“Sanza ya zomi na moko 30–Sanza ya zomi na mibale 6. ‘Asepelaka na Mawa”: Mika; Nahume; Habakuka; Zefania,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi na moko 30–Sanza ya zomi na mibale 6. ‘Asepelaka na Mawa,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
In the Beginning Was the Word [Na Ebandeli Ezalaki Liloba], na Eva Timothy
Sanza ya zomi na moko 30–Sanza ya zomi na mibale 6: “Asepelaka na Mawa”
Mika; Nahume; Habakuka; Zefania
Kotangaka Kondimana na Kala mbala mingi elakisi kotanga masakoli etali bokambi. Mbala mingi Nkolo abengaki baprofeta mpo na kokebisa nkanda ya masambisi na Ye. Misala ya Mika, Nahume, Habakuka, mpe Zefania ezali bandakisa malamu. Na kolandisa likambo moko na moko, baprofeta yango basakolaki kokweya ya bingumba oyo, na ntango wana, emonanaki makasi mpe ya nguya: Ninive, Babilone, mpe Yelusaleme. Kasi yango esalamaki eleki bankoto ya mibu. Mpo na nini ezali na ntina mingi kotanga masakoli yango lelo oyo?
Atako bingumba wana ya lolendo mpe nkanda ebebisamaki, lolendo ya nkanda ezali kaka. Tokoki kutu komona bilembo na yango na kati ya mitema na biso moko. Baprofeta ya Kondimana na Kala babimisi lolenge nini tokoki kotika mabe wana. Ntango mosusu yango ezali moko ya bantina oyo tozali naino kotanga maloba na bango kino lelo oyo. Bazalaki kaka baprofeta ya libebi te—bazalaki baprofeta ya bokangoli. Bandimbola ya libebi ekitisami na mabiangi mpo na koya epayi ya Klisto mpe kozwa bolimbisi na Ye. Lokola Mika alobaki yango, Nkolo asepelaka te na kokweisa biso, kasi “asepelaka na mawa” (Mika 7:18). Oyo ezalaki nzela ya Nkolo na kala, mpe ezali nzela na Ye lelo. “Nzela na Ye ezalaka ya seko” (Habakuka 3:6).
Mpo na ebele etali babuku oyo, tala “Mika,” “Nahume,” “Habakuka,” mpe “Zefania” na Bible Dictionary.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Mika 6:1–8
“Nini Nkolo azali kosenga epayi na yo?”
Mika abengisi biso tokanisa lolenge nini ekoki kozala “koya liboso ya Nkolo, mpe kofukama … liboso ya Nzambe oyo azali likolo” (Mika 6:6). Nini milongo 6–8 eteyi bino na ntina ya maye ezali ntina epayi ya Nkolo ntango atalaka bomoyi na bino?
Tala lisusu Dale G. Renlund, “Do Justly, Love Mercy, and Walk Humbly with God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 109–12.
“Nkolo azali malamu, esika ya makasi na mokolo ya mobulungano” (Nahume 1:7).
Nahume 1
Nkolo azali na nguya mingi mpe mawa
Mosala ya Nahume ezalaki ya kosakola libebi ya Niniwe—mboka-mokonzi ya Asulia, bokonzi ya mobulu, oyo epalanganisaki Yisalaele mpe etombolaki Yuda. Nahume abandaki na kolimbola nkanda ya Nzambe mpe nguya oyo ekokani na mosusu te, kasi alobelaki mpe mawa mpe bolamu ya Nzambe. Boluka milongo na mokapo 1 oyo esalisaka bino bososola moko na moko ya bizalela oyo—mpe bizalela mosusu ya Nzambe oyo bomoni. Mpo na nini bokanisi ezali ntina boyeba moko na moko ya makambo oyo etali Nkolo?
Habakuka
Nakoki kondimela bolingi ya Nkolo mpe ngonga na Ye.
Atako baprofeta ntango mosusu bazalaka na mituna na ntina ya banzela ya Nkolo. Habakuka, oyo abikaki na ntango ya mabe ya bopalangani na Yuda, abandaki likundoli na ye na mituna epayi ya Nkolo (tala Habakuka 1:1–4). Lolenge nini bokoki kolimbola na bokuse mituna ya Habakuka? Mituna ekokana nini bato batunaka na ntina ya Nzambe lelo? Bino mpe bosila kozala na mayoki ya lolenge oyo? Bokoki lisusu kokokanisa mituna na ye na misusu na kati ya makomi, lokola oyo ezwami na Malako 4:37–38 mpe Malongi mpe Mayokani 121:1–6.
Nkolo ayanolaki na mituna ya Habakuka na kolobaka ete akotinda Bakaladi (Babilone) mpo na kopesa etumbu na Yuda (tala Habakuka 1:5–11). Kasi Habakuka azalaki naino kotungisama, mpo emonanaki lokola bosembo te mpo na Nkolo kotelema pembeni “ntango mabe [Babilone] ekolia moto oyo azali sembo koleka [Yuda]” (tala milongo 12–17). Nini bomoni na Habakuka 2:1–4 oyo efuli bino bondimela Nkolo ntango bozali na mituna ezanga biyano? (tala lisusu Malako 4:39–40; Malongi mpe Mayokani 121:7–8; “God Will Lift Us Up” [video], Gospel Library).
God Will Lift Us Up
Mokapo 3 losambo ya masanzoli mpe ya bondimi ya Habakuka. Ndenge nini mongongo ya Habakuka na mokapo 3 ekeseni na mokapo 1? Oyo ezali likanisi mpo na kosalisa bino bomanyola milongo 17–19: Bokoma mapamboli ya nzoto mpe ya molimo Nzambe apesaki bino. Nsima bokanisa ete bobungisaki mapamboli ya nzoto. Lolenge nini yango ekoki kotinda bino boyoka na ntina ya mapamboli mosusu? Mpo na nini yango ekoki kozala mpasi “kosepela kati na Nkolo” (molongo 18) na ntango ya mpasi lokola oyo elimbolami na molongo 17? Bomanyola lolenge nini bokoki kotombola bondimi makasi na Nzambe, atako ntango bomoyi emonisamaka mpasi.
Tala lisusu Gerrit W. Gong, “All Things for Our Good,” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 41–44; “Lead, Kindly Light,” Hymns, no. 97; Topics and Questions, “Seeking Answers to Questions,” Gospel Library.
Bozala motema kokita. Ntango mosusu tolingaka biyano na mituna na biso mbala moko, kasi bososoli ya molimo ezwaka ntango mpe ekoki kotindama na makasi te. Lokola Nkolo ayebisaki Habakuka, “Bozela yango; mpo ete yango ekoya kaka” (Habakuka 2:3).
Zefania
“Boluka Nkolo, bino nyonso ya bopolo na mabele.”
Ntango bozali kotanga masakoli ya Zefania, botala bizalela mpe bizaleli oyo ekambaki na libebi—tala mingimingi Zefania 1:4–6, 12; 2:8, 10, 15; 3:1–4. Nsima boluka bizaleli ya bato oyo Nzambe akobatela—tala Zefania 2:1–3; 3:12–13, 18–19. Etinda nini bokanisi Nkolo azali na yango mpo na bino kati na milongo oyo?
Zefania 3:14–20
Nkolo akosepela na bato na Ye na Siona.
Nsima ya kotanga Zefania 3:14–20, botala banzela boni bokoki kokokisa liloba oyo: “Sepela mpe sepela na motema mobimba” mpo ete … Mpo na nini ezali motuya epayi na bino na bantina ya kosepela? Bokoki kokokanisa milongo oyo na baboyebi oyo elimbolami na 3 Nefi 17 mpe bomanyola lolenge nini Yesu Klisto ayokaka na ntina ya bato na Ye—sangisa mpe bino.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Mika 5:2
Yesu Klisto abotamaki na Yelusaleme
-
Bana na bino bakoki koyeba te ete ezalaki lisakoli ya Mika oyo esalisaki Bato ya Bwanya bazwa mwana Yesu na Beteleme. Kosalelaka Mika 5:2 mpe Matai 2:1–6, ntango mosusu bana na bino bakoki kosala lisusu makambo oyo bakutanaki na yango. Na nsima bokoki kolobela mpo na nini mbotama ya Yesu ezalaki na ntina mingi na boye ete baprofeta bayebaki yango mibu mingi yambo Ye abotama.
The Holy Child Is Born [Mwana Mosantu Abotamaki], na Dana Wood
Nahume 1:7
“Nkolo azali malamu, esika makasi na mokolo ya mpasi.”
-
Nsima kotangaka Nahume 1:7, bana na bino bakoki kotonga to koyema “esika makasi” ya pete to ndako makasi (ezali na elilingi ya moko na moango oyo). Nini ezali bantina bato mosusu basengeli na ndako makasi? Nini esalaka mikolo na biso ezala “mikolo ya mpasi”? Lolenge nini Yesu Klisto azali lokola libanga ya makasi mpo na biso?
Habakuka 2:3
Nzambe akokokisaka ntango nyonso bilaka na Ye.
-
Mpo na koyingisa Habakuka 2:3, bino mpe bana na bino bokoki kolobela makambo oyo ezali malamu kasi kaka nsima ya kozela—lokola mbuma oyo esengeli kokola to potopoto oyo esengeli kotumba. Nini ekosalema soki tomeki kolia mbuma to potopoto liboso ete ekomela? Na nsima, bokoki kolobela profeta Habakuku, oyo alingaki koyeba ntango nini Nkolo akopekisa mabe na mokili. Botanga eyano ya Nkolo na Habakuka 2:3. Bokoki kosalisa bana na bino bakanisa makambo oyo Nzambe alakaki. Na ndakisa moko na moko, bokoki koloba elongo, “Bozela yango; mpamba te ekoya mpenza.”
Habakuka 2:14
Nakoki kosalisa kotondisa mabele na boyebi ya Yesu Klisto.
-
Mpo na ndakisa Habakuka 2:14, bino mpe bana na bino bokoki kotondisa molangi to mbeki mosusu na bililingi to maloba oyo ezali komonisa makambo oyo Yesu asalaki to ateyaki. Ndenge nini tokoki kosalisa kotondisa mokili na boyebi ya Nkolo?
-
Bokoki mpe kolakisa bana na bino kalati ya mokili (botala Church History Maps, no. 7, “Map of the World”). Bosalisa bango bazwa esika wapi bafandi mpe bisika wapi bamisionele bayebi basalaki. Bokoki lisusu koyemba loyembo etali kokabola nsango malamu, lokola “We’ll Bring the World His Truth” (Children’s Songbook172–73). Nini tokoki koyebisa basusu oyo etalii Yesu Klisto?
Zefania 3:14–20
Yesu Klisto asepelaka na baoyo balandaka Ye.
-
Na Zefania 3:14–20, bana na bino bakoki koluka eloko moko oyo ekopesa bango mposa ya “koyemba, … basepela mpe bayoka esengo na motema mobimba.” Ntango mosusu bokoki koyemba mwa nzembo to banzembo ya esengo elongo mpe kolobela esengo bozali kokuta na nsango malamu ya Yesu Klisto.
Mpo na mingi, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .