“Sanza ya zomi 12–18. ‘Mosikoli Akoya na Siona’: Yisaya 58–66,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya zomi 12–18. ‘‘Mosikoli Akoya na Siona,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026
Yesu na kati ya Sinagoga na Nazalete, na Greg Olsen
Sanza ya zomi 12–18: “Mosikoli Akoya na Siona”
Yisaya 58:66
Na ebandeli ya mosala na Ye, Yesu Klisto akendaki kotala sinagoga moko na Nazalete, epayi oyo akolaki. Atelemaki wana mpo na kotanga makomi, afungolaki mokanda ya Yisaya, mpe atangaki oyo toyebi sikawa lokola Yisaya 61:1–2. Na nsima asakolaki ete, “Mokolo oyo makomi oyo ekokisami na matoyi na bino.” Oyo ezalaki moko ya masakoli ya semba ya Mobikisi ete Ye azalaki Mopakolami, oyo “akobikisa bato ya mitema ebukana” mpe “akosakola bosikoli epayi ya bakangami” (tala Luka 4:16–21). Makomi yango ekokisamaki mpenza na mokolo yango. Mpe, lokola masakoli mosusu mingi ya Yisaya, ezali mpe kokokisama na mikolo na biso. Mobikisi azali kokoba kobikisa bato ya mitema ebukana oyo bayaka epayi na Ye. Ezali naino na bakangami mingi oyo bazali na mposa ya kosikolama. Mpe ezali na lobi ya nkembo ya komilengela mpo na yango—ntango oyo Nkolo “akokela lola ya sika mpe mabele ya sika” (Yisaya 65:17) mpe “akosala ete boyengebene mpe masanzoli ebima liboso ya bikolo nyonso” (Yisaya 61:11). Kotanga Yisaya efungoli miso na biso na oyo Nkolo asilaki kosala, oyo azali kosala, mpe oyo akosala lisusu mpo na bato na Ye.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Yisaya 58:3–12
Kokila bilei etongaka nguya ya molimo mpe epambolaka bato oyo bazali na bosenga.
Mpo na nini moto moko akomipimela bilei na bolingi na ye moko ntango bilei ezali. Ntango bozali kotanga Yisaya 58:3–12, bokoki kokanisa oyo etali bantina na bino ya kokila bilei—lokola mpe bantina ya Nkolo mpo na kopesa mobeko oyo. Tala mwa mituna misusu ya komanyola:
-
Mpo na nini kokila bilei ekoki ntango mosusu kotalelama lokola mokumba mingi koleka lipamboli? (tala Yisaya 58:3–5). Lolenge nini makomi ya Nkolo na kati ya mokapo oyo ebongolaka bomoni wana epayi na bino?
-
Ekoki kolimbola nini “kofungola bansinga ya mabe” mpe “kobuka ekanganeli nyonso”? (Yisaya 58:6). Ndenge nini kokila bilei ekoki kopambola basusu? (tala molongo 7).
-
Ndenge nini kokila bilei ememeli bino mapamboli oyo elimbolami na Yisaya 58:8–12?
Na nsango na Ye “Oyo Ezali Kokila Esili Ngai Kopona Te?” (Liahona, Sanza ya mitano 2015, 22–25), Mokambi Henry B. Eyring akabolaki bandakisa mingi ya lolenge bato bapambolamaki na kokila bilei mpe makabo ya kokila bilei. Ndenge nini bomoni mapamboli ya ndenge wana na bomoi na bino?
Tala lisusu “Bless Our Fast, We Pray,” Hymns, no. 138; Topics and Questions, “Fasting and Fast Offerings,” Gospel Library.
Boyeba bato oyo bozali koteya. Kozala moteyi ya lolenge ya Klisto esengaka koyeba bato oyo ozali koteya mpe koluka kososola oyo ezali na kati ya mitema na bango. … Bokoki koluka koyeba lolenge nini bazali koyekola malamu. Bokoki kotuna mituna, koyoka na bokebi, mpe kotalela. Likolo ya nyonso, bokoki kosambela mpo na bososoli oyo kaka Molimo akoki kopesa. Mingi boyebi moto malamu, mingi bokozala na makoki ya kosalisa ye malamu azwa ndimbola na ye moko mpe nguya na nsango malamu ya Yesu Klisto. Ntango kaka bososoli mposa ya mayi ya moto, Molimo akoki koteya bino lolenge nini ya kosalisa kosilisa yango na mayi ya bomoi ya Mobikisi” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 13).
Yisaya 58:13–14
Kotosa Nkolo mpe mokolo ya Saba ememaka esengo.
Mokolo ya Saba ezalaka “esengo” mpo na bino? Ntango bozali kotanga Yisaya 58:13–14, bobanza lolenge nini bokoki kozwa esengo mingi na mokolo ya Nkolo. Ndakisa, nini ekoki kolimbola kobosana “kosala bosepeli na bino na mokolo esantu [na Ye]”? Bokeseni nini ezali kati na “[kosepela] na Nkolo” mpe “kosala banzela na bino moko”?
Tala Russell M. Nelson, “Saba Ezali Mokolo ya Esengo,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 129–32.
Yisaya 59:9–21; 61:1–3; 63:7–9
Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso.
Yisaya 58–66 ezali na makomami ebele etali etinda ya bosikoli ya Yesu Klisto. Boluka yango ntango bozali koyekola. Mingimingi, botala bankombo mpe maloba oyo esalelami mpo na kolimbola Mobikisi. Ndakisa:
-
Nini ekamwisaka bino oyo etali ndimbola ya “molobeli” na Yisaya 59:16–21? Lolenge nini Mobikisi alongaka bizalela elimbolami na milongo 9–15?
-
Ntango Yesu Klisto asakolaki epayi ya bato ya Nazalete ete Ye azalaki Masiya, Azongelaki maloba uta na Yisaya 61:1–3 (tala Luka 4:16–21; tala lisusu video “Jesus Declares He Is the Messiah,” Gospel Library). Lolenge nini Yesu Klisto apambolaki bino mpe basusu na banzela oyo elimbolami na milongo oyo? Lolenge nini Apesi kitoko na esika ya mputulu?
3:24Jesus Declares He Is the Messiah
-
Boboto ya Nkolo” nini bokoki “kolobela”? (tala Yisaya 63:7–9).
-
Maloba nini mosusu oyo etali Mobikisi bomoni na Yisaya 58–66?
Tala lisusu Moziya 3:7; Malongi mpe Mayokani 133:46–53.
Likabo ya Pole, na Eva Timothy
Yisaya 60; 62
“Nkolo akozala epayi na bino pole ya libela na libela.”
Yisaya 60 mpe 62 elobeli ya pole mpe molili, miso mpe komona mpo na koteya oyo etali lolenge nini nsango malamu ya Yesu Klisto ekopambola mokili na mikolo ya nsuka. Boluka makambo oyo na Yisaya 60:1–5, 19–20; 62:1–2. Ntango bozali kotanga mikapo oyo, bomanyola lolenge nini Nzambe azali kosangisa bana na Ye libanda ya molili mpo na kokende na pole na Ye. Mokumba na bino ezali nini na mosala oyo?
Tala lisusu 1 Nefi 22:3–12; 3 Nefi 18:24; Malongi mpe Mayokani 14:9; Bonnie H. Cordon, “That They May See [Ete Bakoka Komona],” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 78–80.
Yisaya 64:1–5; 65:17–25; 66
Klisto akokonza na mabele na ntango ya Mileniume.
Yisaya alobaki na ntina ya mokolo ntango “mitungisi ya kala ebosanamaki” (Yisaya 65:16). Atako lisakoli oyo ekokisami mingi, na ndimbola na yango mobimba, mokolo wana ezali lisusu koya—ntango Yesu Klisto akozonga. Yisaya alimbolaki lobi ekoya na Yisaya 64:1–5; 65:17–25; 66. Botala mbala boni asalelaki maloba lokola “bosepeli” mpe “esengo.” Mpo na nini bozongi ya Mobikisi ekozala mokolo ya esengo mpo na bino? Nini bokoki kosala mpo na komilengela na boyei na Ye?
Tala Biteni ya Bondimi 1:10; Russell M. Nelson, “The Future of the Church: Preparing the World for the Savior’s Second Coming [Lobi Ekoya ya Eklezia: Kolengelaka Mokili mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi],” Ensign, Sanza ya minei 2020, 13–17.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yisaya 58:6–11
Kokila bilei epambolaka ngai mpe basusu mpenza.
-
Mbala mosusu lolenge malamu ya kolendisa bana na bino bakila bilei—ntango bazali ya komilengela—ezali kosalisa bango basosola mikano ya Nkolo mpo na mobeko oyo. Bobanza kotanga elongo Yisaya 58:6–11 mpo na kozwa biyano na mituna oyo: mpo na nini tokilaka bilei? Lolenge nini tokilaka? Bokoki lisusu kotala na “Fast, Fasting [Bokili bilei, Kokila bilei]” na Mokambi na Makomi.
-
Soki bokutanaki na likambo moko ya ntina na kokila bilei, bokabola yango na bana na bino. Bokoki mpe kotuna bango lolenge nini bakolimbola na moninga moko mpo na nini Nkolo apesaki biso mobeko oyo.
Yisaya 58:13–14
Mokolo ya Saba ekoki kozala ya esengo epayi na ngai.
-
Nsima ya kotanga Yisaya 58:13–14, bokoki kolakisa mikolo ya poso na manaka mpe kobengisa bana na bino baloba mikolo elongo na bino. Ntango bokokoma na mokolo ya Saba, botuna bango babenga mokolo yango “esengo.” Boyebisa bango mpo na nini Saba ezali kosepelisa bino.
-
Bokabola moko na mosusu banzela bokoki “kosepela na Nkolo” na Saba. Ntango mosusu bana na bino bakoki koyema makanisi na bango mpe kotia yango na “liboke ya bisengo ya Saba. Nsima, ntango bazali na mposa ya makanisi oyo etali makambo oyo basengeli kosala na Saba, bakoki kobenda likanisi moko na kati ya liboke.
Our Light [Pole na Biso], na Dan Wilson
Yisaya 60:1–3
Nkolo azali lokola pole mpo na ngai.
-
Bokoki kobengisa bana na bino bakanga miso na bango ntango bozali kotanga Yisaya 60:1–3. Bosenga bango bafungola miso ntango bayoki liloba “pole” mpe bakanga yango lisusu ntango bayoki liloba “molili.” Bolimbola ete Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ezali lokola mwinda oyo ezali kosalisa biso tomona nzela na biso ya kozonga epayi ya Tata na Lola.
Yisaya 65:17–25
Ntango Yesu akoya lisusu, Akomema kimya mpe esengo.
-
Yisaya 65:17–25 elimboli lolenge nini mabele ekozala ntango Mobikisi akoya lisusu. Ntango bozali kotanga milongo yango elongo na bana na bino, bosalisa bango baluka lolenge oyo bomoyi ekozala ndenge mosusu kati na “mabele ya sika” oyo Yisaya alobelaki. Mpo na nini ntango oyo ekozala ntango ya ‘kosepela mpe bosepeli libela na libela”? (molongo 18).
-
Bokoki mpe koyemba elongo loyembo moko oyo elobeli Boyei ya Mibale, lokola ““Ntango Mobikisi Akoya Lisusu” (Gospel Library). Bokabola moko na mosusu nini bozali kozela na esengo oyo etali bozongi ya Mobikisi. Nini tokoki kosala mpo na komilengela mpo na mokolo wana?
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .