“Sanza ya minei 27–Sanza ya mitano 3. ‘Bosantu na Nkolo: Esode 35–40; Levitike1; 4; 16; 19,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya minei 27–Sanza ya mitano 3. ‘Bosantu na Nkolo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026
Tempelo ya Rio de Janeiro na Brésil
Sanza ya minei 27–Sanza ya mitano 3: “Bosantu na Nkolo”
Esode 35–40; Levitike 1; 4; 16; 19
Kolongwa Ezipito—atako ezaliki mpe motuya—ekokisaki bantina ya Nzambe mpenza te mpo na bana ya Yisalaele. Kutu bomoi ya elengi kati na mokili ya elaka ezalaki ntina ya nsuka ya Nzambe te mpo na bango. Ezalaki bobele mwa matambe epayi ya maye Nzambe alingaki mpenza mpo na bato na Ye: “Bino bokozala bule: mpo ete Ngai Nkolo Nzambe na bino nazali bule” (Levitike 19:2). Lolenge nini Nzambe asalaki mwango ya kokomisa bato na Ye bule nsima ya kobika kati na bokangemi bankola mingi? Atindaki bango bakela esika moko ya bosantu kati na esobe—tabelenakele. Apesaki bango mayokani mpe mibeko mpo na kokamba misala mpe mbongwana ya mitema na bango. Mpe atindaki bango babonza bambeka ya nyama mpo na koteya bango oyo etali bomikabi mpo na masumu na bango. Nyonso oyo esalemaki mpo na kolakisa milimo, mitema, mpe bomoi na bango epayi ya Mobikisi. Azali nzela ya solo na bosantu, mpo na Bayisalaele, mpe mpo na biso. Biso banso tolekisaki ngonga na bokangemi ya lisumu, mpe tobengisami banso kotika lisumu nsima mpe kolanda Yesu Klisto, oyo alakaki, “Nazali na makoki ya kokomisa bino basantu” (Malongi mpe Mayokani 60:7).
Mpo na koyeba makambo ya buku ya Levitike, botala “Levitike” kati na Mokambi na Makomi.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Esode 35–40; Levitike 19
Nkolo alingi ngai nakoma mosantu.
Esode 35–40 elimboli makasi ya Bayisalaele ya kotonga tabelenakele, epayi wapi makuli ya bule ekosalisa bango bakoma bato basantu. Ntango bozali kotanga mikapo oyo, boluka biloko Nkolo asengaki bato na Ye batia kati na tabelenakele. Biloko oyo ekoki kolimbola nini? Epesi bino makanisi nini na oyo etali kokola na bosantu? Mingimingi bokanisa lolenge nini biloko oyo ebalusaka makanisi na bino epayi ya Mobikisi. Etando lokola oyo ekoki kosalisa bino:
|
Eloko nini bozwaki? |
Oyo ekoki kolimbola nini? |
|---|---|
Eloko nini bozwaki? Sanduku ya boyokani (Esode 37:1–9; 40:20–21) | Oyo ekoki kolimbola nini? (Botala Esode 25:20–22; Mokambi na Makomi, “Sanduku ya Boyokani”) |
Eloko nini bozwaki? Lotale to etumbelo ya malasi (Esode 40:26–27; botala lisusu Esode 30:1, 6–8) | Oyo ekoki kolimbola nini? (Botala Emoniseli 8:3–4) |
Eloko nini bozwaki? Nzete ya busi to etielo na mwinda (Esode 37:17–24) | Oyo ekoki kolimbola nini? (Botala Matai 5:14-16; Yoane 8:12) |
Eloko nini bozwaki? Etumbelo ya mbeka (Esode 38:1–7; botala lisusu Esode 27:1; 29:10–14) | Oyo ekoki kolimbola nini? (Botala Mokambi na Makomi, “Mbeka”) |
Eloko nini bozwaki? Kosokola (sani) ya mayi (Esode 30:17–21) | Oyo ekoki kolimbola nini? (Botala 2 Ntango 4:6; Yisaya 1:16; Yelemia 33:8) |
Ya solo, kozala bobele na bisika bisantu ekomisaka biso basantu te. Levitike19 elimboli mibeko mpe mitindo Nkolo apesaki mpo na kosalisa Bayisalaele bakola na bosantu. Nini bozwi na mitindo miye oyo ekoki kosalisa bino boluka bosantu uta na Nkolo? Nini boyoki etuti bino mpo na kosala na kosalela mingi mpenza mabongisi oyo?
Botala lisusu Henry B. Eyring, “Holiness and the Plan of Happiness [Bosantu mpe Mwango ya Esengo],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 100–103; “The Tabernacle” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.
The Tabernacle
Bosalela miziki ya bule Miziki ezali na nguya monene ya kobengisa botindiki ya Molimo mpe kotonga bondimi na Yesu Klisto. Bansango kati na nzembo mbala mingi elendisaka malongi oyo ezali na makomi. Ndakisa, koyembaka loyembo lokola “More Holiness Give Me” (Hymns, no. 70) ekoki kolendisa bansango mosusu eteyami kati na Levitike 19. Ekoki lisusu kosalisa bino bokanisa oyo etali nini elingi koloba kokoma mosantu mingi koleka lokola Mobikisi mpe komanyola lolenge nini Ye azali kosalisa bino bokola na bosantu.
Esode 35:4–35; 36:1–7
Nkolo asengi ngai napesa makabo na ngai na motema ya bolingi.
Na mobu nsima ya kotika Ezipito, mokangano ya bana ya Yisalaele elongo na Yehova ekokaki kolimbolama lokola ya sikisiki te. Mpe lisusu, ntango bozali kotanga Esode 35:4–35 mpe 36:1–7, botala lolenge nini Bayisalaele bayanolaki na motindo ya kotonga tabelenakele. Boyekoli nini uta na Bayisalaele oyo ekoki kosalisa bino kosalela Nkolo malamu koleka?
Akoki kosenga bino bibende, bilamba ya lino, to nzete ya ntalo te mpo na tabelenakele. Nkolo apesi bino nini, mpe nini Ye azali kosenga bino bopesa? Ntango nini ya bino “motema etindikaki [bino] boya na mosala”?
Botala lisusu Topics and Questions, “Sacrfice [Mbeka], ” Biblioteke ya Nsango Malamu.
Bana ya Yisalaele bapesaki mabonza na “motema ya bolingi” (Esode 35:5). Elilingi na Corbert Gauthier, © Lifeway Collection/licensed from goodsalt.com
Esode 40:12–14
Makuli ya tempelo ezalaki kopesama na kala.
Esode 40:12–14 ezali kolobela makuli ya kala oyo ezali lisusu kopesama na mikolo na biso kati na ndako ya Nkolo. Botala mwa milongo misusu oyo ekoki kosalisa bino boyekola oyo etali lolenge nini makuli oyo etatolaka na ntina ya Yesu Klisto:
-
Bosukoli: Nzembo 51:2; Ezekiele 36:25–27
-
Bolati bagarma esantu: Yisaya 61:10; Matai 22:11–14; Emoniseli 19:7–8
-
Bopakoli mafuta: Luka 4:18–19; Misala 10:38
Levitike 1: 1– 9; 4; 16
Mpo na libonza ya Yesu Klisto, nakoki kolimbisama.
Mingi ya buku ya Levitike ekoki kokamwisa biso—mbeka ya banyama, milulu esengaka makila mpe mayi, mpe mibeko eyangelaka mwa makambo mike mike ya bomoi. Kasi milulu oyo esalemaki mpo na koteya mabongisi oyo ezali ya momesano —boyamboli, bosantu, mpe Bomikabi ya Mobikisi. Mpo na komona mabongisi oyo ntango bozali kotanga Levitike 1:1–9; 4; 16, bokanisa mituna lokola oyo:
-
Maloba nini namoni oyo ezali kokundolisa ngai Yesu Klisto mpe libonza na Ye ya bomikabi?
-
Nayekoli nini uta na mabonza oyo etali libonza ya Mobikisi?
-
Lolenge nini nazali lokola bato oyo bazalaki kosala mabonza oyo?
Nkolo asengaka mabonza ya nyama lisusu te. Kasi libonza ezali kaka libongisi ya motuya ya nsango malamu. Mpo na koyekola etali ndenge ya libonza Nkolo asengaka, boyekola 3 Nefi 9:19–20; Malongi mpe Mayokani 64:34. Lolenge nini bozali kobonzela ndenge ya mabonza oyo? Nini Mose 5: 7 eteyi etali lolenge bosengeli komonela mabonza na bino?
Botala lisusu “Makanisi ya Kobosana te: Tabelenakele mpe Mbeka.”
Makanisi mpo na Koteya Bana
Esode 35–20–29; 36: 1
Nkolo apesaki ngai makabo ya kosalisa na mosala na Ye.
-
Na nsuka ya mateya oyo ezali na elilingi moko ya tabelenakele ya esobe ya Bayisalaele. Bokoki kolinga kotala yango elongo na bana na bino mpe kotuna bango biloko nini bakosengela na yango mpo na kotonga tabelenakele. Nsima bokoki kotanga elongo Esode 35: 20–29 mpo na koyeba lolenge nini biloko oyo epesamaki. Lolenge nini Nkolo abengisaki biso topesa maboko mpo na kotonga bokonzi na Ye?
-
Bokanisa kotanga elongo na bango Esode 36:1 mpo na koyeba nini Nkolo apesaki Bezalele mpe Aholiaba mpo na kosalisa kotonga tabelenakele. Bokoki nsima kosolola elongo na bana na bino oyo etali maye bokanisi Nkolo apesi bango mpo na kosalisa kotonga bokonzi na Ye. Lolenge nini tokoki kosalela makambo oyo mpo na kopambola basusu?
Tempelo ya Roma na Italie
Esode 40:17–34
Nakoki koyoka bozali ya Nzambe na bisika bisantu.
-
Esode 40:17–34 ezali kopesa molongo ya biloko oyo biteni ya tabelenakele ya Bayisalaele. Ntango mosusu bino mpe bana na bino bokoki kozwa yango kati na milongo oyo mpe na elilingi ya tabelenakele na nsuka ya mateya oyo. Bosolola etali lolenge nini eteni moko na moko ya tabelenakele ekoki koteya oyo etali Mobikisi to Tata na Lola. Ndakisa, sanduku ya litatoli ekoki kokundolisa biso mitindo ya Nzambe, etumbelo ekoki kokundolisa biso libonza ya Yesu Klisto, mpe bongo na bongo.
-
Bisika esantu nini tozali na yango lelo oyo esalisaka biso tomiyoka penepene na Yesu Klisto? Lokola eteni ya lisolo oyo, bokoki kotala elongo video “Batempelo” (Bibiblioteke ya Nsango Malamu). Bokoki lisusu koyemba loyembo moko lokola “Bisika Bisantu” (Biblioteke ya Nsango Malamu) Bokabola na moko na mosusu lolenge nini bozali koyoka na oyo etali bisika ya bule lokola tempelo.
What Is a Temple?
Levitike 1:1–4
Mpo na libonza ya Yesu Klisto, nakoki kolimbisama.
-
Mabonza ya banyama oyo elimbolami kati na Kondimana na Kala ezalaki kosalema mpo na koteya bana ya Yisalaele oyo etali bolimbisi na nzela ya Yesu Klisto. Bokanisa lolenge nini kotangaka oyo etali mabonza oyo ekoki kosala eloko moko mpo na bana na bino. Bokoki kolakisa bililingi ya Yesu Klisto na Getesemane mpe likolo ya ekulusu (botala Gospel Art Book [Buku ya Bilili ya Nsango Malamu], nos. 56, 57) ntango bozali kotanga elongo na bana Levitike 1:1–4. Bosalisa bango bazwa maloba to maboke ya maloba oyo ezali kokundolisa bango libonza ya Yesu Klisto.
-
Bokoki lisusu kotanga elongo 3 Nefi 9:19–20 mpo na kozwa maye batindaki biso tobonzela na esika ya banyama. Elimboli nini kopesa motema ebukana mpe molimo ya mawa epayi ya Nkolo? Botala Mokambi na Makomi, “Broken Heart [Motema Mobukana]” (Biblioteke ya Nsango Malamu) mpo na lisalisi na koyanolaka motuna oyo.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.