Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mitano 11–17. “Bokeba Etei Bobosana Nkolo Te”: Dutelonome 6 8–15; 18; 29; 30– 16; 34


“Sanza ya mitano 11–17. ‘Bokeba Ete Bobosana Nkolo Te’: Dutelonome 6–8; 15; 18; 29–30; 34,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya mitano 11–17. ‘Bokeba Ete Bobosana Nkolo Te,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

Mose likolo ya Ngomba ya Nebo

Moses on Mount Nebo [Mose likolo ya Ngomba ya Nebo], na John Steel, © Providence Collection/licensed uta na goodsalt.com

Sanza ya mitano 11–17: “Bokeba Ete Bobosana Nkolo Te”

Dutelonome 6–8; 15; 18; 29–3034

Mosala ya Mose na mabele ebandaki likolo ya ngomba, ntango Nzambe alobelaki ye uta na matiti oyo ezalaki kozika (botala Esode 3:1–10). Esukaki lisusu likolo ya ngomba, mingi koleka mibu 40 nsima, ntango nzambe apesaki ye likanisi na mokuse ya mokili ya elaka uta na likolo ya Ngomba ya Mount Nebo (botala Dutelonome 34:1–4). Mose alekisaki bomoi na ye kolengelaka bana ya Yisalaele bakota na mokili wana ya elaka, mpe buku ya Dutelonome ekomi malako, makundolisi, mateya, mpe mabondeli na ye ya nsuka elongo na Bayisalaele. Kotanga maloba na ye ekomisaka yango polele ete eloko ya solo ya mosala ya Mose—bolengeli bato bazalaki na yango mposa—etalaki te kotikala na bomoi, kobundisa banguna, to kotonga ekolo. Ezalaki kotala bolingo ya Nzambe, kotosa Ye, mpe kotikala sembo epayi na Ye. Wana ezali bolengeli biso banso tozali na yango mposa mpo na kokota na mokili ya bomoi ya seko. Yango wana atako Mose aniataki lokolo te na “mokili moleki na mabele mpe mafuta na nzoi” (Esode 3:8), mpo na bondimi mpe basembo na ye, akotaki mpenza na mokili ya elaka oyo Nzambe alengelaka mpo na baoyo balandaka Ye.

Mpo na koyeba makambo ya buku ya Dutelonome, botala “Dutelonome” na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Dutelonome 6:4–7; 8:2–5, 11–17; 29:18–20; 30:6–10, 14–20

elembo ya seminele
“Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba.”

Mobeko ya Mose esangisaki milulu mingi ya libanda. Lokola bokomona na toli ya Mose kati na Dutelonome, Nkolo akanisaki oyo etali lolenge ya kati ya batu na Ye—ezalela ya molimo ya mitema na bango.

Na biteni ya makomi oyo elandi, boluka liloba motema, mpe bomanyola nini ekoki komonisa. Bokoki kokanisa na ntina ya biteni ya makomi oyo lokola lolenge ya bososoli ya molimo na motema na bino. Bomoni nini bokomipesa? Bakisi nini bokokoma mpo na kobongisa bokolongono ya molimo ya motema na bino? Bokoma makanisi na bino:

  • Dutelonome 6:4–7:

  • Dutelonome 8:2–5:

  • Dutelonome 8:11–17:

  • Dutelonome 29:18–20:

  • Dutelonome 30:6–10:

  • Dutelonome 30:14–20:

Lolenge moko ya kobongisa makanisi na bino ekoki kosengela koyema motema moko mpe kokoma na kati na yango biloko oyo Nkolo alobi bosengeli kozala na yango kati na motema na bino. Nsima bokoki kokoma libanda na yango biloko oyo bosengeli kobomba limbanda ya motema na bino.

Lolenge nini bolakisaka ete bolingaka Nzambe na motema na bino mobimba? Mpo na makanisi, botala “Bolinga Nzambe, bolinga mozalani na bino” kati na Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi, 10–12.

Botala lisusu M. Russell Ballard, “Olingaka Ngai Koleka Baoyo?],” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2021, 51-53.

Boluka makanisi na bino moko ya molimo. Yaka, Landa Ngai ezali kopesa makanisi na biteni ya makomi mpe mabongisi ya kotalela kati na makomi, kasi botika yango te etia ndelo na boyekoli na bino. Ntango bozali kotanga Dutelonome, bokoki komona libongisi moko oyo ebetami nsete te awa. Botika Molimo akamba bino epayi ya oyo bosengeli koyekola.

Dutelonome 6–4–12, 20– 25

“Bokeba ete bobosana Nkolo te.”

Bayisalaele mwa mingi oyo balingaki kokota na mokili ya elaka bamonaka bokono bobe na Ezipito to bakatisaka Mbu Motane te. Mose ayebaki ete bango—mpe bankola ekoya nsima—bakozala na mposa ya komikundola makamwisi ya Nzambe mpe mibeko ya Nzambe mpo na kotikala bato ya Nzambe.

Toli nini bozwi kati na Dutelonome 6:4–12, 20–25 oyo ekoki kosalisa bino bomikundola makambo minene Nzambe asalaki mpo na bino? Nini bofulami kosala mpo ete liloba ya Nkolo mokolo na mokolo “ekozala na motema na yo”? (molongo 6).

Bokoki lisusu koyekola nsango ya Ndeko mobali Jan E. Newman “Preserving the Voice of the Covenant People in the Rising Generation [Kobomba Mongongo ya Bato ya Boyokani kati na Nkola ya Kobuta]” (Liahona, Sanza ya zomi 2023, 36–38) mpe bokanisa lolenge nini bokolekisa bondimi na bino kati na Klisto epayi ya bankola ekoya nsima.

Botala lisusu Dutelonome 11:18–21; Dale G. Renlund, “Consider the Goodness and Greatness of God [Bokanisa Bolamu mpe Monene ya Nzambe],” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 41–44; Bible Dictionary, “Frontlets or phylacteries.”

Dutelonome 15:1–15

Kosalisa bato na bosengga esengaka maboko ya kokaba mpe mitema ya bolingi.

Tokomi naino na mokolo oyo “babola nde bakozala kati na bino te” (Dutelonome 15:4), mpo ete mabongisi etali kosalisa babola kati na Dutelonome 15 ezali naino motuya, ata soki misala misusu ebongwani. Botala maye milongo 1–15 eteyi etali mpo na nini tosalisaka bato na bosenga mpe maye ezalela na biso esengeli kozala na oyo etali yango.

Elingi koloba nini “kofungola loboko na yo” epayi ya bato na bosenga”? (milongo 8, 11). Boyekoli nini uta na ndakisa ya Nkolo etali kosalisa bato na bonsenga? ( botala molongo 15).

Botala lisusu “Have I Done Any Good?,” Hymns, no. 223.

Dutelonome 18:15–19

Mose azalaki “lokola” Yesu Klisto.

Petelo, Nefi, Moroni, mpe Mobikisi Ye moko banso balobelaki na ntina ya esakola yango kati na Dutelonome 18:15–19 (botala Misala 3:20–23; 1 Nefi 22:20–21; Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:40; 3 Nefi 20:23). Boyekoli nini etali Mobikisi uta na milongo oyo? Bokanisa oyo etali maye botangi etali Mose na mwa baposo eleki. Lolenge nini Mose azali “lokola” Yesu Klisto?

Yesu azali koteya Banefi

Yesu Klisto alobaki na bato na Ye na Amerika ya kala, “nazali ye oyo Mose alobelaki” (3 Nefi 20:23).

Dutelonome 29: 9; 30: 15–20

Nkolo abengisi ngai napona katikati ya malamu mpe mabe.

Ekokaki kozala esengo kokokanisa maloba ya Mose kati na Dutelonome 29:9; 30:15–20 na mateya mosusu ya nsuka ya Lehi epayi ya libota na ye kati na 2 Nefi 2:26–29; 4:4. Lolenge nini Lehi alimbolaki maye Mose ateyaki? Nini bozwi kati na biteni ya makomi yango oyo efuli bino “bopona bomoi”? Dutelenome 30:19.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Dutelenome 6:5

Nakoki kolinga Nzambe na motema na ngai mobimba.

  • Mpo na kosalisa bana na bino basosola Dutelonome 6:5, bokoki koyema motema moko, mwango moko ya nzoto, mpe loboko moko makasi. Bana na bino bakoki kolakisa bililingi ntango bozali kotanga maloba “motema,” “molimo,” mpe “bokasi” kati na molongo yango. Lolenge nini tolakisaka Nkolo ete tolingaka Ye na motema, molimo, mpe bokasi na biso nyonso?

Dutelonome 6:6–15

Nakoki kobomba liloba ya Nzambe kati na motema ngai.

  • Botanga elongo na bana na bino toli ya Nkolo epayi ya Bayisalaele ya kotia biteni ya makomi bisika wapi bokoki komona yango mikolo nyonso (botala Dutelonome 6:6–9). Oyo ekoki kofula bino mpe bana na bino bokanisa ndenge ya kondimisama ete “bobosani Nkolo” te (molongo 12) mpe bomikundola maye Ye asalaki mpo na bino.

  • Bokoki koloba ete Dutelonome 6:13, 16 mpe 8:3 esalisaki Mobikisi na ngonga moko ya motuya kati na bomoi na Ye. Mpo na komona lolenge nini, botanga elongo Matai 4:1–10. Nsima bokoki kokabola moko na mosusu biteni ya makomi oyo esalisaki bino kati na bangonga ya bosenga.

mwana moko ya mobali azali kotanga makomi

Dutelonome 18:15–18

Baprofeta bateyaka biso oyo etali Yesu Klisto.

  • Ntango bozali kotanga Dutelonome 18:18 elongo, bosalisa bana na bino basosola ete Profeta lokola Mose kati na molongo oyo azali Yesu Klisto. Ntango mosusu bokoki kotala bililingi ya makambo oyo Mose asalaki mpe makambo Yesu Klisto asalaki, mpe botika bana na bino bakokanisa yango (botala Buku ya Bilili ya Nsango Malamu, nos. 15, 16, 3839). Nini profeta na biso lelo ateyi biso etali Mobikisi?

Dutelonome 29–12–13; 30: 8– 8

Mpo na mayokani na ngai, nazali eteni ya bato ya Nzambe.

  • Kolobelaka etali Dutelonome 29:12–13 epesaka libaku mpo na bino mpe bana na bino bosolola oyo etali mayokani bakosala to basalaki na Tata na Lola. Nini elingi koloba kozala bato ya Nzambe? Lolenge nini bilaka na biso ekomisaka biso bato ya Nzambe? (botala molongo 13; botala lisusu Mosiya 18:8–10).

  • Soki bana na bino basengeli na lisalisi ya kososola nini boyokani ezali, bopesa makanisi ete bazwa ndimbola kati na “Boyokani” na Mokambi na Makomi (Biblioteke ya Nsango Malamu). Bilaka nini Nzambe mpe Bayisalaele basalaki moko na mosusu kati na Dutelonome 30:8–10? Bilaka nini tosali elongo na Nzambe ? (botala Malongi mpe Mayokani 20:37, 77). Lolenge nini bilaka oyo ekangisaka biso epayi na Ye? Bobanza koyemba elongo loyembo moko etali mayokani, ndakisa “Standing on the Promises ” (Biblioteke ya Nsango Malamu).

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Mose azali kozela mokili ya elaka

The Lord Shewed Him All the Land [Nkolo Alakisaki Ye Mokili Nyonso], na Walter Rane

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nakoki kobomba liloba ya Nzambe na motema na ngai