Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mwambe 24–30. “Nakosakola Oyo Asali mpo na Molimo Na Ngai”: Nzembo 49–51; 61–66; 69–72; 77–78; 85–86


“Sanza ya mwambe 24–30. ‘Nakosakola Oyo Asali mpo na Molimo Na Ngai’: Nzembo 49–51; 61–66; 69–72; 77–78; 85–86,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya mwambe 24–30. ‘Nakosakola Oyo Asali mpo na Molimo Na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Yesu asimbi mwinda na butu

Kobikisa Oyo Ebungaki [Kobikisa Oyo Ebungaki], na Michael Malm

Sanza ya mwambe 24–30: “Nakosakola Oyo Asali mpo na Molimo Na Ngai”

Nzembo 49–51; 61–66; 69–72; 77–78; 85–86

Bakomi ya Nzembo bazalaki komonisa mayoki na bango na maloba na bango ya ntoki. Bakomaki ete balembaki nzoto, babangaki, mpe bayokaki mawa. Na bantango mosusu, bazalaki kutu kokanisa ete Nzambe asundoli bango, mpe nzembo mosusu ezalaki komonisa ete bazalaki kotungisama na makanisi to bazangaki elikya. Soki bosila komiyoka bongo, kotangaka Nzembo ekoki kosalisa bino boyeba ete bozali bino moko te. Kasi bokokuta mpe banzembo oyo ekoki kolendisa bino ntango bozali na mayoki ya boye, mpo ete bakomi ya banzembo bakumisaki mpe Nkolo mpo na bolamu na Ye, bakamwaki na nguya na Ye, mpe basepelaki na ngolu na Ye. Bayebaki ete tozali na bozito ya mabe mpe masumu kasi ete Nkolo azali “malamu, mpe azali pene ya kolimbisa” (Nzembo 86:5). Basosolaki ete kozala na bondimi na Nkolo elimboli te ete okobunda ata moke te na mitungisi, masumu, to na bobangi. Elingi koloba ete boyebi epayi ya nani bokoki koluka lisalisi ntango bozali na mposa na yango.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Nzembo 49; 62:5–12

Bosikoli eyaka bobele na nzela ya Yesu Klisto.

Nzembo 49 ezali na nsango mpo na “banso bato ya nse mpe ya lokumu, ya bozwi mpe ya babola” .(molongo 2). Bkolobi etinda oyo ezali nini? Bokanisi nini Nzembo 62:5–12 ebakisi na nsango wana?

Kotanga nzembo oyo ekoki kofula bino bomanyola banzela oyo tomekami mpo na kotia motema na eloko mosusu longola se Nzambe mpo na bosikoli (tala Nzembo 49:6–7). Lolenge nini bomoi na bino esimbami na litatoli na bino ete “Nzambe akosikola molimo [na bino] na nguya ya lilita”? (Nzembo 49:15).

Nzembo 51; 85–86

elembo ya seminele
Mpo na ngolu ya Mobikisi, nakoki kolimbisama.

Mokonzi Dawidi akomaki Nzembo 51 nsima ya koyeba ete azalaki mpenza na mposa ya bolimbisi—eloko oyo biso nyonso tozalaki na mposa na yango. Milongo nini emonisi ndenge oyo bomiyokaka? Eloko nini bomoni na nzembo oyo ezali koposa bino elikya ya kolimbisama?

bokoki mpe koluka Nzembo 51 mpo na koyeba ndimbola ya kobongola motema. Sala molongo ya oyo bozwi. Tala soki bokoki kobakisa na molongo na bino na kolukaka na etinda ya Mokambi Russell M. Nelson “Tokoki Kosala Malamu Koleka mpe Kozala Malamu Koleka” (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 67–69).

Lolenge nini bokoki kolimbola kozwa bolimbisi na nzela ya Klisto? Soki bozali na mposa ya lisalisi mpo na kolimbola mayoki na bino, bokoki kotala na kati ya Nzembo 51:1–2, 7–12; 85:2–9. Bato mosusu balingaka kosala mayemi to koluka bililingi mpo na komonisa mayoki na bango; bino mpe bokoki kosala yango. Bokoki mpe koyemba to koyoka loyembo moko etali Mobikisi, lokola “I Stand All Amazed[Nakamwaki Mingi]” (Hymns, no. 193).

Mpo na koyambola, tosengeli kondima bobele kaka te ete Yesu Klisto wana akoki kopetola biso kasi lisusu ete Akopetola. Nini bomoni na Nzembo 86:5, 13, 15 oyo esalisi bino boyeba ete Mobikisi akoki mpe akolimbisa?

Tala lisusu Alma 36; Peter F. Meurs, “He Could Heal [Akoki Kobikisa] Ngai!,” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 39–41.

Nzembo 51:13–15; 66:5–20; 71:15–24

Litatoli na ngai mpo na Yesu Klisto ekoki kosalisa basusu ete baya epayi na Ye.

Bomanyola loenge nini bozwaki litatoli na bino mpo na Yesu Klisto mpe libonza na Ye ya bomikabi. Na nsima, ntango bozali koyekola Nzembo 51:13–15; 66:5–20; 71:15–24, bokanisa lolenge nini oyo bokoki kobengisa basusu ete “baya kotala misala ya Nzambe” (Nzembo 66:5). Soki bolingaki “kosakola oyo [Nkolo] asali mpo na molimo [na bino]” (Nzembo 66:16), bokosakola nini?

Elingi koloba nini mpo na bino mpo na “kolobela boyengebene [na Ye] mokolo mobimba”? (Nzembo 71:24).

Tala lisusu Alma 26.

elenge mobali moko azali kokabola makomi elongo na basusu

“Yaka mpe yoka, mpe nakosakola nini [Nzambe] asali mpo na molimo na ngai” (Nzembo 66:16).

Nzembo 63; 69; 77–78

Nkolo akosalisa ngai na ntango oyo nazali na bosenga

Nzembo mingi elimboli lolenge nini ezali koyoka mosika na Nzambe mpe na mposa makasi ya lisalisi na Ye (tala Nzembo 63:1, 8; 69:1–8, 18–21; 77:1–9). Kati na Nzembo 6369; 77–78, omoni nini oyo epesaki bakomi ya nzembo elikya?

Ntango bozali na mpasi, ndenge nini esalisaka bino mpo na “okkanisa misala ya Nkolo” mpe “makamwisi na Ye ya kala”? (Nzembo 77:11). Mwa ndambo ya makamwisi wana elimbolami na Nzembo 78. Ntango bozali kotanga na ntina na bango, bomanyola nini esalisaka bino “kotia elikya [na bino] epai na Nzambe” (molongo 7).

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Lokola Eyenga oyo ezali Eyenga ya mitano ya sanza, bateyi ya Eteyelo ya Bana balendisami kosalela milulu ya boyekoli na “Bobakisi B: Kolengela Bana mpo na Ntango ya bomoi na Nzela ya Liyokani na Nzambe.

Nzembo 51; 86:5, 13, 15

Ntango naponi mabe, Yesu akoki kosalisa ngai nabongwana.

  • Mpo na kosalisa bana na bino bazwa bosolo etali boyamboli na Nzembo 51, bokoki koyema motema moko monene. Na nsima bokoki kosalisa bana na bino bakoma na kati ya motema makambo mabe oyo Satana asenginiaka biso tosala. Lolenge nini tobimisaka makambo yango na mitema na biso? Bosenga bana na bino baluka liloba “motema” na Nzembo 51:10, 17. Bolobela oyo etali milongo oyo eteyi oyo etali boyamboli. Bopesa bana na bino nzela ya kolongola maloba na kati ya motema pe bakoma maloba ya sika oyo ezali kolimbola banzela oyo Yesu akoki kobongola biso ntango toyamboli.

  • Bokoki kolinga kosalisa bana na bino bayeba nini elimboli kozala na “motema ebukana mpe molimo ya mawa” (Nzembo 51:17). Bakokaki kosala ngala na bango na kobuka eloko oyo ezali na libenga ya makasi, na ndakisa likei to mbuma ya nzube. Bokoki kosalisa bango na kokokanisa loposo ya maki na biloko oyo ezali kopekisa biso koyoka bolingo ya Tata na Lola. Lolenge nini tokoki kofungolela Ye motema na biso?

  • Bokokaki lisusu kotala elilingi ya Mobikisi elongo mpe kotuna bana na bino maloba nini bakosalela mpo na kolimbola Ye. Bobengisa bango baluka maloba oyo ezali kolimbola Ye na Nzembo 86:5, 13, 15. Mpo na nini ezali ntina ete toyeba makambo oyo etali Ye?

Nzembo 61:2–3

Yesu Klisto azali libanga na ngai.

  • Bana na bino bakoki kosepela koyema bililingi ya bilembo oyo na Nzembo 61:2–3. Lolenge nini Yesu Klisto azali lokola “libanga” oyo etombwana (molongo 2), “ebombamelo,” mpe “linongi ya makasi”? (molongo 3).

linongi ya mosenzeli oyo etongamaki na mabanga

“Ozalaki esika ya kobombana mpo na ngai, mpe ndako molai makasi” (Nzembo 61:3).

Nzembo 66:16; 77:11; 78:6–7

“Nakokanisa misala ya Nkolo.”

  • Bosenga bana na bino bakabola mwa masolo ya makomi oyo balingaka mingi (bililingi uta na Gospel Art Book ekoki kosalisa). Nini milongo oyo eteyi biso mpo na oyo etali Mobikisi? Bokokaki kotanga elongo Nzembo 66:16 mpe koyanola na ngala na motuna “Nkolo asali nini mpo na molimo na ngai”?

  • Ntango bozali kotanga Nzembo 77:11; 78:6–7 elongo, bokokaki kokabola moko na mosusu lolenge nini bomekaka “kokanisa misala ya Nkolo” (Nzembo 77:11), bobakisa mpe misala na Ye na bomoi na bino. Lolenge nini Mobikisi asalisaka bino bosala yango? (Moroni 4:3; 5:2).

Nzembo 71:8

Nakoki koyebisa basusu oyo etali Yesu.

  • Nsima ya botangi Nzembo 71:8 elongo na bana na bino, bosenga bango bayema monoko ya monene. Bosenga bango basalisa bino “botondisa” monoko na bililingi to maloba oyo ezali komonisa makambo oyo tokoki koyebisa basusu etali Yesu Klisto.

  • Bokoki kolekisa elilingi moko ya Yesu Klisto. Moto oyo asimbi elilingi akoki koloba likambo moko oyo bayebi etali Ye. Lolenge nini tokoki kosalisa basusu mpo na koyeba makambo oyo?

Bana bazalaka na ebele mpo na kokabola. “Ntango bana bayekoli eloko moko ya sika, balingaka na bosembo kokabola yango elongo na basusu. Bolendisa mposa oyo na kopesaka bana mabaku ya koteya mibeko ya nsango malamu bango na bango, na bandeko ya libota na bango, mpe baninga na bango. Lisusu bosenga bango bakabola elongo na bino makanisi na bango, mayoki, mpe mayebi etali mibeko oyo bozali koteya. Bokomona ete bazali na babomoni oyo ezali pete, peto, mpe ya nguya”(Koteya na Lolenge ya Mobikisi32).

Nzembo 86:7

Tata na Lola ayokaka mpe ayanolaka nsambo na ngai.

  • Nzembo mingi ezali lokola nsambo epayi ya Nzambe. Ntango bozali kotánga Nzembo elongo na bana na bino, bokoki kolakisa bango makambo oyo tokoki kosalela mpo na kosolola na bato oyo bazali mosika, na ndakisa telefone to mokanda. Nsima botanga Nzembo 86:7. Lolenge nini “tobengaka” Tata na Lola? Lolenge nini Ayanolaka biso?

  • Bokoki koyemba elongo loyembo etali losambo, ndakisa “A Child’s Prayer” (Children’s Songbook, 12–13; tala lisusu Susan H. Porter, “Pray, He Is There,” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 77–79). Boyebisa moko mpe mosusu bantango oyo Nzambe ayanolaki nsambo na bino.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

elilingi ya Yesu

Come unto Christ [Boya epayi ya Klisto], na Casey Childs

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Ntango naponi mabe, Yesu akoki kosalisa ngai nabongwana