Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mwambe 10–16. “Bongo Nakotia Elikya epai na Ye”: Yobo 1–3; 12–14; 19; 21–24; 38–40; 42


“Sanza ya mwambe 10–16. ‘Bongo Nakotia Elikya epai na Ye’: Yobo 1–3; 12–14; 19; 21–24; 38–40; 42,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya mwambe 10–16. ‘Bongo Nakotia Elikya epai na Ye,’” Yaka, Landa Ngai—Kondimana na Kala 2026

Yobo azingami na batu misusu

Masambisi ya Yobo, na Joseph Brickey

Sanza ya mwambe 10–16: “Bongo Nakotia Elikyia epai na Ye”

Yobo 1–3; 12–14; 19; 21–24; 38–4042

Ezali likambo ya bomoto komituna mpo na nini makambo ya mabe ekomelaka batu malamu—to, mpo na likambo yango, mpo na nini makambo ya malamu ekomelaka batu mabe. Mpo na nini Nzambe, oyo azali sembo, akopesa nzela na likambo yango? Mokanda ya Yobo elobeli mituna lokola oyo. Yobo azalaki moko ya batu malamu oyo makambo mingi ya mabe ekomelaki bango. Na ntina na mimekano ya Yobo, baninga na ye bamitunaki soki azalaki mpenza malamu nsima ya nyonso. Yobo amonisaki boyengebene na ye moko mpe amitunaki soki Nzambe azali mpenza sembo na makambo nyonso. Kasi atako mpasi na ye mpe bomitungisi, Yobo abatelaki bosembo mpe kondima na ye epayi ya Yesu Klisto. Na mokanda ya Yobo, kondima etunami mpe emekami kasi esundolami mpenza te. Yango elingi koloba te ete mituna nyonso ezwamaka biyano. Kasi mokanda ya Yobo eteyaka ete kino ntango ekozwa biyano, mituna ekoki kozala elongo na kondima. Mpe atako nini ekosalama na ntango songolo, tokoki koloba mpo na Nkolo na biso, “Bongo nakondimela ye” (Yobo 13:15).

Mpo na koyeba makambo mingi ya mokanda ya Yobo, tala “Yobo” na Bokambi na Makomi (Gospel Library).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Yobo 1–3; 12–13

Nakoki kondimela Nzambe na mabaku nyonso.

Mikapo ya ebandeli ya Yobo ebeti nsete, na lolenge ya ntoki, mosala ya Satana lokola monguna to mofundi na biso; balimboli te boyokani ya solosolo ya Nzambe mpe Satana. Ntango bozali kotanga maye Satana alobaki etali Yobo (tala Yobo 1:9–11; 2:4–5), bokoki komituna, “Mpo na nini natikali sembo epai ya Nzambe?” Mpo na nini ekozala likama kotosa Nkolo kaka mpo na ntina oyo Satana apesaki likanisi?

Nini ekamwisaka yo etali biyano ya Yobo na komekama na ye? (tala Yobo 1:20–22; 2:9–10).

Baninga ya Yobo balobaki ete Nzambe apesaki ye etumbu (tala Yobo 4–5; 811). Makambo nini bomoni na likanisi oyo? Botanga eyano ya Yobo na mikapo 12–13. Yobo ayebaki nini etali Nzambe oyo epesaki ye likoki ya kokoba kotiela motema? Nini boyebi etali Nzambe oyo esungaka bino botelemela mimekano?

Yobo 19

Yesu Azali Mosikoli na Ngai.

Ntango mosusu toyekolaka bosolo ya motuya mingi na ntango na biso ya mpasi mingi. Manyola mimekano Yobo alobelaki na Yobo 19:1–22 mpe bosolo oyo asakolaki na milongo 23–27. Lolenge nini oyebi ete Mosikoli na yo azali na bomoi? Bokeseni nini boyebi oyo esalaka na bomoi na bino?”

Bobanza koyemba to koyoka loyembo etali Yesu Klisto, lokola “Know That My Redeemer Lives” (Nzembo, 136). Lolenge nini loyembo oyo elimboli mayoki na bino oyo etali Ye?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 121:1–12122.

Yobo 21– 24

elembo ya seminele
“Ntango akomeka ngai, nakobima lokola wolo.”

Na Yobo 21–24, bokotanga ntembe ya Yobo na baninga na ye. Na motema ya ntembe oyo ezalaki na motuna moko oyo batu mingi batunaki: Mpo na nini batu ya sembo banyokwamaka ntango mosusu?

Atako tozali na biyano nyonso te, na nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto, tozali na bosolo mosusu oyo ekoki kosalisa biso tozwa ntina ya botelemeli mpe mpasi. Oyo elandi ezali makomi ya mikolo ya nsuka oyo ezali na babosolo oyo. Nini makomi oyo eteyi bino na ntina ya Tata na Lola mpe mwango na Ye?

Bokoki kotanga mateya ya Mokambi Spencer W. Kimball oyo etali botelemeli na “Tragedy or Destiny?” (Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Spencer W. Kimball [2011]), 11–21).

Na kotalela makambo oyo oyekolaki, lolenge nini okoki koyanola na motuna lokola “Mpo na nini Nzambe atikaka batu ya sembo banyokwama?”

Yesu kati ya masuwa na moto mosusu na nse ya likolo oyo etondi na minzoto.

Kimia mpe Minzoto, na Yongsung Kim. Elilingi ewuti na havenlight.com

Yobo 38–40; 42

Bomoni ya Nzambe ezali monene koleka ya ngai.

Na mpasi ya bifundeli ya baninga na ye (tala Yobo 16:1–5; 19:1–3), Yobo mbala na mbala atunaki Nzambe mpo na nini azalaki konyokwama makasi bongo (tala Yobo 19:6–7; 23:1–931). Nkolo apesaki ntina ya malamu te na mokanda ya Yobo. Kasi ateyaki nsango moko ya motuya makasi kati na mikapo 38–40. Lolenge nini bokoki koloba na mokuse nsango wana? Ndakisa, boyekoli nini uta na mituna ya Nkolo kati na Yobo 38:1–7, 18–24?

Bokomona ete Nkolo alobaki na Yobo na ntina ya bikelamu na Ye misusu mpe misala misusu ya nguya (tala Yobo 38–39). Bokoki kotala mwa bikelamu oyo (to bilili na yango). Lolenge nini biloko oyo esungaka bino bokanisa bokeseni oyo etali Nzambi? oyo etali mikakatano na bino? Lolenge nini ebongolaki bomoni ya Yobo? (tala Job 42:1–6; tala lisusu Mose 1:8–10).

Oyo ezali bansango ya likita linene oyo ekoki kosalisa bino bobongola bomoni na bino: Tamara W. Runia, “Kotalaka Libota ya Nzambe na Liso ya Bonene” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 62–69); Russell M. Nelson, “Kanisa Lola!” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 117–20). Na nsango moko to mosusu, boluka eloko oyo bokolinga komikundola mbala ya nsima oyo mimekano na bino ekomonana lokola ete ezali koleka ndelo. Ndenge nini bokomikundola makambo oyo boyekolaki?

Zala mokeli. Koyekola esengeli te kozala kaka na kotanga, kokanisa, mpe koloba. Ntango mosusu boyekoli oyo tobosanaka te eyaka na ndenge ya kosala ngalasisi. Ndakisa, ntango bozali kotanga oyo etali lolenge nini Nkolo abongolaki emoneli ya Yobo na Yobo 38–40, bokoki kotambola mpe kotala mwa bikelamu ya Nkolo, ya minene mpe ya mike. To bokoki kotala eloko moko na ndenge ekeseni—na likolo, na nse, penepene, mosika, mpe bongo na bongo.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Yobo 1–2; 1219

Bondimeli Yesu Klisto ekosalisa ngai na bantango ya mpasi.

  • Bolendisa bana na bino bayebisa bino nini bayebi etali Yobo. Soki bazali na mposa ya lisalisi, bokoki kolakisa bango Yobo 1:1, 13–22; 2:7–10 to “Yobo” (na Masolo ya Kondimana na Kala, 145–47). Yobo asalaki nini ntango akutanaki na mikakatano? (tala Yobo 1:21; 2:10).

    1:55

    Job

  • Yobo azalaki sembo kati na mikakatano na ye mpo na maye ayebaki etali Nkolo. Mbala mosusu bino mpe bana na bino bokoki kotala bilili ya Yesu Klisto kosala boyokani na basusu (lokola oyo ezali awa na nse to bilili kati na Gospel Art Book). Bosolola makambo oyo boyebi etali Ye mpe lolenge Ye azali. Tala mwa milongo oyo ezali kotalisa makambo oyo Yobo ayebaki mpo na Nkolo: Yobo 12:10, 13, 16; 19:25–27. Mpo na nini ezali motuya koyeba makambo oyo etali Ye?

Yesu asemboli loboko mpo na kobikisa moto.

Ye Abikisaki Bango Nyonso, na Michael Malm

Yobo 14:14

Mpo na Yesu Klisto, nakozala lisusu na bomoi nsima ya liwa na ngai.

  • Yobo atunaki motuna ya motuya kati na Yobo 14:14. Mbala mosusu bino mpe bana na bino bokoki kosala ngala na bino ndenge bokoyanola na Yobo. Bokoki koluka makanisi kati na Alma 11:42–44, kati na video “Na Mokolo Ekoya” (Gospel Library), to kati na loyembo etali Lisekwa, lokola “Did Jesus Really Live Again?Children’s Songbook, 64).

1:11

#BECAUSEofHIM: An Easter Message of Hope and Triumph

Yobo 16:1–5; 22:5

Baninga malamu batombolanaka mpe balendisanaka.

  • Ntango Yobo azalaki na mawa, baninga na ye balobaki ete Nzambe azalaki kopesa ye etumbu mpo asumukaki (tala Yobo 22:5). Soki tozalaki baninga ya Yobo, ndenge nini tolingaki komeka kosalisa ye? Lolenge nini maloba na biso ekoki kosalisa basusu ntango bazali na mawa? (tala Yobo 16:5). Bokanisa kolakisa elilingi moko to ebele ya bililingi oyo ezali na mateya oyo ntango bozali kolobela mituna oyo.

  • Bokanisa kosenga bana na bino batanga bizaleli mosusu ya moninga malamu mpe batanga nkombo ya moninga oyo azali na bizaleli yango. Na nsima, bokoki kotala elilingi ya Yesu Klisto. Lolenge nini Yesu azali moninga malamu mpo na moko na moko na biso? Bokoki kokanisa moto oyo azali koleka na mpasi. Bobongisa lolenge nini bokozala baninga lokola Klisto epayi na bango.

Yobo 19:23–27

Yesu Azali Mosikoli na Ngai.

  • Nsima ya kotanga Yobo 19:23–27, bino mpe bana na bino bokoki kosolola oyo etali lolenge nini boyebi ete Mosikoli na biso azali na bomoi. Bokoki kosala elongo mpo na kotia litatoli na bino (to mayemi ya Mobikisi) na buku (tala molongo 23).

  • Bokoki lisusu koyemba loyembo oyo etatolaka Mobikisi, lokola “I Know That My Redeemer Lives” (Nzembo, 136). Bokabola maloba uta ya loyembo oyo elendisaka bondimi na bino na Ye. Mpo na nini ezali motuya koyeba ete Yesu Klisto azali na bomoi?

Mpo na mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Yobo azingami na batu misusu

Yobo mpe Baninga na Ye, na Ilya Repin

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Yesu Azali Mosikoli na Ngai