Yaka, Landa Ngai
Sanza ya zomi 5–11. “Amemaki Bampasi na Biso, mpe Amemaki Mawa na Biso”: Yisaya 50–57


“Sanza ya zomi 5–11. ‘Amemaki Bampasi na Biso, mpe Amemaki Mawa na Biso”: Yisaya 50–57,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya zomi 5–11. ‘Amemaki Bampasi na Biso, mpe Amemaki Mawa na Biso,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026

Yesu alati ekoti ya nzube

The Mocking of Christ [Botioli ya Klisto], na Carl Heinrich Bloch

Sanza ya zomi 5–11: “Amemaki Bampasi na Biso, mpe Amemaki Mawa na Biso”

Yisaya 50–57

Na ntango ya mosala na ye mobimba, Yisaya alobelaki mobikisi moko ya nguya. Masakoli yango elingaki kozala na motuya mingi mpo na Bayisalaele bikeke mingi na nsima ntango bazalaki na boombo na Babilone. Moto oyo akokaki kobuka bifelo ya Babilone asengelaki kozala solo molongi moko ya nguya. Kasi yango ezali te lolenge ya Masiya oyo Yisaya alobelaki na mikapo mikapo 52–53: “Atiolamaki mpe aboyamaki na bato; moto ya mawa, mpe ayebaki mawa: mpe tobombaki bilongi na biso liboso na ye. … Tozwaki ye mobetami, mobetami ya Nzambe, mpe monyokwami” (Yisaya 53:3–4).

Na kotindaka mobikisi ya lolenge wana oyo tokanisaki te, Nzambe ateyaki biso oyo etali kobikisama ya solo. Mpo na kobikisa biso na minyoko mpe mpasi, Nzambe atindaki Moto oyo Ye moko “anyokwamaki, mpe … atungisamaki.” Esika basusu bazelaki nkosi, atindaki mwana ya mpate (tala Yisaya 53:7). Ya solo, banzela ya Nzambe ezali banzela na biso te (tala Yisaya 55:8–9). Yesu Klisto asikolaka biso na kofungolaka kaka boloko te kasi na kozwaka esika na biso kuna. Akangolaka biso na minyololo na biso ya mawa mpe ya bwale na komemaka yango Ye moko (tala Yisaya 53:4–5, 12). Abikisaka biso na mosika te. Anyokwamaka na biso, na misala ya “boboto ya seko” oyo “ekotika yo te” (Yisaya 54:8, 10).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Yisaya 50–52

Lobi ekoya ezali ya kongenga mpo na bato ya Nkolo.

Atako Bayisalaele balekisaki mibu mingi na bokangami—mpe atako bokangami wana ezalaki mbano ya maponi na bango moko ya mabe—Nkolo alingaki bango batala mikolo ekoya na elikya. Nini bomoni kati na nsango ya Yisaya oyo epesi bino elikya? Etando lokola oyo ekoki kosalisa bino boyekola:

Nini nayekolaka oyo etali Nzambe (tala, ndakisa, Yisaya 50:2, 5–9; 51:3–8, 15–16; 52:3, 9–10)

Basango ya elikya (tala, ndakisa, Yisaya 50:9; 51:3–5, 11–12, 22–23; 52:9–10)

Nini nakoki kosala mpo ete elikya ekoma solo (tala, ndakisa, Yisaya 50:10; 51:1–2, 6–9; 52:1–3, 9–11)

Botala lisusu Mosiya 12:20–24; 15:13–18; 3 Nefi 20:29–46; Malongi mpe Mayokani 113:7–10; Russell M. Nelson, “Boyamba Lobi ekoya na Bondimi,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 73–76.

Yesu amemi ekulusu

Because of Love [Na ntina ya Bolingi], na Angela Johnson

Bosunga bayekoli baya epayi ya Yesu Klisto. “Eloko moko te bokosala lokola bateyi ekopambola bayekoli koleka kosalisa bango bayeba Tata na Lola mpe Yesu Klisto mpe bayoka bolingo na Bango” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi8). Ntango bozali komilengela mpo na koteya Yisaya 50–57 epayi ya basusu, bokanisa lolenge nini bokoki kosalisa bango bamona mikangano ya mimekano ya Yisalaele, masakoli ya Yisaya ya Klisto, mpe kozwaka lisungi ya bonzambe na bitumba na bango moko.

Yisaya 53

elembo ya seminele
Yesu Klisto akamataki likolo na Ye moko masumu mpe mawa na ngai.

Mikapo moke na makomi ezali kolimbola etinda ya bosikoli ya Yesu Klisto kitoko koleka Yisaya 53. Bobanza misala lokola oyo mpo na kososola malamu mpe kosalela mateya oyo ya nguya.

  • Bomanyola to bolobela lolenge nini masolo mpe bafilme mbala mingi emonisaka bilombe oyo babikisaka bato. Bokesenisa bililingi wana na bandimbola ya Mobikisi na Yisaya 53.

  • Nsima ya kotanga molongo moko na moko, bopema mpo na komanyola nini Mobikisi anyokwamaki—“mpasi,” “mawa,” mpe “masumu” Ye amemaki—mpo na bato nyonso mpe mingimingi mpo na bino. Bokoki kosalela maloba lokola “biso” mpe “ya biso” na “ngai” mpe “ya ngai” ntango bozali kotanga. Mayoki to makanisi nini milongo oyo ezali kofula kati na bino.

  • Bobanza kotala video “Bokonzi na Ngai Ezali ya Mokili Oyo Te” (Gospel Library), mpe bomanyola lolenge nini masakoli oyo ezali na Yisaya 53 ekokisamaki. Nini ezali mwa bampasi mpe mawa Mobikisi amemaka mpo na bino?

    5:25

    My Kingdom Is Not of This World

  • Boluka bilili ya makambo nzinganzinga ya Bomikabi ya Yesu Klisto (tala Gospel Art Book, nos. 56–60). Na nsima, bokoki kokuta maloba na Yisaya 53 oyo elimbolaka milulu na kati ya bililingi. Makomi oyo efuli bino nini mpo na kosala?

Botala lisusu “Behold the Great Redeemer Die,” Hymns, no. 191.

Yisaya 54; 57:15–19

Yesu Klisto alingi ngai nazonga epayi na Ye.

Biso nyonso tozali na bantango oyo toyokaka kozala mosika na Nkolo mpo na masumu to botau na biso. Basusu kutu batiki elikya ete Akolimbisa bango mokolo mosusu. Yisaya 54 mpe 57 ezali mikapo minene mpo na kotanga mpe kozwa lisusu elikya mpe bolendisi katikati ya bantango ya boye. Mingimingi na Yisaya 54:4–10; 57:15–19, maloba nini eteyi bino lolenge nini Mobikisi ayokaka na ntina na bino? Bokeseni nini esalaka na bomoyi na bino koyeba makambo oyo etali Ye?

Mokambi Dieter F. Uchtdorf ateyaki:

“Atako boniboni bomoyi na biso ekoki komonana ya kobeba mobimba. Atako boniboni motane ya masumu na biso, boniboni mozindo ya bololo na biso, boniboni komiyoka yo moko, ya kobwakisama, to ya kobukana mitema na biso ezali. Kutu baoyo bazangi elikya, oyo bafandi na elikya te, oyo bateki elikya, batiki bosembo na bango, to bakomaki mosika na Nzambe bakoki kotongama lisusu. …

“Nsango ya esengo ya nsango malamu ezali oyo: mpo na mwango ya seko ya esengo oyo epesami na Tata na biso ya kolingama na Lola mpe na nzela ya libonza ezanga nsuka ya Yesu Klisto, tokoki bobele kosikolama te uta na ezalela na biso ya kokweya mpe kozongisama na bopeto, kasi tokoki koleka likolo ya makanisi ya bato mpe kokoma basangoli ya bomoi ya seko mpe bakaboli ya nkembo ya Nzambe ezanga ndimbola” (“He Will Place You on His Shoulders and Carry You Home [Akotya Bino na Mapeka na Ye mpe Akomema Bino na Ndako],” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 102).

Botala lisusu Patrick Kearon, “God’s Intent Is to Bring You Home [Mokano ya Nzambe Ezali Komema Bino na Ndako],” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 87–89.

Yisaya 55:56

Nkolo abengisaka banso ko “simba boyokani na ngai.”

Mpo na bankola, Yisalaele elimbolamaki lokola bato ya liyokani ya Nzambe. Nzokande, mwango ya Nzambe esangisaka ntango nyonso mingi koleka ekolo moko, mpo ete “moto nyonso oyo azali na mposa ya mayi” abengisami mpo na “koya … na mayi” (Yisaya 55:1). Bobomba makanisi ntango bozali kotanga Yisaya 55 mpe 56, mpe bomanyola nini elimboli kozala bato ya Nzambe. Nsango ya Nzambe ezali nini epayi ya baoyo bayokaka “ bakabwani mobimba” na Ye? (Yisaya 56:3). Bobanza kotia bilembo na milongo oyo elobeli bizaleli mpe misala ya bato oyo “basimbaka liyokani na ngai” (tala Yisaya 56:4–7).

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Yisaya 51–52

Nkolo abengisi ngai “nalata bokasi [na ngai].”

  • Ekoki kozala esengo mpo na bana na bino bazwa maloba lokola “lamuka,” “telema,” mpe “kolatisa bokasi na yo na Yisaya 51:9, 17; 52:1–2, 9 mpe nsima bosalela maloba oyo. Nsima ya kosala yango, bokoki kolobela nini elimboli kolamuka, kotelema, mpe kolata makasi na molimo. Nini Nkolo azali kosenga biso tosala na milongo oyo?

  • Bana na bino bakoki kotanga lisusu Yisaya 51:1, 4, 7 mpe komona nani Nkolo kolobaka mpe nini Alingi bango basala. Nini elimboli “koyokela” Nkolo? Lolenge nini tokoki kolakisa Nkolo ete “toyokelaka” Ye?

Yisaya 53:3–9

Yesu Klisto akamataki likolo na Ye moko masumu mpe mawa na ngai.

  • Bino mpe bana na bino bokoki kotala bilili mingi oyo ezali kolakisa mpasi mpe liwa ya Yesu Klisto (tala, ndakisa, Gospel Art Book, nos. 56, 5758). Na nsima bokoki kotanga elongo Yisaya 53:3–6, 9 mpe koluka maloba oyo ezali kolimbola oyo ezali koleka na bilili. Bosalisa bana na bino basosola ete Yisaya ayebisaki babosolo yango bankama ya mibu liboso ete esalema. Mpo na nini ekozala na ntina ete bato bayeba makambo yango mibu mingi liboso? (tala Alma 39:15–19).

  • Nsima ya kotanga Yisaya 53:4, “Amemi mpasi na biso, mpe amemi mawa na biso,” bana na bino bakokaki komeka kotombola eloko moko ya bozito (to kosala lokola batombolaki moko). Boobela lolenge nini “mpasi” mpe “mawa” to bwale ekoki kozala bozito mpe mpasi mpo na komema. Mpo na nini Yesu amemaki “mpasi,” “mawa,” mpe “mabe” to masumu na biso”? (tala lisusu Alma 7:11–12).

Yesu Klisto elongo na bana

Yisaya 55:6

Nakoki koluka Nkolo mpe kobenga Ye.

  • Mpo na koteya bana na bino oyo etali Yisaya 55:6, bokoki kobomba elilingi ya Yesu esika moko boye na kisuku. Bokoki kobengisa bana na bino mpo na koluka elilingi mpe kopesa nkombo ya lolenge moko oyo bakoki “koluka … Nkolo ntango akoki kozwama.” Loyembo lokola “Seek the Lord Early” (Children’s Songbook, 108) ekoki kopesa bango makanisi. Nsima, bokoki kotika moko ya bana abomba elilingi yango mpe azongela mosala yango.

Yisaya 55:8–9

Banzela ya Nkolo ezali likolo koleka ya ngai.

  • Nsima ya kotanga Yisaya 55:9, ekoki kozala esengo mpo na bana na bino batelema na ebonga mpe kolobela lolenge makambo ezali komonana ya kokesena ntango bozali “likolo.” To mpe bakokaki koyema elilingi ya oyo Yisaya 55:9 elimboli epayi na bango. Na nsima bokoki kolobela mwa banzela ya Nkolo oyo eleki banzela na biso. Ndakisa, lolenge na Ye ya kosalela basumuki ezali nini? (tala Malako 2:15–17). Lolenge na Ye ya kokamba basusu ezali nini? (tala Matai 20:25–28). Bokabola na bana na bino lolenge nini boyekolaki kondimela banzela mpe makanisi ya likolo ya Nkolo.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .

elilingi ya Yesu

His Light [Mwinda na Ye], na Michael Malm

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nakoki koluka Nkolo mpe kobenga Ye