“Sanza ya libwa 28–Sanza ya zomi 4. ‘Bobondisa Bato na Ngai’: Yisaya 40–49,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya libwa 28–Sanza ya zomi 4. ‘Bobondisa Bato na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimanana Kala 2026
Healing the Blind Man [Kobikisa Mokufi Miso], na Carl Heinrich Bloch, na Frederiksborg Museum of National History
Sanza ya libwa 28–Sanza ya zomi 4: “Bobondisa Bato na Ngai”
Yisaya 40–49
“Kobondisa” ezali liloba ya yambo ya Yisaya mokapo 40. Ezali kolakisa ebandeli ya elobeli ya lolenge mosusu, loleenge mosusu ya kotya likebi na nsango ya profeta. Makomi ya libosoliboso ya Yisaya ekebisaki Yisalaele mpe Yuda etali bobebisi mpe boombo oyo esengelaki koya likolo ya masumu na bango. Kasi masakoli ya nsuka oyo ezalaki na ntina ya kobondisa Bayuda mpo na mibu 150 na mikolo ekoya—nsima ya bobebisi ya Yelusaleme mpe tempelo mpe bokangi bato na boombo na Babilone. Nzokande, masakoli wana, ekomaki kutu mosika na mikolo ezali koya koleka epai ya Bayisalaele oyo balongamaki mpe balembaki nzoto. Ezali kolobela biso, oyo ntango mosusu tomiyokaka ya kolongama, ya kolemba nzoto, mpe kutu ya kobunga.
Nsango ya Yisaya epayi ya bato na ye mpe epayi na biso ezali pete: “Kobanga te” (Yisaya 43:1). Nyonso ebungi te. Nkolo abosani bino te, mpe Ye azali na nguya likolo ya makambo oyo bomoni ete bokoki kosala eloko te mpo na kosilisa yango. Ezali Nkolo te, moto oyo “akelaki likolo” (Yisaya 42:5), ya nguya mingi koleka Babilone, koleka lisumu, koleka eloko nyonso oyo ezali kokanga bino na boombo? “Zonga epayi na ngai,” Azali kosenga, “pamba te Nasili kosikola yo” (Yisaya 44:22). Akoki kobikisa, kozongisa, kolendisa, kolimbisa, mpe kobondisa—eloko nyonso esengeli mpo bino, na oyo etali bino, mpo na kosikolama.
Makanisi mpo na koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Yisaya 40–49
Yesu Klisto akoki kobondisa ngai mpe kopesa ngai elikya.
Ntango Bayisalaele bazalaki na boombo na Babilone, ekoki kozala ete mingi bamitunaki soki babungisaki esika na bango mpo na libela lokola bato baponama mpe ya boyokani ya Nzambe. Ntango bozali kotanga Yisaya 40–49, boluka maloba oyo ekoki kobondisa mpe kopesa elikya. Mpo na liloba nyonso oyo bokozwa, bomanyola mpe bokoma oyo Nkolo akoki koloba na bino na milongo wana. Oyo ezali mwa moke bokoki kobanda na yango:
-
40:11, 29–31:
-
41:10–13, 17–18:
-
42:6–7:
-
43:1–7, 25:
-
44:1–4, 21–24:
-
46:3–4:
-
49:7–16:
Bokanisi ete Nkolo alingi bino boyeba nini na ntina na Ye?
Bokoki koyeba ete loyembo “How Firm a Foundation” (Hymns, no. 42) ekangami na maloba ya Yisaya na Yisaya 41:10; 43:2–5; 46:4. Bokanisa koyemba to koyoka nzembo oyo, kolukaka bokokani kati ya maloba na yango mpe milongo uta na Yisaya. Lolenge nini Nkolo akokisaki bilaka na milongo oyo kati na bomoi na bino?
Botala lisusu Patrick Kearon, “He Is Risen with Healing in His Wings: We Can Be More Than Conquerors [Asekwi na Libiki na Mipanzi na Ye: Tokoki Kozala Mingi Koleka],” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 37–40.
Bosalela makomi ya kobakisa. Ntango mosusu tokoki kososola Kondimana na Kala malamu mingi soki tozali kobakisa boyekoli na biso elongo na milongo uta na Buku ya Mormon. Ndakisa, baprofeta ya Buku ya Mormon Nefi mpe Yakobo bazalaki na makomi ekomama na Yisaya likolo ya bapalaki ya motako (tala 1 Nefi 19:22–23), mpe basalelaki masakoli yango mpo na koteya na ntina ya Mobikisi. Mpo na koyekola lolenge Nefi mpe Yakobo bakokanisaki Yisaya 48–49 na bato na bango, tala 1 Nefi 22. Yango ekoki kosalisa bino bokokanisa mikapo oyo na bomoi na binomei.
Na kotosaka Nkolo, tokoki kozala na “kimia … lokola ebale” (Yisaya 48:18).
Yisaya 40–49
“Ozali mosali na ngai.”
Na Yisaya 40–49 mobimba Nkolo azali koloba na ntina ya “mosali” na Ye mpe “banzeneneke” na Ye. Maloba oyo ekoki kolobela Yesu Klisto (tala Yisaya 42:1–7), ndako ya Yisalaele (tala Yisaya 45:4), mpe Mokonzi Siruse, oyo apesaki Bayuda ndingisa ya kozonga na Yelusaleme mpe batonga lisusu tempelo (tala Yisaya 44:26–28; 45:1–4). Bokoki lisusu kokanisa lolenge nini milongo yango ezali kosalelama epayi na bino lokola mosali mpe nzeneneke ya Nkolo. Ndakisa, bomanyola mituna lokola oyo elandi:
Yisaya 40:1–3, 9–11; 43:9–12. Ozali nzeneneke ya Yesu Klisto na lolenge nini? “Bansango ya esengo” nini bokoki kokabola lokola nzeneneke na Ye? Bokoki kokanisa ete bobengamaki mpo na kotatola na tribinale. Na likambo oyo, Yesu Klisto afundameli ete alobaki makambo oyo ekomami na Yisaya 43:11. Litatoli nini bokoki kopesa mpo na kosunga na likambo ya Yesu yango? Elembeteli nini ya bomoi na yo bokoki kopesa?
Yisaya 41:8–13; 42:6; 44:21. Nini Nkolo abengeli bino mpo na kosala? Bozwa mabiangi ya Eklezia mpe mabaku mosusu mpo na kaselela Ye. Lolenge nini Ye “atangisi” to alengeli bino mpo na kokoma basali na Ye? Lolenge nini Ye azali kosunga bino ntango bozali kosalela Ye?
Yisaya 49:1–9. Bansango nini bozwi na milongo wana oyo ekoki kosalisa ntango milende mpe mosala na bino emonani kozala “ya mpamba, mpe ya litomba moko te”? (molongo 4).
Yisaya 40:3–8, 15–23; 42:15–16; 47:7–11
Nguya ya Nzambe ezali monene mingi koleka nguya ya mokili.
Yisaya akundolisi bato na ye mbala na mbala etali nguya ya Nzambe oyo eleki nyonso, kutu akokanisaki na nguya ya mokili ya konyokola oyo ezalaki kozinga bango. Botala nsango yango ntango bozali kotanga Yisaya 40:3–8, 15–23; 42:15–16; mpe 47:7–11 (boyeba ete mokapo 47 elobeli baye bakangaki Yisalaele, Babilone). Nini milongo oyo eteyi bino etali makambo ya mokili? Nini yango eteyi bino etali Nzambe? Bomanyola mpo na nini nsango oyo ekokaki kozala motuya epayi ya Bayuda kati na boombo. Mpo na nini yango ezali motuya mpo na bino?
Yisaya 48:10; 49:13–16
Nkolo akoki kosembola ngai na bampasi na ngai.
Ntango bozali kotanga Yisaya 48:10, bomanyola “moto ya minyoko” ya binomei. Lolenge nini Nkolo azali “kosembola” bino? Lolenge nini Yisaya 49:13–16 esalisaka bino ntango bonyokwamaka mitungisi?
Botala lisusu “Moto ya Monyangwisi Bibende” (video), Gospel Library.
The Refiner's Fire
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge magazini .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yisaya 40:3–5
Nakoki kosalisa kolengela “nzela ya Nkolo.”
-
Bokanisa etali ndenge ya kolakisa nini ekoki kolimbola “kolengela … nzela ya Nkolo,” lolenge elimbolami na Yisaya 40:3–5. Ndakisa, bino mpe bana na bino bokoki kosembola eloko moko oyo etengama, kolongola bosoto na nse, to kofungola nzela esika oyo ezali na mabanga. Bokoki lisusu kolakisa bililingi ya Yoane Mobatisi mpe Joseph Smith (tala Buku ya Bilili ya Nsango Malamu, nimelo 35, 87). Lolenge nini balengelaki nzela mpo na boyei ya Nkolo? (tala Luka 3:2–18; Malongi mpe Mayokani 135:3). Lolenge nini tokoki kosalisa? Oyo ekoki kozala libaku ya kolobela lolenge nini bamemi ya Bonganganzambe ya Alona basalisaka na kolengela nzela ya Nkolo (tala Malongi mpe Mayokani 84:26–28).
Yisaya 43:10
Nakoki kozala nzeneneke ya Nkolo.
-
Nsima ya kotanga Yisaya 43:10 elongo, bokoki kolobela oyo etali nini elingi koloba kozala nzeneneke. Bokabola moko na mosusu makambo oyo bokutani na yango oyo bokoki kozala “nzeneneke” na yango—ndakisa, bilei oyo bomeki, esika moko oyo bokendaki, to moto moko oyo boyebi. Nini yango elingi koloba kozala nzeneneke ya Nkolo? Nini biso tokoki koyebisa basusu oyo etali Ye?
Yisaya 44:3–4; 45:8
Nkolo “akosopa” mapamboli na Ye likolo na ngai.
-
Nsima ya kotanga milongo oyo, bana na bino bakoki kosopela nzete mai mpe kolobela na ntina ya mapamboli Nkolo asopeli bango. Nini ekomelaka nzete ntango tosopelaka yango mai? Lolenge nini mapamboli ya Nkolo esalisaaki biso tokola?
“Bosembo na biso [ekoki kozala] lokola mbonge ya mbu” (Yisaya 48:18).
Yisaya 48:17–18
Kobatelaka mitindo ya Nzambe ememaka kimia.
-
Bililingi to bavideo ya mbonge ya ebale mpe mbu ekoki kosalisa bana na bino bamona na makanisi Yisaya 48:18 (lokola bililingi oyo ezali na emonaneli oyo). Bana na bino bakoki kosepela koningisa maboko na bango lokola ebale mpe mbonge ya mbu. Lolenge nini kimia ekoki kozala lokola ebale? Lolenge nini bosembo ekoki kozala lokola mbonge? Bolobela oyo etali lolenge nini kobatelaka mitindo ya Nzambe esalisi bino boyoka kimia lokola ebale to lokola mbonge makasi.
-
Boyemba elongo loyembo etali mitindo, lokola “Keep the Commandments” (Children’s Songbook, 146–47). loyembo yango eteyi bino nini etali ntina tosengeli kobatela mitindo ya Nzambe?
Yisaya 49:14–16
Nkolo akotikala kobosana ngai ata moke te.
-
Yisaya 49:14–16 ekoki kozala libondisi monene epayi ya bana na bino mpo na mibu oyo ekoya. Ntango bozali kotanga molongo 14, bokoki kolobela oyo ekoki kosala bato bamiyoka lokola babosani bango to basundolami. Lolenge nini toyebaka ete Nkolo abosani biso te?
-
Mpo na koyingisa milongo 15–16, bokoki kosenga bana na bino etali moto moko oyo bakobosana ata moke te, lokola moto ya libota to moninga. Engebene na Yisaya 49:15–16, mpo na nini Nkolo akotikala kobosana biso ata moke te? Nsima bokoki kokabola moko na mosusu mayoki na bino oyo etali Yesu Klisto.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo ya magazini ya Moninga .