‘Makanisi ya Kobosana te: Babuku ya Kala kati na Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Babuku ya Kala kati na Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Makanisi ya Kobosana te
Babuku ya Kala kati na Kondimana na Kala
Buku ya Yosua tii na Esetele eyebani uta kala lokola “babuku ya mambi ya kala” ya Kondimana na Kala. Oyo elingi koloba te ete babuku mosusu kati na Kondimana na Kala ezali na mambi ya kala ya motuya te. Kasi, babuku ya mambi ya kala ebengami bongo mpo ete ntina ya yambo ya bakomi na yango ezalaki mpo na kolakisa loboko ya Nzambe na lisitwale ya bato ya Yisalaele. Ntina yango ezalaki te mpo na kotalisa mobeko ya Mose, lokola Levitike mpe Dutelelome. Ezalaki mpo na kolakisa lisanzoli to eleli na lolenge ya ntoki, lokola Nzembo mpe Bileli esalaka. Mpe ezalaki te mpo na kokoma maloba ya basakoli, lokola babuku ya Yisaya mpe Ezekiele esalaka. Na esika na yango, babuku ya mambi ya kala ebetaka masolo.
Likambo Moko ya Emoneli
Na solo, masolo oyo ebetami uta na emoneli moko boye. Kaka lokola ekoki kosalema te kotala fololo, libanga, to nzete uta na bisika mingi koleka moko na mbala moko, ekoki koboyama te ete lisolo ya mambi ya kala ekotalisa emoneli ya moto to etuluku ya bato oyo bakomi yango. Emoneli oyo ekotisaka mikangano ya ekolo to ya bomoto mpe ndenge ya bonkoko mpe bindimeli na bango. Koyeba oyo ekoki kosalisa biso tososola ete bakomi mpe basangisi ya babuku ya mambi ya kala babetaka nsete na makambo mikemike moko boye ntango batikaka misusu. Bakanisaki na lolenge moko basusu balingaki kokanisa te. Mpe basukisaki koyekamaka na makambo mikemike mpe makanisi oyo. Tokoki kutu komona bimoneli ekeseni na babuku mobimba ya Biblia (mpe ntango mosusu kati na buku yango kaka). Mingi toyebi bimoneli oyo, malamu mpenza totoki kososola babuku yango ya mambi ya kala.
Emoneli moko ya mbala na mbala ya Babuku nyonso ya mambi ya kala ya Kondimana na Kala oyo ezali emoneli ya bana ya Yisalaele, bato ya boyokani ya Nzambe. Bondimi na bango kati na Nkolo esalisaki bango bamona loboko na Ye kati na bomoi na bango mpe na makambo ya ekolo na bango. Ntango babuku ya lisolo ya makambo ya mokili ezali komeka komona makambo lolenge oyo te, emoneli oyo ya molimo ezali eteni ya maye esalaka babuku ya mambi ya kala ya Kondimana na Kala ezala na ntina mpenza epayi ya bato oyo bazali oyo bazali koluka kotonga bondimi na bangomei kati na Nzambe.
Lisolo mobimba mpo na Kondimana na Kala oyo Etikali
Babuku ya mambi ya kala ebandi bisika wapi buku ya Dutelonome esuki, na mibu ya koyengayenga ya Bayisalaele na esobe ezali pene na kosuka. Buku ya Yosua elakisaka bana ya Yisalaele ya kobelema mpo na kokota na Kanana, mokili na bango ya elaka, mpe elimbsoli lolenge nini bazwaki yango. Babuku oyo elandi, Basambisi kino 2 Ntango, ezali kolimbola makambo Bayisalaele bakutanaki na yango na mokili ya elaka, uta na ngonga oyo bazwaki yango kino na ngonga balongamaki na Assilia mpe Babilone. Babuku ya Ezela mpe Nehemia elobeli bozongi ya bituluku mingi ya Bayisalaele na mboka na bango mokonzi, Yelusaleme, bazomi ya mibu nsima. Nsukansuka, buku ya Esetele elobeli lisolo ya Bayisalaele kofandaka na boloko na nse ya boyangeli ya Palasa.
Mpe wana ezali bisika ntango ya Kondimana na Kala esukaki. Batangi ya mbala ya liboso ya Biblia mosusu bakamwaka komona ete basilisaki solo kotanga lisolo yango ya Kondimana na Kala liboso ya kotanga mingi koleka katikati ya nkasa na yango. Nsima ya Esetele, tozwi nsango mingi te etali lisitwale ya Bayisalaele. Kasi, babuku oyo elandi—migimingi babuku ya basakoli—ekoki kati na molongo ya ntango oyo babuku ya mambi ya kala etalisaki. Mosala ya mosakoli esalamaki na ntango makambo ekomami kati na 2 Mikonzi 22–25 (mpe lisolo ya ngonga ekokani kati na 2 Ntango 34–36). Koyebaka ete oyo ekoki kotindika lolenge bozali kotanga nyonso mibale masolo ya mambi ya kala mpe babuku ya masakoli.
Ntango Likambo moko Esimbi Te
Ntango bozali kotanga Kondimana na Kala, lokola na mambi ya kala kani, bozali pene ya kotanga oyo etali bato kosalaka to kolobaka makambo oyo, na miso ya sika, ezali lokola kokamwa to kutu ya kobuliningisa. Esengeli tokanisa oyo—bakomi ya Kondimana na Kala bamonaki mokili uta na emoneli oyo ezalaki, na ndenge moko boye, mpenza ya kokesana uta na oyo ya biso. Bozwi na makasi, bondko ya bikolo, mpe misala ya basi ezali kaka makambo mosusu oyo bakomi ya kala bakokaki komona na bokeseni koleka oyo tomonaka lelo.
Yango wana nini tosengeli kosala ntango tokutani na biteni ya makomi kati na makomi oyo ezali lokola kobulunganisa? Yambo, ekoki kosalisa bokanisa eteni ya mokomi moko na moko na botaleli monene koleka ya makambo. Lolenge nini ekokani na mwango ya lobiko ya Nzambe? Lolenge nini ekokani na maye boyebi etali lolenge ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto? Lolenge nini ekokani na bosolo emonisami kati na makomi mosusu to na mateya ya baprofeta na bomoi? Mpe lolenge nini ekokani na babotindiki ya Molimo epayi ya motema mpe mayele na bino moko?
Na makambo mosusu, eteni ya makomi ekoki komonana lokola ya kokokana malamu te na miye kani. Ntango mosusu eteni ya makomi yango ekoki kozala lokola eteni ya lisano ya komeka mayele oyo ezali komonana te ezali na esika kati na biteni oyo bosilaki kosangisa. Komeka kokotisa na makasi eteni mpo ekokana ezali nzela malamu mpenza te. Kasi to te kotikaka lisano ya komeka mayele mobimba. Kasi, bokoki kosengela kotia eteni yango pembeni mpo na ngonga moko. Ntango bozali koyekola mingi koleka mpe kotia elongo mingi koleka lisano ya komeka mayele yango, bokoki kozala na makoki malamu koleka ya komona lolenge nini biteni yango ekokani elongo.
Ekoki lisusu kosalisa komikundola ete longola kozala na ndelo na emoneli moko boye, masolo ya makomi ekoki mpe kozala na mabunga ya bato. Ndakisa, bikeke bileki, “makambo mingi ya polele mpe ya motuya [ezalaki ] kolongolama uta [Biblia],” kolongoka bosolo ya motuya etali malongi, makuli, mpe mayokani (1 Nefi 13:28; botala lisusu milongo 26, 29, 40). Na ngonga moko wana, tosengeli kozala, na bolingi ya kondima ete bomoni a biso moko ezali na ndelo: ekozala ntango nyonso na makambo tososolaka mobimba te mpe mituna noki koyanola naino te.
Biteni mosusu ya makomi ekoki komonana lokola biteni ya lisano ya komeka mayele oyo toyebi te lolenge nini kokokisanisa na lisano ya komeka mayele.
Kozwa Liyaka
Kasi sikawa, mituna eyanolama te esingeli te kopekisa biso tozwa mayaka ya talo ya bosolo ya seko oyo ezwami kati na Kondimana na Kala—atako soki mayaka oyo ezali ntango mosusu ya kobombana kati na mabele ya mabanga ya makambo oyo ebulunganisaka mpe maponi ya mabe na bato babonga nie te. Ntango mosusu mayaka ya ntalo mpenza oyo ezali masolo mpe biteni ya makomi oyo ezali kotatola bolingo ya Nzambe—mingimingi oyo wezali kolakisa mayele na biso epayi ya libonza ya Yesu Klisto. Komonela yango uta na esika kani, mayaka lokola oyo engengaka kaka makasi lelo lokola engengaki na kala. Mpe mpo ete masolo oyo elobelaka bato ya boyokani ya nzambe—mibali mpe basi oyo bazalaki na botau ya bomoto mpe kasi balingaki mpe basalelaki Nkolo—mayaka ya bosolo etali babuku ya mambi ya kala ya Kondimana na Kala.