Yaka, Landa Ngai
Makanisi ya Kobosana te: Tabelenakele mpe Mbeka


“Makanisi ya Kobosana te: Tabelenakele mpe Mbeka,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Tabelenakele mpe Mbeka,” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026

elembo ya makanisi

Makanisi ya Kobosana te

Tabelenakele mpe Mbeka

Ntango tozali kotanga Kondimana na Kala, tomonaka mbala mosusu makomi ya milai etali makambo oyo ezalaki na polele motuya epayi na Nkolo kasi ekoki komonana mbala moko te ete ezali na ntina mpo na biso lelo oyo. Esode 25–30; 35–40 mpe Levitike 1–9; 16–17 ezali bandakisa. Mikapo oyo elimboli makambo ya mikiemikie ya tabelenakele ya Yisalaele kati na esobe mpe mbeka ya banyama esalema kuna. Tabelenakele ezalaki tempelo ya komema na maboko, esika ya kofanda ya Nkolo kati ya bato na Ye.

Batempelo na biso ya mikolo oyo ezali na bokokani na talenakele ya Yisalaele, kasi solo ekokani te na bolimboli na yango kati na Esode. Mpe tobomaka banyama te kati na batempelo na biso—Bomikabi ya Mobikisi esukisa mbeka ya nyama kokoka mibu 2000 mobimba. Nzokande atako bokeseni oyo, ezali na motuya monene lelo na kotangaka etali lolenge ya losambo ya Yisalaele ya kala, mingimingi soki tomoni bango lokola bato ya Nzambe na Buku ya Mormon basalaki—lokola nzela “ya kolendisa bondimi na bango na Klisto”(Alma 25:16). ntango tososoli elobeli ya bilembo ya tabelenakele mpe mbeka ya banyama, tokoki kozwa bomoni ya molimo oyo ekolendisa lisusu bondimi na biso kati na Klisto.

Bayisalaele bazali komema mwana na mpate na tabelenakele

Sacrifice of a Lamb [Mbeka ya Mwana na Mpate], na Robert T. Barrett

Tabelenakele Elendisaka Bondimi kati na Yesu Klisto

Ntango Nzambe atindaki Mose atonga tabelenakele kati na nganda ya Bayisalaele, Alobaki mokano na yango: “ete nakoka kofanda na kati na bango” (Esode 25:8). Na kati ya tabelenakele, bozali ya Nkolo elakisamaki na sanduku ya boyokani—sanduku ya mabaya, ezipami na wolo, oyo ezalaki na mokanda ekomami ya boyokani ya Nzambe na bato na Ye. Sanduku yango ezalaki na kati ya esika oyo eleki bosantu, na kati mpenza ya tabelenakele, mpe ekabwani na eteni mosusu ya tabelenakele na elamba. Elamba oyo ekoki kozala elembo ya bokabwani na biso uta bozali ya Nzambe mpo na bokwei, lokola mpe nzela na biso ya kozonga epayi na Ye—na nzela ya Mobikisi.

Kolongola Mose, toyebi kaka moto moko oyo akokaki kokota na “esika esantu koleka” oyo (Esode 26:34)—nganganzambe monene. Lokola banganganzambe misusu, yambo asengelaki asukolama mpe apakolama mafuta mpe alatisama bilamba ya bule oyo ezali elembo ya mosala na ye. Mbala moko na mobu, na mokolo ebengami Mokolo ya Bomikabi, nganganzambe monene atumbaka mbeka na nkombo ya bato yambo akota ye moko na tabelenakele. Na elamba, asengelaki kotumba mpaka ya malasi. Molinga ya nsolo kitoko ezalaki komata na likolo kolakisaka mabondeli ya bato komata epayi ya Nzambe. Nsima nganganzambe monene, komemaka makila oyo euti na mbeka ya nyama, asengelaki koleka na elamba mpe kopusana penepene na kiti ya bokonzi ya Nzambe, oyo emonisami na sanduku ya boyokani.

Koyebaka makambo oyo boyebi etali Yesu Klisto mpe mokumba na Ye kati na mwango ya Tata na Lola, ekoki bino komona lolenge nini tabelenakele ezali kolakisa biso Mobikisi? Lokola kaka tabelenakele, mpe sanduku ya boyokani na kati na yango, emonisaki bozali ya Nzambe kati ya bato na Ye, Yesu Klisto azalaki bozali ya Nzambe kati na bato na Ye. Lokola nganganzambe monene, Yesu Klisto azali Molobeli kati na biso na Tata Nzambe. Alekaki na nzela ya elamba mpo na kosala libondeli mpo na biso na nzela ya makila ya mbeka na ye moko.

Bilongi misusu ya tabelenakele ekoki komonana ya kokokana, mingimingi soki bokenda na tempelo mpo na kozwa makuli na bino moko. Tempelo ezali ndako ya Nkolo—Esika na Ye ya kofanda na kati ya bato na ye. Lokola esika esantu koleka ya tabelenakele, kisuku ya selesitiale ya tempelo emonisaka bozali ya Nzambe. Mpo na kokota, tosengeli yambo kosokalama mpe kopakolama mafuta. Tolataka bilamba ya bule. Tosalaka mayokani. Tosambelaka na etumbelo oyo uta na yango mabondeli emataka epayi ya Nzambe. Mpe na nsuka tolekaka na elamba mpo na kokota na bozali ya Nzambe.

Mbala mosusu bokokani ya motuya koleka kati na batempelo ya lelo mpe batabelenakele ya ntango ya kala ezali ete nyonso mibale, soki esosolami malamu, ekolendisa kondima na biso na Yesu Klisto mpe ekotondisa biso na botondi mpo na mbeka na Ye ya bomikabi. Nzambe alingaka bana na Ye nyonso bakota na bozali na Ye; Alingaka “bokonzi ya banganganzambe” mpe banganganzambe ya basi (Esode 19:6). Kasi masumu na biso epekisaka biso tozwa lipamboli oyo, mpo na “eloko te ya mbindo ekoki kofanda elongo na Nzambe” (1 Nefi 10:21). Yango Nzambe Tata atindaki Yesu Klisto, “nganganzambe monene ya makambo malamu oyo ekoya” (Baebele 9:11). Akabolaka elamba mpo na biso mpe apesaka nguya nyonso ya bato ya Nzambe mpo na “koya na mpiko na kiti ya bokonzi ya ngolu, ete tokoka kozwa mawa” (Baebele 4:16).

Lelo, ntina ya batempelo ezali mingi koleka kozwa bonetoli mpo na binomei. Nsima ya kozwa makuli na biso moko mpe kosala mayokani elongo na Nzambe, tokoki kotelema na esika ya bankoko mpe kozwa makuli na nkombo na bango. Na lolenge moko, tokoki kokoma eloko moko lokola banganganzambe minene ya ntango ya kala—mpe Nganganzambe Monene Monene—kofungolaka nzela na bozalani ya Nzambe mpo na basusu.

Mbeka Elendisaka Bondimi kati na Yesu Klisto

Mabongisi ya bomikabi mpe bozongisi boyokani eteyami na nguya nyonso kati na esaleli ya ntango ya kala ya mbeka ya nyama, oyo esalamaki yambo uta mobeko ya Mose. Adama mpe Eva bapesaki libonza. Basosolaki botalisi na yango ya elembo na libonza ya Mobikisi. Mpe bateyaki yango epayi ya bana na bango.

Esaleli ya elembo ya mbeka ya nyama ekoki komonana mingi motuya na Mokolo ya Bomikabi ya Yisalaele (“Yom Kippur” na Kiebre). Bosenga ya milulu yango ya mbula elobelami kati na Levitike 16:30: “Na mokolo wana nganganzambe akosala bomikabi mpo na bino, mpo na kopetola bino, ete bokoka kopetolama uta na masumu na bino nyonso liboso ya Nkolo.” Yango epesi nzela ete bozalani ya Nzambe etikala kati na bato na Ye. Bomikabi ekokisamaki na nzela ya milulu ya ndenge na ndenge. Na moko na yango, ntaba moko abomamaki lokola mbeka mpo na masumu ya bato, mpe nganganzambe monene azalaki komema makila ya ntaba yango na esika oyo eleki bosantu. Na nsima, nganganzambe monene azalaki kotya maboko na ye likolo ya ntaba ya bomoi mpe azalaki koyambola masumu ya bana ya Yisalaele—na ndenge ya elembo, azalaki kotinda masumu yango epayi ya ntaba. Ntaba amemamaki nsima libanda ya nganda ya Yisalaele.

Na milulu oyo, bantaba ezalaki elembo ya Yesu Klisto, kozwaka esika ya bato ya masumu. Lisumu esengeli te epesama nzela na bozalani ya Nzambe. Kasi na esika ya kobebisa to kobimisa libanda basumuki, Nzambe apesaki nzela mosusu—ntaba moko akobomama to akomemama libanda na esika ya mosumuki. “Mpe ntaba akomema likolo na ye mabe na bango nyonso” (Levitike 16:22).

Milulu oyo elakisaki nzela Nzambe apesaki mpo na komema biso tozonga na bozalani na Ye—Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Mobikisi “amemaki mpasi na biso, mpe amemaki mawa na biso,,” ata “mabe na biso nyonso” (Yisaya 53:4, 6). Azwaki esika na biso, apesaki bomoi na Ye mpo na kofuta nyongo ya lisumu, mpe alongaki liwa na nzela ya Lisekwa na Ye. Mbeka ya Yesu Klisto ezalaki “libonza ya monene mpe ya nsuka; iyo, libonza ya moto te, ya nyama mpe te” kasi “libonza ezanga nsuka mpe ya seko” (Alma 34:10). Azalaki bokokisi ya makambo nyonso oyo mabonza ya ntango ya kala elakisaki biso.

Yesu amemi ekulusu

Mpo na yango, nsima mbeka na Ye ekokisamaki mobimba, Alobaki, “Bokobonzela ngai lisusu bosopi makila te; iyo, mbeka na bino ekolongolama. Mpe bokobonzela ngai mbeka ya motema ebukana mpe molimo ya mawa” (3 Nefi 9:19–20).

Bongo ntango bomoni makomi kati na Kondimana na Kala oyo etali mbeka mpe tabelenakele (to, na nsuka, tempelo)—mpe bokomona mingi na yango—bobosana te ete ntina ya libosoliboso ya makambo yango nyonso ezali ya kolendisa kondima na bino epayi ya Masiya, Yesu Kristo. Bokangisa maye bozali kotanga mpe koyekola elongo na losambo na bino na ndako na Ye. Botika motema mpe makanisi na bino ebaluka epayi na Ye. Bomanyola nini Ye asalaki mpo na kozongisa bino na bozalani ya Nzambe—mpe nini bokosala mpo na kolanda Ye.

Matangi

  1. Esode 33:7–11 elobeli “tabelenakele ya koyangana,” wapi Mose asololaki elongo na Nkolo, kasi ezalaki te esika oyo bazalaki kopesa bambeka oyo elobelami na Esode mpe Levitike. Bambeka oyo epesamaki na tabelenakele elimbolami kati na Esode 25–30, oyo Nzambe atindaki Mose na bana ya Yisalaele batonga (botala Esode 35–40). Tabelenekele oyo, wapi Alona mpe bana na ye bazalaki kokosala bambeka ya banyama, ezalaki lisusu mbala mingi kolakisama epayi na biso lokola “tabelenakele ya koyangana” (botala, ndakisa, Esode 28:43; 38:30; Levitike 1:3).

  2. Botala lisusu Yakobo 4:5; Jarom 1:11.

  3. Botala Esode 25:10–22.

  4. Botala Baebele 10:19–20.

  5. Botala Esode 40:12–13.

  6. Botala Esode 28.

  7. Botala Levitike 16:42.

  8. Botala Nzembo 141:2.

  9. Botala Levitike 16:14–15.

  10. Botala Yoane 1:14.

  11. Botala Baebele 8–10.

  12. Botala Mose 5:4–12; botala lisusu Genese 4:4.

  13. Botala Mosiya 15:8–9.