“Sanza ya mitano 4–10. ‘Botombokela Nkolo te, Bobanga mpe te”: Mituya 11–14; 20–24; 27,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya mitano 4–10. ‘Botombokela Nkolo te, Bobanga mpe te,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Esobe pene na Esanga ya Sinai
Sanza ya mitano 4–10: “Botombokela Nkolo te, Bobanga mpe te,”
Mituya 11–14; 20–24; 27
Ata na makolo, elingaki kozwa te mibu 40 mpo na kosala mobembo uta na esobe ya Sinai kino na mokili ya elaka na Kanana. Kasi yango ezalaki molai ya ntango oyo bana ya Yisalaele bazalaki na yango mposa—mpo na kozipa te ntaka ya mboka kasi mpo na kozipa ntaka ya molimo: ntaka kati ya oyo bazalaki mpe oyo bakokaki kokoma lokola bato ya boyokani ya Nzambe.
Buku ya Mituya elimboli mwa ndambo ya maye ekomaki na boumeli ya mibu 40, kobakisa mateya oyo bana ya Yisalaele basengelaki koyekola liboso ya kokota na mboka elakama. Bayekolaki oyo etali lolenge ya kozala sembo epayi ya basali na Nkolo (botala Mituya 12). Bayekolaki oyo etali kotya motema na nguya ya Nkolo, atako ntango lobi ekoya ezali komonana ezangi elikya (botala Mituya 13–14). Mpe bayekolaki ete kozanga bondimi ememaka likama ya molimo, kasi bakoki koyambola mpe kotalela Mobikisi mpo na kobikisama (botala Mituya 21:4–9).
Tozali biso banso lokola Bayisalaele na ndenge mosusu. Toyebi lolenge nini kozala na esobe ya molimo ezalaka, mpe mateya bayekolaki ekoki kosalisa biso tomilengela mpo na kokota na mboka na biso ya elaka: bomoi ya seko elongo na Tata na biso na Lola.
Mpo na koyeba makambo ya buku ya Mituya, botala “Mituya” kati na Mokambi na Makomi.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Mituya 11:11–17, 24–29; 12
Emoniseli ezali motuya na moto nyonso, kasi Nzambe akambaka Eklezia na Ye na nzela ya profeta na Ye.
Kati na Mituya 11:11–17, 24–29, botala mikakatano Mose akutanaki na yango mpe biyano Nzambe apesaki. Nini bokanisi ete Mose alingaki koloba ntango alobaki ete alingaki “ete bato nyonso ya Nkolo bazala basakoli”? (molongo 29). Ntango bozali komanyola motuna oyo, boluka mituna ekoki kozwama kati na nsango ya Mokambi Russell M. Nelson “Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Babomoi na Biso” (Liahona, Sanza ya mitano 2018, 93–96).
Nzokande, koloba ete tokoki biso nyonso kozwa emoniseli, elakisi te biso nyonso tokoki kokamba bato ya Nzambe lolenge Mose asalaki. Molulu kati na Mituya 12 emonisi yango polele. Makebisi nini omoni na mokapo oyo? Nini boyoki Nkolo alingi bino bososola etali emoniseli ya moto ye moko mpe kolanda profeta na Ye?
Botala lisusu 1 Nefi 10:17; Malongi mpe Mayokani 28:1–7; Dallin H. Oaks, “Two Lines of Communication [Mikoloto Mibale ya Lisolo],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2010, 83–86.
Botya motema na maye ezali motuya. Bato mosusu batungisamaka mingi na makanisi mpo na koyekola poso nyonso kati na Yaka, Landa Ngai. Ntango bozali kotanga lisusu mateya yango, bolanda Molimo. Bokanisa bamposa na bino moko mpe bamposa ya bato bokoki kozalia koteya. Kososola mpe kosalela mpenza mobeko moko na poso ekoki kosalisa mingi koleka kotanga mikapo mingi kaka na likololikolo.
Mituya 12:3
“Mose azalaki mpenza na bopolo (mosokemi).”
Bato misusu bakamwaka na koyekola ete Mose, mokambi ya nguya oyo atelemaki liboso ya Farao mpe asalaki makamwisi ya kokamwa na nguya ya Nkolo, azalaki mpe na “bopolo (mosokemi) mpenza”(Mituya 12:3). Elingi koloba nini kozala na bopolo (mosokemi)? Bokanisa koyekola bolimboli ya Mpaka David A. Bednar kati na “Meek and Lowly of Heart (Mosokemi mpe Motema ya Kokita)” (Liahona, Sanza ya mitano 2018, 30–33) to “ya Bopolo, Kibopolo (Bosokemi, Mosokemi)” na Mokambi na Makomi (Biblioteke ya Nsango Malamu).
Boyekoli nini uta bandakisa ya Mose ya bopolo (mosokemi) kati na Esode 18:13–25; Mituya 11:26–29; Mituya 12; Baebele 11:24–27; mpe Mose 1:10–11? Bokoki lisusu komanyola lolenge Mobikisi alakisaki bopolo (mosolemi) (botala Matai 11:29; 27:11–14; Luka 22:41–42; Yoane 13:4–5). Bandakisa oyo eteyi bino nini?
Mituya 13–14
Na bondimi epayi na Nkolo, nakoki kozwa elikya mpo na mikolo ezali koya.
Ntango bozali kotanga Mituya 13–14, bomeka komitya binomei na esika ya Bayisalaele. Mpo na nini bokanisi balingaki kozonga na “Ezipito”? (Mituya 14:3). Lolenge nini bokoki kolimbola “molimo” mosusu Kalebe azalaki na yango? (Mituya 14:24). Nini esepelisi bino etali bondimi ya Kalebe mpe Yosua, mpe ndenge nini bokoki kosalela bandakisa na bango na makambo oyo bozali kokutana na yango?
Zomi ya banongi ya Yisalalele bazalaki kobanga; kasi Yosua mpe Kalebe bazalaki na bondimi. Joshua and Caleb: Obedient Spies [Yosua mpe Kalebe: Banongi ya Botosi], na Douglas Klauba. © Lifeway Collection/licensed from goodsalt.com
Mituya 21:4–9
Soki nataleli Yesu Klisto na bondimi, Akoki kobikisa ngai na molimo.
Baprofeta ya Buku ya Mormon bayebaki lisolo oyo ezwamaki na Mituya 21:4–9 mpe basosolaki bolimboli na yango ya molimo. Botanga mateya na bango etali lisolo oyo kati na 1 Nefi 17:40–41; Alma 33:18–22; mpe Elamani 8:13–15. Awa ezali mwa mituna ya komanyola ntango ozali kosala:
-
Nini nyoka na motako elingi komonisa?
-
Nini koswama ya nyoka ekoki komonisa?
-
Bayisalaele basengelaki “[kotala] nyoka ya motako” (Mituya 21:9) mpo na kobikisama. Mpo na nini bokanisi bato mosusu baboyaki kotala? Eloko moko ya kokokana esi ekomela bino?
-
Bomiyoki bofulami kosala nini mpo na “kotala mingi Mwana na Nzambe na bondimi” mpe kobikisama ? (Elamani 8:15).
Kotanga biteni ya makomi oyo ekoki kokundolisa yo bantango mosusu na makomi ntango bato basengelaki kobomba makanisi na bango likolo na Klisto. Ndakisa, bokokanisa nsango ya Mituya 21:4–9 na Matai 14:25–31 mpe 1 Nefi 8:24–28 (botala lisusu bililingi na nsuka ya lisolo ya poso oyo). Nini emekaka kobenda biso mosika na Klisto? Lolenge nini Ye apambolaka bato oyo batyaka motema na bango epayi na Ye?
Botala lisusu “Jesus, the Very Thought of Thee” (Hymns, no. 76).
Mituya 22–24
Nakoki kolanda bolingi ya Nzambe, ata soki basusu bazali komeka kotindika ngai nalanda te.
Ntango Balaka, mokonzi ya Moaba, ayebaki ete Bayisalaele bazalaki kopusana, abengaki Balama, moto oyo ayebanaki mpo na kosakola mapamboli mpe bilakeli mabe. Balaka alingaki ye alakela mabe Bayisalaele. Botala ndenge Balaka amekaki kotindika Balama (botala Mituya 22:5–7, 15–17), mpe bokanisa oyo etali mimekano oyo bokoki kokutana na yango mpo na kokende na botelemeli ya bolingi ya Nzambe. Nini ekamwisi bino oyo etali biyano ya Balama kati na Mituya 22:18, 38; 23:8, 12, 26; 24:13? Likambo ya mawa, nsukansuka Balama amitikaki na botindiki mpe atekaki Yisalaele (botala Mituya 31:16; Yuda 1:11). Bomanyola lolenge nini bokoki kotikala bosembo epayi ya Nkolo atako bofini ya basusu.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Mituya 11:4–10
Nakoki kozala na botondi mpo na maye Nzambe apesi ngai.
-
Botuna bana na bino soki bamikundoli mwa makamwisi Nkolo asalaki mpo na kosalisa Bayisalaele (botala “Babolozi ya Ezipito” mpe “Pasika” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 67–74). Nsima bokoki koloba na mokuse mpo na bango Mituya 11:4–10, kobetaka nsete ete Bayisalaale babosanaki mapamboli na bango mpe bayimayimaki. Mapamboli nini tobosanaka mbala mosusu?
-
Ntango bozali koyemba to koyoka loyembo etali botondi, lokola “Count Your Blessings” (Hymns,, no. 156), bana na bino bakoki kosala molongo ya mapamboli Nkolo apesi bango.
Mituya 12
Nkolo alingi ngai nalanda profeta na Ye.
-
Mpo na koyingisa Mituya 12, bokoki koyebisa bana na bino ete Nkolo asepelaki te na Alona mpe Milyami, ndeko ya Mose ya mobali mpe ya mwasi. Bobengisa bango batanga Mituya 12:1–8 mpo na koyeba mpo na nini. Bokanisa kosalela Gospel Art Book [Buku ya Ntoki ya Nsango Malamu] mpo na kosalisa bana na bino bazwa bandakisa ya bato kati na makomi oyo batosaki profeta ya Nkolo mpe bapambolamaki. Lolenge nini topambolami ntango tolandi profeta ya Nkolo?
Mituya 21:6–9
Nakoki kotalela Yesu Klisto.
-
Bokoki kosalela “Mose mpe Nyoka ya Motako” na Masolo ya Kondimana na Kala, 83–84, mpo na kosalisa bana na bino bayekola maye ekomaki na Mituya 21:6–9. Lolenge nini nyoka ya motako ezali lokola Yesu Klisto? (botala Yoane 3:14–15). Bana na bino bakoki kosepela kosala nyoka moko ya papie mpe kokoma likolo na yango mwa makambo mike bakoki kosala mpo na “koyekama na Mwana na Nzambe na bondimi” (Elamani 8:15).
1:2Moses and the Brass Serpent
-
Bana ya mikolo bakoki kopona moko ya makomi oyo elandi mpe kokabola nini ebakisi na bososoli na bango ya lisolo: 1 Nefi 17:41; Alma 33:18–20; Elamani 8:13–15; Malongi mpe Mayokani 6:36
Bronze Serpent [Nyoka ya Bronze], na Brent Evans
Mituya 22–24
Nakoki kolanda bolingi ya Nzambe, ata soki basusu bazali komeka kotindika ngai nalanda te.
-
Boloba na mokuse Mituya 22:1–18 mpo na bana na bino, bobeta nsete ndenge Balama aboyaki kolakela mabe na bato ya Nzambe, atako Balaka, mokonzi ya Moaba, apesaki ye lokumu na bomengo. Nsima bokoki kosalisa bana na bino baluka milongo miye milandi mpo na bafraze oyo bazali koyoka ete Balama alingaki kolanda Nzambe: Mituya 22:18; 23:26; 24:13. Ntango mosusu bana na bino bakoki kopona fraze moko oyo balingaka mpe bakoma yango na karte mpo na kosalisa bango batosa Nkolo.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.
Likolo na loboko ya mwasi: The Crucifixion of Christ [Kobakama ya Klisto]. Likolo na loboko ya mobali: Moses and the Brass Serpent [Mose mpe nyoka na motako], na Judith Mehr. Na nse na loboko ya mwasi: Finisher of Faith [Mosukisi ya bondimi], na Kelsy mpe Jesse Lightweave. Na nse na loboko ya mobali: Lehi’s Dream [Ndoto ya Lehi], na Jerry Thompson