“Sanza ya zomi na mibale 7–13. ‘Bosantu epayi ya Nkolo”: Hagai 1–2; Zakalia 1–4; 7–14,’ Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi na mibale 7–13. ‘Bosantu epayi ya Nkolo,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Tempelo ya Laie Hawai
Sanza ya zomi na mibale 7–13: “Bosantu epayi ya Nkolo”
Hagai 1–2; Zakalia 1–4; 7–14
Nsima ya mibu mingi ya boombo, etuluku moko ya Bayisalaele, ntango mosusu kobakisa baprofeta Hagai mpe Zakalia, bapesamaki ndingisa ya kozonga na Yelusaleme. Basusu na etuluku oyo bamikundolaki lolenge tempelo ezalaki liboso ebebisama. Na baye bamitunaki soki ekokaki kokokana lisusu na “ndako ya Nkolo kati na nkembo na yango ya liboso” (Hagai 2:3), Hagai alobaki etali maloba ya Nkolo ya kolendisa: “Bozala makasi, bino nyonso bato ya ekolo, elobi Nkolo, mpe bosala mosala: pamba te nazali elongo na bino, … bobanga te.” “Nakotondisa ndako oyo na nkembo, … mpe nakotya kimia na esika oyo” (Hagai 2:4–5, 7, 9).
Kasi ezalaki kaka te tempelo esantu oyo ezalaki na mposa ya kotongama lisusu. Na ndenge mingi, bato ya Nzambe bazalaki ya kobeba na molimo. Mpe kotonga lisusu bato basantu ezwaka ntango mingi koleka kokata mabanga mpe kotya yango mpo na kotonga ndako esantu. Elimboli ete makomi “Bosantu epayi ya Nkolo” esengeli kaka te kokomama na efelo ya tempelo, to kutu na “Bangonga ya bampunda” mpe “banzungu nyonso kati na Yelusaleme” (Zakalia 14:20–21). Esengeli ekomama mpe na mitema ya bato nyonso.
Mpo na koyeba makambo oyo ezali na mikanda ya Hagai mpe Zakalia, botala “Hagai” mpe “Zakalia” na Mokambi na Makomi.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Hagai 1; 2:1–9
“Bokanisa banzela na bino.”
Ezali na makambo mingi ya kosala mpo na kotonga lisusu Yelusaleme. Kasi nsima ya mibu soki 15 elekaki banda bozongi ya Bayisalaele, Nkolo asepelaki te na komona ete botongi lisusu ya tempelo epesamaki motuya mingi mpenza te (botala Hagai 1:2–5; botala lisusu Ezela 4:24). Ntango bozali kotanga Hagai 1; 2:1–9, bokanisa mituna lokola oyo elandi:
-
Makama nini Bayisalaele bakutanaki na yango mpo ete basilisaki tempelo te?
-
Mapamboli nini Nkolo alakaki bango soki basilisaki kotonga ndako na Ye?
-
Nsango nini ya Nkolo ezali mpo na bino na Hagai 1:5–7? Lolenge nini bokoki koyokanisa makambo na bino oyo botyaka na esika ya liboso na oyo ya Nkolo? Ntango nini bopambolamaki mpo botyaki Nzambe liboso na bomoi na bino?
Basantu ba mikolo mya nsuka ya liboso bakutanaki na likambo ya ndenge moko lokola oyo ya Bayisalaele na mikolo ya Hagai (botala Malongi mpe Mayokani 95). Nini bozali koyekola uta na bandakisa mibale oyo etali mayoki ya Nkolo etali batempelo?
Tala lisusu Dale G. Renlund, “Yesu Klisto Azali Bomengo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 96–99; Terence M. Vinson, “True Disciples of the Savior [Bayekoli ya Solo ya Mobikisi],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 9–11; “We Love Thy House, O God,” Hymns, no. 152; “Provo City Center Temple Completed” (video), ChurchofJesusChrist.org.
Provo City Center Temple Completed
Zakalia 1–3; 7–8; 14
Nkolo akoki kokomisa ngai mosantu.
Na bomoni na bino, ezali na motuya nini kozala na “bosantu epayi ya Nkolo” ekomami na biloko ya mokolo nyonso lokola oyo etangami na Zakalia 14:20? (botala lisusu Esode 28:36–38). Ezali na motuya nini kozala na yango ekomami na batempelo lelo? Molongo oyo elingi koloba nini mpo na bino? Lolenge nini bokoki kosala bosantu eteni ya bomoi na bino ya mokolo na mokolo? Bomanyola mituna elandi ntango bozali kotanga mabiangi ya Nkolo epayi ya bato na Ye mpo bakoma basantu koleka na Zakalia 1:1–6; 3:1–7; 7:8–10; 8:16–17.
Bokoki kotanga lisusu Zakalia 2:10–11; 8:1–8; 14:9–11, 20–21 mpo na koyekola lolenge bomoi ekozala na mikolo ekoya ntango biso banso tozali kotikala elongo na Nkolo na lolenge ya bosantu. Nini ezali kokamwisa bino na limoni ya Zakalia etali mikolo ezali koya ya Yelusaleme? Nini bomoni awa oyo bokolinga komona na bisika bofandi? Lolenge nini bokoki komilengela mpo na kobika na bizalela oyo Zakalia alimboli?
“Tala, Mokonzi na yo azali koya epayi na yo: azali sembo, mpe molongi; atonda na komikitisa, mpe amati likolo ya mwana ya mpunda” (Zakalia 9:9). Triumphal Entry [Bokoti ya Lokumu], na Harry Anderson
Zakalia 9:9–11; 11:12–13; 12:10; 13:6–7; 14:1–9
Yesu Klisto azali Masiya alakama.
Makomi mingi ya Zakalia ezali kolobela mosala ya Yesu Klisto awa na mabele mpe Boyei ya Mibale na Ye. Botala mwa bisakoli ya Zakalia, elongo na makomi etali bokokisi na yango. Ntango bozali kotanga milongo oyo, bomituna: Nini yango ezali koteya ngai etali Mobikisi?
-
Zakalia 9:9–11 (botala Matai 21:1–11; 1 Petelo 3:18–19)
-
Zakalia 11:12–13 (botala Matai 26:14–16; 27:1–7)
-
Zakalia 12:10 (tboala Yoane 19:37; Emoniseli 1:7)
-
Zakalia 13:6–7; 14:1–9 (botala Matai 26:31; Malongi mpe Mayokani 45:47–53)
Bokanisi elingaki kozala ndenge nini kozala kati na bato oyo bazalaki koyamba Yesu na Yelusaleme ndenge elimbolami na Zakalia 9:9–11? Lolenge nini bokoki koyamba Ye kati na bomoi na bino, bandako na bino, mpe bisika bofandi?
Tala lisusu Mokambi na Makomi, “Masiya,” Gospel Library; “Bokoti ya Lokumu ya Nkolo na Yelusaleme” (video), Gospel Library; Ronald A. Rasband, “Ozana na Nzambe oyo Aleki Likolo,” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 108–12.
The Lord's Triumphal Entry into Jerusalem
Mpo na mingi, botala nsango ya sanza oyo na magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Hagai 1:2–8
“Bokanisa banzela na bino.”
-
Ntango bozali kotanga biteni ya Hagai 1:2–5 elongo na bana na bino, bosunga bango bayeba mpo na nini Nkolo asepelaki te na bato. Ntango mosusu bana na bino bakoki kozwa liloba na molongo 6 mpe koyema elilingi na yango. Bakoki kolakisana yango moko na mosusu mpe kopesa likanisi ya liloba nini liyemi moko na moko ezali kolakisa. Ntango tolekisaka ngonga na makambo mosusu koleka oyo Nkolo alingaka, lolenge nini yango ekoki kozala lokola kolya kasi kotonda te? Bokoki kosolola na moko na mosusu etali lolenge nini bokoki kosala ntango mpo na makambo oyo ezali motuya mpo na Nkolo.
-
Bokoki lisusu kotanga molongo 8 na bana na bino mpe kobengisa bango basala lokola “komata na ngomba,” “komema mabaya,” mpe “kotonga ndako [ya Nkolo].” Bana na bino bakoki kosala molongo ya biloko oyo basalaka na mokolo, kobakisa makambo oyo Nkolo asengi bango basala. Bosenga bana na bino “bakanisa banzela [na bango]” na kozingaka oyo Nkolo asengelaki koloba ezali makambo ya motuya mingi mpenza na molongo na bango.
Mateya etie ndako na katikati. Mokambi Russell M. Nelson ateyi ete ndako esengeli ezala “esika ya boyekoli nsango malamu” (“Kokoma Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya Ndakisa Malamu,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 113). Ntango libota na bino ezali koyekola toli ya Hagai ya “kokanisa banzela na bino,” bokoki kolobela oyo etali lolenge nini kotya Nzambe liboso na bomoi ya libota na bino.
Zakalia 3:1–7
Kosala mpe kobatela mayokani ekoki kosalisa ngai nazala mingi lokola Tata na Lola mpe Yesu Klisto.
-
Kati na limoni moko, Zakalia amonaki nganganzambe monene moko oyo “alataki bilamba ya bosoto” (Zakalia 3:3). Anzelu apesaki ye bilamba ya peto. Bokoki kosalisa bana na bino bayeba bosolo ya motuya na kotangaka elongo Zakalia 3:1–7 mpe kolobela etali nini bilamba ya bosoto mpe ya peto ekoki kolakisa. Lolenge nini tokomaka peto uta na masumu na biso, kutu nsima ya kozwa libatisi na biso? Lolenge nini boyokani na biso ya libatisi esalisaka biso “totambola kati na banzela [ya Nkolo]”?
-
Bino mpe bana na bino bokoki kotala elilingi ya libatisi, lokola moko oyo ezali na emonaneli oyo. Mpo na nini tolataka pembe na libatisi na biso? Bokoki lisusu koyemba loyembo moko etali libatisi, lokola “When I Am Baptized” (Children’s Songbook, 103); loyembo yango ezali koteya nini etali ntina nini Nkolo alingi biso tobatisama?
Zakalia 9:9–11; 11:12; 13:6–7
Yesu Klisto azali Masiya alakama.
-
Bana na bino bakoki kosepela komona na makanisi likambo oyo elobelami na Zakalia 9:9, ntango Yesu ayaki na Yelusaleme na poso ya nsuka ya bomoi na Ye ya kufa. Mpo na kosalisa na yango, bolakisa bango elilingi ya likambo yango, lokola oyo ezali na emonaneli oyo. Bokoki lisusu kokabola elongo na bango “The Savior Goes to Jerusalem [Mobikisi Azali Kokende na Yelusaleme]” (na Masolo ya Boyokani ya Sika, 110–12). Bana na bino bakoki kolakisa kati na bililingi oyo bazali “kosepela mingi.” Nani azali Mokonzi na Zakalia 9:9? Mpo na nini tozali na botondi mpo na Ye?
1:35Chapter 44: The Savior Goes to Jerusalem
-
Bokanisa kosalisa bana na bino bakokanisa bisakoli uta Zakalia elongo na milongo ya Kondimanana Sika oyo ezali kolimbola kokokisama na yango. Oyo ezali mwa bandakisa: Zakalia 9:9 mpe Matai 21:5–9; Zakalia 9:11 mpe 1 Petelo 3:18–19; Zakalia 11:12 mpe Matai 26:14–16; Zakalia 13:7 mpe Matai 26:31. Toyekoli nini etali Mobikisi na milongo oyo?
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .