Yaka, Landa Ngai
Makanisi ya Kobomba na Motema: Baprofeta mpe Esakola


“Makanisi ya Kobomba na Motema: Baprofeta mpe Esakola,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 2026)

“Baprofeta mpe Esakola,” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

elembo ya makanisi

Makanisi ya Kobomba na Motema

Baprofeta mpe Esakola

Na bokaboli ya bonkoko ya boklisto ya Kondimana na Kala, eteni ya nsuka (Yisaya na nzela ya Malaki) ebengami Baprofeta. Eteni oyo, pene na moko na minei ya Kondimana na Kala, ezali na maloba ya basali ya Nzambe oyo bapesameli ndingisa, baoyo balobaki na Nkolo mpe na nsima balobaki mpo na Ye, kokabolaka nsango na Ye na bato kati na mobu soki 900 mpe 500 Liboso ya Klisto.

Baprofeta Bayebisaka Bolingi ya Nzambe

Baprofeta mpe esakola bazali na mokumba monene kati na Kondimana na Kala mobimba. Abalayama, Yisaka mpe Yakobo bazwaki bomoni mpe basololaki na bamemi-nsango ya lola. Mose asololaki na Nzambe na miso na miso mpe ayebisaki bana ya Yisalaele bolingi na Ye. Mokanda ya yambo mpe ya mibale ya Mikonzi elobeli misala mpe bansango oyo baprofeta Eliya na Elisa babosanaka te. Kondimana na Kala elobeli mpe baprofeta ya basi lokola Milyami na Debola, elongo na basi mosusu oyo bapambolamaki na elimo ya esakola, lokola Lebeka mpe Hana. Mpe atako Nzembo ekomamaki te na baprofeta ya momesano, yango mpe etondi na molimo ya esakola, mingimingi lokola ezali kolakisa boyei ya Masiya.

Likambo moko te eyaka lokola likamwisi epayi ya bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Kutu, nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto eteyi biso ete baprofeta bazali kaka bato ya lisolo ya kosepelisa te kasi eteni ya ntina ya mwango ya Nzambe. Atako basusu bakoki komona ete baprofeta bazalaki bobele na ntango ya Kondimana na Kala, biso tozali komona bango lokola eloko oyo tozali na yango kati na bantango ya Kondimana na Kala.

Kasi kotanga mokapo moko uta na Yisaya to Ezekiele ekoki kokesana na kotanga nsango ya likita linene uta na Mokambi ya Eklezia ya lelo. Tango mosusu ezalaka mpasi komona ete baprofeta ya kala bazalaki na likambo ya koloba na biso. Kutu, mokili oyo epayi wapi tozali kobika lelo ekeseni mpenza na mokili oyo bateyaki mpe basakolaki. Mpe likambo oyo ete biso tozali na profeta ya bomoi ekoki kobimisa motuna moko: Mpo na nini ezali motuya milende​—mpe esengaka milende—mpo na kotanga maloba ya baprofeta ya kala?

profeta moko ya kala azali kokoma

Fulness of Times [Litondi ya Ntango], na Greg Olsen

Bapropheta Ya Kala Bazali Na Likambo Ya Koloba Na Biso

Mpo na mingi, bato lelo bazali te bato oyo baprofeta ya Kondimana na Kala bazalaki koteya. Baprofeta wana bazalaki na mitungisi ya mbala moko oyo bazalaki kolobela na ntango mpe esika na bango—lokola baprofeta na biso ya mikolo ya nsuka bazali kolobela mitungisi na biso ya mbala moko lelo.

Bobele na ntango yango, baprofeta bakoki mpe komona koleka mitungisi ya mbala moko. Eteyaka bosolo ya seko, oyo etali ntango mpe esika nyonso. Lokola bapambolami na emoniseli, bamonaka lolenge ya kotalela mosala ya Nzambe na monene. Na ndakisa, Yisaya akebisaki bato na ntango na ye mpo na masumu na bango. Akomaki lisusu etali kosikolama ya Bayisalaele oyo bakozala na bomoi mbula 200 na mikolo ezali koya. Bobele na ntango yango, ateyaki na ntina na kosikolama oyo basali nyonso ya Nzambe balukaka. Mpe akomaki masakoli oyo, ata lelo oyo, ezali naino kozela kokokisama—lokola bilaka ya “mabele ya sika” (Yisaya 65:17) oyo “ekotondisama na boyebi ya Nkolo” (Yisaya 11:9), epayi wapi mabota ya Yisalaele oyo ebungaki ekosangana mpe epayi wapi “mabota” “ekoyekola lisusu etumba” te (Yisaya 2:4). Eteni ya esengo mpe bofuli oyo eyaka uta na kotanga maloba ya baprofeta ya Kondimana na Kala lokola Yisaya ezali kososola ete to zali kosala mosala na mokolo ya nkembo oyo bakanisaki.

Na yango, ntango ozali kotanga masakoli ya kala, ekoki kosalisa mpo na koyeba makambo oyo ezali na kati na yango—kasi osengeli mpe komimona kati na yango, to “kokokanisa yango na [yo moko]” (1 Nefi 19:24; tala lisusu molongo 23). Ntango mosusu yango elimboli kondima Babilona lokola elembo ya lisumu mpe ya lolendo, kasi te bobele lokola engumba moko ya kala. Ekoki kolimbola kososola Yisalaele lokola bato ya Nzambe na ntango mpe na esika nyonso. To ekoki kolimbola komona Siona lokola ntina ya mikolo ya nsuka oyo bato ya Nzambe bayambaka, na esika ya komona yango lokola liloba mosusu mpo na Yelusaleme.

Tokoki kokokanisa makomi na bomoi na biso mpo ete tososoli ete esakola moko ekoki kokokisama na banzela ebele. Ndakisa malamu ezali esakola na Yisaya 40:3: “Mongongo ya moto oyo azali koganga na esobe ete, Bobongisa nzela ya Nkolo.” Mpo na Bayuda oyo bakangami na Babilona, liloba oyo ekoki kozala kolobela Nkolo kopesa nzela ya kobima na boombo mpe kozonga na Yelusaleme. Mpo na Matai, Malako, mpe Luka, esakola oyo elobelaki Yoane Mobatisi, oyo abongisaki nzela mpo na mosala ya nkufa ya Mobikisi. Mpe Joseph Smith azwaki emoniseli ete esakola oyo ezali naino kokokisama lelo mpo na komilengela mpo na mosala ya mibu nkoto ya Klisto. Na banzela oyo tozali naino kososola, baprofeta ya kala balobaki na biso. Mpe bateyaki ebele ya bosolo ya motuya, ya seko oyo ezali na ntina mpo na biso lokola ezalaki mpo na Yisalaele ya kala.

Baprofeta ya Kala Batatolaki mpo na Yesu Klisto

Mbala mosusu kutu ya motuya koleka komimona na masakoli ya Kondimana na Kala ezali komona Yesu Klisto kati na yango. Soki oluki Ye, okokuta Ye, ata soki balobeli Ye na nkombo te. Ekoki kosalisa tobosana te ete Nzambe ya Kondimana na Kala, Nkolo Yehova, azali Yesu Klisto. Ntango nyonso oyo baprofeta balimboli nini Nkolo azali kosala to nini Akosala, bazali kolobela Mobikisi.

Yesu oyo asekwaki asololi na mobali moko

The Lord Appearing unto Abraham, na Keith Larson

Okokuta mpe maloba oyo elobeli Mopakolami, Mosikoli, mpe Mokonzi oyo akoya na molongo ya Dawidi. Masakoli yango nyonso etali Yesu Klisto. Mingimingi, bokotanga etali bokangoli, bolimbisi, bosikoli, mpe bozongisi. Na Mobikisi na makanisi mpe motema na yo, masakoli yango ekomonisa yo Mwana ya Nzambe. Na nsuka, lolenge malamu ya kososola esakola ezali kozala na “elimo ya esakola,” oyo Yoane ayebisi biso ezali “litatoli ya Yesu” (Emoniseli 19:10).

Matangi

  1. Yisaya, Yilimia, Ezekiele, mpe Danyele babengaka bango mbala mingi Baprofeta Minene mpo na bolai ya mikanda na bango. Baprofeta mosusu (Hosea, Yoele, Amosa, Obadia, Yona, Mika, Nahumu, Habakuku, Sefania, Hagai, Zekaria, mpe Malaki) babengami Baprofeta Mike mpo mikanda na bango ezali mikuse mingi. Mokanda ya Bileli etalelami lokola eteni ya Makomami, kasi ya Baprofeta te.

  2. Toyebi te lolenge nini mikanda ya esakola esangisamaki. Na bantango mosusu, profeta moko akokaki kokamba mosala ya kokoma mikanda mpe bisakola na ye. Na makambo mosusu, mateya na ye ekoki kobombama mpe kosangisama nsima ya liwa na ye.

  3. Botala Esode 15:20; Bazuzi 4.

  4. Botala Genese 25:21–23; 1 Samuele 1:20–28; 2:1–10.

  5. “Kanisa kaka esengo mpe lombangu ya nyonso wana: profeta nyonso oyo abandi na Adama amoni mikolo na biso. Mpe profeta nyonso alobelaki etali ya biso mikolo, ntango Yisalaele elingaki kosangisama mpe mokili elingaki kobongisama mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Kanisa yango! Na bato nyonso oyo bafandi na mokili, biso tozali baoyo bazwi libaku ya kozala na molulu ya nsuka, ya bosangani monene. Yango ezali mpenza kosepelisa!” (Russell M. Nelson, “Hope of Israel [Elikya ya Yisalaele]” [losambo ya bilenge ya mokili mobimba , Sanza ya motoba 3, 2018], Gospel Library). Botala lisusu Ronald A. Rasband, “Fulfillment of Prophecy [Bokokisi ya Esakola],” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 75–78.

  6. Mobikisi, kolobelaka Yisaya, alobaki, “Makambo nyonso oyo alobaki ezali mpe ekozala, kutu engebene na maloba oyo alobaki” (3 Nefi 23:3; nsete ebakisami).

  7. Botala Matai 3:1–3; Malako 1:2–4; Luka 3:2–6.

  8. Botala Malongi mpe Mayokani 33:10; 65:3; 88:66.

  9. Botala Yisaya 9:6–7; 61:1; Hosea 13:14; Jekalia 9:9.