“Sanza ya nsambo 13–19. ‘Atiaki Motema na Ye epayi na Nkolo Nzambe ya Yisalaele’: 2 Mikonzi 16–25,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya nsambo 13–19. ‘Atiaki Motema na Ye epayi na Nkolo Nzambe ya Yisalaele,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
The Flight of the Prisoners [Etumba ya Bakangemi], na James Jacques Joseph Tissot mpe basusu
Sanza ya nsambo 13–19: “Atiaki Motema na Ye epayi na Nkolo ya Yisalaelel”
2 Mikonzi 16–25
Atako mosala ya nguya ya mosakoli Elisa, bato ya Bokonzi ya Nordi ya Yisalaele bayambolaki te. Nsukansuka, Bokonzi ya Asilia elongaki mpe epanzaki bikolo zomi ya Yisalaele. Kaka na ntango wana, Bokonzi ya Sudi ya Yuda ezalaki malamu mingi koleka te: Bokumbemeli ya bikeko epanzanaki makasi lisusu kuna.
Kati na kopola ya molimo oyo nyonso, makomi elobeli bakonzi mibale ya Yuda oyo, mpo na ngonga moko, bazongisaki bato na bango epayi ya Nkolo. Moko na bango azalaki Hizikiya. Na eleko ya boyangeli na ye, Bato ya Asilia babotolaki na etumba mingi ya Yuda. Kasi Hizikiya mpe bato na ye balakisaki bondimi kati na Nkolo, oyo abikisaki Yelusaleme na lolenge ya kokamwa. Nsima, eleko mosusu ya bopengwi, Yosiya akomaki mokonzi. Ya kofulama ndambo na bomoni lisusu ya buku ya mobeko ya Mose, Yosiya amemaki bambongwana oyo elamusaki bomoi ya bonzambe ya bato na ye.
Lokola Yisalaele mpe Yuda, biso nyonso tosalaka maponi ya malamu mpe ya mabe. Ntango toyoki ete bomoi na biso esengi bambongwana, tokoki kolendisama uta na bisika engengaka mibale oyo kati na mibu ya molili ya lisitwale ya Yuda. Ntango mosusu bandakisa ya Hizikiya mpe Yosiya ekoki kofula biso “totia mitema na Nkolo, Nzambe na biso” (2 Mikonzi 18:22).
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
2 Mikonzi 18–19
Nakoki kotikala solo epayi ya Nkolo ntango bondimi na ngai ezali na mikakatano.
Mingi mpenza na biso bakutani na makambu oyo etungisaka bondimi na biso. Mpo na Hizikiya mpe bato na ye, moko ya mikakatano wana eyaki ntango limpinga ya Asilia epusanaki pene ya Yelusaleme. Ntango bozali kotanga 2 Mikonzi 18–19, bokanisa ete bozalaki kobika na Yisalaele na ntango wana. Lolenge nin bokokaki komiyoka, ndakisa, koyokaka matumboli ya bato ya Asilia kati na 2 Mikonzi 18:28–37; 19:10–13? Bolingaki bosala nini? Bokokanisa bantina ya bato ya Asilia mpo ete Bayisalaele batia mitema epayi ya Nkolo te na bantina ya Satana apesaka mpo ete biso totia ntembe na bondimi na biso lelo. Bokoki lisusu kokesenisa bantina ya bato ya Asilia na bantina na bino mpo na nini bino mpenza botiaka mitema epayi na Nkolo.
Boyekoli nini uta na bikela ya Hizikiya kati na ezalela oyo? (botala 2 Mikonzi 19:1–7, 14–19). Lolenge nini Nkolo ayanolaka? (botala 2 Mikonzi 19:35–37). Mpo na nini bokanisi Hizikiya atikalaki sembo? (botala 2 Mikonzi 18:5–7). Bomanyola lolenge nini Nkolo asungaki bino na bangonga ya mikakatano. Boyoki nini oyo efuli bino bosala mpo na komatisa botie mitema na bino epayi na Ye?
Etinda ya Mpaka Jeffrey R. Holand “Fear Not: Believe Only! [Bobanga Te: Bondimela Kaka!]” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 34–36) ezali na toli ya lisalisi mpo na bangonga ya bobangi to ya ntembe. Loyembo lokola “Let Us All Press On” (Hymns, no. 159) ekoki lisusu kozala na bansango ya kolendisa. Nini bozwi na mikanda oyo esalisi bino?
Botala lisusu 2 Ntango 31–32; 3 Nefi 3–4; Jörg Klebingat, “Valiant Discipleship in the Latter Days [Kimondimi ya Elombe na Mikolo ya Nsuka,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 107–10.
Kosalela lisungi ya boyekoli makomi. Eklezia epesaka mikanda mingi mpo na kosalisa bino bososola makomi. Ndakisa, kati na Biblioteke ya Nsango Malamu bokoki kozwa Mokambi na Makomi, Topics and Questions, mpe Bamagazini ya Eklezia. Lisusu, ntango bozali kotanga Kondimana na Kala, bokoki kozwa ndimbola mpe makanisi ya lisalisi kati na baaltikele “Thoughts to Keep in Mind [Makanisi ya Kobosana te]” kati na Yaka, Landa Ngai. Altikele na nkombo “Jesus Will Say to All Israel, ‘Come Home’ [Yesu Akolobela Yisalaele Mobimba, ‘Bozonga Ndako’]” ekoki kosalisa bino boyekola 2 Mikonzi 16–25.
2 Mikonzi 19:20–37
Biloko nyonso ezali na maboko ya Nkolo.
Saneheliba, mokonzi ya Asilia, azalaki na ntina malamu ya kondimela ete limpinga na ye ekokamata Yelusaleme na bitumba (botala 2 Mikonzi 17; 18:33–34; 19:11–13). Kasi Nkolo azalaki na etinda etali Saneheliba, epesamaki na nzela ya mosakoli Yisaya. Ekomami kati na 2 Mikonzi 19:20–34. Bosolo nini bomoni na etinda ya Nkolo oyo esalisi bino bozala na bondimi epayi na Ye mpe mwango na Ye?
2 Mikonzi 21–23
Makomi ekoki kobalola motema na ngai epayi na Nkolo.
Boyoka naino ete bozalaki kozanga eloko moko na molimo? Ntango mosusu boyokaki ete kimoninga na bino na Nzambe ekoki kozala makasi koleka. Nini esalisaki bino bozongela Ye? Bomanyola mituna oyo ntango bozali kotanga 2 Bakonzi 21–23, oyo elimboli lolenge Bokonzi ya Yuda ekweyaki mosika na Nkolo na nse ya Mokonzi Manase (botala 2 Mikonzi 21) mpe lolenge nini Mokonzi Yosiya asalisaki bato bazongela Ye (botala 2 Mikonzi 22–23). Lolenge nini mpe mpo na nini Yosiya mpe bato na ye babongwanaki? (botala 2 Mikonzi 22:8–11; 23:1–6, 21, 24).
Mokambi Spencer W. Kimball abengaki lisolo ya Mokonzi Yosiya “moko ya masolo kitoko mpenza kati na makomi nyonso” (Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball [2006], 62). Botanga maloba ya Mokambi Kimball oyo etali Mokonzi Yosiya (nkasa 62–64). Ntango mosusu bokoki kokanisa likambo moko ntango eteni moko ya makomi “esala[ki] na nguya” kati na bino. Bokoki kosala nini mpo na koyamba boyebi mingi lokola wana?
Botala lisusu Alma 31:5; “Yosiya mpe Buku ya Mibeko” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.
Josiah and the Book of the Law
2 Mikonzi 23:1–25
Boyokani ezali bomipesi ya motema mobimba kati na ngai mpe Nkolo.
Nini ekamwisi yo etali boyokani Yosiya asalaki kati na 2 Mikonzi 23:3? Ntango bozali kokoba kotanga mokapo 23, botala maye Yosiya asalaki mpona kolakisa bomipesi na ye epayi na Nkolo (botala lisusu elilingi oyo ezali na nsuka ya mateya oyo). Lolenge nini bokoki kolakisa bomipesi na bino epayi na Ye?
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.
Makanisi mpo na Koteya Bana
2 Mikonzi 18: 3–6; 19:14–19
Nakoki kotyela Tata na Lola mpe Yesu Klisto motema na ngai.
-
Na 2 Mikonzi 18:3, 5–6, bosalisa bana na bino bamona maye masalaki Hizikiya mokonzi malamu. Nsima, ntango bozali kotanga elongo 2 Nefi 19::14–19, bakoki komona lolenge nini alakisaki ete atyelaki Nkolo motema. Bokoki kotala elilingi moko ya Yesu mpe kosolola etali mpo na nini tokoki kotyela Ye motema. Lolenge nini tokoki kolakisa ete totyelaka Nkolo motema?
2 Mikonzi 22:1–7
Tata na Lola mpe Yesu Klisto bakoki kotyela ngai motema.
-
Na 2 Mikonzi 22:1, bosalisa bana na bino bamona lolenge nini mokolo Yosiya azalaki ntango akomaki mokonzi. Boyekoli nini oyo etali Yosiya kati na molongo 2? Bokanisa molulu moko oyo ekoki kolakisa kolanda Nkolo mpe kopengwa “na loboko ya mobali te to na loboko ya mwasi te.”
-
Basali oyo balimbolami kati na 2 Mikonzi 22:3–7 batyelaki bango motema na bosaleli ya mbongo mpo na kotonga tempelo “pamba te bazali kosala na sembo” (molongo 7). Nsima ya kotanga milongo oyo, bino mpe bana na bino bokoki kolobela makambo oyo botyelamaki motema epayi ya basusu. Lolenge nini tokoki kozala ya kolongobana lokola basali kati na milongo oyo?
Mokomi moko amemi rulo ya makomi epayi ya Mokonzi Yosiya, elilingi na Robert T. Barrett
2 Mikonzi 22: 8–11; 23:2–3
Makomi eteyaka ngai nalanda Yesu Klisto.
-
Mpo na koyingisa lisolo ya Mokonzi Yosiya kati na 2 Mikonzi 22–23, bokoki kobomba kopi moko ya makomi esika moko boye kati na kisuku. Bobengisa bana na bino baluka yango. Nsima bokoki kokabola maye masalemaki ntango moko ya banganzambe ya Yosiya azwaki makomi kati na tempelo (botala 2 Mikonzi 22:8–11; botala lisusu “Mokonzi Yosiya” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 148–49). Nini ekoki kosalelama biso soki tozalaki na makomi te? Bokabola moko na mosusu mpo na nini bosepelaka mpo tozali na makomi lelo.
1:36King Josiah
-
Nsima ya kotanga 2 Mikonzi 23:2–3, bino mpe bana na bino bokoki kosolola etali makomi oyo efulaki bino “kotambola nsima na Nkolo” (molongo 3). Bokoki lisusu koyemba loyembo etali makomi, ndakisa “Search, Ponder, and Pray” (Children’s Songbook, 109).
2 Mikonzi 23:1–3
Nakobatela mayokani na ngai na Nzambe.
-
Ntango Yosiya mpe bato na ye bayekolaki mitindo ya Nzambe, basalaki boyokani ya kosalela yango. Botanga oyo etali yango elongo na bana na bino kati na 2 Mikonzi 23:1–3, mpe bosalisa bango bazwa maloba to biteni ya maloba oyo elakisi lolenge nini bato bayokaki etali mitindo ya Nkolo. Ntango mosusu bana bino bakoki kotelema mpe kosolola etali maye ekokaki kolinga koloba “[kotelema] na boyokani.” Nsima bakoki kotambola na esika mpe kosolola etali maye ekokaki kolinga koloba “kotambola nsima ya Nkolo.” Na nsima, bakoki kotya maboko na bango likolo ya mitema na bango mpe kopesa makanisi ya ndenge tokoki kobatela mayokani “na motema [na biso] mobimba.”
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.