Yaka, Landa Ngai
Sanza ya zomi na mibale 14–20. “Ngai Nalingaka Bino, Elobi Nkolo”: Malaki


“Sanza ya zomi na mibale 14–20. ‘Ngai Nalingaka Bino, Elobi Nkolo’: Malaki,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya zomi na mibale 14–20. ‘Ngai Nalingaka Bino, Elobi Nkolo,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

ekeko ya Yesu liboso ya lola etonda na minzoto

Sanza ya zomi na mibale 14–20: “Ngai Nalingaka Bino, Elobi Nkolo”

Malaki

“Ngai nalingaka bino,” eyebisaki Nkolo epayi ya bato na Ye na nzela ya profeta Malaki. Kasi Bayisalaele, oyo banyokwamaki bankola ya mpasi mpe boombo, batunaki, “Eloko nini ezali kolakisa ete olingaka biso?” (Malaki 1:2). Nsima ya nyonso oyo Yisalaele alekaki, bakokaki komituna soki lisolo na bango ezali ya solo lisolo ya bolingo ya Nzambe mpo na bato na Ye ya boyokani. Na ndenge mosusu, ezali pete mingi mpo na komona yango lokola lisolo ya botau mpe botomboki ya moto. Nzokande na nyonso wana, Nzambe atika ata moke te kosembola loboko ya bolingo. Ntango bana ya Yakobo banyokolaki ndeko na bango ya mobali Yozefe, Nkolo akobaki kobikisa bango uta na nzala (botala Genese 45:4–8). Ntango Yisalaele abandaki koyimayima kati na esobe, Aleisaki bango mana (botala Esode 16:1–4). Atako ntango Yisalaele atalaki na banzambe mosusu mpe apanzanaki, Nzambe alakaki ete soki bayambolaki, Asengelaki kosangisa bango mpe kosikola bango “na bamawa minene” (botala Yisaya 54:7). Ya solo, Kondimana na Kala ezali lisolo ya bolingo ya Nzambe ya motema molai mpe ya koyika mpiko. Mpe lisolo yango ezali kokoba lelo. Yesu Klisto, “Moyi ya Boyengebene,” lokola Malaki abengaki Ye, ayaki “na libiki na mapapu na ye” (Malaki 4:2). Azali ndakisa monene ya bolingo ya Nzambe mpo na Yisalaele ya kala mpe biso banso.

Mpo na koyeba mingi etali mokanda ya Malaki, botala “Malaki” na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Malaki 1–4

“Bozonga epayi na ngai, mpe Ngai nakozonga epayi na bino.”

Na ntango ya Malaki, bato ya Yisalaele basilisaki kotonga lisusu tempelo ya Yelusaleme, kasi lokola bato bazalaki kaka na mposa ya kotonga lisusu boyokani na bango elongo na Nkolo. Ntango bozali kotanga Malaki, boluka mituna oyo Nkolo atunaki Bayisalaele to oyo bango batunaki Ye. Bokanisa komituna binomei mituna ya lolenge moko (mwa bandakisa epesami na nse) mpo na kosalisa bino botalela boyokani na bino na Nkolo mpe bopusana penepene na Ye.

  • Lolenge nini nayoki bolingo ya Nkolo mpo na ngai? (botala Malaki 1:2).

  • Makabo na ngai epayi ya Nkolo ezali kokumisa Ye? (botala Malaki 1:6–11)

  • Na ndenge nini nasengeli “kozonga” epayi ya Nkolo? (botala Malaki 3:7).

  • Ezali ngai koyiba Nkolo na lolenge moko to mosusu? (botala Malaki 3:8–11).

  • Lolenge nini ezaleli na ngai na ntango ya bampasi elakisaka mayoki na ngai epayi ya Nkolo? (botala Malaki 3:13–15; botala lisusu 2:17).

Malaki 1:6–14

Nkolo azali kosenga “likabo ya peto.”

Ntango bozali kotanga oyo etali makabo elimbolami na Malaki 1, bomoni nini etali bambeka oyo banganganzambe bazalaki kopesa? Bambeka yango ezali kopesa bino likanisi nini etali mayoki ya banganganzambe epayi ya Nkolo? (botala Malaki 1:13). Bokanisa kosala molongo ya makabo, to bambeka, oyo bopesaka epayi ya Nkolo. Mpo na eloko nyonso oyo ezali na molongo, bomanyola nini ekoki kokomisa likabo yango “mbindo” to likabo ya “peto” (Malaki 1:7, 11).

Malaki 3:8–12

elembo ya seminele
Nkolo afungolaka maninisa ya lola ntango nalakisaka bondimi na ngai na kofutaka moko na zomi.

Bokanisa ete bozali na moninga moko oyo awuti komona ete bofutaka moko na zomi. “Mpo na nini bosalaka yango?” etuni moninga na bino. Bokanisa oyo etali yango ntango bozali kotanga Malaki 3:8–12. Nini bozwi kuna oyo ekoki kosalisa koyanola motuna ya moninga na bino? Eloko nini mosusu bolingi moninga na bino asosola oyo etali moko na zomi? Mpo na lisungi mingi, bokoki koluka nsango ya Mpaka Neil L. Andersen “Tithing: Opening the Windows of Heaven” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 32–35), kolukaka biyano na mituna lokola oyo elandi:

  • Mpo na nini alingi biso tofuta moko na zomi?

  • Nini ekoki kopekisa moto kofuta moko na zomi, mpe lolenge nini tokoki kolonga mikakatano oyo?

  • Lolenge nini kofuta moko na zomi elendisaka bondimi na biso epayi ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto?

Bokoki mpe kokabola elongo na moninga na bino lolenge nini Nkolo apamboli bino ntango bofutaka moko na zomi. Bokoki kozwa makanisi na eteni oyo ebengami “Lesson Number 1—Significant but Subtle Blessings” na nsango ya Mpaka David A. Bednar “The Windows of Heaven” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 17–18). Tokomaka lolenge ya bato nini na kofutaka moko na zomi?

Bokanisi ete liloba “kofungolela bino maninisa ya lola” (molongo 10) ekoki kolimbola nini? Ntango mosusu bokoki kotala libanda ya lininisa mpe kokanisa etali bantina ya maninisa. Mpo na nini “maninisa ya lola” ezali lolenge moko malamu ya kolimbola lolenge nini Nzambe apambolaka biso ntango tofutaka moko na zomi?

Yesu abimeli Joseph Smith na Tempelo ya Kirtland

Limoni na Tempelo ya Kirtland, na Gary Smith

Malaki 4:5–6

“Nakotindela bino profeta Eliya.”

Ntango Moroni alobaki Malaki 4:5–6 epayi ya Joseph Smith, alobaki yango “na bokeseni moke uta na lolenge etangami” na Biblia (botala Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:36–39). Bokeseni ya Moroni ezali kobakisa nini na bososoli na bino ya esakoli oyo? Mingimingi, bomanyola mituna lokola oyo elandi:

  • Banani bazali “batata”? (botala Dutelonome 29:13). Bilaka nini epesameli bango? (botala Abalayama 2:9–11). Lolenge nini bozali kosalisa kokokisa bilaka yango?

  • Makambo nini esungi bino bobalola mitema na bino epayi ya bankoko na bino? Mpo na nini yango ezali na motuya mpenza na mwango ya Tata na Lola?

Mpo na koyekola mingi etali boyei ya Eliya mpe lolenge esakoli oyo ezali kokokisama lelo, botala Malongi mpe Mayokani 110:13–16 mpe D. Todd Christofferson, “Nguya ya Bokangisi” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 19–22). Mpo na nini bozali na botondi ete Eliya ayaki?

Botala lisusu Gerrit W. Gong, “We Each Have a Story,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 43–46; “Turn Your Hearts,” Hymns, nimelo 180; “Nguya ya Bokangisi” (video), ChurchofJesusChrist.org.

3:38

The Sealing Power

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Malaki 1:2

Nkolo alingi ngai.

  • Lolenge nini bino mpe bana na bino bokoki koyanola motuna oyo ezali na Malaki 1:2—“Eloko nini ezali kolakisa ete [Nkolo] alingaka biso?” Bokabola moko na mosusu bantina boyebeli ete Ye alingaka bino. Ntango mosusu bana na bino bakoki koyema bililingi oyo ekokundolisa bango bolingo na Ye.

Bokotisa bana na masolo ya nsango malamu. Soki bozali koteya bana mike, bosengeli kokanisa ndenge ya kosala mpo na kokotisa bango na masolo ya nsango malamu. Ndakisa, bana na bino bakoki koleka nzinganzinga ya ndembo; ntango basimbi ndembo, bakoki kokabola ntina moko oyo bayebi ete Yesu alingi bango.

baboti mpe elenge mobali moko batali libanda ya lininisa

Malaki 3:8–12

Nkolo akopambola ngai ntango nazali kofuta moko na zomi.

  • Lolenge nini bokosalisa bana na bino bayekola oyo etali moko na zomi? Bokoki kosenga bango batanga biloko zomi ya mike, lokola mbongo ya bibenge oyo ezali na lokasa ya milulu ya poso oyo. Nsima bakoki kolongola moko ya biloko na oyo etikali—oyo ezali motango topesaka epayi ya Nkolo lokola moko na zomi. Engebene na Malaki 3:8–12, mpo na nini Nkolo alingi biso tofuta moko na zomi? (botala lisusu “Profeta Malaki” na Masolo ya Kondimana na Kala, 171–72; “First Things First!” [video], Gospel Library).

    0:58

    Malachi the Prophet

    1:18

    First Things First!

  • Ntango bozali kotanga Malaki 3:10 elongo, bokoki kobengisa bana na bino batelema na lininisa ntango bozali kotanga liloba “maninisa ya lola.” To bokoki kotya mayi na kopo kino ntango ekotonda mpo na kolakisa liloba “na bofuluki oyo ezanga ndelo.” Boyebisa bana oyo etali mapamboli Nzambe apesaka bino ntango bofutaka moko na zomi. Bana na bino bakoki koyema bililingi oyo ezali kolakisa mapamboli yango mpe kotelimisa yango na lininisa to pembeni ya lininisa na ndako na bino.

Malaki 4:5–6

Eliya ayaki mpo na kobalusa mitema biso na mabota na biso.

  • Na Malaki 4:5–6, bana na bino bakoki koluka biyano na mituna oyo elandi etali esakoli ya Malaki: Nani Nkolo alakaki kotinda? Ntango nini Ye alobaki ete moto yango asengelaki koya? Nini Nkolo alobaki moto yango asengelaki kosala? Mpo na nini moto yango asengelaki koya? Wapi esakoli yango ekokisamaki? (botala Malongi mpe Mayokani 110:13–16).

  • Mpo na komona lolenge nini elaka na Malaki 4:5 ekokisamaki, bokoki lisusu kotala “Joseph and Oliver Receive Priesthood Keys” na Doctrine and Covenants Stories, 26–30. Loyembo lokola “The Hearts of the Children” (Children’s Songbook, 92) ekoki kosalisa bana na bino bayekola mpo na nini ezalaki na motuya mingi ete Eliya aya. Bokoki lisusu kotala FamilySearch.org/discovery, FamilySearch Tree app, to My Family booklet mpo na milulu oyo ekoki kosalisa bino mpe bana na bino bobalusa mitema na bino epayi ya bankoko na bino.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo ya magazini ya Moninga .

mwasi moko azali koningisa kitambala ya mpembe

Mourning’s Hosanna [Ozana ya Kolela], na Rose Datoc Dall. Mwasi moko abengami Mourning atelemi na mokili ya molimo, azingami na bankoko na ye. Azali kosepela kobimisama na bango na boombo ya molimo.

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nkolo apambolaka ngai ntango nafutaka moko na zomi