“Sanza ya zomi 26–Sanza ya zomi na moko 1. ‘Nakobongola Matanga na Bango Ekoma Esengo’: Yilimia 31–33; 36–39; Milelo 1; 3” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi 26–Sanza ya zomi na moko 1. ‘Nakobongola Matanga na Bango Ekoma Esengo,’” Yaka, Landa Ngai—Kondimana na Kala 2026
Jeremiah Lamenting the Destruction of Jerusalem [Yilimia Azali Kolela mpo na Kobebisama ya Yelusaleme], na Rembrandt van Rijn
Sanza ya zomi 26–Sanza ya zomi na moko 1: “Nakobongola Matanga na Bango Ekoma Esengo”
Yilimia 31–33; 36–39; Milelo 1; 3
Ntango Nkolo abengaki Yilimia mpo na mbala ya yambo mpo azala profeta, Ayebisaki ye ete etinda na ye ekozala “kolongola misisa, mpe kobenda na nse” (Yilimia 1:10)—mpe na Yelusaleme, ezalaki na mabe mingi ya kolongola mpe kobenda na nse. Kasi oyo ezalaki kaka eteni ya etinda ya Yilimia—abiangamaki mpe “mpo na kotonga, mpe kolona” (Yilimia 1:10). Nini ekokaki kotongama to kolonama kati na bitika ya mpamba oyo ebebisamaki na botomboki ya bato ya boyokani? Etunamaki na lolenge mosusu, ntango lisumu to mpasi etiki bomoyi na biso na libebi, lolenge nini tokoki kotonga lisusu mpe kolona lisusu? Eyano ezali na “Etape ya boyengebene” (Yilimia 33:15), Masiya ya elaka. Amemaka “liyokani ya sika” (Yilimia 31:31)—oyo esengaka mingi koleka komonana ya libanda ya komipesa. Mobeko na ye esengeli kozala “na kati na biso,” ekomama “na mitema [na biso].” Yango nde elingi koloba mpo na Nkolo “kozala Nzambe [na biso]” mpe mpo na biso “kozala bato [na Ye]” (Yilimia 31:33). Ezali likambo ya bomoyi mobimba, mpe tokosala kaka mabunga mpe tokozala na ntina ya kolela ntango na ntango. Kasi ntango tosali yango, Nkolo alaki, “Nakobongola matanga na bango na esengo” (Yilimia 31:13).
Mpo na bomoni mobimba ya Milelo, botala “Milelo, Buku ya” na kati ya Mokambi na Makomi.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Yilimia 31; 33
Nkolo akobimisa bato ya liyokani na Ye libanda ya boombo.
Na Yilimia 31; 33 Nkolo ayebaki “milelo, mpe boleli ya bololo” (Yilimia 31:15) Bayisalaele basengelaki kozala na boombo. Nzokande, apesaki mpe lisusu maloba ya libondi mpe elikya. Boluka yango ntango bozali koyekola mikapo oyo. Bilaka nini bozwi oyo esalamaka epayi na bino?
Yilimia 31:31–34; 32:37–42
“Bakozala bato na ngai, mpe nakozala Nzambe na bango.”
Atako Bayisalaele babukaki mayokani na bango, Yilimia asakolaki ete Nkolo akotia lisusu “boyokani ya sika” mpe “ya seko” elongo na bango (Yilimia 31:31; 32:40). Nini ezali boyokani yango? Bobanza kolukaka mamoni na kati ya Mokambi na Makomi, “New and Everlasting Covenant [Boyokani ya Sika mpe ya Seko],” Gospel Library.
Ntango bozali kotanga Yilimia 31:31–34; 32:37–42, bomanyola:
-
Nini elingi koloba mpo na bino kozala eteni ya bato ya boyokani ya Nzambe.
-
Nini elingi koloba kozala na mobeko na Ye ekomami na motema na bino.
-
Oyo Nkolo alaki ntango bozali kosala mayokani elongo na Ye.
-
Lolenge nini bondeko ya boyokani na bino na Nkolo ebongoli bino.
Bilaka nini bopesi Nzambe ntango bosanganaki na makuli ya bule? Lolenge nini Ye azali kokokisa bilaka na Ye epayi na bino?
Botala lisusu David A. Bednar, “Abide in Me, and I in You; Therefore Walk with Me [Bokangama na Ngai, mpe Ngai kati na Bino; Yango wana, Botambola elongo na Ngai],” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 123–26.
Yilimia 36
Makomi ezali na nguya ya kotia ngai mosika ya mabe.
Engebene na Yilimia 36:2–3, Mpo na nini Nkolo atindi Yilimia akoma masakoli na ye? Ntango bozali kotanga Yilimia 36, bomona lolenge nini bato oyo balandi bayokaki oyo etali masakoli oyo:
-
Nkolo (botala milongo 1–3, 27–31)
-
Yilimia (botala milongo 4–7, 32)
-
Baluke (botala milongo 4, 8–10, 14–18)
-
Yeudi mpe Mokonzi Yoakimi (botala milongo 20–26)
-
Elnatane, Delaiya, Gemaliya (botala molongo 25)
Bomanyola lolenge nini boyokaka oyo etali makomi. Lolenge nini esalisaki bino bozala mosika ya mabe?
Yilimia 37–39
Botelema ngwi na masakoli ya Nzambe oyo elandi.
Na Yilimia 37:1–3, 15–21; 38:1–6, 14–28, elikya nini bomoni oyo Mokonzi Zedekiya andimelaki ete Yilimia azalaki profeta ya solo ya Nkolo? Elikya nini bomoni oyo Zedekiya andimelaki te? Boyekoli nini uta na bokokanisi oyo? Ntango bozali kotanga Yilimia 39, bomanyola bokeseni oyo elingaki kosala soki Zedekiya mpe bato na ye balandaki profeta mpe babatelaki mitindo ya Nkolo. Bokokanisa oyo esalemaki na Zedekiya na oyo esalamaki na libota ya Lehi na 1 Nefi 1–2.)
Yilimia 38:6–13; 39:15–18
Nakoki kozala na mpiko ya kotelema mpo na oyo ezali malamu.
Bayangeli ya mokonzi bayokaki ete masakoli ya Yilimia ezalaki kosala ete basoda na bango balinga mingi te kobunda, yango wana babwakaki Yilimia kati na boloko ya bosoto (botala Yilimia 38:1–4). Na Yilimia 38:6–13, nini ekamwiisi bino oyo etali eyano ya Ebede-meleke ya Etiopi? Bomona lisusu lipamboli Nkolo apesaki Ebede-meleke na Yilimia 39:15–18.
Lolenge nini bokoki kolanda ndakisa ya Ebede-meleke
Elelo ya Yilimia
Milelo 1; 3
Nkolo akoki kosilisa mawa oyo nazali kokutana na yango mpo na lisumu.
Buku ya Milelo ezali liboke ya maloba ya ntoki oyo ekomamaki nsima ya kobebisama ya Yelusaleme mpe tempelo na yango. Mpo na nini bokanisi ezali motuya bango babatelamaki? Bobanza maloba ya ntoki nini kati na Milelo 1 mpe 3 esalisi bino bososola oyo etali mawa makasi Yisalaele eyokaki. Bansango nini ya elikya na Klisto bomoni? (botala mingimingi Milelo 3:20–33; botala lisusu Matai 5:4; Yakobi 4:8–10; Alma 36:17–20).
Mokambi M. Russell Ballard alobelaki makambo mingi oyo ekoki kosala ete basusu babungisa elikya, mpe apesaki toli oyo etali esika nini bakoki kozwa elikya:
“Basusu kati na biso bakoki komona ete bomoyi na biso etondi na boyokisi mpasi, bwale, mpe mawa. Mingi bamiyokaka ete bakoki kosala eloko te mpo na kolonga mobulu oyo emonani lokola ete ezali koleka na mokili. Basusu bazali kotungisama mpo na bato ya libota oyo bazali komema bango na nse ya mayi na nzela ya mbangu mpe ya makasi ya bizaleli oyo ezali kolemba mpe mitinda ya bizaleli malamu oyo ezali kokita. … Mingi kutu bamitiki mosala mpo na kondima mabe mpe motema mabe ya mokili lokola oyo ekoki kobongisama te. Basundolaki elikya. …
“… Basusu kati na biso bakoki kobungisa elikya nyonso mpo na masumu mpe bobuki mobeko. Moto akoki kozindisama mpenza na banzela ya mokili oyo amoni nzela ya kobima te mpe abungisi elikya nyonso. Libondeli na ngai na baye banso bakweyi na motambo oyo ya monguna ezali ya kotika atako moke te! Atako soki makambo ekoki komonana lokola ya kozanga elikya to lolenge ya kobungisa elikya nini ekoki lisusu kokoma, nabondeli bino bondimela ngai, bokoki ntango nyonso kozala na elikya. Ntango nyonso” (“The Joy of Hope Fulfilled [Esengo ya Elikya Ekokisami],” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1992, 31–32).
Botala lisusu “Come, Ye Disconsolate,” Hymns, no. 115.
Bosalisa basusu bazwa mokumba mpo na boyekoli na bango moko. Ntango mosusu emonani lokola lolenge ya pete ya koteya ezali kaka koyebisa bayekoli oyo tokanisi ete basengeli koyeba. Nzokande, lolenge ya pete mpenza ezali ntango nyonso te lolenge ya malamumpenza. Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Makanisi na biso esengeli kozala te ‘Nini nayebisa bango?’ Na esika na yango, mituna ya komituna biso moko ezali ‘Nini nakoki kobengisa bango basala? Mituna nini efulama nakoki kotuna, soki bazali na bolingi ya koyanola, ekobanda kobengisa Molimo Mosantu na kati ya bomoyi na bango?’” (evening with a General Authority [mpokwa elongo na Bakambi Minene], Sanza ya mibale 7, 2020, broadcasts.ChurchofJesusChrist.org; botala lisusu Teaching in the Savior’s Way, 25). Ezali na lolenge mingi ya kosalisa bayekoli bazwa mokumba ya boyekoli na bango. Ndakisa, na mwango oyo bayekoli babengisami koluka, komanyola, kokoma, kotala bilili, kosangana na mateya ya biloko, kosala mayemi, mpe kokabola mpe kosalela oyo bayekolaka.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yilimia 31:3
Tata na Lola mpe Yesu Klisto balingi ngai “na bolingo ya seko.”
-
Ntango bozali kotanga Yilimia 31:3 na bana na bino, bakoki kosalisa bino bozwa biloko (to bililingi ya biloko) oyo ewumelaka ntango molayi, ndakisa mbongo ya ebende, mpe mosusu oyo ewumelaka te, ndakisa eteni ya mbuma. Bokoki kolobela nini “ya seko” elingi koloba mpe kokabola moko na mosusu lolenge nini boyokaki “bolingo ya seko” ya Tata na Lola.” Bokoki mpe koyemba elongo loyembo lokola “God Is Watching Over All” (Children’s Songbook, 229).
Yilimia 31:31–34; 32:38–41
Nzambe akosalisa ngai nabatela mayokani na ngai.
-
Bana na bino bakoki kosepela koyema motema na eteni ya lokasa mpe nsima kokoma na motema makambo oyo bayekoli uta na Yilimia 31:31–34 oyo etali kosala mayokani na Nzambe. Bokoki kolinga kozongela boyokani oyo basalaki na ntango ya libatisi (botala Mosiya 18:10, 13) mpe bosolola nini elingi koloba kozala na bilaka oyo ekomami na mitema na bango.
Yilimia 36:1– 4
Makomi ezali liloba ya Nzambe.
-
Lokasa ya milulu ya poso oyo ekoki kosalisa bana na bino bayekola oyo etali Yilimia, Baluke, mpe mokonzi (botala Yilimia 36). Bakoki lisusu kosala misala oyo ekendaka elongo na maloba na Yilimia 36:4–10, lokola kokomaka na buku (tala molongo 4) mpe kotangelaka makomi epayi ya bato (botala milongo 8, 10).
-
Bino mpe bana na bino bokoki kotala buku ya bana mpe mokanda ya makomi mpe kolobela lolenge nini mikanda oyo ekeseni. Nini esalaka ete milongo yango ezala ya ntina mingi? Ekoki kozala bofuli kokabola moko na mosusu mwa biteni ya makomi oyo ezali ya ntina mingi mpo na bino.
Yilimia 38:6–13
Nakoki kotelema mpo na oyo ezali solo.
-
Bokoki kosalela elilingi oyo ezali na nsuka ya mwango mpo na kosalisa bana na bino bamona na makanisi lisolo ya Ebede-meleke na Yilimia 38:6–13. Ntango mosusu bokoki kosalisa bango bazwa molongo moko wapi Ebede-meleke asalaki likambo moko ya balongi mpo na kosunga profeta ya Nkolo. Nini tokoki kosala mpo na kolakisa ete toyebi ete profeta na biso lelo abengami na Nzambe?
Milelo 1:1–2, 16; 3:22–26
Mobikisi apesaki ngai likoki ya kolimbisama na masumu na ngai.
-
Mpo na koyingisa Milelo, bokoki kolinga kolimbolela bana na bino ete lokola Bayisalaele bayambolaki te, Yelusaleme mpe tempelo ebebisamaki. Bokoki kokabola moko na mosusu lolenge nini bokoki koyoka soki bozalaki kofanda kuna na ntango wana (botala Milelo 1:1–2, 16). Lolenge nini nsango kati na Milelo 3:22–26 epesi bino elikya?
-
Bokoki mpe koyebisana etali bantango oyo boyokaki mawa mpo na boponi ya mabe bosalaki. Nini tomoni na Milelo 3:22–26 oyo esalisaka biso tososola bolimbisi Yesu Klisto apesaka?
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .