“Sanza ya mwambe 31–Sanza ya libwa 6. ‘Tika Eloko Nyonso Oyo Ezali na Mpema Ekumisa Nkolo”: Nzembo 102–103; 110; 116–119; 127–128; 135–139; 146–150,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya mwambe 31–Sanza ya libwa 6. ‘Tika Eloko Nyonso Oyo Ezali na Mpema Ekumisa Nkolo,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Reverential Return [Bozongi ya limemia], na Kelsy mpe Jesse Lightweave
Sanza ya mwambe 31–Sanza ya libwa 6: “Tika Eloko Nyonso Oyo Ezali na Mpema Ekumisa Nkolo”
Nzembo 102–103; 110; 116–119; 127–128; 135–139; 146–150
Nkombo ya bonkoko ya Bayuda mpo na buku ya Nzembo ezali Tehillim, liloba ya Baebele oyo elakisi “masanzoli.” Ekokani na ndimbola ya halleluyah (kolakisaka “sanzola Yova” to “sanzola Nkolo”). Soki osengeli kopona liloba moko mpo na koloba na mokuse nsango monene ya Nzembo, masanzoli ekozala boponi malamu. Nzembo mosusu ezali na libengisi ya “kosanzola Nkolo” (tala mingi mingi Nzembo 146–50), mpe nyonso na yango ekoki kofula mpe kosanzola. Nzembo ebengisaka biso toyeba nguya ya Nkolo, mawa na Ye, mpe makambo minene oyo asalaki. Tokoki atako moke te kofuta Ye lisusu mpo na moko na yango, kasi tokoki kosanzola Ye. Masanzoli wana ekoki kozala na lolenge ekeseni mpo na bato bakeseni—ekoki kosenga koyemba, kosambela, to kopesa litatoli. Mbala mingi ememaka na bomipesi ya mozindo epayi ya Nkolo mpe na kolandaka mateya na Ye. Ezala nini “bosanzola Nkolo” elingi koloba na bomoyi na bino, bokoki kozwa bofuli mpo na kosala yango ntango bozali kotanga mpe komanyola Nzembo.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Nzembo 102–3; 116
Nkolo akoki kolendisa ngai na mpasi na ngai.
Boyeba lolenge nini Nzembo 102:1–11 elimbolaka mayoki ya mitungisi mpe ya komitangola oyo mbala mingi eyaka na ntango ya mikakatano. Mbala mosusu bino to bato mosusu oyo boyebi bokutanaki na mayoki ya lolenge wana. Ntango bozali kotanga Nzembo 102:12–28; 103; 116, boluka maloba oyo epesaka bino elikya mpo na “kobenga nkombo ya Nkolo” na mitungisi na bino (Nzembo 116:13). Bokoki kolinga kotia bilembo, kokanga na makanisi, to kokabola na basusu maloba oyo epesaka bino elikya epayi na Ye.
Tala lisusu Yisaya 25:8; Baebele 2:17–18; Alma 7:11–13; Camille N. Johnson, “Klisto Azali Lisungi,” Liahona, Sanza ya zomi na mitano 2023, 81–83; “Where Can I Turn for Peace?” (Hymns, no. 129).
Carl Heinrich Bloch (1834-1890), Christ Healing the Sick at Bethesda [Klisto Azali Kobikisa Babeli na Bethesda], 1883, ma, 100 3/4 × 125 1/2 inches. Brigham Young University Museum of Art [Mize ya Ntoki ya Universite ya Brigham Young], esombami na misolo epesami na Jack R. mpe Mary Lois Wheatley, 2001.
Nzembo 110; 118
Yesu Klisto akokisaki masakoli uta na Nzembo.
Nzembo ebele ezali na milongo oyo elobelaka bomoyi mpe mosala ya Yesu Klisto. Oyo ezali mwa bandakisa:
-
Nzembo 110:1–4 (botala Matai 22:41–45; Baebele 5:4–10; 6:20)
-
Nzembo 118:22 (botala Matai 21:42; Misala 4:10–11; 1 Petelo 2:7)
-
Nzembo 118:25–26 (botala Matai 21:9)
Milongo oyo eteyi bino nini oyo etali Yesu Klisto? Mpo na nini ezali motuya koyeba yango oyo etali Ye?
Nzembo 119
Liloba ya Nzambe ekobatela ngai na nzela na Ye.
Nzembo 119 ezali na maloba mingi oyo ekokanisaka babomoyi na biso na mobembo ya kozonga epayi ya Tata na Lola. Ntango bozali kotanga, koluka maloba lokola “kotambola,” “nzela,” “balabala,” “matambe,” mpe “koyengayenga.” Bomanyola mobembo ya bomoyi na bino moko—esika bozalaki, esika bozali sikawa, mpe esika bozali kokende. Nini boyekoli wuta na nzembo oyo elobeli mobembo na bino ya kozonga ndako? Boyekoli nini na botali banzela ya basusu? Engebene na nzembo, nini Nzambe apesaki mpo na kosalisa bino botikala na nzela na Ye?
Bokanisa ngonga ntango bolandaki nzela to kalati esungaki bino bokende mobembo esika songolo na elonga. Likambo yango eteyi bino nini mpo na kolanda nzela ya Nzambe?
Na makomi mingi mosusu, Nkolo mpe baprofeta na Ye balobelaka nzela. Oyo elandi ezali mwa bandakisa: Bobanza kolukaluka milongo yango mpe kokoma to koyebisa bato mosusu makambo oyo boyekoli.
|
Makomi |
Nini nayekoli oyo etali nzela ya Nzambe |
|---|---|
Makomi Masese 4:11–19 | |
Makomi Matai 7:13–14 | |
Makomi | |
Makomi | |
Makomi | |
Makomi |
Lolenge nini babosolo oyo esungaka bino botikala na nzela ya Nzambe?
Bososoli nini ya kobakisa bokoki koyekola wuta na toli oyo elandi ya Mokambi Russell M. Nelson?
“Soki mobembo ya bomoyi na biso esengeli kozala ya elonga, tosengeli kolanda bokambi ya bonzambe. Nkolo alobaki, ‘Botala epayi na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, bobanga te’ [Malongi mpe Mayokani 6:36]. Mpe Mokomi nzembo alobaki, ‘Liloba na yo ezali mwinda na makolo na ngai, mpe mwinda na nzela na ngai’ [Nzembo 119:105]. …
“Na mobembo na bino ya bomoyi, bokutanaka na mabaku mingi mpe bosalaka mwa mabunga. Bokambi na makomi esaaka bino boyeba mbeba mpe kosala makasi mpo na kobongisa yango. Botikaka kotambola na nzela ya mabe. Boyekolaka malamumalamu kalati ya nzela ya makomi. Nsima bozali kokende liboso na boyamboli mpe bozongisi oyo esengeli mpo na komata na ‘nzela ya moke mpe ya moke oyo ememaka na bomoi ya seko’ [2 Nefi 31:18]” (“Kobikaka na Bokambi ya Makomi,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 2000, 17).
Tala lisusu Dieter F. Uchtdorf, “The Prodigal and the Road That Leads Home [Mwana abunga mpe Nzela Ememaka na Ndako],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 86–88.
Nzembo 134–36
Nkolo azali na nguya mingi koleka ekeko songolo.
Botala, engebene na Nzembo 135:15–18, ezali buzoba kondimela na banzambe ya lokuta. Nini esengeli bino komeka kondimela oyo ezali lolenge moko na ekeko? Bokoki kokoma makambo oyo Nkolo akoki kosala, lokola bakomi nzembo basalaki na Nzembo 134–36. Makambo nini ya nguya Asalaki mpo na bino?
Nzembo 139
Nkolo ayebaka motema na ngai.
Nini bozwi na Nzembo 139 oyo esalisaka bino bososola ete Nkolo azali mokengeli na bino—makanisi mpe misala na bino, babokasi mpe bolembu? Lolenge nini bosolo oyo elongisaka bomoyi na bino mpe maponi?
Nzembo 146–50
“Bosanzola Nkolo.”
Ntango bozali kotanga nzembo oyo ya nsuka ya masanzoli, bokanisa oyo etali bantina bozali na yango mpo na kosanzola Nkolo. Mpo na nini yango ezali ntina kosanzola Ye? Balolenge nini mosusu ezali oyo bokoki kosanzola Ye?
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Nzembo 102:1–2
Nkolo alendisaka ngai mpe apesaka ngai elikya.
-
Bino to moko ya bana na bino bokoki kotanga Nzembo 102:1–2, kolukaka lolenge nini Nkolo asalisaka biso na ntango na biso ya mpasi. Lolenge nini tokoki kozwa lisungi na Ye? Bokoki lisusu kokabola moko na mosusu bantango oyo bozalaki na mposa ya lisalisi mpe boyoki ete Nzambe ayokaki balosambo na bino.
Nzembo 119:105
Liloba ya Nzambe ezali lokola mwinda.
-
Bana na bino bakoki kosepela kolobela ndenge oyo ezalaka ntango bozali na molili. To mpe bakoki kolobela makambo oyo ezali mpasi mpo na kosala na molili. Bokoki kosenga bango basala likambo moko na miso na bango ya kokanga, na ndakisa koyema elilingi. Toyekoli nini uta na Nzembo 119:105 oyo etali mwinda mpe liloba ya Nzambe?
-
Boluka eloko moko Tata na Lola apesi biso mpo na kosalisa biso totikala na nzela na Ye na milongo oyo elandi: Nzembo 119:47–48; 119:105; 1 Nefi 11:25; 2 Nefi 31:20. Nini tokoki kosala mpo na kotikala na nzela ya Nzambe?
-
Bana na bino bakoki kosepela kotala bililingi ya makambo oyo Nzembo 119:105. Bakoki kotia bililingi yango na molongo ntango bazali kotanga molongo yango. Bokoki lisusu koyemba loyembo elongo, lokola “Teach Me to Walk in the Light” (Children’s Songbook, 177) to “I Will Walk with Jesus” (Gospel Library).
Nzembo 139; 1–3, 23– 24
Tata na Lola mpe Yesu Klisto bayebi ngai mpe balingaka ngai.
-
Bokanisa kokomaka mikuse ya makambo oyo boyebi mpo na bana na bino mokomoko. Ntango bozali kotanga makambo bokomi moko na mbala moko, botuna bana baloba nani bozali kolobela. Bongo, nsima kotangaka Nzembo 139:1–3 elongo, bokoki kokoma makambo oyo Tata na Lola mpe Yesu Klisto bayebi na ntina na biso.
-
Bokoma maloba ya Nzembo 139:23–24 likolo ya eteni ya lokasa to etando. Bosenga bana na bino batia mikoloto na maloba oyo elimboli makambo Nzambe akoki kosala mpo na biso. Mpo na nini tokolinga Nzambe asala makambo oyo?
Nzembo 146:1, 5–9
Nakoki kosanzola Nkolo.
-
Ntango mosusu bana na bino bakokaki kokabola makambo oyo bakutanaki na yango ntango moto moko akumisaki bango to ayebisaki bango ete basalaki mosala malamu. Bokabola mwa makambo malamu uta na Nzembo 146:6–9 oyo Nkolo asalaki (esalisa bana na bino basosola maloba oyo bayebi te). Bobengisa bana na bino basolola oyo etali makambo mosusu oyo Asalaka mpo na biso. Lolenge nini tokoki kosanzola Ye mpo na makambo oyo?
Boyekola na libota; bokabola na basusu. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete libota esengeli kozala “ndako ya boyekoli nsango malamu” (“Becoming Exemplary Latter-day Saints [Kokoma Ndakisa ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka],” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 13). Nini bokoki kosala na poso oyo mpo na kolendisa boyekoli na bino moko ya Nzembo? Nsima ya boyekoli na bino, bobanza kokabola na basusu maye boyekolaki mpe boyokaki. Bokoki kosalela yango na masolo, na nzela ya kokoma to na mediasosio, to na eklezia.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .