“Sanza ya zomi na mibale 21–27. “Biso Tozalaki Kozela Ye, mpe Ye Akobikisa Biso”: Noele,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi na mibale 21–27. “Biso Tozalaki Kozela Ye, mpe Ye Akobikisa Biso,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
For unto Us a Child Is Born [Mpo na Biso Mwana moko Abotami], na Simon Dewey
Sanza ya zomi na mibale 21–27: “Biso Tozalaki Kozela Ye, mpe Ye Akobikisa biso”
Noele
Kondimana na Kala ezali na molimo ya bokobi liboso. Na lolenge yango, ezali moke kokokana na eleko ya Noele. Kobandaka na Abalayama mpe Ewa, bampaka, baprofeta, balobi, mpe bato ya Kondimana na Kala bazelaki mikolo ya malamu koleka, etondisamaki na elikya ya bozongisi sika mpe bokangolami ya Masiya. Mpe Bayisalalele bazalaki ntango mingimingi na bosenga ya elikya yango—atako ntango bazalaki na bokangami na Ejipito to na Babilone to bakangamaki na masumu na bango moko to botomboki. Kati na yango nyonso, baprofeta bakundolisaki bango ete Masiya moko, akoya, Mokangoli, akoya “kosakola bonsomi na baye bakangemi” (Yisaya 61:1).
Elikya yango ebandaki kokokisama ntango Yesu Klisto abotamaki na Beteleme. Mokangoli ya nguya ya Yisalaele abotamaki na ndako ya baniama mpe alalisamaki na elielo ya bibwele (tala Luka 2:7). Kasi Azalaki kaka te Mokangoli ya Bayisaele ya kala. Ayaki kokangola bino—komema pasi na bino, komema mawa na bino, konyokwama mpo na masumu na biso, mpe boye na mapipi na Ye bino bokoki kobikisama (tala Yisaya 53:4–5). Yango ezali mpo na nini Noele ezali kozelama mpenza na esengo monene kino lelo oyo. Masiya ayaki koleka mibu 2,000 kino lelo oyo, mpe Akobi koya kati ya bomoi na biso ntango nyonso tozali koluka Ye.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Nazali kosepela na Mosikoli na ngai.
Noele eyebani lokola eleko moko ya esengo mpenza mpo na esengo oyo Yesu Klisto amemi na mokili. Mibu nkama yambo kobotama ya mobikisi, baprofeta ya Kondimana na Kala lisusu bayokaki esengo ntango bazalaki koloba mpo na bozongi ya Masiya. Botanga bamoko ya makomi oyo elandi, mpe bokanisa na oyo etali mpo na nini yango ekokaki kozala motuya mpo bato bazelaki na lombango mosala ya Mobikisi: Nzembo 35:9; Yisaya 25:8–9; 44:21–24; 51:11; Sefania 3:14–20; Mose 5:5–11. Mpo na nini maloba oyo ezali motuya epayi na bino? Bantina nini maloba ya makomi oyo ezali kopesa mpo na kozala na esengo?
Botala lisusu Dallin H. Oaks, “Good Tidings of Great Joy [Bansango Malamu ya Esengo Monene]” (Losambo ya Noele ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya zomi ya mibale. 4, 2022), Gospel Library; “Joy to the World,” Hymns, no 201.
Bilembo ekoki kosalisa ngai nakanisa Yesu Klisto.
Babonkoko ebele esangisaki na Noele ekoki kozala na bilembo elimbolami oyo ezongisi biso na Klisto. Ntango bozali koyekola Kondima na Kala mobu oyo, bokoki komona bilembo mingi ya Mobikisi. Milongo mike elandi. Bokanisa koyekola yango mpe kokoma oyo yango eteyi bino etali Ye.
-
Monzoto (Mituya 24:17; Matai 2:2; Emoniseli 22:16).
-
Mokengeli mpate (Nzembo 23; Luka 15:4–7; Yoane 10:11)
-
Mwana mpate (Genese 22:8; Esode 12:5; 1 Petelo 1:18–20).
-
Mayi (Esode 17:1–6; Yilimia 2:13; Ejekielel 47:1–12; Yoane 4:7–14).
-
Libanga (1 Samwele 2:2; 2 Samwele 22:2–3; Nzembo 118:22–23; Yisaya 28:16; Baefese 2:20).
-
Etape (Yisaya 11:1–2; Yilimia 23:5; 33:15).
-
Pole (Nzembo 27:1; Yisaya 9:2; 60:19; Mika 7:8; Yoane 8:12).
Elembo nini, maloba, mpe masolo nini mosusu bino bomoni na kati ya makomi oyo etatoli Yesu Klisto?
Tala lisusu 2 Nefi 11:4; Moziya 3:14–15; Mose 6:63; “Balolenge to bilembo ya Klisto” mpe “Yesu Klisto,” nyonso mibale na Mokambi ya Makomi (Gospel Library).
“Nkombo ya Ye esengeli ebiangema Likamwisi.”
Yesu Klisto azali abengami na nkombo mpe bankombo ekeseni. Luka bankombo ya biteni oyo elandi: Nzembo 23:1; 83:18; Yisaya 7:14; 9:6; 12:2; 63:16; Amose 4:13; Jekalia 14:16; Mose 7:53. Bankombo mosusu nini bokoki kokanisa? Bokoki kosepela kutu kokomaka bankombo ya Yesu Klisto oyo bomoni na banzembo ya Noele. Boniboni nkombo moko na moko esimbi lolenge bokanisi na oyo etali Ye?
Bokanisa kopona nkombo moko to mosala moko ya Mobikisi oyo ekosalisa bino bokundola Ye katikati ya mibu ekoya.
Tala lisusu Quentin L. Cook, “Personal Peace in Challenging Times,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 89–92; “Hark! The Herald Angels Sing,” Hymns,, no. 209.
Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Kondimana na Kala eteyaka ngai oyo etali Yesu Klisto.
-
Bino mpe bana na bino bosengeli kozala na badekoratio ya Noele bokoki kosalela mpo na kobanda lisolooyo etali Yesu Klisto. Ntango mosusu bokoki kosolola oyo etali lolenge nini monzoto, mpole, to likabo moko ya Noele ekundolisaka biso Mobikisi. Bongo bokoki kotala na moko to mingi ya makomi elandi mpo na eloko moko ekoki kolimbola Klisto: Genese 22:8; Mituya 24:17; Nzembo 23:1; 27:1. Ntango bino mpe bana na bino bokoki kosimba elilingi to dekoratio ya Noele oyo etamboli elongo na eteni moko bango batangi. Lolenge nini Yesu Klisto azali lokola mwana mpate, monzoto, mokengeli mpate, to mpole? Bokanisa koyemba loyembo ya Noele, lokola “Stars Were Gleaming” (Children’s Songbook, 37).
-
Bana na bino bakoki lisusu kotala na nsuka ya inteneti oyo ntango bozali kotanga Yisaya 9:6 mpo na bango. Bosenga bana na bino kotala bebe Yesu ntango bazali koyoka liloba “mwana abotami.” Bokabola litatoli na bino oyo baprofeta na Kondimana na Kala bayebaki ete Yesu akobotama.
-
Ntango bozali kolengela mpo na kotanga bomoi ya Yesu Klisto kati ya Kondimana na Sika mobu ekoya, bokanisa kobandelaka kotala elongo na bana na bino nini bango bayekolaki na oyo etali Ye mobu oyo na Kondimana na Kala. Bokoki kotala lisusu na kati ya inteneti mpe makomi ya botangi nyonso ya yomoko mpo na kosalisa bino kokundola nini bino boyekolaki. Bana ya mike bakoki kozwa mbano uta na kotalaka na nzela Masolo ya Kondimana na Kala to bililingi na Yaka, Landa Ngai. Masakoli nini to masolo nini esimbi bino? Nini toyekolaki oyo etali Mobikisi?
Bizaleli ya Noele ezali komema epai ya Yesu Klisto.
-
Mabota ya Yisalaele ezalaki na bizalela, lokola Pasika mpe ba feti mosusu, oyo esalamaki mpo na komema mitema mpe makanisi epai ya Nkolo (tala Esode 12). Bizaleli nini bino mpe bana na bino bozali na yango na eleko ya Noele oyo esalisaka bino botia makanisi na Yesu Klisto? Bizaleli nini boyebi na ntina na yango uta na mambi ya kala ya libota na bino? Bokoki kokanisa kosolola elongo na bana na bino bamoko ya bizaleli bolingi kobanda. Makanisi misusu ekoki kosangisaka kosalelaka moto moko na bosenga, koponaka eloko moko bokoki kopesa lokola “libonza” na mobikisi, kobengisaka moninga moko kotala liyangani ya Noele ya Bokambi ya Yambo elongo na bino (broadcasts.ChurchofJesusChrist.org), kokomaka nzembo na yomoko ya Noele, to kolukaka lolenge moko ya mayele ya kokabola nsango ya mbotama ya Klisto.
Kati na libota, boyekoli mpe kobika ekabwanaka te. “Nsango malamu ezwaka mbala moko ntina makasi na libota. Bato oyo bozali koyekola elongo na bango nsango malamu bazali bato oyo bokosalela yango—mikolo nyonso. Na yango, bangonga mingi, kosalelaka nsango malamu ezali lolenge nini toyekolaka nsango malamu. Bongo ntango bozali koyekola mpe koteya nsango malamu na libota, boluka ndenge ya kokangisa oyo bozali koyekola na oyo bozali kosala. Na libota na bino, botika nsango malamu ezala eloko moko bolukaka kosalela, ezala eloko moko kaka ya kosololela te” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 31).
Bililingi ya Mbotama, na Ethan Brown
Tata ya Lola apesaki ngai likabo ya Mwana na Ye azala Mobikisi na ngai.
-
Lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino bayoka limemya mpe esengo ya mbotama ya Klisto”? Bokoki kotala video “The Christ Child” (Gospel Library) to kotanga elongo Matai 1:18–25; 2:1–12; Luka 1:26–38; 2:1–20. Mwana moko na moko akoki kopona moto moko uta na video to na lisolo ya likomi mpe kokabola lolenge nini moto yango ayokaki oyo etali Mobikisi. Nsima bokoki kokabola na moko mpe mosusu mayoki na bino moko na ntina na Ye.
17:57The Christ Child
-
Ntango bino mpe bana na bino bokoki kosolola na oyo etali makabo bino bopesaki to bozwaki katikati ya mibu oyo epesaki esengo. Nsima bokoki kotanga Yisaya25:9 elongo mpe kosolola na oyo etali mpo na nini bozali kosepela ete Tata ya Lola atindelaki biso Mobikisi. Mpo na kosalisa bana na bino kososola malamu koleka mosala ya Yesu Klisto lokola Mobikisi na biso, bobenga bango kotanga Yisaya 25:8–9; 53:3–5; mpe Hosea 13:14. Milongo oyo eteyi biso nini oyo etali lolenge nini Nkolo abikisaka biso?
-
Bokoki lisusu koyemba loyembo ya Noele elongo , lokola “Away in a Manger” (Children’s Songbook, 42–43) to “O Little Town of Bethlehem” (Hymns, no. 208). Bosalisa bana na bino bazwa biteni ya maloba kati na loyembo oyo esalisaka bango bayeba ete Tata na Lola mpe Yesu Klisto alingaka bango.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .