Yaka, Landa Ngai
Sanza ya libwa 14–20. “Nzambe Azali Lobiko na Ngai”: Yisaya 1–12


“Sanza ya libwa 14–20. ‘Nzambe Azali Lobiko na Ngai”: Yisaya 1–12,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala (2026)

“Sanza ya libwa 14–20. ‘‘Nzambe Azali Lobiko na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Yisaya azali kokoma na lokasa ezingama

The Prophet Isaiah Foretells Christ’s Birth [Profeta Yisaya Asakoolaki Mbotama ya Klisto], na Harry Anderson

Sanza ya libwa 14–20: “Nzambe Azali Lobiko na Ngai”

Yisaya 1–12

Atako soki ezali mbala na bino ya liboso ya kotanga mokanda ya Yisaya, bokoki komona mikapo oyo ekoyokana lokola oyo boyebi malamu. Yango ezali mpo ete, kati na baprofeta nyonso ya Kondimana na Kala, Yisaya azali oyo atangami mingi na mikanda misusu ya makomi, bakisa mpe na Mobikisi Ye moko. Maloba ya Yisaya ezali mpe mbala mingi na nzembo mpe na miziki mosusu ya bule.

Mpo na nini Yisaya atangami mbala mingi? Ya solo ntina moko ezali ete Yisaya azalaki na likabo ya kobimisa liloba ya Nzambe na elobeli ya polele mpe oyo bato babosanaka te. Kasi eleki oyo. Yisaya afulamaki na baprofeta uta bankola mpo ete bosolo oyo ateyaki elekaki nkola na ye moko (kati na mobu 740 mpe 701 Yambo ya mbotama ya Klisto. Akomaki oyo etali mosala monene ya bosikoli ya Nzambe, oyo ezali monene mingi koleka ekolo moko to eleko moko ya ntango. Wuta na Yisaya, Nefi ayekolaki ete ye mpe bato na ye, atako bakabwanaki na Yisalaele mobimba, bazalaki kaka eteni ya bato ya liyokani ya Nzambe. Na Yisaya, bakomi ya Kondimana na Sika bamonaki masakoli oyo elobelaki Masiya oyo ekokisamaki mpenza liboso ya miso na bango. Mpe na Yisaya, Joseph Smith azwaki bofuli mpo na mosala ya mikolo ya nsuka ya kosangisa Yisalaele mpe kotonga Siona. Ntango bozali kotanga Yisaya, bokomona nini?

Mpo na koyeba makambo mingi ya mokanda ya Yisaya, tala “Yisaya” na Bible Dictionary. Mpo na nsango etali ntango Yisaya azalaki na bomoyi, tala 2 Mikonzi 15–20 mpe 2 Ntango 26–32.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Yisaya 1–12

Maloba ya Yisaya ekokokisama nyonso.

Mobikisi ateyaki ete “makambo nyonso oyo [Yisaya] alobaki ezalaki mpe ekozala, kutu engebene na maloba oyo alobaki” (3 Nefi 23:3). Ntango ozali koyekola mokanda ya Yisaya, kanisa kosala etanda ya masakoli na mito ya makambo lokola oyo: mokolo ya Yisaya, mosala ya nkufa ya Mobikisi, mpe Mikolo mya nsuka. Boyeba ete masakoli mingi ya Yisaya ekokisami na ndenge mingi (tala Bible Dictionary, “Isaiah”).

Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki: “Mokanda ya Yisaya ezali na ebele ya masakoli oyo emonani lokola ekokisami ebele. Emonani ete moko elobeli bato ya ntango ya Yisaya to makambo ya nkola oyo ekoya. Ndimbola mosusu, mbala mingi ezali elilingi, emonani lokola ezali kolobela makambo oyo esalemaki na ntango ya midi, ntango Yelusaleme ebebisamaki mpe bato na yango bapalanganaki nsima ya kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu. Ndimbola mosusu to kokokisama ya esakola yango moko emonani lokola ezali na boyokani na makambo oyo esalemaki na Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Likambo oyo mingi ya masakoli oyo ekoki kozala na ndimbola ebele emonisi ntina ya boluki na biso emoniseli uta na Molimo Mosantu mpo na kosalisa biso tolimbola yango” (“Scripture Reading and Revelation,” Ensign, Sanza ya yambo 1995, 8).

Kotiaka mokoloto na Yisaya. Mobikisi alobaki, “Boluka makambo oyo na limemia; mpo ya motuya ezali maloba ya Yisaya” (3 Nefi 23:1; tala lisusu milongo 2–3). Nzokande mpo na bato ebele, Yisaya ekoki kozala mpasi mpo na kososola. Makanisi oyo elandi ekoki kosalisa:

  • Bomanyola bilembo mpe maloba Yisaya asalelaki.

  • Mituna, “Nini nazali koyekola oyo etali Yesu Klisto?” (tala 1 Nefi 19:23).

  • Boluka bansango oyo eyokani na ntango na biso.

  • Bosalela lisalisi ya boyekoli, lokola diksionere, maloba na nse ya lokasa, mito ya mikapo, mpe Mokambi na Makomi.

Yisaya 1; 3–5

elembo ya seminele
Baprofeta bakebisaka oyo etali lisumu mpe balakaka elikya na nzela ya boyamboli.

Lokola baprofeta na bantango nyonso, Yisaya akobaki mbala na mbala kokebisa bato oyo etali lolenge na ye ya molimo. Ntango bozali kotanga Yisaya 1; 35, Boluka maloba oyo elimboli lolenge nini bato bazalaki kosala na molimo (tala, ndakisa, Yisaya 1:2–4, 21–23; 3:9, 16–17; 5:11–12, 20–23). Mikakatano nini ya ndenge wana bozali komona na ntango na biso? Bokoki lisusu koluka milongo oyo ezali kokebisa oyo etali mbano ya ezalela ya molimo ya Bayisalaele (lokola Yisaya 1:7; 3:17–26; 5:5–7, 13–15).

Kobakisa na makebisi, Yisaya apesaki bansango ya elikya mpo na bosikoli na nzela ya Mobikisi (tala, ndakisa, Yisaya 1:16–19, 25–27; 3:104). Nini boyekoli oyo etali Nkolo uta na bansango oyo? Lolenge nini nsango ya Nkolo na milongo oyo ekeseni na oyo Satana alingi biso tondimela?

Lokola Yisaya, basakoli lelo bazali kokebisa biso na ntina na lisumu mpe mbano na yango, mpe bazali kopesa bansango ya elikya na nzela ya Yesu Klisto. Bandakisa mosusu nini bokoki kokanisa? Bokoki kolinga kotala lisusu nsango moko uta na likita linene ya kala, kolukaka makebisi mpe bilaka ya boye.

Yisaya 2; 4; 11–12

Nzambe akosala mosala monene na mikolo ya nsuka.

Masakoli mingi ya Yisaya ezali na ndimbola songolo mpo na mikolo na biso. Mpo na koluka yango, boluka maloba ya ntango oyo ekoya (ndakisa “ekozala” to “ekokende”). Ndakisa, boluka maloba oyo ntango bozali kotanga Yisaya 2; 4; 11–12. Bokoki kutu komeka kotia yango na maloba ya temp-present (lokola azali to ako). Masakoli nini ezali mpenza kofula bino? Boyekoli nini na masakoli oyo etali Siona, kotonga batempelo, mpe kosangisa Yisalaele?

Yisaya 2:2–3 ezali mingimingi na ntina mpo na Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Lolenge nini masakoli yango ezali kokokisama? Nini boyekoli oyo etali “banzela” mpe “matambe” na ndako na Ye? (molongo 3).

Tala lisusu Yisaya 5:26; “High on the Mountain Top,” Hymns, no. 5.

Yisaya 6

Baprofeta babengamaka na Nzambe.

Na Yisaya 6, Yisaya azwaki libiangi na ye ya kozala profeta. Ntango bozali kotanga mokapo oyo, nini ekamwisi bino oyo etali boyebi ya Yisaya? Lolenge nini mokapo oyo ezali na bopusi na lolenge nini bokanisaka oyo etali Nkolo, baprofeta na Ye, mpe mosala oyo babengami mpo na kosala?

Maliya asimbi mwana Yesu

“Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso” (Yisaya 9:6).

Yisaya 7–9

Nzambe alakaki kotinda Yesu Klisto mpo na kozala Mobikisi na ngai.

Na ntango ya mosala ya Yisaya, Yisalaele esalaki liyokani na Silia mpo na komibatela na Asilia. Yisalaele mpe Silia balingaki kotinda Aazi, mokonzi ya Yuda, asangana na bango. Kasi Yisaya asakolaki ete liyokani esengelaki kokweya mpe ateyaki Aazi andimela Nkolo (Yisaya 7:7–9; 8:12–13).

Ntango Yisaya apesaki Aazi toli, asalaki masakoli mingi oyo eyebani mingi, na ndakisa oyo ezali na Yisaya 7:14; 8:13–14; 9:2, 6–7. Ezala nini masakoli oyo elingaki koloba mpo na Aazi, etali polele Yesu Klisto (tala lisusu Matai 1:21–23; 4:16; 21:44; Luka 1:31–33). Mpo na nini “Emanuele” ezali nkombo malamu mpo na Mobikisi? (tala Matai 1:23). Lolenge nini Azalaki “Mopesi-toli” to “Mokonzi ya Kimia” mpo na bino? (Yisaya 9:7). Nini lisusu boyekoli oyo etali Mobikisi uta na milongo oyo?

Mpo namingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Yisaya 1:2–4, 16–19

Na ntina na Yesu Klisto, nakoki koyambola mpe kokoma peto.

  • Na Yisaya 1:2–4, bino mpe bana na bino bokoki kozwa bantina oyo Nkolo asepelaki te na bato. Bokoma bokokanisi na banyama molongo 3—nani azali “molakisi na biso”? Lolenge nini tolakisaka ete toyebi Ye?

  • Na kotala Yisaya 1:16–18, bino mpe bana na bino bokoki kotala eloko moko ya motane mpe eloko ya pembe peto. To ntango mosusu bokoki kosala elongo mpo na kosokola eloko songolo. Lolenge nini tokomaka peto na molimo? Lolenge nini Yesu asungaka biso tokoma peto? Nini toyekoli etali Mobikisi uta milongo oyo? Bokabola elongo na bana na bino lolenge nini boyokaka oyoetali Ye mpe maye asalaki mpo na bino.

Yisaya 2:2–4

Na tempelo, nayekolaka oyo etali Yesu Klisto.

  • Yisaya amonaki liboso ntango oyo “ngomba ya ndako ya Nkolo” ekobenda bato uta na “bikolo nyonso” (Yisaya 2:2). Lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino bayoka esengo ya kokende na ndako ya Nkolo? Bokoki kobengisa bango basala elilingi ya ndako na bango. Nsima botanga elongo Yisaya 2:2, mpe bobengisa bango bayemba elilingi ya “ndako ya Nkolo,” oyo ezali tempelo. Botanga Yisaya 2:3 elongo. Bobengisa bango babakisa bililingi na bango bato mingi koyaka na tempelo, mpe mabota na bango.

  • Bokoki lisusu kotanga Yisaya 2:2–3 elongo mpe kotala eloko moko oyo efulaka bino mpe bana na bino bokende na tempelo. Bongo, nsima ya kotanga Yisaya 2:4 elongo, bokoki kosolola lolenge nini tempelo ememelaka bango kimia. Bokanisa koyembaka loyembo oyo etali tempelo, lokola “I Love to See the Temple” (Children’s Songbook, 95). Bosalisa bango bamona maloba kati ya loyembo oyo ezali koteya maye tempelo ezali mpe maye tosalaka kuna.

Tempelo ya Salt Lake na mpokwa

Tempelo ya Salt Lake

Yisaya 7:14; 9:6–7

Yesu Klisto ayaki na mabele mpo na kozala Mobikisi na ngai.

  • Mpo na koyingisa masakoli ya Yisaya ya Klisto, bino mpe bana na bino bokoki kolobela nkoma minene ya bato, lokola mokambi, episikopo, to molakisi. Bankombo oyo eyebisi biso nini oyo etali bato oyo? Bosalisa bana na bino bazwa bankombo ya Yesu Klisto na Yisaya 7:14 mpe 9:6–7 (tala lisusu lokasa ya milulu ya poso oyo). Bankombo oyo moko na moko eteyi nini oyo etali Ye? Toyekoli lisusu nini oyo etali Yesu Klisto uta na milongo oyo?

  • Bokoki lisusu kokabola na bana na bino “Yisaya Profeta” (na Lisolo ya Kondimana na Kala, 150–51). Bopema mbala na mbala mpo na kotuna nini Yisaya ayebaki oyo etali Yesu Klisto mibu ebele liboso ye abotama. Bokoki kosalela Matai 1:21–23; Luka 1:31–33 mpo na kosolola oyo etali lolenge nini masakoli ya Yisaya na Yisaya 7:14; 9:6–7 ekokisamaki.

    1:18

    Isaiah the Prophet

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .

nkake ebeti likolo ya tempelo

Yisaya ateyaki ete tempelo ekozala “esika ya ekimelo” mpe “ebombamelo mpo na mopepe makasi mpe mvula” (Yisaya 4:6). Tempelo ya Falls ya Idaho na Idaho

Lokasa ya milulu ya Etelo ya bana: Yisaya asakolaki oyo etali Yesu Klisto