“Sanza ya zomi 19–25. ‘Liboso Nasala Yo na Libumu Nayebaki Yo’: Yilimia 1–3; 7; 16–18; 20,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi 19–25. ‘Liboso Nasala Yo na Libumu Nayebaki Yo,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Jeremiah [Yilimia], na Walter Rane
Sanza ya zomi 19–25: “Liboso Nasala Yo na Libumu Nayebaki Yo”
Yilimia 1–3; 7; 16–18; 20
Na ebandeli, Yilimia akanisaki te ete akokoma profeta malamu. “Tala, nakoki koloba te,” aboyaki (Yilimia 1:6). Kasi Nkolo akitisaki ye motema: “Natie maloba na ngai na monoko na yo” (molongo 9). Yilimia akanisaki ete azali “mwana” oyo ayebi makambo mingi te (molongo 6), kasi Nkolo alimbolaki ete amilengelamaki malamu koleka lolenge akanisaki—akulisamaki na mosala yango liboso kutu abotama (tala molongo 5). Yango wana, Yilimia atikaki kobanga mpe andimaki libiangi yango. Akebisaki bakonzi mpe banganganzambe ya Yelusaleme ete ezaleli na bango ya komibenga basantu ekobikisa bango te. “Mwana” oyo akanisaki ete akoki koloba te ayaki koyoka liloba ya Nzambe “na motema [na ye] lokola moto oyo ezali kopela” mpe akokaki kokanga monoko te (Yilimia 20:9).
Lisolo ya Yilimia ezali mpe lisolo na yo. Nzambe ayebaki bino, mpe, yambo bobotama mpe alengelaki bino mpo na mosala na bino na bomoi. Kati na makambo mosusu, mosala yango esangisi likambo moko oyo Yilimia asakolaki: kosangisa bato ya Nzambe, moko na moko, mpo na “komema [bango] na Siona” (Yilimia 3:14). Mpe ata soki oyebi mpenza te nini osengeli kosala to koloba, okoki “kobanga te … ; mpo nazali elongo na yo, elobi Nkolo” (Yilimia 1:8, 19).
Mpo na koyeba makambo mingi ya mokanda ya Yilimia, tala “Yilimia” kati na Bible Dictionary.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Yilimia 1:4–19; 7:1–7; 20:8–9
Baprofeta babiangami mpo na koloba liloba ya Nzambe.
Bokanisa bozali kosolola na moninga oyo ayokaki naino te nsango ya baprofeta, mpe bozwi mokano ya kolimbola likanisi yango kosalelaka libiangi ya Yilimia mpo na kozala profeta na Yilimia 1:4–19. Nini bozwi na milongo miye oyo eteyi likambo etali baprofeta ya Nzambe? Bokoki mpe kotala kati na Yilimia 7:1–7; 20:8–9 mpe na nzembo lokola “We Listen to a Prophet’s Voice” (Hymns, no. 22).
Bokoki mpe kolinga koteya moninga na bino etali profeta ya bomoi ya lelo. Ezali na likambo moko na banzela yango oyo ekoki kosalisa? Na ndakisa, nini baprofeta na mikolo na biso “balongolaka misisa” to “babendaka na nse”? “Batongaka” mpe “balonaka” nini? (Yilimia 1:10). Lolenge nini boyaki koyeba ete profeta na biso ya bomoi abiangemi na Nzambe?”
Tala lisusu Biteni ya Bondimi 1:6, 9; “Why Do We Have Prophets?” (video), ChurchofJesusChrist.org.
Why Do We Have Prophets?
Yilimia 1:5
Nzambe ayebaki ngai liboso nabotama.
Yilimia ayekolaki nini mpo na ye moko kati na Yilimia 1:5? Lokola azali profeta oyo auti kobiangema sika, mpo na nini nsango wana ekozala na ntina mpo na ye ayeba?
Mingi ya makambo Yilimia ayekolaki mpo na ye moko na Yilimia 1:5 ezali mpe solo mpo na bino. Nzambe ayebaki mpe bino liboso ya kobotama mpe abongisaki bino mpo na mikumba ya sikisiki. Mpo na koyeba mingi koleka oyo etali bomoi na bino liboso bobotama, tanga Alma 13:1–4; Malongi mpe Mayokani 138:53–56; mpe Abalayama 3:22–23. Bokoki kokoma mokanda ya mateya ya solo bino bokundoli. Mpo na nini ezali ntina mpo na bino koyeba yango?
Mpo na koyekola oyo etali lolenge nini bosolo oyo esimbaki bomoi ya Mpaka Ahmad S. Corbitt, boyekola nsango na ye “You Can Gather Israel! [Bokoki Kosangisa Isaele!]” (Liahona, Sanza ya mitano 2021, 63–63). Lolenge nini koyebaka oyo etali bomoi na bino yambo ya kufa ezali kosimba lolenge bozali kobika bomoi na bino ya kufa?
Tala oyo Mokambi Russell M. Nelson alobaki etali bomoi na bino yambo ya kufa:
“Tata na bino na Lola ayebi bino uta ntango molai mpenza. Bino, lokola mwana na Ye ya mobali to ya mwasi, boponamaki na Ye mpo na koya na mabele na ntango oyo mpenza, mpo na kozala mokambi na mosala na Ye monene na mabele. Boponamaki te mpo na bizaleli na bino ya nzoto kasi mpo na bizaleli na bino ya molimo lokola, mpiko, bosembo ya motema, mposa ya solo, nzala ya bwanya, mpe mposa ya kosalela basusu.
“Bokolisaki mwa bizaleli yango liboso ya nkufa. Misusu bokoki kokolisa awa na mabele wana bozali koluka yango na molende” (“Decisions for Eternity [Mikano mpo na Boseko],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 107).
Bokanisa makambo mosusu oyo bokoki kokutana na yango oyo ekozala na ntina mingi bomikundola bosolo oyo etali bomoi na bino yambo ya kufa. Nini bokoki kosala mpo na kobatela libota na bino?
Tala lisusu Russell M. Nelson, “Decisions for Eternity [Mikano mpo na Boseko],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 106–9; Topics and Questions, “Foreordination [Kokulisama Yambo ya Mbotama],” “Premortal Life [Bomoi Yambo ya Kufa],” Gospel Library.
Na Yilimia 2:13, Nkolo akokanisaki ezalela ya molimo ya bato na “mabulu ya mayi oyo ebukani” mpe amikokanisaki na “liziba ya mayi ya bomoi.”
Yilimia 2; 7
“Batiki ngai liziba ya mayi na bomoi.”
Na mboka ya kokawuka epayi Bayisalaele bazalaki kofanda, bato bazalaki kobomba mayi ya motuya na bibombelo ya nse ya mabele oyo babengaka mabulu ya mayi. Bokanisi nini ete “mabulu ya mayi oyo ebukana” oyo balobeli na Yilimia 2:13 ekoki kozala elembo ya nini? Mpo na nini kozwa mayi na liziba ekozala malamu koleka kotya motema na libulu ya mayi? Yango elingi koloba nini kozala “liziba ya mayi ya bomoi”? Ntango bozali kotanga Yilimia 2 mpe 7, botala lolenge nini bato bazalaki kotika mayi ya bomoi ya Nkolo (botala, na ndakisa, Yilimia 2:26–28; 7:2–11). Mpo na nini “mayi ya bomoi” ezali elembo malamu mpo na oyo Mobikisi apesi bino? Bokanisa na oyo etali lolenge nini bozali kozwa mayi ya bomoi.
Yilimia 7 elobeli bato oyo bazalaki kokota “ndako ya Nkolo mpo na kokumbamela Nkolo,” kasi misala na bango ekokanaki te na komipesa na bango ya libanda (tala milongo 2–11). Nsango nini bokanisi Nkolo akoki kozala na yango mpo na bino na kati ya milongo 21–23?
Bosalela mateya ya biloko Mbala mingi baprofeta ya Nkolo bakokanisaka bosolo ya molimo na biloko oyo bomesana na yango. Bokanisa kosala lolenge moko ntango bozali koyekola mpe koteya nsango malamu. Na ndakisa, mpo na komona na makanisi Yilimia 2:13, bokoki kotya mayi na kati ya kopo oyo epasuka to oyo ebukana to komela uta na liziba. Lolenge nini Yesu Klisto azali lokola “liziba ya mayi ya bomoi”? (Yilimia 2:13). Lolenge nini tomelaka mayi na Ye ya bomoi?
Yilimia 3:14–18; 16:14–21
Nkolo akosangisa bato na Ye.
Na Yilimia 16:14–15, 16, Yilimia akokanisaki bosangani ya Yisalaele na mikolo ya nsuka na Kobima ya Yisalaele na Ejipito. Na likanisi na yo, mpo na nini bosangani yango ekozala na motuya mingi mpo na basali ya Nzambe koleka Kobima?
Nini Yilimia 3:14–18; 16:14–21 elobeli na oyo etali lolenge oyo bosangani yango ekosalema?
Na nsango na ye “Elikya ya Yisalaele,” Mokambi Russell M. Nelson, lokola Yilimia, ateyaki bosangani ya Yisalaele,“ezali eloko ya ntina mingi koleka oyo ezali kozwa esika na mabele lelo” (losambo ya bilenge ya mokili mobimba, sanza ya motobba 3, 2018, Gospel Library). Botanga to boyoka nsango na ye, mpe botala soki bokoki kokundola (a) lolenge nini Mokambi Nelson alimboli bosangani ya Yisalaele, (b) lolenge nini alimboli motuya na yango, mpe (c) lolenge nini bokoki kozala eteni ya bosangani.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yilimia 1:5
Tata na Lola ayebaki ngai liboso nabotama.
-
Mpo na koyingisa bosolo ya motuya oyo eteyamaki na Yilimia 1:5, bokoki kolakisa bana na bino elilingi ya bebe (to, soki likoki ezali, bokoki kotala bililingi ya bana na bino ntango bazalaki bana mike). Botuna bana na bino soki bayebi bisika babikaki yambo babotama. Bokoki lisusu koyemba elongo loyembo oyo ezali koteya etali bomoi na biso ya yambo ya kufa, lokola “I Lived in Heaven” (Children’s Songbook, 4).
-
Soki bana na bino bakolinga koyeba makambo mingi, bokoki kosalisa bango bazwa “Premortal Life [Bomoi Yambo ya Kufa]” kati na Bokambi mpo na Makomi. Bakokaki koluka biyano na mituna “nani,” “ntango nini,” mpe “nini” etali bomoi ya yambo ya kufa.
Yilimia 1:4-19
Baprofeta babengami mpo na koloba maloba ya Nkolo.
-
Bokanisa kolakisa bililingi ya profeta ya bomoi to baprofeta uta na makomi (bokoki kokuta mwa ndambo na Church magazines [bamagazini ya Eklezia], na Gospel Art Book, mpe Yaka, Landa Ngai). Botuna bana na bino nini bayebi na oyo etali baprofeta yango.
-
Mpo na koteya oyo etali nini baprofeta basalaka, bosengeli kopona mwa milongo ekoki kosalisa kati na Yilimia 1, lokola milongo 5, 7, 10, mpe 19. Bana na bino bakokaki moko na moko kopona moko ya milongo, kotanga yango, mpe kokabola likambo moko oyo bayekoli etali baprofeta.
Yilimia 16:14–16
Nakoki kosalisa bana ya Tata na Lola bazonga epayi na Ye.
-
Ntango bozali kotanga Yilimia 16:16, bana na bino bakokaki kosala lokola “bazali koloba” to “koluka” biloko na kati ya ndako. Mokambi Russell M. Nelson akokanisi babomi-mbisi mpe babomi-nyama na molongo oyo na bamisionele (botala “The Gathering of Scattered Israel [Bosangani ya Isaele Epalanganisama],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2006, 81). Bamisionele basalaka nini? Lolenge nini tokoki kosalisa “koloba” mpe “koluka” Yisalaele oyo epalangani? (botala “Nsango moko mpo na bana uta na Mokambi Russell M. Nelson” [video], ChurchofJesusChrist.org).
3:30Video: A Message for Children from President Russell M. Nelson
Yilimia 18:1-6
Nakoki kotika Nkolo akamba bomoi na ngai, lokola moyemi-mbeki azali kosala mabele ya lima.
-
Mpo na koluka milongo yango, bokoki kolobela to kolakisa ndenge oyo basalaka bambeki (tala elilingi oyo ezali na nsuka ya mwango oyo). Nsango nini Nkolo azali na yango mpo na biso na Yilimia 18:1–6? Elimboli nini mpo na kozala “lima na maboka na Nkolo”? (botala lisusu Yisaya 64:8). Mpo na lisolo mosusu oyo ekokanisi biso na mabele ya lima ya mosali-mbeki, tala nsango ya Mpaka Richard J. Maynes “ .“The Joy of Living a Christ-Centered Life [Esengoya Kobika Bomoi Etyie Klisto na Katikati]” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 27–30).
Mpo na mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.