mpe bobateli ya molimo tozwaka kati na Ye.
Mpo na bokuse ya mikanda ya Ezela mpe Nehemia, tala “Ezela” mpe “Nehemia” kati na Mokambi na Makomi.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Ezela 1
Nkolo afulaka bato mpo na kokokisa bantina na Ye.
Ntango Perse elongaki Babilone, Nkolo afulaki mokonzi ya Baperse, Siruse, mpo na kotinda etuluku ya Bayuda na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu tempelo. Ntango bozali kotanga Ezela 1, bokoma nini Siruse asalaki mpo na kosunga Bayuda kati na mosala monene oyo. Lolenge nini bozali komona Nkolo kosalaka na nzela ya mibali mpe basi nzinganzinga na bino, kobakisa bato oyo bazali bandimi ya Eklezia na Ye te? Yango ezali kopesa bino likanisi nini etali Nkolo mpe mosala na Ye?
Tala lisusu Yisaya 44:24–28.
Ezela 3:8–13; 6:16–22
Ndako ya Nkolo ezali esika moko ya esengo.
Ntango bato ya Babilone bakotaki Yelusaleme, bayibaki biloko ya motuya ya tempelo mpe batumbaki yango mobimba (tala 2 Bakonzi 25:1–10; 2 Ntango 36:17–19). Lolenge nini bokanisi bokokaki koyoka soki bozalaki moko ya Bayuda oyo bamonaki yango? (tala Nzembo 137). Botala lolenge nini Bayuda bayokaki, mibu mingi nsima, ntango bapesamaki nzela ya kozonga mpe kotonga lisusu tempelo (tala Ezela 3:8–13; 6:16–22). Yango ekoki kotinda bino bokanisa mayoki na binomei oyo etali Nkolo mpe ndako na Ye. Mpo na nini botongi ya tempelo ezali ntina ya kosepela?
Tempelo ya Zorobabeli; elilingi na Sam Lawlor
Ezela 4–7; Nehemia 2; 4; 6
Nzambe azali na mosala ya motuya mpo na ngai kosala.
Mbala mingi mosala ya Nkolo etambolaka na botemeli. Yango ezalaki ya solo mpo na makasi oyo Zorobabeli mpe Nehemia basalaki. Oyo ezali lolenge moko ya pete oyo ekoki kosalisa bino boyekola uta na masolo yango mpe komona lolenge nini bokoki kosala mosala ya Nkolo atako botemeli:
Mosala ya Nzambe mpo na Zorobabeli (Ezela 4:3):
Mosala ya Nzambe mpo na Nehemia (Nehemia 2:17–18):
Mosala ya Nzambe mpo na ngai:
Botemeli Zorobabeli akutanaki na yango (Ezela 4:4–24):
Botemeli Nehemia akutanaki na yango (Nehemia 2:19; 4:1–3, 7–8; 6:1–13):
Botemeli nazali kokutana na yango:
Lolenge Zorobabel ayanolaki (Ezela 5:1–2):
Lolenge Nehemia ayanolaki (Nehemia 2:20; 4:6, 9; 6:3–15):
Lolenge nini nakoki koyanola:
Mpo na lisungi ya kokokanisa likambo ya Nehemia na bomoi na bino, bokoki kotanga nsango ya Mokambi Dieter F. Uchtdorf “We Are Doing a Great Work and Cannot Come Down” (Liahona, Sanza ya mitano 2009, 59–62), mingimingi biteni mibale ya nsuka. Ntango bozali kokanisa oyo etali mosala oyo Nzambe apesi bino, bokoki kotanga “Young Women Theme” to “Aaronic Priesthood Quorum Theme” (Gospel Library). To bokoki koluka na loyembo lokola “As Sisters in Zion” (Hymns, no. 309) to “Ye Elders of Israel” (Hymns, no. 319).
Bokanisi yango elimboli nini kozala na “makanisi na mosala” kati na mosala ya Mobikisi? (Nehemia 4:6). Yango ekoki kolimbola nini kozala na “loboko malamu ya … Nzambe likolo [na bino]” ntango bozali kosala mosala na Ye? (Nehemia 2:8; tala lisusu Nehemia 2:18; Ezela 7:6, 9, 27–28). Lolenge nini bomoni loboko na Ye na makasi na bino mpo na kosalela Ye?
Nehemia 8
Napambolami ntango nazali kotanga makomi.
Mpo na bankola kati na boombo, Bayuda bazalaki na likoki moke ya kozwa “buku ya mobeko ya Mose” (Nehemia 8:1). Na Nehemia 8, Ezela atangaki mobeko epayi ya bato. Nini bozwi kati na mokapo oyo ezali kolakisa lolenge nini Ezela mpe bato na ye bayokaki na oyo etali Nzambe mpe liloba na Ye? (tala mingimingi biteni 1–12). Nini kati na bomoi na bino ezali kolakisa lolenge nini boyokaka oyo etali Nzambe mpe liloba na Ye?
Tali lisusu Teachings of Presidents of the Church: Ezra Taft Benson (2014), 115–24.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Ezela 3:8–13; 6:16–22
Ndako ya Nkolo ezali esika moko ya esengo.
-
Mpo na koteya bana na bino oyo etali esengo Bayuda bayokaki ntango tempelo na bango etongamaki lisusu, bokoki kolakisa bango elilingi lokola oyo elandi. Bolobela oyo etali ntina nini ekoki kosala bato wana bazala na esengo kozala na ndako ya Nkolo. Bokoki mpe koyebisa bana na bino mpo na nini tempelo ezali esika ya esengo mpo na bino. Lolenge nini tempelo esalisaki bino bomiyoka penepene na Tata na Lola mpe Mobikisi?
-
Ntango bozali kotanga Ezela 3:10–13 elongo na bana na bino, bosalisa bango bazwa maloba oyo ezali kolakisa lolenge nini Bayuda bayokaki ntango tempelo ezalaki kotongama lisusu. Ntango bokokoma na nsuka ya molongo 13, ntango mosusu bokoki koganga mpo na esengo elongo. Bosalisa bana na bino bakanisa bantina ya kozala na esengo ete Nkolo apesi biso batempelo. Lolenge nini tokoki kolakisa esengo yango?
-
Bokanisa koyemba loyembo moko etali tempelo elongo na bana na bino, lokola eteni ya mibale ya “Welcome Home” (Gospel Library). Nsima ya molongo mokomoko, bokoki kopemisa mpo na kosenga mwana moko akabola eloko moko alingaka etali tempelo. Bokoki lisusu koluka bafoto ya batempelo ntango bozali koyemba.
Nehemia 2:17–20; 6:1–9
Nkolo akosalisa ngai nasala “mosala monene” na Ye.
-
Bokabola elongo na bana na bino lisolo ya Nehemia (botala Nehemiah 2:17–20; 6:1–9; to “Nehemia” na Masolo ya Kondimana na Kala, 173–74). Ntango bozali kotanga Nehemia 2:20, bino mpe bana na bino bokoki “kotelema” mpe kosala lokola bozali kosalisa kotonga bifelo ya Yelusaleme. To bana na bino bakoki kotonga efelo moko na mabanga to biloko mosusu. Ntango bazali kosala yango, bokoki kosalisa bango bakanisa makambo ya motuya Tata na Lola alingi biso tosala.
1:38Nehemiah
-
Ntango bozali kotanga Nehemia 6:9, bobengisa bana na bino batombola maboko na bango ntango bakoyoka bino koloba “bolendisa maboko na ngai.” Boyebisa bana oyo etali ngonga oyo bomonaki Nzambe kolendisaka maboko na bino mpo na kosala mosala na Ye.
Nehemia 8:1–12
Makomi ezali lipamboli.
-
Botanga na mongongo makasi mwa maloba uta na Nehemia 8:2–3, 5–6, 8–9, 12 oyo elimboli makambo bato basalaki ntango bayokaki Ezela kotangaka makomi. Ntango bozali kotanga, bana na bino bakoki kosalela maloba yango. Nsima bokoki kokabola moko na mosusu lolenge nini boyokaka ntango botangaka to boyokaka makomi.
-
Ntango bozali kotanga elongo Nehemia 8:8, bokoki kotuna bana na bino nini esalisaka bango basosola makomi. Bolakisa bango lolenge nini kosalela masungi mpo na kotanga makomi lokola Mokambi na Makomi mpe Topics and Questions (Gospel Library). Bobengisa bana na bino bakabola eloko moko bayekoli etali Mobikisi uta na makomi.
Boluka bosolo ya seko kati na makomi. “Makomi … etondisami na bosolo ya nsango malamu, kasi ntango mosusu esengaka makasi mingi mpo na kozwa yango. Ntango bozali koyekola elongo uta na makomi, botelema nanu mpe botuna baye bozali koteya bosolo nini ya nsango malamu bazwi. Bosalisa bango bamona lolenge nini bosolo oyo ekangami na mwango ya lobiko ya Tata na Lola. Mbala mosusu bosolo ya seko ekomami na kati ya makomi, mpe mbala mosusu yango elakisami na masolo mpe bomoi ya bato oyo totangaka. Ekoki lisusu kosalisa kotala elongo masolo ya kala ya milongo oyo bozali kotanga, mpe ndimbola na yango mpe lolenge nini ezali kosalelama epayi na biso lelo” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 22).
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo ya magazini ya Moninga.