“Sanza ya libwa 21–27. ‘Mosala ya Kokamwa mpe Likamwisi’: Yisaya 13–14; 22; 24–30; 35,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya libwa 21–27. ‘Mosala ya Kokamwa mpe Likamwisi,’” Yaka, Landa Ngai: 2026
Sacred Grove [Zamba ya Bule], na Brent Borup
Sanza ya libwa 21–27: “Mosala ya Kokamwa mpe Likamwisi.”
Yisaya 13–14; 22; 24–30; 35
Eloko moko oyo Nkolo asengi na baprofeta kosala ezali kokebisa na oyo etali mbano ya lisumu. Mpo na baprofeta ya Kondimana na Kala, yango elingi koloba mingimingi kolobela mibeko ya bokonzi ya nguya ete bango basengelaki koyambola. Ezalaki mokumba moko ya likama, kasi Yisaya azalaki kobanga, mpe babokebisi na ye mpo na babokonzi ya mikolo na ye—sangisaka Yisalaele, Yuda, mpe bikolo ya nzinganzinga—ezalaki kitoko Yisaya 13–23).
Nzokande, Yisaya mpe azalaki na nsango ya elikya. Atako babobesi esakolama eyelaki likolo ya babokonzi wana, Yisaya akanisaki libaku ya bozongisi mpe bosika. Mobikisi abiangi bato na Ye bazonga epayi na Ye. Ye akosala “zelo oyo ekauki … ekobongwana liziba, mpe mabele na mposa ekozala bitima na mayi” (Yisaya 35:7). Ye akosala “mosala ya kokamwa mpe likamwisi” (Yisaya 29:14), kozongiselaka Yisalaele mapamboli Ye alakaki bango. Atako Yisaya to moto mosusu te azalaki na ngonga wana mpo na komona mosala yango ya kokamwa. Kasi tozali komonaka yango lelo oyo. Na yango, tozali eteni na yango.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Yisaya 13:1–11, 19–22; 14:1–20
Lolendo mpe kimokili ekokweya.
Na eleko ya Yisaya, Babilone ezalaki bokonzi moko ya nguya na mokonzi moko ya nguya mpenza. Sikawa Babilone ezali lisolo ya kala. Boye mpo na nini etinda ya Yisaya epai ya Babilone, na Yisaya 13–14, ezali motuya mpo na biso lelo oyo? Mpo ete Babilone elakisi lofundu, lokoso, mpe lisumu oyo ezali kozinga biso lelo oyo. Bokanisa oyo etali ndimbola ya elembo oyo ntango bozali kotanga Yisaya 13:1–11, 19–22; 14:1–20. Bokokaki komeka mituna lokola oyo:
-
Bokokani nini bomoni katikati ya lofundu ya mokonzi ya Babilonia mpe lofundu ya satana? (tala Yisaya 14:4–20; Mose 4:1–4). Makebisi nini bozwi mpo na bino moko na milongo oyo?
-
Lolenge nini Yesu Klisto apesi “bopemi, uta na mpasi na yo, mpe uta na bobangi na yo”? Yisaya 14:3
“Ye akomela nkufa kati na elonga” (Yisaya 25:8).
Yisaya 22:22–23; 24:21–23; 25:6–8; 26:19; 28:16
Yesu Klisto azali Masiya oyo alakamaki.
Mateya ya Yisaya ezalaki mbala mingi kolobela mosala ya Mobikisi, kosangisaka mbeka ya bomikabi, Lisekwa, mpe Boyei na Ye ya mibale. Balolenge nini ya mosala na Ye eyei na makanisi ntango bozali kotanga biteni oyo: Yisaya 22:22–23; 24:21–23; 25:6–8; 26:19; 28:16? Biteni nini misusu bomoni oyo ekundolisi bino na ntina ya Mobikisi?
Bopesa bayekoli mikumba ya komema litatoli ya Yesu Klisto. “Mpo na kozala moteyi ya nsango malamu ya Yesu Klisto elakisi kosalisa basusu basosola mpe bakangama na mateya, nguya ya bosikoli, mpe bolingo na Ye ebonga nie” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 8). Lolenge moko ya pete mpo na kosala yango ezali kotuna motuna moko lokola “Eloko nini omoni na makomi na poso oyo oyo eteyaki yo eloko moko etali Mobikisi?” Nsima bopesa nzela na bayekoli kokabola mayele mpe makasi ya bondimi moko na mosusu.
Yisaya 24:1–12; 28:1–8; 29:7–13; 30:8–14
Kopesaka Nkolo mokongo ememaka likama ya molimo.
Na ngolu na Ye, Nkolo atindaki Yisaya kokebisa libota ya liyokani ete bango bakokende mosika na Ye. Botala soki okoki kozwa bilembo ya makebisi ya molimo na yango na Yisaya 24:5; 29:13; 30:8–12. Mpo na nini bizalela mpe misala yango ezali likama mpenza ya molimo?
Mpo na kokebisa na bambano ya kopesaka Nkolo mokongo, Yisaya asalelaki babokokanisi moko ya kobosana te. Ntango botangi yango, bomituna lolenge nini kopesaka Nkolo mokongo ezali lokola:
-
Mabele moko ya mawa, ya pamba (Yisaya 24:1–12).
-
Molangwa (Yisaya 28:7–8).
-
Nzala mpe mposa ya mayi (Yisaya 29:7–10).
-
Efelo ebukani to sani epasuki (Yisaya 30:13–14).
Mpo na nini ezali motuya mpo na bino kotikala pembeni ya Nkolo?
Yisaya 29; 30:18–26; 35
Nkolo akoki kozongisa oyo ebungaki to ebukanaki.
Bosi bobungisa eloko moko oyo bokanisaki ata mokolo te ete bokokani komona yango lisusu? To ntango mosusu eloko moko ebukanaki, mpe bomitungisaki ete yango ekokaki ata mokolo moko te kobonga? Ntango topesaka Nkolo mokongo, Satana alingaka biso tokanisa ete tokoki kozonga to kobikisama ata mokolo moko te. Nzokande, Yisaya alimbolaki bamingi ya makambo ya kokamwa oyo Nkolo akosala mpo na kosalisa biso kozonga epayi na Ye Boyekoli nini na Yisaya 29:13–24; 30:18–26; 35 oyo etali Nkolo, bolingo na Ye, mpe nguya na Ye? Ntango mosusu bokoki komona liloba moko na milongo oyo epesi bino elikya ntango bino bosengeli na libiki. Bokoki lisusu kotala na etinda ya Ndeko mwasi Amy A. Wright “Christ Heals That Which Is Broken [Nkolo Abikisaka Oyo Ezali ya Kobukana]” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 81–84).
Lolenge moko Nkolo alakisaka nguya mpe ngolu na Ye ezali na nzela ya Bozongisi ya Nsango malamu na Ye. Yisaya 29 etondi na milongo ebele oyo ekokani na makambo ya Bozongisi. Ndakisa:
-
Bokokanisa Yisaya 29:11–12 na 2 Nefi 27:6–26 mpe Joseph Smith—Mambi ya kala 1:63–65.
-
Bokokanisa Yisaya 29:13–14 na Malongi mpe Mayokani 4 mpe Joseph Smith—mambi ya kala 1:17–19.
-
Bokokanisa Yisaya 29:18–24 na lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon.
Na makanisi na bino, mpo na nini ezali “kokamwa” mpe “likamwisi” (Yisaya 29:14) maloba malamu mpo na kolobela nsango malamu na Ye ezongisami? Lolenge nini bokoki kosalisa na bokokisi masakoli na oyo etali Bozongisi? Mpo na makanisi, botala etinda ya Mpaka Gerrit W. Gong “All Nations, Kindreds, and Tongues” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 38–41).
Tala lisusu “The Restoration of the Fulness of the Gospel of Jesus Christ: A Bicentennial Proclamation to the World [Bozongisi ya Litondi ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto: Esakola ya Mibu Nkama mibale epayi na Mokili]” (Gospel Library); “The Morning Breaks,” Hymns, no 1.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yisaya 14:3; 25:8–9; 28:16
Yesu Klisto akoki kobikisa ngai uta na lisumu mpe liwa.
-
Lolenge nini bokosalisa bana na bino bamona Mobikisi na makomi ya Yisaya? Bokoki kosalisa bango bamona maloba oyo ekundolisi bango Ye na Yisaya 14:3; 25:8; to 28:16. Bango bakoki lisusu kotutanisa milongo uta Yisaya na milongo misusu oyo eteyi na oyo etali Mobikisi, lokola Matai 11:28–30; 1 Bakolinti 15:53–57; Elamani 5:12. Biloko nini ya minene Mobikisi asala mpo na biso?
-
Na nsima ya kotanga Yisaya 25:8–9 elongo, bokoki kotala bililingi ya Mobikisi na Getesemane, likolo ya ekulusu, mpe nsima ya Lisekwa na Ye. Bopesa bana na bino libaku ya kosolola na oyo etali nini ekomaki na bililingi mpe mpo na nini bango balingaka Yesu mpe “basepelaka na lobiko na ye” (molongo ya 9).
-
Bokoki koyebisa bana na bino na oyo etali mawa boyokaki ntango moto moko bolingaka asilaki kokufa. Botatola na ntina ya libondisi boyambaki na ntina ya Yesu Klisto. Ntango mosusu bana na bino bakoki koyema elongi moko kolelaka mpe nsima kolongola mayi ya miso ntango bozali kotanga Yisaya 25:8 elongo.
Thy Will Be Done [Mokano na Ye Ekosalema], na Ken Spencer
Yisaya 25:4–6
Yesu apesaka ngai “ekimelo na ntango ya mipepe makasi.”
-
Bana na bino mpe bino bosi bomona lipamboli ya ebombelo ya kimia na ntango ya mbonge to esika ya malili na mokolo ya moyi makasi? To bosi bosepela na bilei moko ya kitoko ntango bozali na nzala? Bosolola na oyo etali oyo etali bamayele ntango bozali kotanga Yisaya 25:4–6. Lolenge nini Yesu azali lokola makambo yango?
Yisaya 29:11–18, 24
Bosongisi ya sango malamu ezali “mosala ya kokamwa.”
-
Ntango bino mpe bana na bino botangi Yisaya 29:14, bokabola elongo na bango maloba mosusu oyo elakisi eloko moko lokola “kokamwa” mpe “likamwisi.” Botika bango basalisa bino baluka biloko to bililingi oyo ekoki kolakisa bamoko misala ya kokamwa ya Nkolo katikati ya mikolo ya nsuka. Yango ekoki kosangisa mokanda ya Buku ya Mormon, elilingi ya tempelo, to elilingi ya Limonisi ya Yambo (ezali na moko na ebandeli ya oyo). Bongo bana na bino bakoki kopona eloko moko mpe kokabola mpo na nini yango ezali ya kokamwa epayi na bango.
-
Loyembo moko etali Bozongisi ya nsango malamu ekoki kokende malamu elongo na Yisaya 29, lokola “On a Golden Springtime” (Children’s Songbook, 88). Mpe ntango mosusu mayele na bino moko ekoki kosalisa bana kososola nini bozongisi elakisi. Ndakisa, bino mpe bana na bino bokoki kolobela oyo etali eloko moko oyo bobungisaki mpe lolenge nini bomonaki yango. Bosalisa bana na bino bakokanisa yango na Bozongisi ya nsango malamu. Engebene na Yisaya 29:13–15, mpo na nini tosengeli na Bozongisi? Mosala nini ya kokamwa Nkolo azali kosala mpo na kozongisa nsango malamu na Ye? (tala lokasa ya milulu ya poso oyo).
Mpo na koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .