Yaka, Landa Ngai
Sanza ya zomi na moko 2–8. “Nakotia Molimo ya Sika Kati na Bino”: Ezekiele 1–3; 33–34; 36–37; 47


“Sanza ya zomi na moko 2–8 ‘Nakotia Molimo ya Sika Kati na Bino’: Ezekiele 1–3; 33–34; 36–37; 47,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya zomi na moko 2–8 ‘Nakotia Molimo ya Sika Kati na Bino,’” Yaka, Landa Ngai—Kondimana na Kala 2026

mokengeli likolo ya linongi

Sanza ya zomi na moko 2–8: “Nakotia Molimo ya Sika Kati na Bino”

Ezekiele 1–3; 33–34; 36–3747

Ezekiele azalaki profeta na mboka bopaya. Elongo na Bayisalaele mosusu, bakangaki ye mpe batindaki ye na Babilone. Na Yelusaleme, Ezekiele alingaki kozala nganganzambe oyo azali kosala na tempelo. Na Babilone, azalaki kati na “bango ya boombo,” mpe “afandaki esika bafandaki” (Ezekiele 3:15), na bankama ya bakilometele longwa na ndako ya Nzambe oyo alingaki mingi mpe na elikya moke ya kozonga. Na nsima mokolo moko Ezekiele azwaki emoniseli. Amonaki “nkembo ya Nkolo” (Ezekiele 1:28)—kozonga na tempelo na Yelusaleme te kasi kuna na Babilone kati ya bapaya. Mabe na Yelusaleme, ayokaaki, ekomaki makasi mpenza ete bozali ya Nzambe ezalaki lisusu te (tala Ezekiele 8–11; 33:21).

Mpe atako bongo ezali na likambo moko ya elikya na nsango ya Ezekiele. Atako bato ya liyokani bakweyaki mosika mpenza, Nzambe asundolaki bango mpenza te. Soki “bakoyoka liloba ya Nkolo” (Ezekiele 37:4), oyo ekufaki kala ekokaki kozonga na bomoi. Motema na bango ya mabanga” ekokaki kozwa esika ya “motema ya sika” (Ezekiele 36:26). Mpe na mikolo ekoya, Nkolo akotia tempelo ya sika mpe Yelusaleme ya sika, “mpe nkombo ya engumba wuta mokolo wana ekozala, Nkolo azali kuna” (Ezekiele 48:35).

Mpo na bomoni mobimba ya Ezekiele, tala “Ezekiele” na kati ya Bible Dictionary.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Ezekiele 334

Nkolo abengisi ngai naleisa bampate na Ye.

Na Ezekiele 3 mpe 34, Nkolo alobeli bakambi ya bato na Ye lokola bakengeli mpe babateli mpate. Ntango bozali kotanga mikapo oyo, bobanza nini mito ya makambo oyo ezali kopesa likanisi oyo etali nini elimboli kozala mokambi.

Banani bazali “bampate” oyo Nkolo alingi ete boleisa? Bozwi nini na Ezekiele 34 oyo ekoki kosalisa moto songolo amilengela mpo na kosala misio, kobokola bana, to kokokisa etinda ya mosala? Lolenge nini bokoki kolanda ndakisa ya Mobikisi lokola mobateli mpate na biso? (botala milongo 11–31).

Bokoki lisusu komanyola elembo bomoni na kati ya mokapo. Nini ekoki kozala “bilei malamu” mpe “bibwele malamu” elakisami na molongo 14? Bokeseni nini ezali kati na mpate oyo “ebungaki” mpe oyo “eyengakiyengaki”? (molongo 16). Bilembo mosusu nini bomoni?

Botala lisusu Yoane 21:15–17; Gerrit W. Gong, “Ministering [Kosalisa],” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 16–19.

Ezekiele 33: 10–19

Nkolo alingi kolimbisa.

“Soki … masumu na biso ezali likolo na biso,” Bayisalaele bakangami bamitunaki, “ lolenge nini tosengeli kobika?” (Ezekiele 33:10). Na eyano, Nkolo ateyaki bango oyo etali boyamboli mpe bolimbisi. Mituna oyo ekoki kosunga bino bomanyola oyo ateyaki:

  • Bokanisi nini elakisi “kondimela boyengebene na [bino] moko”? (tala Ezekiele 33:12–13).

  • Nini bokoloba na moto oyo ayoki ete bato oyo balobeli na Ezekiele 33:12–19 bazali kosalela bango na bosembo te? (tala lisusu Matai 21:28–31; Luka 18:9–14).

  • Nini bomoni na milongo miye oyo ezali kosalisa bino bososola nini elimboli koyambola? Bososoli nini ya kobakisa bomoni na Ezekiele 36:26–27 mpe Alma 7:14–16?

Ezekiele 37

elembo ya seminele
Nkolo azali kosangisa bato na Ye mpe azali kopesa bango bomoyi ya sika.

Bosangisi ya Yisalaele emonisami na Ezekiele 37 na nzela ya bilembo mibale. Ntango bozali kotanga oyo etali oyo ya yambo—mikuwa ekufa kozongisama na bomoyi (tala milongo 1–14)—bomanyola nini yango epesi bino likanisi oyo etali kosangisa Yisalaele na ngambo mibale ya elamba (tala lisusu Ezekiele 36:24–30). Bobanza mituna lokola oyo:

  • Nini Nkolo azali komeka kokokisa na nzela ya bosangisi Yisalaele?

  • Lolenge nini Azali kokokisa yango?

Bokoki komituna mituna oyo kaka ntango bozali kotanga oyo etali elembo ya mibale, na milongo 15–28. Elembo yango elobeli mangenda mibale, oyo bato mingi ya mayele balimbolaka yango lokola etanda ya mabaya oyo basangisaka na ekangeli. Lingenda ya Yuda ekoki komonisa Biblia (lokola mingi ya Biblia ekomamaki na bakitani ya Yuda), mpe lingenda ya Yozefe ekoki komonisa Buku ya Mormon (lokola libota ya Lehi ezalaki bakitani ya Yozefe ya Ezipito). Na makanisi wana, milongo oyo eteyi bino nini oyo etali mokumba ya makomi na bosangisi ya Yisalaele?

Bokanisa oyo etali lolenge nini Biblia mpe Buku ya Mormon esalaki elongo na bomoyi na bino—mingimingi, mpo na kosalisa bino boya epayi ya Klisto. Mikapo nini esili kozala na ntina mingi mpo na bino?

Botala lisusu 2 Nefi 3:11–13; 29:14; “Israel, Israel, God Is Calling,” Hymns, no. 7; Topics and Questions, “Bible [Biblia],” “Book of Mormon [Buku ya Mormon],” Gospel Library; “The Book of Mormon Gathers Scattered Israel” (video), Gospel Library.

1:31

The Book of Mormon Gathers Scattered Israel

Mbu Ekufa Ezingami na esobe

Na limoni, Ezekiele amonaki ebale ewuti na tempelo mpe ekangoli Mbu Ekufa.

Ezekiele 47: 1–12

Nakoki kozwa libiki ya molimo na ndako ya Nkolo.

Ntango bozali kotanga Ezekiele 47:1–12, ekoki kosunga boyeba ete Mbu Ekufa ezali mungwa makasi na yango mbisi mpe nzete ekoki kobika na kati na yango te. Nini ekamwisi oyo etali mayi oyo elimbolami kati na milongo 1–12? (botala lisusu Emoniseli 22:1). Mayi oyo ekoki kolimbola nini? Nzete ekoki molongo 12 kolimbola nini?

Nsango ya Mpaka Dale G. Renlund “Family History and Temple Work: Sealing and Healing [Mambi ya Kala Libota mpe Mosala ya Tempelo: Kokangisa mpe Kobikisa]” ebakisi nini na bososoli na bino? (botala Liahona, Sanza ya mitano 2018, 47–48). Bomanyola lolenge nini bozwaki bomoyi ya molimo mpe libiki mpo na tempelo.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Ezekiele 3:17; 33:1–5

Baprofeta bazali lokola bakengeli oyo bakebisaka biso na likama.

  • Bana bilenge bakoki kosepela kosala misala oyo etambolaka elongo na Ezekiele 3:17. Ndakisa, bakoki kolakisa bango miso, matoyi mpe monoko ntango bozali kotanga maloba “mokengeli,” “litoyi,” mpe “monoko” Bakoki lisusu kolinga kokende kotambola na bangomba—na libanda to zingazinga ya kisuku. Ntango bazali kotambola, bokebisa bango na makambo oyo ezali na nzela, lokola bibale oyo basengeli kopumbwa, bitape oyo basengeli koleka na nse, to banyama oyo basengeli kokima (ya solo to kosala lokola). Yango ekoki komema na lisolo moko oyo etali lolenge nini profeta ya Nkolo akebisaka biso na makama oyo tokoki komona te.

  • Oyo ezali nzela mosusu ya kolakisa Ezekiele 3:17; 33:1–5. Moko ya bana na bino akoki kosala lokola “mokengeli” soki azali kotala na lininisa mpe koyebisa bato nyonso makambo oyo ezali kosalema na libanda. Bokoki lisusu kotala video “Mokengeli likolo ya Linongi” (ChurchofJesusChrist.org). Lolenge nini profeta na biso ya bomoyi azali lokola mokengeli mpo na biso?

    4:17

    Watchman on the Tower

Ezekiele asimbi makomami mibale ezingama

The Prophet Ezekiel [Profeta Ezekiele], na Lyle Beddes

Ezekiele 37:15–23

Biblia mpe Buku ya Mormon esalisakana “kosangisa” biso epayi ya Yesu Klisto.

  • Nsima ya kotanga Ezekiele 37:15–23 elongo, bino mpe bana na bino bokoki kozwa mangenda mibale mpe kokoma likolo ya moko Mpo na Yuda (Biblia) mpe likolo ya mosusu Mpo na Yozefe (Buku ya Mormon). Na nsima bokokaki kokabola masolo to makomi uta na Biblia mpe Buku ya Mormon oyo esalisaka bino bomiyoka penepene na Mobikisi mpe bokoma “bato [na Ye]” (molongo 23). Mpo na nini ezali malamu kozala na mikanda oyo mibale ya makomi.

Boluka te kozipa makambo nyonso. Mbala mosusu bokoki te kolukaluka solo nyonso oyo ezali na Ezekiele elongo na bana na bino. Na losambo, botalela makambo oyo basengeli kososola, mpe boluka bokambi ya molimo mpo na koyeba makambo nini basengeli kotia makanisi na bango. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi17.)

Ezekiele 47: 1–12

Mitema mpe mabota na biso ekoki kozwa libiki na ndako ya Nkolo.

  • Ezekiele 47 elobeli limoni ya Ezekiele ya mayi oyo ezali kowuta na tempelo mpe kobikisa Mbu Ekufa—mbu oyo ezali na mungwa mingi na boye ete mbisi mpe nzete ekoki kobika kati na yango te. Ntango mosusu bana na bino bakoki moko na moko kobenda eloko moko to mibale wuta na limoni, lokola tempelo, ebale, esobe, Mbu Ekufa, ebele ya mbisi, to nzete oyo ebotaka. Nsima, ntango bozali kotanga elongo, milongo 1–12 bakoki kokabola liyemi na bango ntango eloko wana elobelami. Mapamboli nini eyaki wuta na ebale na limoni oyo? Bosalisa bana bamona boniboni mapamboli oyo ezali lokola mapamboli Mobikisi apesaka baoyo babatelaka mayokani ya tempelo. Video “And the River Will Grow” (Gospel Library) ekoki kosalisa.

    3:43

    And the River Will Grow

  • Bokoki mpe koyemba elongo loyembo oyo ezali kolimbola mapamboli ya tempelo, lokola “Families Can Be Together Forever” (Children’s Songbook, 188). Loyembo oyo eteyi nini oyo etali lolenge nini Nkolo apambolaka biso na ndako na Ye ya bule?

Mpo na mii koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .

mayi ezali kotiola wuta na tempelo ya Yelusaleme

“Botala, mayi ezali kobima na nse ya ekuke ya ndako. … Mpe biloko nyonso ekozala epayi ebale ekoya” (Ezekiele 47:1, 9). Elilingi ezwami na ndingisa ya goodsalt.com

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Buku ya Mormon mpe Biblia “esangisaka” biso epayi ya Yesu Klisto