“Sanza ya zomi na moko 16–22. ‘Nakolinga Bango Mingi”: Hosea 1–6; 10–14; Joel,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi na moko 16–22. ‘Nakolinga Bango Mingi,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Sanza ya zomi na moko 16–22 “Nakolinga Bango Mingi”
Hosea 1–6; 10–14; Joel
Boyokani ya Yisalaele elongo na Nkolo ezalaki bozindo mpe ntina makasi koleka ete Nkolo akokanisaki yango na libala. Boyokani, lokola libala, esangisaka bomipesi ya libela, ekabolaka mayele, kotongaka bomoi elongo, mingmingi bosembo, mpe, bolingo ya solo. Na mawa mingi, Bayisalaele bazalaki na bosembo te na mayokani na bango. Mpe te liloba ya Nkolo mpo na bango ezalaki te “Ngai na kobwaka bino libela na libela.” Na esika na yango ezalaki “Ngai nakobenga bino kozonga” (tala Hosea 2:14–15). “Nakobalisana na yo epayi na ngai na bosembo,” Ye alobaki na profeta Hosea (Hosea 2:19). “Nakobikisa nkanja na bango, Nakolinga bango mingi” (Hosea 14:4). Yango ezali mbela kaka moko Ye apesi biso lelo oyo ntango tozali koluka kobika mayokani na biso elongo na bolingo mpe bomipesi.
Yoele akobolaki mbela ya lolenge moko: “Bongwana epayi ya Nkolo Nzambe na bino: mpo ete Ye azali na boboto mpe na mawa, akosilika noki te, mpe azali na boboto monene mpenza” (Yoele 2:13). Kotanga maloba wana ya baprofeta ekoki komema bino kokanisa na oyo etali kiboninga na bino moko elongo na Nkolo—kokanisa na oyo etali lolenge nini bosembo na Ye epayi na bino efuli bino kozala sembo epayi na Ye.
Mpo na kotala buku ya Hosea mpe Yoele, tala “Hosea, to Hosea” mpe “Yoele” Dikisionele ya Biblia.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Hosea 1–3; 14
Mobikisi abiangaka ntango nyonso bato na Ye kozonga epayi na Ye.
Mwasi ya Hosea, Gomer, azalaki sembo te epayi na Ye, mpe Nzambe alakisaki likambo ya mawa yango mpo na koteya Bayisalaele lolenge Ye ayokaki na oyo etali bango mpe mayokani na bango elongo na Ye. Ntango bozali kotanga Hosea 1–3, bomanyola lolenge nini Nkolo amoni bokangano na Ye elongo na bato na Ye ya liyokani. Lolenge kosala liyokani moko elongo na Nkolo ekokani na kokotaka kati ya libala? Lolenge nini koboyaka kobomba liyokani yango ekokani lokola kozalaka bosembo te na molongani na yo? (tala Hosea 2:5–7, 13). Nini Hosea 2:14–23 eteyi bino oyo etali bolingo mpe ngolu ya Nkolo? Lolenge nini bolakisaka Ye bolingo mpe botosi na bino?
Na Hosea 14, boluka bilaka ebele ya kitoko oyo Nkolo asalaki epayi ya baye bokozonga epayi na Ye. Nini liloba “kolinga bango mingi” elakisi mpo na bino? (molongo 4). Nini masese ya ndunda na milongo 5–8 eteyi bino oyo etali mapamboli ya Nkolo, sangisaka mapamboli ya boyamboli? Ntango bozali kotanga, kanisa koyemba to koyoka loyembo oyo ezali kolobela ngolu ya Mobikisi, lokola “Come unto Jesus” (Hymns, no. 117).
Gomer, oyo azali ndakisa ya ndako ya Yisalaele mpe mayokani na bango ebukana, apesamaki lisokoli epayi ya Nkolo. Elilingi na Deb Minnard, licensed from goodsalt.com
Hosea 6:4–7; Yoele 2:12–13
Komikaba epayi ya Nzambe esengeli eyokama mpenza na kati, elakisama bobele libanda te.
Bato na eleko ya Hosea bazalaki kopesa mbeka ya baniama, kasi bazalaki kobuka mitindo ya mituya koleka. Nini bokanisi ekoki kolakisa ete Nkolo, “alingaki bolingani, mpe mbeka te; mpe boyebi ya Nzambe mingi koleka makabo”? (Hosea 6:6). Nini bokanisi ekoki kolakisa mpo na bosembo kozala lokola lipata to mbula moke? (tala Hosea 6:4). Bosembo na biso esengeli ezala lolenge nini? (tala Yisaya 48:18; 1 Nefi 2:9–10).
Bokoki lisusu kotanga Matai 9:10–13; 12:1–8 mpo na komona lolenge nini Mobikisi asalelaki Hosea 6:6 katikati na mosala na Ye. Lolenge nini milongo yango esungi bino bososola maloba ya Hosea?
Ntango bozali kotanga Yoele 2:12–13, yango ekoki kosalisa mpo na koyeba ete kokata to kopasola bilamba ezalaki elembo ya libanda ya matanga to komitungisa. Lolenge nini kopasola mitema na biso ekeseni na kopasola bilamba na biso?
Yoele 2
“Nakotia Molimo na ngai kati na bino.”
Bokokanisi nini bomoni katikati ya eleko na biso mpe eleko Yoele alobelaki? (tala mingi mpenza Yoele 2:1–2, 11, 18–32). Nini etuti bino oyo etali mapamboli Nkolo alakaki kati na milongo 18–32? Mpo na nini mapamboli oyo ezali mpenza motuya lelo oyo?
Ekoki kozala ntina kotanga oyo Moroni alobaki na oyo etali Yoele 2 ntango akendaki kotala Joseph Smith na 1823 (tala Joseph Smith—History 1:41). Lolenge nini oyoki masakoli na Yoele 2:28–32 ezali kokokisamaka na eloko na biso? (tala lisusu Misala 2:1–21). Nini bokanisi elingi koloba ete Nkolo ako “sopa ya [Ye] molimo likolo ya bato nyonso”? (Yoele 2:28).
Bokoki kokanisa maloba oyo uta na Mokambi Russell M. Nelson: “Na mikolo mikoya, ekozala mpasi kobika na molimo soki bokambi ezali te, kokambaka, kolendisaka, mpe nguya makasi ya Molimo Mosantu” (“Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 96). Mpo na nini emoniseli ezali ntina mpo na kobika ya molimo na bino?
Nini bokoki kosala soki bomiyoki lokola bayambaki epakolami wana te? Awa ezali ndambo ya bandakisa ekoki kosunga bino. Nini bato basalaki na bililingi oyo mpo na koyamba epakolami ya molimo ya Nkolo?
Ntango bozali kotanga maloba wana uta Mpaka David A. Bednar, bokanisa nini yango elakisi mpo na bino koyoka epakolami ya Molimo Mosantu kati ya bomoi na bino ya mokolo na mokolo:
“Tokomisaka yango mingimingi pasi epayi na biso moko mpo na koyamba limoni ya moto ye moko. Na oyo nalingi koloba ezali ete elaka ya liyokani ezali ete ntango totosi mayokani na biso, tokoki ntango nyonso kozwa Molimo Mosantu kozala moninga na biso ya ntango nyonso. Kasi tosoloka na oyo etali yango mpe tosala yango lokola soki ezalaki koyokaka mongongo ya Nkolo na nzela ya molimo na Ye ezali molulu ya ntango nyonso te. [Molimo] esengeli kozala na biso ntango nyonso. Bobele te na seconde ya mokemoke, kasi soki moto nyonso asali oyo ezali malamu—bosengeli bozala ya kobonga nie—kasi bino na ngai tozali kosala oyo esengeli mpe tosangani te na masenginya ya mabe makasi, boye tokoki kotia elikya na Molimo Mosantu mpo na kosunga biso.
“… Tomonisami lokola kondimisama ete Molimo Mosantu azali ya kokamwisa, monene mpe ya mbalakaka, nzokande, azali ya kotelema mpe ya moke mpe ya kopusana malembemalembe” (“Mpaka David A. Bednar Discussion” [evening with a General Authority, Feb. 7, 2020], broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).
Tala lisusu Gary E. Stevenson, “Promptings of the Spirit,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 42–45; “Enemy Territory” (video), Gospel Library.
Enemy Territory
Kela Esika ya Malamu. “Nini bomoni oyo esungi na esika ya molimo mpo na boyekoli nsango malamu? Nini epekisi yango? Bokanisa oyo etali esika oyo boteyaka mbala mingi [to koyekola]. Lolenge nini boyokaka ntango bozali kuna? Lolenge nini bokoki kobengisa na solo Molimo azala wana?” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 7).
Makanisi mpo na Koteya Bana
Hosea 2:19–20
Nakoki na bosembo nyonso kobomba mayokani na ngai.
-
Na mokanda ya Hosea, Nkolo akokanisi liyokani na Ye elongo na bato na Ye na libala. Mpo na koyekola uta na bokokanisi yango, bino na bana na bino bokoki koluka elilingi moko ya mobalani ya mwasi mpe ya mobali mpe bazali kosololaka oyo etali lolenge nini Tata ya Lola alingi molongani ya mobali mpe ya mwasi bakoki kozala moko na mosusu. Bosalisa bana na bino bazwa maloba na Hosea 2:19–20 oyo elobeli lolenge nini Nkolo ayokaka na oyo etali biso. Lolenge nini tokoki kolakisa Nzambe ete tolingaka Ye tokozala na bosembo epayi na Ye?
Hosea 10:12
“Yango esali ntango ya koluka Nkolo.”
-
Hosea 10:12 elobeli milona, eleko ya kobuka, ntango, mpe mvula ebengi biso toluka Nkolo. Ntango botangi molongo oyo, makanisi na bokeli nini eyeli na makanisi oyo ekoki kofula bana koluka Ye? Mpo na ndakisa, ntango mususu bana na bino bakoki koyema ngonga mpe kokoma banzela bango bakoki koluka Nkolo na bangonga ekeseneni katikati na mokolo. Loyembo moko lokola “Anytime, Anywhere” (Gospel Library) ekoki kosalisa bino koteya ete yango ezali ntango nyonso ntango moko malamu ya koluka Nkolo.
-
To bana na bino bakoki kosala misala ya pete oyo ekeyi lolenge moko na molongo, lokola kosalaka lokola kolona milona, kobuka bambuma mpe kotelema na nse ya mbula. Bosalisa bana na bino bakokanisa boloni milona mpe kobukaka bilei malamu na kobikaka na bosembo mpe koyambaka mapamboli ya Nkolo. Nsima bokoki koyebisa moko mpe mosusu na oyo etali mapamboli ya Nkolo lokola mbula likolo na bino ntango bozali komeka koluka Ye.
Hosea 13: 4, 14
Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli na ngai.
-
Mpo na kobeta nsete ya bololo na Hosea 13:4 ete kuna ezali na Mobikisi mosusu te longola bobele Yesu Klisto, bokoki kolakisa bana na bino bililingi ya bato mingi, sangisaka Yesu. Bana na bino bakoki kozwa ntango na bango kolakisaka moto oyo azali na nguya ya kobikisa biso uta na masumu mpe kufa. Bokabola litatoli na bino ya Yezu Klisto mpe Bomikabi na Ye.
-
Bana na bino bakoki koluka maloba na Hosea 13:4, 14 oyo elobeli Yesu Klisto. Nini maloba oyo eteyi biso na oyo etali Ye? Bokanisa kosalisa bana na bino mpo na kosalela Mokambi ya Makomi mpo na koluka makomi mosusu ete Yesu azali Mobikisi mpe Mosikoli na bino. Bokabola moko na mosusu lolenge nini boyokaka na oyo etali Yesu Klisto.
Yoele 2:28–29
Molimo Mosantu akoki kotambwisa ngai.
-
Ntango mosusu bokoki kosalisa bana na bino kososola Yoele 2:28–29 na kotikaka bango kotangisaka mayi moko mpe kotelemelaka yango na litanga na litanga to ndelo ya mayi. Ekoki kolinga koloba nini mpo na Molimo ezala ya “kosopana” likolo na biso?
-
Ntango bozali kotanga Yoele 2:28–29 elongo, bokoki kobenga bana na bino kokotisa nkombo ya moto moko na moko na esika ya maloba “bana na bino ya mibali” mpe “bana na bino ya basi.” Nsima bosalisa bango koluka makomi lokola Yoane 14:16; Moroni 10:5; Malongi mpe Mayokani 42:17 mpo na komona lolenge nini Molimo akoki kosalisa bango.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .