Yaka, Landa Ngai
Sanza ya zomi na moko 9–15. “Nzambe Mosusu Azali Te Oyo Akoki Kokangola”: Danyele 1–7


“Sanza ya zomi na moko 9–15. “Nzambe Mosusu Azali Te Oyo Akoki Kokangola”: Danyele 1–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya zomi na moko 9–15. ‘Nzambe Mosusu Azali Te Oyo Akoki Kokangola,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Nebukadenasala azali kolanda Daniele na likebi nyonso

Daniel Interprets Nebuchadnezzar’s Dream [Danyele Alimboli Ndoto ya Nebukadanesala], na Grant Romney Clawson

Sanza ya zomi na moko 9–15: “Nzambe Mosusu Azali Te Oyo Akoki Kokangola”

Danyele 1–7

Mingimingi moto moko te akobangisa bino kobwaka bino na litumbu ya moto to na libulu ya bankosi likolo ya bondimi na bino kati na Yesu Klisto. Kasi moko te kati na biso akoleka bomoi oyo kozanga bomekami ya bondimi. Na yango biso banso tokoki kosalela bandakisa ya bato lokola Danyele, Sadalaka, Mesaka, mpe Abedenego, baoyo bakangamaki lokola bilenge mibali epayi ya Bokonzi ya nguya ya Babilone (booyo etali 2 Mikonji 24:10–16). Bazingami na bizaleli bamesana na yango te elongo na mituya ekesena, bakutanaki na mimekano minene mpo na kotika bindimeli mpe bonkoko na bango ya bosembo. Kasi bakobaki kotikala solo na mayokani na bango. Lolenge nini bango basalaki yango? Na kosalaka makambo oyo ya mike mpe ya pete Nzambe asengaka na biso banso—kosambela, kokila bilei, kopona baninga malamu, kondimela Ye, mpe kozala pole ya basusu. Lokola Joseph na Ejipito mpe Estele na Perse, Danyele mpe baninga na ye na Babilone babatelaki bondimi na bango epayi ya Nzambe, mpe Nzambe asalaki makamwisi oyo efulaka bandimi kino mikolo oyo tozali.

Mpo na lisolo mobimba na bokuse ya mokanda ya Danyele, botala “Danyele” na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Danyele 1; 36

elembo ya seminele
Nakoki kondimela Nkolo ntango bondimi na ngai emekami.

Na maloba mosusu, biso banso tofandaka na Babilone. Mbala mingi tokunaka na mimekano mpo na kokweisa mibeko na biso mpe kotika bondimi na biso kati na Klisto. Ntango bozali kotanga Danyele 1, 3, mpe 6, bokoma lolenge nini Danyele, Sadalaka, Mesaki, mpe Abedenego batungisamaki mpo na kosala makambo oyo bayebaki ete ezalaki mabe. Lolenge nini bango bayanolaki na makambo yango? (botala Danyele 1:10–13; 3:15–18; 6:10). Mbano ya bondimi na bango ezalaki nini? Nini bozali koyekola uta makambo yango oyo ekoki kosalisa bino bondimela Nkolo ntango bozali kokutana na botemeli? Bokanisa lisusu mituna elandi:

  • Ntango nini bomimonaki ya kotungisama mpo na kosala eloko moko oyo boyebaki ete ezalaki mabe? Lolenge nini Nkolo apamboli bino mpo na bobateli ya mitindo na Ye?

  • Nini soki bondimi na bino ezali komema te na makamwisi oyo bozali koluka? (ndakisa, botala Alma 14:8–13). Engebene na oyo botangi na Danyele 3:13–18, lolenge nini bokanisi Sadalaka, Mesaki, mpe Abedenego bayanolaki na motuna oyo? Lolenge nini ndakisa na bango ekoki kopusa lolenge bomonaka mimekano na bino?

  • Lolenge nini maponi na bino ya bosembo ekoki kokamba basusu na bondimi monene mpenza kati na Nkolo? (botala Danyele 2:47; 3:28–29). Bomanyola bopusi oyo maponi na bino ekoki kozala na yango likolo ya basusu.

Tala lisusu Dieter F. Uchtdorf, “Be Not Afraid, Only Believe,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 76–79.

Bomeka kokotisa moto nyonso. Mobikisi “abiangi … banso baya epayi na ye mpe bakabola bolamu na ye” (2 Nefi 26:33). Soki bozali koteya libota na bino to kelasi moko, bomanyola ndenge bokoki kopesa libaku na moto nyonso mpo na kosangana na lolenge moko to mosusu. Ndakisa, bokoki kopesa na moto moko na mosusu molongo ya makomi, eteni ya nsango ya likita, to molongo ya loyembo moko mpo na komanyola mpe kopesa likanisi. Botya moto moko te na mbamba mpo na kosangana, kasi bopesa bango mabaku.

Sadalaka, Mesaki, Abedenego, mpe elilingi ya minei kati na litumbu

Sadalaka, Mesaki, mpe Abedenego kati na Litumbu ya Moto, na William Maughan

Danyele 2

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi ya Nzambe na mabele.

Na nzela ya bobimisi, Danyele amonaki ete ndoto ya Nebukadanasela ezali kolobela babokonzi ya mokili na mikolo ekoya, mpe bokonzi ya Nzambe ya mikolo ekoya, oyo “ekotikala kobebisama te” (Danyele 2:44). “Eklezia ezali bokonzi ya mikolo ya nsuka oyo esakolamaki,” Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki, “ekelami na moto te kasi na Nzambe ya lola mpe kobalukaka lokola libanga ‘ekweyi yango moko uta na ngomba kozangaka loboko ya moto moko’ mpo na kotondisa mabele” (“Why the Church,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 111). Bokanisa oyo etali bokonzi ya Nzambe ya mikolo ya nsuka ntango bozali kotanga bandimbola ya libanga na Danyele 2:34–35, 44–45. Mosala na bino ezali nini na kosalisaka bokokisi ya esakola oyo?

Tala lisusu “Hark, All Ye Nations!,” Hymns, no. 264; “God Gave Them Knowledge” (video), ChurchofJesusChrist.org.

13:49

God Gave Them Knowledge

Danyele 2:1–30

Kozwa bobimisi esengaka bomilengeli ya molimo.

Ntango bozali kotala lisusu Danyele 2:1–15, bokanisa lolenge nini bokokaki komiyoka soki bozalaki na likambo ya Danyele. Danyele asalaki nini? (botala Danyele 2:16–18). Nini bokoki koyekola na Danyele 1:17 oyo etali lolenge nini Nzambe alengelaki Danyele? Nini bokoki koyekola uta maloba mpe misala ya Danyele nsima ya kozwa lisungi ya Nkolo? (botala Danyele 2:19–30).

Danyele 7:13–14

Yesu Klisto azali Mwana ya Tata ya Seko.

Na bowumeli ya mosala ya Mobikisi na mabele, Bayuda ebele bazalaki kozwa nkombo “Mwana ya moto” uta Danyele 7:13 mpo na kolobela Masiya oyo asengelaki koya. Nini bozali koyekola oyo etali Masiya uta Danyele 7:13–14? (botala lisusu Mose 6:57).

Mobikisi mbala mingi azalaki komibenga lokola “Mwana ya moto.” Bokanisa kotala lisusu mwa bandakisa: Matai 25:31; Malako 9:31; 10:45. Nini Ye azali koteya na ntina na Yemei na milongo oyo? Na Malako 14:61–64, Yesu asalelaki nkombo oyo na mokolo ya nsuka ya bomoi na Ye ya kufa. Botala eyano uta bato oyo bayokaki esakoli na Ye. Lolenge nini esakweli ya Danyele oyo etali Mwana ya Moto ezali kopusa mayoki na bino etali oyo ekomelaki Ye na Malako 15?

Kaka ndenge Yesu ayinamaki mpo na kosakola ete azalaki “Mwana ya moto,” bokoki mpe kokutana na minyoko mpo na kosakola bosolo. Bokokanisa esakola na Danyele 7:13–14 na bilaka na Malongi mpe Mayokani 121:29, 46.

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 49:6; Mokambi na Makomi, “Mwana ya Moto,” Gospel Library.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Danyele 1; 36

Yesu akosalisa ngai nasala oyo ezali sembo atako ntango yango ezali mpasi.

  • Mpo na kosalisa bana na bino bayekola uta na masolo efulama na mokanda ya Danyele, bokoki kozwa bililingi ya makambo na Danyele 1, 3, mpe 6 (botala lisusu lokasa ya milulu ya poso oyo to Buku ya Bilili ya Nsango Malamu, nimelo 23, 2526). Nsima bokoki kotya bililingi etali na nse mpe kobengisa mwana moko mpo na kobalusa elilingi moko mpe kolobela lisolo oyo yango ezali kolakisa. (Mpo na lisungi, botala “Danyele mpe Baninga na Ye,” “Sadalaka, Mesaki, mpe Abedenego,” mpe “Danyele mpe Libulu ya Bankosi” na Masolo ya Kondimana na Kala, 154–56, 160–62, 163–65.)

    1:39

    Daniel and His Friends

    1:39

    Shadrach, Meshach, and Abed-nego

    1:45

    Daniel and the Lions’ Den

  • Bosunga bana na bino bakanisa oyo etali makambo oyo ntango bakokaki kozala ya kotungisama mpo na kosala liponi moko ya mabe, lokola Danyele mpe baninga na ye batungisamaki na Danyele 1, 3, mpe 6. Bokabola na moko na mosusu lolenge nini bopambolami mpo na liponi malamu bosali atako ntango ezalaki mpasi. Bokoki mpe koyemba elongo loyembo moko etali likambo oyo, lokola “Choose the Right” (Hymns, no. 154).

bilenge mibali koboyaka kolia mosuni

Kondimela Bwanya ya Liloba

Danyele 1:1–17

Tata na Lola alingi ngai nabatela nzoto na ngai.

  • Kotanga lisolo etali Danyele mpe baninga na ye koboyaka mosuni mpe vinyo ya mokonzi ekoki kofula lisolo oyo etali mobeko ya kolongono ya nzoto oyo Tata na Lola apesi biso lelo (botala Malongi mpe Mayokani 89). Ntango mosusu bokoki koluka mapamboli oyo Danyele mpe baninga na ye bazwaki mpe kokokanisa yango na mapamboli elakama na Liloba ya Bwanya (botala Danyele 1:15–17 mpe Malongi mpe Mayokani 89:18–21).

Danyele 2

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi ya Nzambe na mabele.

  • Ntango bozali kotanga Danyele 2:31–35, 44–45 elongo na bana na bino, bokoki kobengisa bango bakoma elilingi ya ndoto ya Nebukadanesala. Bosunga bango basosola libanga oyo ezali na ndoto elakisi Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Nini tozali koyekola etali Eklezia oyo etali ndoto oyo? Bana na bino bakoki kotanga mwa biloko oyo Tata na Lola asalaki mpo na kotonga Eklezia na Ye na mikolo ya nsuka. Soki bazali na mposa ya lisungi, bokoki kolakisa bililingi ya makambo ya Bozongisi ya Eklezia (botala Buku ya Bilili ya Nsango Malamu, nimelo 90–95).

Danyele 6

Tata na Lola alingi ngai nasambela mbala mingi.

  • Mpo na nini kobondela Tata na Lola ezalaki motuya epayi ya Danyele? Ntango mosusu bino mpe bana na bino bokoki kolobela etali motuna yango ntango bozali kotanga Danyele 6 elongo. Nsima bokoki koyebisana moko na mosusu mpo na nini kosambela ezali motuya mpo na bino. Bana na bino bakoki kosepela koyema bililingi na bangomei ntango bazali kosambela na makambo ndenge na ndenge. Bakoki kosalela mayemi na bango mpo na koteyana moko na mosusu ete tokoki kobondela Tata na Lola atako wapi tozali to nini tozali na yango mposa.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini ya Moninga .

Danyele atelemi liboso ya etuluku ya bankosi

Daniel in the Lions’ De [Danyele kati na Libulu ya Bankosi], na Briton Rivière

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nzambe akopambola ngai ntango nazali kopona kolanda Yesu Klisto