Yaka, Landa Ngai
Sanza ya minei 20–26. “Tokosala Nyonso oyo Nkolo Alobi”: Esode 19–20; 24; 31–34


“Sanza ya minei 20–26. ‘Tokosala Nyonso oyo Nkolo Alobi’: Esode 19–20; 24; 31–34,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya minei 20–26. ‘Tokosala Nyonso oyo Nkolo Alobi’: Pasika,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026

Mose amemi bitando ya Mitindo Zomi

Moses and the Tablets [Mose mpe Bitando], na Jerry Harston (makambo ya mike mike)

Sanza ya minei 20–26: “Tokosala Nyonso oyo Nkolo Alobi”

Esode 19–2024; 31–34

Atako bana ya Yisalaele bayimakiyimaki mpe bayengiyengaki na kala, ntango Mose atangaki mobeko na nse ya Ngomba ya Sinai, basalaki boyokani oyo: “Tokosala nyonso oyo Nkolo alobi, mpe tokotosa yango” (Exodus 24:7). Nsima Nzambe abiangaki Mose likolo ya ngomba, kolobelaka ye atonga tabelenakele mpo “ete nafanda kati na bango” (Esode 25:8).

Kasi ntango Mose azalaki na likolo ya ngomba koyekolaka lolenge nini Bayisalaele bakokaki kozala na Nzambe kati na bango, Bayisalaele bazalaki na nse ya ngomba kosalaka ekeko ya wolo mpo na kokumbamela yango. Kaka nsima ya kolaka “kozala na banzambe mosusu te,” bango “bapengwaki nokinoki” uta na elaka na bango (Esode 20:3; 32:8; botala lisusu Esode 24:3). Ezalaki kopengwa ya kokamwa, kasi toyebi uta na boyebi na biso ete bondimi mpe bomipesi ekoki ntango mosusu kolongama na bozangi motema molai, bobangi, to ntembe. Ntango tozali koluka bozali ya Nzambe kati na bomoi na biso, ezali kolendisama ya koyeba ete Nkolo atikaki Yisalaele ya kala te mpe Ye akotika biso te mpe bato tolingaka—mpo ete Ye azali “na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te, mpe aleki na boboto mpe na solo” (Esode 34:6).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Esode 19:1–17

Bato ya boyokani ya Nkolo bazali na motuya mingi na misoi na Ye.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki : “na Kondimana na Kala, liloba Baebele uta na yango peculiar ebongolamaki ezali segullah, oyo elingi koloba ‘eloko ya motuya,’ to ‘bozwi etonda.’ … Mpo ete biso tobengama basali ya Nkolo lokola ya ye bato ya peculiar ezali lokumu ya molongo ya likolo mpenza” (“Children of the Covenant,” Ensign, Sanza ya mitano 1995, 34). Lolenge nini maloba ya Mokambi Nelson etuti lolenge bososolaka Esode 19:3–6? Lolenge nini Nkolo amonisaki ete Apesaka bino motuya?

Esode 19:10–11, 17

Boyebi ya bule esengaka bolengeli.

Nkolo alobaki na Mose ete bana ya Yisalaele basengelaki komilengela liboso bakoka “kokutana elongo na Nzambe” (Esode 19:10–11, 17) mpe kobomba boyokani na Ye (botala Esode 19:5). Lolenge nini bomilengelaka mpo na boyebi ya molimo, kokotisaka elambo mpe makuli ya tempelo? Lolenge nini bokoki kosalisa basusu bamilengela? Boyekoli nini etali bomilengeli uta na Luka 6:12–13; Enosa 1:2–6; Alma 17:2–3?

Ngomba ya Sinai, Ezipito

Ngomba oyo na Ezipito endimami na bonkoko kozala Ngomba ya Sinai.

Esode 20:1–17

elembo ya seminele
Botosi na mitindo ya Nzambe ememaka mapamboli.

Ntango Bayisalaele basanganaki na nse ya Ngomba ya Sinai, bayokaki mongongo ya Nzambe kopesa Mitindo Zomi (botala Detelonome 4:12–13). Oyo, ya solo, ezali mitindo bobele moko ya Nzambe te—ezali na mingi mosusu kati na makomi. Yango wana ntango bozali kotanga Esode 20: 1–17, bomituna mpo na nini Nzambe abetaki mingimingi nsete na zomi oyo. Botala etando ya ndakisa bokoki kosalela ntango bozali komanyola motuya ya Mitindo Zomi na bomoi na bino:

Motindo

Na maloba mosusu, Nkolo azali kosenga ngai na …

Mapamboli oyo eyaka uta na kobikaka motindo oyo

  • Lolenge nini kobatelaka mitindo zomi oyo esalisaka bino bobatela mitindo minene mibale Yesu apesaki kati na Matai 22:34–40?

  • Makambo nini oyo bokoki komekama kotia liboso ya Nzambe? Mapamboli nini bomoni uta na kotiaka Nzambe esika ya yambo?

  • Lolenge nini bokoki koyanola moto moko oyo alobaka Mitindo Zomi epesamaki banda kala mpe ezali na mosala te lelo? Bandakisa nini uta na bomoi na bino bokolinga kokabola lokola eteni ya eyano na bino? Lolenge nini loyembo “How Gentle God’s Commands” (Hymns, no. 66) ekoki kotuta lolenge bolimboli mitindo ya Nzambe epayi ya basusu?

  • Lolenge nini Nkolo akokisaki elaka kati na Esode 20:6 na bomoi na bino?

Botala lisusu “The Great Commandment—Love the Lord,” kati na Teachings of Presidents of the Church: Ezra Taft Benson (2014), 37–45; Dallin H. Oaks, “No Other Gods,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 72–75; Topics and Questions, “Commandments,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Esode 24:1–11

Kosala mayokani elakisaka bolingi na ngai mpo na kotosa mibeko ya Nzambe.

Ntango bozali kotanga Esode 24:3–8, bokanisa mayokani bosalaki na Nzambe. Ntango boyokani ya Yisalaele ekotisaki milulu oyo ekeseni uta na maye Nzambe asengaka lelo, bokoki komona bokokani mosusu. Ndakisa, milongo 4, 5, mpe 8 botanga lotale, bambeka ya nyama, mpe makila. Biloko oyo ekoki kolakisa nini, mpe lolenge nini ekokani na mayokani na bino?

Esode 32–34

Lisumu ezali kopesa mokongo na Nzambe; boyamboli ezali kotalela Ye mpe kokima mabe.

Bomeka komitya na esika ya Bayisalaele—bozali kati na esobe, Mose akeyi mikolo 40, mpe kondongwana elongo na bato ya Kanana na mabele ya elaka ezali kati na mikolo na bino ekoya nsima (botala Esode 32:1–8). Mpo na nini bokanisaka ete Bayisalaele bazalaki na mposa ya nzambe ya wolo? Nini efuli bino etali libondeli ya Mose epayi ya Nkolo kati na Esode 33:11–17?

Ntango lisumu ya Bayisalaele ezalaki monene, lisolo oyo ekotisaka lisusu nsango ya mawa mpe bolimbisi ya Nzambe. Nini Esode 34:1–10 ezali koteya bino etali Mobikisi? (botala Esode 32:30–32; Mosiya 14:4–8; 15:9; Malongi mpe Mayokani 45:3–5).

Esode 31:13–16

Saba ezali elembo

Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki: “Na mibu na ngai ya bolenge koleka, nayekolaki mosala ya basusu oyo bakomaki milongo ya makambo basengelaki kosala mpe oyo basengelaki te kosala na mokolo ya Saba. Ewumelaki te naye koyekola na kati ya makomi ete lolenge mpe ezalela na ngai na mokolo ya Saba ezalaki elembo kati na ngai mpe Tata na ngai na Lola [botala Esode 31:13; Ezekiele 20:12, 20]. Na bososoli wana, nazalaki lisusu na mposa ya milongo ya makambo ya kosala mpe ya kosala te. Ntango nasengelaki kozwa mokano soki to te mosala ebongaki mpo na Saba, namitunaki na pete, ‘ elembo nini elingi ngai kopesa Nzambe?’ Motuna wana ekomisaki maponi na ngai na oyo etali mokolo ya Saba polele mpenza.” (“The Sabbath Is a Delight [Saba Ezali Esengo],” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 130) Bomanyola elembo nini bolingi kopesa Nzambe na bosepeli na bino ya Saba.

Esode 34:1–4

Bokeseni nini ezalaki katikati ya maboke mibale ya bitango ya mabanga Mose asalaki?

Ntango Mose akitaki na nse ya ngomba, amemaki mobeko ekokomama likolo ya bitando ya mabanga. Nsima ya komona ete Bayisalaele babukaki boyokani, Mose abukaki bitando yango (botala Esode 31:18; 32:19). Nsima, Nzambe atindaki Mose asala liboke mosusu ya bitando ya mabanga mpe kozongisa yango na ngomba (botala Esode 34:1–4). Bobongoli ya Joseph Smith ya Esode 34:1–2 (kati na bobakisi ya Biblia) etalisi polele ete liboke ya yambo ya bitando ya mabanga ekotisaki makuli ya “molongo mosantu,” ya Nzambe to Bonganzambe ya Melekisedeke. Ya mibale ekotisaki “mobeko ya motindo ya mosuni.” Oyo ezalaki mobeko ya moke esalelami na “bonganganzambe ya moke” (botala Malongi mpe Mayokani 84:17–27), oyo esalemaki mpo na kolengela Bayisalaele mpo na mobeko ya likolo koleka mpe bonganganzambe ya likolo koleka mpo ete bakoka kokota liboso ya Nzambe.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Esode 20:3–17

Nzambe apesaka ngai mitindo mpo ete Alingaka ngai nazala na esengo.

  • Lolenge nini bokoki kosala boyekoli oyo etali Mitindo Zomi nsai mpo na bana na bino? Ntango bozali kotanga Esode 20:3–17 elongo, botika bana na bino basalisa bino kozwa to koyema elilingi mpo na kotalisa moko na moko ya Mitindo Zomi yango. Nsima bana na bino bakoki kosala na ngala koponaka elilingi moko mpe kosololaka etali lolenge nini bakoki kobika motindo wana. Bokabola moko na mosusu lolenge nini kobika motindo wana ememelaka bino esengo.

  • Bokoki lisusu koyemba loyembo lokola “Keep the Commandments” (Children’s Songbook146–47). Bosalisa bana na bino bazwa maloba na kati ya loyembo oyo eteyi bango mpo na nini Nzambe alingaka biso tobatela mitindo na Ye.

Ntango bana bazali kokabola boyebi ya molimo, matatoli na bango ezali kokola. Mituna bozali kotuna ekoki kolendisa bana na bino bakabola lolenge nini bamiyokaka na oyo etali Mobikisi mpe lolenge nini kobikaka nsango malamu epamboli bango (botala Koteya na Lolenge ya Mobikisi32). Ntango basali yango, bazali kotatola. Bokanisa lolenge nini bokoki kosala yango ntango bozali kosolola etali mapamboli oyo eyaka uta na kobikaka Mitindo Zomi.

Esode 20:12

Nkolo alingi ngai nakumisa baboti na ngai.

  • Bosalisa bana na bino bayekola eteni ya maloba “Kumisa tata na yo mpe mama na yo” (Esode 20:12). Bokoki kolinga kolimbola ete “kotosa” moto moko ekoki kolinga koloba kolakisa limemyai mpo na bango to komemela bango esengo. Yesu asalaki nini mpo na kotosa mama na Ye na kufa mpe Tata na Lola? (botala Luka 2:48–51; Yoane 19:26–27). Ntango mosusu bana na bino bakoki kosala na ngala ya kosalaka lisano ya makambo bakoki kosala mpo na kotosa baboti na bango, ntango bana misusu bazali kokanisa maye bazali kosala.

Esode 31: 13, 16–17

Kotosaka Saba ezali elembo ya bolingo na ngai mpo na Nkolo.

  • Bana na bino bakoki kosepela kotala bandakisa ya bilembo—lokola bilembo ya nzela to bilembo likolo ya ndako molai. Bantina ya bilembo ezali nini? Bana na bino bakoki nsima kozwa liloba “elembo” kati na Esode 31:13, 16–17. Nini Nzambe alobaki ete ezali elembo katikati na biso mpe Ye. Bokabola moko na mosusu banzela misusu bino mpe libota na bino bomekelaka kolakisa bolingo na bino mpo na Nkolo na mokolo ya Saba.

Mose asimbi Mitindo Zomi.

Elilingi ya Mose kosimbaka Mitindo Zomi, na Sam Lawlor (makambo mike mike)

Esode 32:1–8, 19–24; 34:6–7

Ngai “nakopengwa” te uta na banzela ya Nzambe.

  • Bokanisa kosalela “Mose Likolo ya Ngomba ya Sinai” (kati na Masoloya Kondimana na Kala, 77–82) mpo na kosalisa bana na bino bayekola lisolo oyo ezali kati na Esode 32:1–8, 19–24. Mpo na nini ezalaki mabe mpo na Bayisalaele bakumbamela ekeko na esika ya Nzambe?

    2:55

    Moses on Mount Sinai

  • Ekoki kozala nsai kosala nzela na nse (to kozwa moko pene ya ndako na bino) mpo na kolakisa maloba oyo uta na Esode 32:8: “Basili kopengwa noki na nzela.” Ntango bazali kotambola na nzela, bana na bino bakoki kosolola etali masenginya tokutanaka na yango mpo na kopesa Nzambe mokongo. Nini esalisaka biso totikala na nzela ya Nzambe—mpe tozongela yango soki tobungi? (botala Esode 34:6–7).

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Mose kokweyisaka Mitindo Zomi

Worship of the Calf [Kokumbamela Ngombe], na W. C. Simmonds

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nzambe apesaka ngai mitindo mpo ete alingaka ngai nazala na esengo.