Yaka, Landa Ngai
Makanisi ya Kobosana Te: Kotangaka Maloba ya Ntoki kati na Kondimana na Kala


“Makanisi ya Kobosana Te: Kotangaka Maloba ya Ntoki kati na Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Kotangaka Maloba ya Ntoki kati na Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

elembo ya makanisi

Makanisi ya Kobosana Te

Kotangaka Maloba ya Ntoki kati na Kondimana na Kala

Kati na mikanda ya Kondimana na Kala wuta Genese kino Ester, tomonaka mingimingi masolo—masolo oyo elimbolaka makambo esalema kala uta na bomoni ya molimo. Noa asalaki masuwa, Mose abikisaki Yisalaele, Hanna abondelaki mpo na kozwa mwana mobali, mpe bongo na bongo. Kobanda na Yobo, tomonaka lolenge ya ekomeli ekesena. Na mikanda oyo, bakomi ya Kondimanana Kala basalelaki maloba ya ntoki mpo na kolakisa mayoki ya mozindo to bisakweli minene na lolenge ya kobosana te.

Esili biso komona mwa bandakisa ya maloba ya ntoki oyo ezwami kati na mikanda ya makambo ya kala ya Kondimana na Kala. Uta mokanda ya Yobo kokende liboso, tokomona mingi koleka na yango. Mikanda ya Yobo, Banzembo, mpe Masese ezali pene nyonso ya maloba ya ntoki, mpe ezali biteni ya mikanda ya bisakweli lokola Yisaya, Yilimia, mpe Amosi. Mpo ete kotanga maloba ya ntoki ekeseni na kotanga lisolo, kososola yango esengaka mingimingi mayele mosusu. Oyo ezali mwa makanisi oyo ekoki kosalisa bino bozwa ndimbola mingi ya maloba ya ntoki kati na Kondimana na Kala.

Koyeba Maloba ya Ntoki ya Baebele

Ya yambo, ekoki kosalisa bino boyeba ete maloba ya ntoki ya Baebele na Kondimana na Kala esalami na loyembo te, lokola maloba ya ntoki mosusu. Mpe atako loyembo, lisano ya maloba, mpe kozongela mingongo ezali makambo ekokani ya maloba ya ntoki ya Baebele, makambo oyo ebungisami mbala mingi na bobongoli. Likambo moko bokomona, nzokande, ezali kozongela ya makanisi to mabanzo, ebengami ntango mosusu “bokokani.” Oyo ezali ndakisa ya pete uta Yisaya:

Omilatisa nguya na yo, O Siona;

lata bilamba na yo ya lokumu, O Yelusaleme. (Yisaya 52:1)

Banzembo 29 ezali na milongo ya kokokana—ndakisa:

Mongongo ya Nkolo ezali ya nguya;

mongongo ya Nkolo etondi na lokumu. (Nzembo 29:4)

Mpe oyo ezali ndakisa moko oyo wapi koyeba ete molongo ya mibale ekokani na oyo ya liboso ekomisi mokapo pete mpenza mpo na kososola:

Mpe ngai nabomaki bino nzala kati na bingumba na bino nyonso,

mpe napimelaki bino bilei kati na bisika na bino nyonso. (Amosa 4:6)

Kati na bandakisa oyo, mokomi ya ntoki azongeli likanisi moko na mwa bokeseni moke. Esaleli oyo ekoki kobeta nsete na likanisi oyo ezongelami mpe kosalela bokeseni mpo na kolimbola yango mingi mpenza to kokolisa yango mingi mpenza.

Na ntango mosusu, bafraze mibale oyo ekokani esalelaka elobeli ya ndenge moko mpo na kopesa makanisi ya kokesena, lokola na ndakisa elandi:

Eyano ya kimia ekimisaka kanda:

kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda. (Masese 15:1)

Bokokani ya boye esalemaki na pwasa te. Bakomi basalaki yango na nko. Esalisaki bango balakisa mayoki ya molimo to bosolo na nyonso mibale nguya mpe kitoko. Na yango ntango bokomona bokokani kati na makomi ya Boyokani ya Kala, bomituna lolenge nini yango ezali kosalisa bino bososola nsango ya mokomi. Ndakisa, nini Yisaya ameki koloba na kokangisaka “nguya” elongo na “bilamba ya lokumu” mpe “Siona” elongo na “Yelusaleme”? (Yisaya 52:1). Nini tokoki kokanisa etali liboke ya maloba “eyano ya kimia” soki toyebi ete “maloba oyo ezokisaka” ezali bokeseni na yango? (Masese 15:1).

mokomi moko ya Kondimana na Kala na biki mpe rulo

Azongisaka Sika Molimo na Ngai, na Walter Rane

Maloba ya Ntoki ya Baebele lokola Moninga ya Sika

Bato mosusu bakokanisaka kotanga maloba ya ntoki na kokutana na moto ya sika. Kotanga maloba ya ntoki ya Kondimana na Kala, nsima, ekoki kozala lokola kokutana na moto moko uta na mboka ya mosika mpe ya momeseno ya bapaya oyo azali koloba monoko ya kokesena na biso—mpe oyo ezali kokonana kozala ya mibu nkoto mibale. Moto oyo akoloba ntango mosusu makambo oyo tozali koyoka te mbala ya liboso, kasi yango elakisi te ete azali na eloko moko ya motuya te ya koloba. Tozali na mposa kaka ya kolekisa ngonga elongo na ye, komeka kotalela makambo na makanisi na ye. Tokoki kozwa yango kati na mitema na biso, tososolaka solo moko na mosusu malamu mpenza. Mpe soki tolakisi motema molai mpe motema mawa, moninga na biso ya sika akoki kokoma nsukansuka moninga ya motema.

Na yango ntango bozali kotanga eteni moko ya makomi na Yisaya, ndakisa, bozwa yango lokola boyingisi na bino ya yambo epayi ya moninga na bino ya sika. Bomituna, “Makanisi na ngai ezali nini?” Maloba yango ezali koyokisa bino lolenge nini—ata soki bozali kososola maloba nyonso te? Nsima botanga yango lisusu, mbala mingi soki esengeli. Bokanisa kotanga yango na mongongo makasi; bato mosusu bazwaka bososoli mingi na ndenge wana. Bokoma maloba ya sikisiki oyo Yisaya aponaki, mingimingi maloba oyo ezali kopesa bino elilingi makasi na makanisi na bino. Bililingi yango esalaka bino bomiyoka ndenge nini? Ezali kopesa bino likanisi nini etali mayoki ya Yisaya? Mingi bozali kotanga maloba ya bakomi oyo ya Kondimana na Kala, mingi bokomona ete bazalaki kopona na nko maloba na bango mpe mayele ya kolakisa nsango ya molimo ya mozindo.

basi mibale bazali kotanga makomi

Maloba ya ntoki ekoki kozala baninga malamu mpo ezali kosalisa biso tososola mayoki mpe boyebi na biso. Maloba ya ntoki ya Kondimana na Kala ezali mingimingi ya motuya mpo ete ezali kosalisa biso tososola mayoki mpe boyebi na biso ya motuya mingi—oyo ekangisami na boyokani na biso na Nzambe.

Ntango bozali kotanga maloba ya ntoki na Kondimana na Kala, bomikundola ete boyekoli makomi ezali na motuya koleka ntango ezali komema biso epayi ya Yesu Klisto. Boluka bilembo, bililingi, mpe bosolo oyo etongaka bondimi na bino epayi na Ye. Boyokela bofuli ya Molimo Mosantu ntango bozali koyekola.

Mikanda ya Bwanya

Lolenge moko ya maloba ya ntoki ya Kondimana na Kala ezali oyo bato ya mayele babengaka “mikanda ya bwanya.” Yobo, Masese, mpe Mosakoli ezali kati na lolenge oyo. Ntango Nzembo ezali komonisa mayoki ya masanzoli, ya kolela, mpe ya kokumbamela, mikanda ya bwanya ezali kolobela mingi toli oyo esilaka ngala te to mituna ya mozindo, ya filozofi. Mokanda ya Yobo, ndakisa, ezali kotalisa boyengebene ya Nzambe mpe bantina ya mpasi ya bato. Masese ezali kopesa toli etali lolenge nini kobika malamu, kobakisa maloba ya bwanya esangisami mpe epesami uta na bankola ya kala. Mpe Mosakoli ezali kotya ntembe na ntina ya bomoi yango moko—ntango eloko nyonso ezali komonana lokola ya ntango mokuse mpe ya mbalakaka, esika nini tozwaka ndimbola ya solo? Bokoki kokanisa mpo na mikanda ya bwanya lokola masolo ya mayele mingi elongo na bateyi bafulami oyo balingi kokabola makanisi etali Nzambe mpe mokili oyo Ye akelaki—mpe ntango mosusu kosalisa bino bososola makambo oyo mwa malamu koleka liboso.