Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mwambe 3–9. “Yo Oye … Mpo na Ntango Lokola Oyo”: Esetele


“Sanza ya mwambe 3–9. “Yo Oye … Mpo na Ntango Lokola Oyo”: Esetele,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya mwambe 3–9. “Yo Oye … Mpo na Ntango Lokola Oyo”: Esetele,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Esetele agumbani liboso ya mokonzi

Mwasi ya Mokonzi Esetele abikisi Bato ya Yehova, na Sam Lawlor

Sanza ya mwambe 3–9: “Yo Oye … Mpo na Ntango Lokola Oyo”

Esetele

Makambo ebele na buku ya Esetele ekokaki komonana lokola libaku malamu to kokutanaka. Lolenge nini mosusu okoki kolimbola lolenge nini mwana mwasi etike ya Moyuda akomaki mwasi ya mokonzi ya Perse bobele na eleko esengelaki mpo na kobikisa bato na ye na bobomi? Nini ezalaki mabaku ete ndeko mobali ya Esetele Molodekai akokaki koyoka libongi ya mabe ya koboma mokonzi? Yango ezalaki bokutani; to yango ezalaki mwango ya bonzambe ? Mpaka Ronald A. Rasband alobaki: “Oyo ekoki komonana lokola libaku, nzokande ezali libongisi ya Nzambe waa bolingo ya Lola. … Nkolo azali kati ya makambo ya mikemike ya bomoi na biso” (“By Divine Design,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 56). Tokoki ntango nyonso te koyeba bopusi ya Nkolo na kati ya “makambo mikemike.” Kasi toyekoli uta na mayele ya Esetele ete Ye akoki kokamba nzela na biso mpe kolengela biso “mpo na ngonga ya lolenge oyo” (Esetele 4:14) ntango tokoki kozala bisaleli na maboko na Ye mpo na kokokisa bantina na Ye.

Mpo na kotala buku ya Esetele mobimba, tala “Esetele, buku ya” na Dikisionele ya Biblia.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Esetele

elembo ya seminele
Nkolo atie ngai na makambo epayi wapi nakoki kozala lipamboli mpo na basusu.

Mokambi Dieter F. Uchtdorf ateyaki ete moko na moko na biso “atelemi na esika na yemoko mpe azali na mosala ya motuya oyo bobele [biso] tokoki kosala. … Nkolo apesaki bino mikumba na bino mpo na ntina moko. Kuna ekoki kozala na bato to mitema bobele bino bokoki kokoma pembeni mpe kosimba. Ntango mosusu moto mosusu te akokaki kosala yango na kimia lolenge moko” (“Lift Where You Stand,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2008, 56).

Ntango bozali kotanga lisolo ya Esetele, bokanisa lolenge nini likambo oyo esalameli ye. Boluka lolenge nini Nkolo asalaki yango ekokisama mpo na ye mpo na kobikisa Bayuda (tala, mpo na ndakisa, Esetele 2:21–23; 3:10–14; 4:14–16). Nsima bokanisa lolenge nini Ye apesaki bino mabaku ya kopambola basusu. Nini ezali mabaku to kimoninga oyo Ye akambi bino na “mpo na ntango lokola oyo”? (Esetele 4:14). Soki bozali na lipamboli ya tata nkoko, kanisa kotanga yango mpo na koyekola mingi na oyo etali mosala Nkolo azali na yango mpo na bino kosala. Nini bokoki kosala mpo na kokokisa yango?

Botala lisusu “For Such a Time as This” (video), ChurchofJesusChrist.org.

13:44

For Such a Time as This

Toyekolaka mingi na kosalaka na esika ya koyokaka. Mpaka David A. Bednar ateyaki balakisi: “Makanisi na biso esengeli kozala te ‘Nini nakoyebisa bango?’ Na esika na yango, mituna ya komituna biso moko ezali ‘Nini nakoki kobengisa bango basala? Mituna nini efulama nakoki kotuna, soki bazali na bolingi ya koyanola, ekobanda kobengisa Molimo Mosantu na kati ya bomoi na bango?’” (kati ya Teaching in the Savior’s Way25). Soki bozali koteya libota na bino to kelasi ya Eklezia na oyo etali Esetele, nini bokoki kosenga bango basala oyo ekosalisa bango bayekola?

Molodekai kotalaka Hamana kotambola likolo ya mpunda katikati banzela.

“Emonaki Hamana ate Molodekai azalaki kokumbama te … boye atondaki na nkanda” (Esetele 3:5).

Esetele 3; 5:9–147

Lofundu mpe nkanda ekoki komema na bokweyi.

Na buku ya Esetele, toyekoli uta na bondimi ya Esetele mpe Molodekai, kasi toyekoli lisusu uta na lofundu mpe nkanda ya Hamana. Ntango bozali kotanga Esetele 3; 5:9–14, botala mayoki, maloba mpe misala ya Hamana. Nini yango emonisi na oyo etali ye mpe botindiki na ye? Mbano nini akutanaki na yango? (tala Esetele 7). Kotanga oyo etali Hamana ekoki kopusa bino bokanisa nini etindikaki mayoki mpe misala na bino. Bofulami mpo na kosala bambongwana songolo? Lolenge nini okoki kobaluka epayi ya Tata na Lola mpo na lisalisi?

Tala lisusu Masese 16:32; Alma 5:28.

Esetele 3–4; 5:2–3; 8:11–12

Kokila bileyi elakisi ete tondimi mpe totie mitema na Nkolo.

Bokanisa mpo na nini Esetele mpe eteni ya Bayuda bazwaki mokano ya kokila bilei (tala Esetele 3:13; 4:1–3, 10–17). Lolenge nini kokila bilei epambolaki bango? (tala Esetele 5:2–3; 8:11–12). Mpo na nini Nkolo asengaka biso tokila bilei? (tala Topics and Questions, “Fasting and Fast Offerings,” Gospel Library). Bobanza lolenge nini bokoki kosala bokili bilei lipamboli monene koleka ya bomoi na bino.

Tala lisusu Yisaya 58:6–12; “Fasting: Young Single Adult Ward, Amanda” (video), ChurchofJesusChrist.org.

2:41

Fasting: Young Single Adult Ward, Amanda

Esetele 3:1–11; 4:10–17; 5:1–4; 9:17–19

Kosalaka makambu malamu esangaka mingimingi bokasi ya mpiko koleka.

Ntango Molodekai mpe Esetele batelemaki mpo na bondimi na bango mpe bato na bango, batiaki bomoi na bango na likama. Maponi na biso esengeli ezalaka matomba ya makasi moke, kasi kosalaka makambo malamu ekoki kosenga ntango nyonso mpiko. Oyekoli nini na Mosiya 3:1–4; 4:10–17 oyo etali kozalaka na mpiko ya kosala makambo malamu? Bomona bambano ya kokesana Molodekai mpe Esetele bamonaki nsima ya kolakisaka mpiko (tala Esetele 3:5–11; 5:1–4). Eloko nini Molodekai mpe Esetele basengelaki koyeba na oyo etali Nzambe mpo na kosala maponi bango basalaki?

Bokanisa na makambo epayi wapi bosengeli na mpiko mpo kotelema mpo na oyo ezali malamu. Boyekoli nini uta na Esetele mpe Molodekai oyo ekoki kosalisa bino kozwa mpiko kati na Nkolo?

Mpiko ya Esetele ememaki na “mokolo moko ya bosepeli” (tala Esetele 9:17–19). Lolenge nini kozala na mpiko lokola ya Klisto epesaki bino “mokolo moko ya bosepeli”

Tala lisusu “Mpiko,” “Dare to Stand Alone” (videos), Gospel Library; “True to the Faith,” Nzembo, no. 254.

3:19

Courage

4:20

Dare to Stand Alone

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Esetele 2:5–7

Nakoki kosalela libota na ngai.

  • Bokoki koyoka ya kofulama mpo na kosalela Esetele 2:7 mpo na koteya bana na bino oyo etali kosalisa bayi libota kati na bosenga, lokola Molodekai asalaki mpo na Esetele. Bokoki kotanga eteni elongo to koloba na maloba na bino moko. Bino mpe bana na bino bokoki kokanisa moto moko ya libota oyo akoki kosengela na lisalisi na bino. Bosala mwango mpo na kosalisa bango.

Esetele 3:1–11; 4:10–17

Nkolo akoki kosalisa ngai nazala na nkonzo.

  • Bandakisa ya Esetele mpe Molodekai ekoki kosalisa bana na bino basosola ete konzo elakisi kosalaka oyo ezali malamu kutu ntango bozali kobanga. Bokanisa kokomaka maloba Molodekai azali na nkonzo ntango ye … mpe Esetele azalaki na nkonzo ntango ye … . Ntango bozali kotanga lisolo ya Esetele elongo, bana na bino bakoki koloba ndenge ya kosilisa maloba. Bokoki kotanga Esetele 3:1–11; 4:10–17 to “Esetele Mwasi ya Mokonzi” (na Masolo ya Kondimana na Kala, 166–70) to boluka bililigi na internet. Nsima bokoma nakozala nkonzo na … , mpe bobenga bana na bino bakoma biloko Tata na Lola alingi bango kosala oyo esengi mpiko. Loyembo etali mpiko, lokola “Dare to Do Right” (Children’s Songbook, 158), ekoki kosalisa.

    2:45

    Queen Esther

  • Bokoki lisusu koyekola na oyo etali ngonga ntango Yesu Klisto azalaki na nkonzo— ndakisa, ntango Anyiokuamaki mpo na masumu na biso na Getesemane mpe likolo ya ekulusu (tala Matai 26:36–39; 27:33–35). Boyebisa bana na bino bakabola ngonga ntango bango bazali na nkonzo, mpe bokabola mayele na bino moko mpe lokola.

Estele 4:1–3, 10–17

Kokila bilei ememaka mapamboli ya Nkolo.

  • Kotangaka Esetele 4:1–3, 10–17 ekoki kosalisa bino boteya bana na bino oyo etali kokila bilei. Mpo na nini Esetele mpe Bayuda bakilaka bilei? Boyebisa bana na bino mpo na nini bokilaka Bokoki lisusu koyebisa bango lolenge nini bango bakoki kolimbola kokila bilei na moninga moko oyo asala yango ata mokolo moko te liboso. Lolenge nini tokoki kosalisa baninga na biso basosola mapamboli oyo eyaka uta na kokila bilei?

  • Bopesa bana na bino makasi ya kokanisa eloko moko bango bakoki kosengela na lisungi ya Nkolo. Boyebisa basala yango eteni na bango ya kokila bilei na eyenga ya kokila bilei ekoya.

Mwasi ya mokonzi Esetele atelemi pembeni ya Mokonzi

Mpo ete Esetele azalaki na nkonzo, azalaki na likoki ya kobomba bato na Nkolo.

Esitele 4:14

Nakoki kozala esalelo na maboko ya Nzambe.

  • Bosalisa bana na bino basosola ete ntango Esetele azalaki kobanga, Molodekai apesaki ye makasi na kolimbolaka ete Nkolo asalisaka ye akoma mwasi ya mokonzi “mpo na ntango lokola oyo” (Esetele 4:14). Molodocai alingaki koloba nini? Bolosola moko na mosusu na oyo etali lolenge nini Esetele azalaki esaleli mpo na Nkolo Lolenge nini tokoki kozala bisalelo na maboko ya Nkolo?

  • Lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino basosola esalelo ezali nini? Ntango mosusu bokoki kobengisa moto moko koyemba loyembo na esalelo moko ya miziki to kolakisa elilingi ya moto azali kosalela esalelo. Bokoki nsima kosolola na oyo etali nini elakisi kozala esalelo na maboko ya Nzambe.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Esetele Mwasi ya mokonzi

Esetele Mwasi ya Mokonzi, na Minerva Teichert, © William and Betty Stokes

Lokasaa ya milulu ya Eteyelo ya Bana: Nkolo akoki kosalisa ngai nazala nkonzo.