Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mwambe 17–23. “Nkolo Azali Mobateli Mpate na Ngai”: Nzembo 1–2; 8; 19–33; 40; 46


“Sanza ya mwambe 17–23. ‘Nkolo Azali Mobateli Mpate na Ngai’: Nzembo 1–2; 8; 19–33; 40; 46,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya mwambe 17–23. ‘Nkolo Azali Mobateli Mpate na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026

Yesu azali kokamba mpate

Nkolo Azali Mobateli Mpate na Ngai, na Yongsung Kim. Elilingi ewuti na havenlight.com

Sanza ya mwambe 17–23: “Nkolo Azali Mobateli Mpate na Ngai”

Nzembo 1–2; 8; 19–33; 4046

Toyebi na ntembe te nani akomaki Nzembo. Bamosusu balobaka ete Mokonzi Davidi nde akomaki, kasi mpo na mingi kati na yango, bakomi na yango bazali na nkombo te. Nzokande nsima ya kotanga Nzembo, toyokaka lokola lokola toyebi mitema ya bakomi nzembo, atako toyebi bankombo na bango te. Toyebi mpenza ete Nzembo ezalaki eteni ya ntina ya losambo kati na Bayisalaele, mpe toyebi ete Mobikisi azongelaki yango mbala mingi. Na Nzembo, tozwaka lininisa na molimo ya bato ya Nzambe ya kala. Tomonaka lolenge nini bazalaki komiyoka mpo na Nzambe, makambo oyo bazalaki komitungisa, mpe lolenge nini bazwaki kimia. Lokola bandimi lelo, na mokili mobimba, tozali naino kosalela maloba oyo na bosambeli Nzambe. Ezali penepene lokola bakomi ya Nzembo bazalaki na lininisa ya milimo na biso , mpo ete bamonisaki lolenge nini tozali koyoka mpo na Nzambe, nini tozali komitungisa mpo na yango, mpe lolenge nini tozwaka kimia.

Mpo na koyeba makambo mingi ya mokanda ya Nzembo, tala “Nzembo” na Bible Dictionary.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Nzembo 1; 23; 26–2846

“Nandimelaki … na Nkolo.”

Ntango bozali kotanga Nzembo, bokoki komona mbala boni bakomi bamonisaka bobangi, mawa, to mitungisi. Mayoki ya lolenge wana ezali likambo ya momeseno, atako mpo na bato ya bondimi. Kasi oyo esalaka ete Nzembo ezala ya kofula ezali ete epesaka mpe biyano efulama, bakisa mpe kondimela mobimba Nkolo. Ntango bozali kotanga Nzembo 1; 23; 26–2846, bokoma:

  • Mabengisi mpo na kondimela Nkolo.

  • Maloba oyo elimbolaka Ye.

  • Maloba oyo elimboli kimia, makasi, mpe mapamboli mosusu Ye apesaka.

  • Maloba oyo ezali kolimbola bato oyo batielaka Ye motema.

Botala lisusu bilili ya polele mpe bilembo oyo Nzembo esaleli mpo na koteya oyo etali Mobikisi. Ndakisa, kati na Nzembo 23, maloba lokola “kolala na na nse na matiti” to “mayi ya kimia” (molongo 2) ememaka na makanisi? Nini “singa” mpe “lingenda” (molongo 4) elimboli? Ekoki kolimbola nini mpo na “kopo” na biso (molongo 5) kokima mbangu?

Nzembo 222

Yesu Klisto azali Masiya ya elaka.

Nzembo ebele elobelaka bomoyi ya nkufa ya Yesu Klisto. Baklisto na bantango ya Kondimana na Kala bamonaki mikangano oyo mpe. Bobanza kotanga makomi oyo elandi. Boluka mikangano ya maloba na kati ya nzembo oyo mpe bomoyi ya Mobikisi;

  • Nzembo 2:1–3 mpe Misala 4:24–28

  • Nzembo 2:7 mpe Misala 13:30–33

  • Nzembo 22:1 mpe Matai 27:45–46

  • Nzembo 22:7–8 mpe Matai 27:39–43

  • Nzembo 22:16 mpe Luka 23:32–33

  • Nzembo 22:18 mpe Matai 27:35

  • Nzembo 31:5 mpe Luka 23:46

Boyekoli nini uta na boyekoli mikangano oyo? Masakoli nini ya makomi mpe bilaka esili kokokisama? Bozwi nini na bilaka oyo biye epesi bino elikia mpo na lobi ekoya?

ebale mpe mabanga

Nzembo 8; 1933

“Mabele ezali na makambo malamu ya Nkolo.”

Kotangaka Nzembo 8; 1933 ekoki kofula bino bobanza bikelamu ebele ya kitoko ya Nkolo. Bokeba na mayoki na bino ntango bozali kosala yango. Bokoki lisusu kolinga koyemba to komanyola maloba ya loyembo oyo ekokani na nzembo oyo, lokola “How Great Thou Art” (Hymns, 86). Lolenge nini bikelamu ya Nkolo “esakolaka nkembo ya Nzambe” epayi na bino? (Nzembo 19:1).

Oyo ezali bakantiki misusu efulama na Nzembo:

  • Nzembo 23:The Lord Is My Shepherd” (Hymns, no. 108)

  • Nzembo 23:6150:Praise to the Lord, the Almighty” (Hymns, no. 72)

  • Nzembo 26:8:We Love Thy House, O God” (Hymns, no. 247)

  • Nzembo 27:1:The Lord Is My Light” (Hymns, no. 89)

  • Nzembo 33:1–6; 95:1–6:For the Beauty of the Earth” (Hymns, no. 92)

  • Nzembo 37:3–9:Be Still, My Soul” (Hymns, no. 124)

  • Nzembo 148:All Creatures of Our God and King” (Hymns, no. 62)

Bosalela miziki. Mokambi Dallin H. Oaks alobaki: “Koyemba banzembo ezali moko ya banzela ya malamu koleka mpo na komitia na molongo na Molimo ya Nkolo. … Miziki ya bule ezali na makoki ya kokesana mpo na kopesa mayoki na biso ya bolingo mpo na Nkolo. Lolenge wana ya kosolola ezali lisalisi ya kokamwa mpo na losambo na biso. … Banzembo na biso ezali na mateya ya malongi ya masakoli oyo ekokani na mosusu te, oyo eleki kaka makomi na bosolo na yango mpe na maloba makasi ya ntoki” (“Worship through Music,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1994, 10, 11). Banzembo nini ekokani na Nzembo oyo bokoki koyoka to kobondela na losambo na bino poso oyo?

Nzembo 19:7–1129

Liloba ya Nkolo ezali na nguya, “esepelisaka motema.”

Na kati ya Nzembo, maloba lokola litatoli, mibeko, motindo, mpe masambisi ekoki kolakisa liloba ya Nkolo. Bobomba yango na makanisi ntango bozali kotanga Nzembo 19:7–11. Milongo oyo eteyi nini epayi na bino oyo etali liloba ya Nkolo? Nini Nzembo 29 eteyi bino oyo etali mongongo na Ye? Na boyebi na bino, lolenge nini liloba to mongongo ya Nkolo ekokani na bandimbola oyo?

Nzembo 24; 26–27

elembo ya seminele
Nkolo akoki kosalisa ngai nazala peto bongo nakoka kozala liboso ya Nzambe.

Lokola tempelo na Yelusaleme etongamaki likolo ya ngomba, liloba “ngomba ya Nkolo” (Nzembo 24:3) ekoki kolakisa tempelo to bozali ya Nzambe. Nini yango ebakisi na bososoli na bino ya Nzembo 24? Nini yango elakisi epayi na bino kozala “maboko peto, mpe motema peto”? (molongo 4). Ntango bozali kotanga Nzembo 26–27, boyekoli lisusu nini etali ndako ya Nkolo?

Na bantango, tokoki kolembisama motema koyoka ete tosengeli kozala peto mpo na kozala liboso ya Nzambe. Na nsima ya nyonso, biso nyonso tobundaka, mpe moto moko te kati na biso abonga nie. Elikya nini bozwi na nsango ya Mpaka David A. Bednar “Maboko Peto mpe Motema Peto”? (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2007, 80–83). Lolenge nini bokoki kosalela nsango na ye mpo na kosunga moto songolo oyo azali komitungisa na kozela kokoma ya kobonga nie? Bobanza lolenge bokoki kozwa lisalisi ya Mobikisi na babokasi na bino ya kozala “maboko peto, motema peto.”

Tala lisusu Bradley R. Wilcox, “Worthiness Is Not Flawlessness,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 61–67.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Nzembo 23; 27–28; 3246

Nkolo apesaka ngai kimia, bolendisi, mpe bokambi.

  • Bobanza kokomaka Nkolo Azali … Bobengisa bana na bino baluka banzela ya kokokisa liloba wana na kosalelaka makomi lokola oyo: Nzembo 23:1; 27:1; 28:1; 28:7; 32:7; 46:1. Milongo oyo eteyi biso nini oyo etali lolenge nini Nkolo akoki kosalisa biso?

  • Bokoki kosolola na bana na bino nini mwana na mpate asengelaka mpo na bobateli mpe bokolongonu. Nsima, ntango bozali kotanga elongo Nzembo 23, bosunga bana na bino bakokanisa nini mobateli mpate asalaka mpo na mwana na mpate na oyo Yesu asalaka mpo na biso. Nini tosengeli mpo na kozala na bobateli ya molimo mpe bokolongonu? Boyemba loyembo oyo ekopesa bango makanisi, lokola “I Feel My Savior’s Love” (Children’s Songbook, 74–75).

Tempelo ya Concepción na Chili

Tempelo ya Concepción na Chili

Nzembo 24:3–4

Mpo na kokota na tempelo, tosengeli kozala “maboko peto, mpe motema peto.”

  • Ntango bozali kotanga Nzembo 24:3 elongo, bana na bino bakoki koluka maloba oyo ekundolisaka bango tempelo. Bakoki lisusu kotala foto ya tempelo. Nsima bokoki kotanga elongo molongo 4 mpo na koyekola nani akoki kokota na tempelo. Bokoki kosolola oyo etali lolenge nini maboko ekomaka bosoto mpe lolenge nini tosokolaka yango. Lolenge nini tokomaka bosoto na molimo? Lolenge nini Mobikisi asalisaka biso tosokwama na molimo?

Nzembo 30:5

Yesu akoki kobongola mawa ekoma esengo.

  • Soki bozali na bana mike, bokoki kobengisa bango basala lokola bazali kolela ntango bozali kotanga na Nzembo 30:5, “Kolela ekoki kokoba butu moko.” Na nsima, bosenga bango bamonisa esengo ntango bozali kotanga, “Kasi esengo eyaka na ntongo.” Bozongela liloba yango mwa ntango moke.

  • Bolakisa elilingi ya Mobikisi, mpe boyebisa bana na bino nini Ye asali mpo na bino oyo ememeli bino esengo. Bokoki mpe kopesa mwana mokomoko ngala mpo na kosimba elilingi mpe kokabola makambo oyo Yesu asali oyo ezali kopesa bango esengo.

Nzembo 46:10

“Bozala kimia mpe boyeba ete nazali Nzambe.”

  • Bosalisa bana na bino babomba na makanisi molongo ya liboso uta na Nzembo 46:10: “Bozala kimia mpe boyeba ete nazali Nzambe.” Nini yango elingi koloba “kozala kimia”? Mbala mosusu bokoki kolekisa ntango kosalelaka kozala kimia. Bokoki mpe lisusu kokabola moko mpe mosusu makambo boyebi ntango bozali “kimia” elendisaka kimoninga na bino na Nzambe. Bosalisa bana na bino bakanisa bantango ya mokolo oyo bakoki “kozala kimia” mpo na koyoka kozala pene ya Tata na Lola.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .

Mobikisi asimbi mwana na mpate

Mobateli Mpate Malamu, na Eva Timothy

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nkolo Azali Mobateli Mpate na Ngai