“Sanza ya mitano 18–24. ‘Bozala Makasi mpe Boyika Mpiko: Yosua 1–8; 23–24,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya mitano 18–24. ‘Bozala Makasi mpe Boyika Mpiko,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Moses Ordaining Joshua [Mose Azali Kokulisa Yosua], na Darrell Thomas (makambo ya mikiemikiel)
Sanza ya mitano 18–24: “Bozala Makasi mpe Boyika Mpiko”
Yosua 1–8; 23–24
Ezwaki bankola mingi, kasi elaka ya Nkolo ezalaki pene ya kokokisama: bana ya Yisalaele basengelaki nsukansuka kozwa libula ya mokili ya elaka. Kasi na nzela na bango etelemaki Ebale ya Yaladene, bifelo ya Jericho, mpe bato ya nguya oyo baboyaki Nkolo (botala 1 Nefi 17:35). Mpe basengelaki kokutana na nyonso wana kozanga mokambi na bango ya bolingo Mose. Likambo yango ekokaki kosala ete mwa Bayisalaele bamiyoka ete balembi mpe batondisami na kobanga, kasi Nkolo alobaki, “Bozala Makasi mpe Boyika Mpiko.” Ntina nini bazalaki na yango mpo na koyika mpiko? Ezalaki te mpo na bokasi na bango moko—to ata mpiko ya Mose to ya Yosua—kasi mpo na “Nkolo Nzambe na bino azali na bino esika nyonso bokokende” (Yosua 1:9). Ntango tozali na bibale na biso moko ya kokatisa mpe bifelo ya kokweisa, makambo ya kokamwa ekoki kosalema na bomoi na biso mpo ete “Nkolo akosala makamwisi kati na [biso]” (Yosua 3:5).
Mpo na koyeba makambo ya buku ya Yosua, botala “Buku ya Yosua” na Mokambi na Makomi.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Yosua 1:1–9
Nzambe akozala na ngai ntango nazali kobunda mpo na kozala sembo epayi na Ye.
Bokanisa ndenge yango elingaki kozala mpo na Yosua kobengama mpo na kozwa esika ya Mose. Botala oyo Nkolo alobaki kati na Yosua 1:1–9 mpo na kolendisa ye. Bokanisa oyo etali mikakatano makasi oyo bozali kokutana na yango; nini kati ya milongo oyo epesi bino mpiko?
Nkombo Yoshua (Yehoshua to Yesua na Kiebre) elingi koloba “Yehova abikisaka.” Mpe nkombo Yesu ewuti na Yesua. Bongo lokola bozali kotanga oyo etali Yosua, bokanisa mokumba na ye na kokamba bana ya Yisalaele kokatisa Ebale ya Yaladene mpe kati na mokili ya elaka. Lolenge nini etinda na ye ezalaki kokokana na oyo Klisto asalaki mpo na biso?
Yosua 1:8
Liloba ya Nzambe ekoki kofulukisa nzela na ngai.
Ntango Azalaki kolendisa Yosua, Nkolo apasaki toli kati na Yosua 1:8 oyo etali makomi, to “liloba ya mibeko.” Bokanisa mokumba ya bozito ya Yosua, mpo na nini toli oyo ekokaki kosalisa mingimingi?
Ntango Nkolo abyangaka biso totanga makomi, Asalelaka mbala mingi maloba oyo ekendaka mosika koleka kaka botangi. Alakaka lisusu mapamboli minene. Etando oyo ezali awa na nse ekoki kosalisa bino na koyeba mabyangi yango mpe mapamboli elakama:
|
Libyangi |
Mapamboli elakama | |
|---|---|---|
|
Yosua 1:8 | Libyangi Bomanyola butu na moyi | Mapamboli elakama
|
Libyangi
| Mapamboli elakama
| |
Libyangi
| Mapamboli elakama
| |
Libyangi
| Mapamboli elakama Bozwa bomengo na mboka | |
Libyangi
| Mapamboli elakama
| |
Libyangi
| Mapamboli elakama
| |
|
Russell M. Nelson, “Yokela Ye,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, pargrafe ya nsuka na lokasa 89 | Libyangi
| Mapamboli elakama
|
Lolenge nini Nkolo akokisi bilaka yango na bomoi na yo? Sikoyo ekoki kozala ntango moko malamu ya kotala bizaleli na bino ya boyekoli makomi. Nini ezali kotambola malamu? Nini boyoki bofulami kosala mpo na kozwa makambo ya ntina mingi na liloba ya Nzambe?
Botala lisusu “As I Search the Holy Scriptures,” Hymns, no. 163.
Yosua 2
Nyonso mibale bondimi mpe misala esengelami mpo na lobiko.
Baklisto ya Kondimana na Sika batalaki Lahaba lokola ndakisa ya nguya ya bondimi mpe misala (botala Baebele 11:31; Yakobo 2:25). Ntango bozali kotanga Yosua 2, bokanisa ntina ya bondimi mpe misala ya Lahaba na komibikisaa ye moko, libota na ye, mpe banongi ya Yisalaele. Nini yango eteyi bino etali lolenge nini bondimi na bino kati na Klisto mpe misala na bino ekoki kotindika binomei mpe basusu?
Lahaba na lininisa na ye. Waiting for the Promise [Kozelaka Elaka], na Elspeth Young (makambo ya mike mike)
Yosua 3–4
Na bondimi epayi ya Yesu Klisto, nakoki komona “makamwisi” ya Nzambe.
Nkolo asalaki makamwisi kati na bato na Ye ntango azalaki kokamba bango kino na mokili ya elaka, mpe akoki kosala lolenge moko mpo na bino. Oyo ezali mwa mituna mpo na kokamba boyekoli na bino ya Yosua 3–4:
-
Mpo na nini bokanisi ete Bayisalaele bazalaki na mposa ya komisantisa bangomei yambo bango bakatisa Ebale ya Yaladene? (botala Yosua 3:5).
-
Botala ete ebale ekabwanaki kaka nsima “makolo ya banganganzambe edindaki na songe ya mayi” (Yosua 3:13, 15). Mpo na nini yango ezali na ntina?
-
Milulu mosusu mingi ya minene esalemaki na Ebale ya Yaladene—botala 2 Mikonzi 2:6–15; 5:1–14; mpe Malako 1:9–11. Mikangano nini bomoni katikati na milulu miye?
-
Lolenge nini Nkolo asalaki “bikamwa” kati na bomoi na bino? (Yosua 3:5). Lolenge nini bokoki kokutana—to komona—na makamwisi yango mbala mingi? (na ndakisa, botala Yosua 3:17).
Yosua 6:8
Botosi ebengisaka nguya na Nzambe kati na bomoi na ngai.
Yosua 6–8 elobeli bitumba oyo esalemaki mpo na kozwa mboka ya Yeliko mpe ya Ai. Ntango bozali kotanga mikapo oyo, bokanisa lolenge nini bobundaka na momekano (ndakisa, botala Yosua 7:10–13). Nini boyekoli etali lolenge Nzambe akoki kosalisa bino mpe nini bosengeli kosala mpo na kozwa nguya na Ye? Ndakisa, Nini ekamwisi bino etali malako ya Nkolo mpo na kozwa Yeliko? (botala Yosua 6:1–5). Mbala mosusu lisolo kati na Yosua 7 ekofula bino boyeba soki “ezali na eloko moko elakelami mabe” kati na bomoi na bino oyo bosengeli kolongola (Yosua 7:13).
Yosua 23:24
“Bopona lelo moto oyo bokosalela.”
Mateya ya nsuka ya Yosua na Bayisalaele kati na Yosua 23–24 kobakisa makebisi ya motuya, toli, mpe mapamboli elakama. Mbala mosusu bokoki kokoma milongo ya makambo oyo bozwi. Bokanisa makambo nyonso Bayisalaele bakutanaki na yango, mpo na nini bokanisi Yosua aponi kolobela bango makambo wana na nsuka ya bomoi na ye? Nini etindikaka bino ya “kokangama na Nkolo”? (Yosua 23:8).
Botala lisusu Dale G. Renlund, “Choose You This Day [Bopona Mokolo Oyo],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 104–6.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yosua 1–4; 6
“Bozala makasi mpe boyika mpiko.”
-
Botala lolenge moko ya kosalisa bana na bino “bazala makasi mpe bayika mpiko” (Yosua 1:6) na nzela ya Yesu Klisto. Bobengisa bango baluka liboke ya maloba oyo ezongelami kati na Yosua 1:6, 9, mpe 18, mpe bakoma yago na nse to bakanga yango na moto. Bosalisa bana na bino bakanisa makambo oyo bakoki kozalela na mposa ya nsango oyo, kaka lokola Yosua asalaki. Bokoki lisusu kotanga elongo mwa masolo moke kati na Yosua 1–4; 6 (botala lisusu “Yosua Profeta” mpe “Lahaba mpe Banongi” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 85–91). Lolenge nini bato kati na masolo oyo balakisaki mpiko mpe bokasi epayi na Nkolo?
2:59Joshua the Prophet
1:39Rahab and the Spies
Yosua 1:8
Koyekola makomi ememelaka ngai mapamboli.
-
Kotanga Yosua 1:8 ekoki kofula bana na bino batanga makomi na bango moko. Bosalisa bango bamona maloba kati ya molongo oyo eteyi bango lolenge nini mpe mpo na nini tosengeli kotanga makomi. Bakoki koluka eloko moko kati na 1 Nefi 15:23–24; 2 Nefi 31:20; 32:3; Yakobo 4:6; Elamani 3:29–30. Bokoki lisusu kosalisa bango basala mpe babimisa mwango ya kotanga makomi.
Yosua 3–4
Nasengeli kobatisama mpo na kokota na bokonzi ya lola.
-
Bokoki kosalela lisolo ya Bayisalaele ntango bazalaki kokatisa Ebale na Yaladene lokola elembo ya libatisi—kotikaka bomoi na biso ya kala na esobe mpe kobandaka bomoi ya sika kati na boyokani ya mokangano elongo na Nzambe. Bongo, ntango botangi elongo Yosua 3–4 (to “Yosua Profeta” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 85–89), bokoki lisusu kotala elilingi moko ya Yesu azali kobatisama mpe kolimbola ete Yesu abatisamaki na ebale moko na oyo Bayisalaele bakatisaki. Bokoki nsima koyemba loyembo moko lokola “Baptism” (Children’s Songbook, 100– 101). Bokabola moko na mosusu lolenge nini kobatisama ezalaka lokola kobanda bomoi ya sika kati na bokonzi ya Yesu Klisto.
2:59Joshua the Prophet
Joshua 24:15
Nakoki kopona kosalela Yesu Klisto.
-
Nini bokoki kosala mpo na kosalisa bana na bino bayekola kopona kolanda Yesu Klisto, lokola Yosua abengisaki Bayisalaele basala? Bokoki kobengisa bango:
-
Bakanga na moto fliboke ya moloba moko ya mokuse uta Yosua 24:15. Bomeka kokomisa yango lisano ya kosepela mpo na bana na bino. Motango ya maloba oyo bakoki kokanga na moto etali mobu na bango.
-
Baluka masolo etali bato oyo baponaki kosalela Yesu Klisto. Bakoki kotala kati na magazini Moninga, Gospel Art Book [Buku ya Bilili ya Nsango Malamu], to Masolo ya Kondimana na Kala mpe babuku ya masolo mosusu ya makomi.
-
Basala lisano ya komitya na esika ya moto songolo kati na yango bakoki kopona kolanda mpe kosalela Mobikisi.
-
Bosalela masano ya ndenge na ndenge. “Bana nyonso bazali ndenge moko te, mpe ntango bazali kokola, bamposa na bango ekobongwana. Kobongolabongola ndenge na bino ya koteya ekosunga bino kokokisa bamposa na bango ya ndenge na ndenge” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 31).
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.