“Sanza ya zomi na moko 23–29. ‘Boluka Nkolo, mpe Okozala na Bomoyi’: Amosa; Obadia; Yona,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi na moko 23–29. ‘Boluka Nkolo, mpe Bokozala na Bomoyi,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026
Jonah on the Beach at Nineveh [Yona na Libongo ya Niniwe], na Daniel Lewis
Sanza ya zomi na moko 23–29: “Boluka Nkolo, mpe Bokozala na Bomoyi”
Amosa; Obadia; Yona
Yona azalaki na masuwa oyo ezalaki kokende na Talasisi. Ezalaki na likambo moko te ya mabe mpo na kokende na masuwa kino na Talasisi, longola kaka ete ezali mosika na Niniwe, epayi Yona asengelaki kokende kopesa nsango ya Nzambe. Ntango masuwa ekutanaki na mopepe makasi, Yona ayebaki ete ezalaki mpo na kozanga botosi na ye. Lokola Yona atingamaki, baninga na ye bato ya masuwa babwakaki ye na bozindo ya mbu mpo na kopekisa mbonge. Ezalaki lokola nsuka ya Yona mpe ya mosala na ye. Kasi Nkolo atikaki Yona te—lokola Atikamaki te na bato ya Niniwe, na ndako ya Yisalaele, to na moko na biso.
Boye Ye azali kokoba kotinda baprofeta—lokola Yona, Amosa, Obadia, mpe baprofeta na biso lelo—na nsango ete soki toyamboli, tokobwakama libela te. Na “basekele” nyonso oyo Nzambe abimisi (botala Amosa 3:7), oyo ezali na kati ya oyo ya motuya mingi: ete mpo na Yesu Klisto, ntango eleki naino te mpo na kobongwana. Azali kino sikawa kolinga kosalisa biso tobika na mayokani tosalaki elongo na Ye, mpe Andimaka kopesa biso libaku mosusu.
Mpo na ebele etali babuku oyo, botala “Amosa,” “Obadia,” mpe “Yona” kati na Bible Dictionary.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Amosa 3:1–8; 7:10–15
Nkolo abimisaka babosolo na nzela ya baprofeta na Ye.
Na Amosa 3:3–6, profeta Amosa alakisaki bandakisa ya bosukisi oyo tokoki kozwa uta na bilembo toyokaka to tomonaka: ntango nkosi ezali koganga, esengeli kozala ekangaki nyama; soki ndeke ekangami na motambo, esengeli kozala na mpambo ezalaki kuna. Na milongo 7–8, Amosa alobelaki likambo oyo na baprofeta. Bosukisi nini tokoki kozwa ntango profeta azali kosakola? Nini lisusu boyekoli oyo etali baprofeta uta na Amosa 7:10–15?
Nkolo abimiseli bino nini na nzela ya baprofeta na Ye?
Mpaka Ulisses Soares alobaki ete “kozala na baprofeta ezali elembo ya bolingo ya Nzambe” (“Baprofeta Balobaka na Nguya ya Molimo Mosantu,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 99). Bobanza lolenge nini bokoki kokokisa liloba oyo: “Nayebi Nzambe alingaka ngai, mpo ete atindaka baprofeta oyo …” Tala mwa makomi oyo ekoki kosalisa: Dutelonome 18:18; Ezekiele 3:16–17; Baefese 4:11–14; 1 Nefi 22:2; Malongi mpe Mayokani 21:4–6; 84:36–38; 107:91–92.
Nini bokoloba na moto oyo azali komona ete baprofeta bazali na ntina te lelo oyo?
Botala lisusu Mito ya makambo mpe Mituna, “Baprofeta” Gospel Library.
Amosa 4–5
“Boluka Nkolo, mpe bokozala na Bomoyi.”
Engebene na Amosa 4:6–13, nini Nkolo azalaki kolikya ete ekosalama nsima ya Bayisalaele kokutana na mimekano? (botala lisusu Elamani 12:3). Ntango mimekano na bino ekoki kozala etindamaki na Nzambe te, lolenge nini epesaka bino mabaku ya kobaluka epayi na Ye?
Ntango bozali kotanga Amosa 5:4, 14–15, bomanyola lolenge nini Nkolo azali na ngolu epayi na bino. Lolenge nini koluka Ye ememelaka bino bomoyi?
Amosa 8:11–12
Liloba ya Nkolo ekoki kosilisa nzala mpe mposa ya mayi ya molimo.
Ntango bozali kotanga Amosa 8:11–12, bokanisa mpo na nini nzala ezali bokokanisi malamu mpo na kobika na kozangaka liloba ya Nzambe (botala lisusu Yoane 6:26–35; 2 Nefi 9:50–51; 32:3; Enosa 1:4–8). Lolenge nini boyebaka ete bozali na nzala ya molimo?
Milongo yango ekokaki mpe kosalelama mpo na Bopengwi Monene (botala Mito ya makambo mpe Mituna, “Bopengwi,” Gospel Library). Lolenge nini “nzala” wana ya molimo ezwaki bana ya Nzambe? Lolenge nini Bozongisi esalisaki kokokisa nzala ya molimo na bino?
Tala lisusu “The Great Apostasy” (video), Gospel Library.
The Great Apostasy
Obadia 1:21
Banani bazali “babikisi … na ngomba ya Siona”?
Kotalaka Obadia 1:21, Mokambi Gordon B. Hinckley alimbolaki ete tokomaka babikisi na Ngomba ya Siona ntango tozwaka makuli mpo na bakufi na tempelo (botala “Closing Remarks,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2004, 105). Lolenge nini kosala mosala wana ekokani—soki kaka na lolenge moke—na oyo Mobikisi asalaki mpo na biso? Lolenge nini kosala mosala oyo esalisaka bino bomiyoka penepene na Mobikisi?
Tala lisusu “Holy Temples on Mount Zion,” Hymns, no. 289.
Yona 1–4
Nkolo azalaka na mawa epayi ya bato nyonso oyo babalukaka epayi na Ye.
Niniwe ezalaki monguna ya Yisalaele oyo eyebanaki mpo na mobulu mpe motema mabe na yango. Mpo na Yona, emonanaki lokola likambo ya solo te ete bamibongisaki mpo na kobongola motema. Ekoki kozala malamu kokokanisa ezaleli ya Yona (botala Yona 1; 3–4) na mayoki ya Alma mpe bana ya Moziya (botala Mosiya 28:1–5; Alma 17:23–25). Boyekoli nini na Yona 3 oyo efulaka bino mpo na kokabola nsango malamu atako na bato oyo bakoki komonana lokola bamibongisi te mpo na kobongwana?
Ntango bozali kotanga Yona, boluka bandakisa ya ngolu ya Nkolo. Mpo na nini boyoki ete Yona “asepelaki te” mpe “asilikaki mingi” (Yona 4:1) ntango Nkolo alakisaki mawa epai ya bato ya Niniwe? Nini boyoki Nkolo azalaki komeka koteya ye na mokapo 4? Bomanyola lolenge nini bokutanaki na ngolu na Ye na bomoyi na bino. Nini boyekoli uta na Yona oyo ekoki kosalisa bino bozala na mawa mingi?
Makanisi mpo na Koteya Bana
Lokola Eyenga oyo ezali Eyenga ya mitano ya sanza, bateyi ya Eteyelo ya Bana balendisami kosalela milulu ya boyekoli na “Bobakisi B: Kolengela Bana mpo na Ntango ya Bomoyi Mobimba na Nzela ya Boyokani ya Nzambe].”
Amosa 3:7
Baprofeta bazali batindami ya Yesu Klisto.
-
Mpo na kosalisa bana na bino basosola Amosa 3:7, bokoki koyebisa moko na bango nsango moko ya pete mpe kosenga bango bayebisa bana mosusu nsango yango. Lolenge nini motindami na mosala oyo azali lokola profeta? Mpo na nini Nkolo apesaka biso baprofeta?
-
Mpo na koyekola mingi oyo etali oyo baprofeta basalaka, bino mpe bana na bino bokoki kotala lisusu bansango ya sika uta na Mokambi ya Eklezia. Bokoki lisusu koyemba loyembo lokola “Follow the Prophet” (Children’s Songbook, 110–11). Bokabola moko na mosusu mpo na nini boponi kolanda profeta ya Nzambe.
Bosalisa bana bakanga makomi na moto. Mpaka Richard G. Scott akabolaki: “Kokanga makomi na moto ezali kosala boninga ya sika. Ezali lokola kokutana na moto ya sika oyo akoki kosalisa na ntango ya bosenga, kopesa bofuli mpe bolendisi, mpe kozala liziba ya mpiko mpo na mbongwana oyo esengami” (“The Power of Scripture [Nguya ya Makomi],” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 2011, 6). Mpo na kosalisa bana na bino bakanga na moto makambo nyonso to ndambo ya Amosa 3:7, bokoki kokoma yango mpe kozongela yango elongo. Na nsima, bokoki kolongola to kozipa mwa maloba na mbala moko kino ntango bana na bino bakoki kozongela molongo yango mobimba na makanisi.
Amosa 8:11–12
Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto esilisaki nzala ya bopengwi.
-
Bobengisa bana na bino basala lokola bazali na nzala ntango bozali kotanga Amosa 8:11–12. Tomiyokaka lolenge nini ntango toyokaka nzala ya liloba ya Nzambe? Mbala mosusu bana na bino bakoki kosala lokola bazali kolia ntango bozali kokabola moko na mosusu mwa makomi oyo bolingaka mingi.
-
Bokoki kosalela Mokambi na Makomi, “Bopengwi” (Gospel Library), to “Nsima ya Kondimana na Sika” (na Masolo ya Kondimana ya Sika, 167–70) mpo na kosalisa bana na bino basosola “nzala” oyo ewutaki na Bopengwi Monene mpe lolenge nini esukaki na Bozongisi. Bokabola moko na mosusu bantina bozali na botondi ete Nkolo azongisaki nsango malamu na Ye na mikolo na biso.
2:52After the New Testament
Yona 1–3
Nkolo akosalisa ngai natosa Ye, atako ntango ezali mpasi.
-
Mpo na kosalisa bana na bino bayekola lisolo ya Yona, bokoki kotala lisusu “Yona Profeta” na Masolo ya Kondimana na Kala; botala lisusu lokasa ya molulu ya mposo oyo). Nsima bokoki kotuna:
-
Nini esalamaki ntango Yona atosaki Nkolo? (botala Yona 1:4–17).
-
Yona asalaki nini mpo na koyambola? (botala Yona 1:10–12; 2:1–4, 9; 3:1–4).
-
Nini esalamaki ntango Yona atosaki? (botala Yona 3:5).
2:30Jonah the Prophet
-
-
Banana bino bakoki kosepela kobeta lisolo ya Yona to kosala yango. Bokabola moko na mosusu mwa makambo ntango Nkolo alingaki bosala likambo moko oyo ezalaki mpasi mpo na bino. Lolenge nini Asalisaki bino botosa Ye?
Yona 1–4
Nkolo azalaka na mawa epayi ya bato nyonso oyo babalukaka epayi na Ye.
-
Ntango mosusu bana na bino bakoki kosala lokola bazali kotuna Yona mituna mpo na likambo oyo bakutanaki na yango. Mituna nini bakotuna ye? Bolendisa bango batuna mituna mpo na koyeba makambo oyo Yona ayekolaki na ntina na Nkolo. Yona akoki koloba nini, na ndakisa, mpo na mawa ya Nkolo? (botala, ndakisa, Yona 2:7–10; 3:10; 4:2).
Christ and the Palsied Man [Klisto mpe Mokatatani], na J. Kirk Richards
-
Bosalisa bana na bino bakanisa bandakisa ntango Mobikisi alakisa mawa epayi ya basusu, lokola Malako 2:3–12; Luka 23:33–34; mpe Yona 8:1–11. Bino mpe bana na bino bokoki koluka bililingi ya bandakisa yango. Mabaku nini tozali na yango mpo na kozala na mawa epayi ya basusu?
Mpo na mingi koleka, botalá nimero ya sanza oyo ya magazini Moninga .