Yaka, Landa Ngai
Sanza ya misato 30–Sanza ya minei 5. “Akolimwisa Liwa mpo na Libela”: Pasika


“Sanza ya misato 30–Sanza ya minei 5. ‘Akosilisa Kufa Libela’: Pasika,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Konimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya misato 30–Sanza ya minei 5. ‘Akosilisa Kufa Libela’: Pasika,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala

Lilita ya mpamba ya Yesu

Elilingi ya Lilita ya mpamba

Sanza ya misato 30–Sanza ya minei 5: “Akosilisa Kufa Libela”: Pasika

Pasika

Bomoi ya Yesu Klisto “ezali na katikati ya lisitwale ya moto” (“Klisto na Bomoi: Litatoli ya Bapostolo,” Biblioteke ya Nsango Malamu). Yango elingi koloba nini? Na eteni, elingi koloba ete bomoi ya Mobikisi ezali na nguya na atandele ya seko ya moto nyonso oyo azali na bomoi to akozala na bomoi. Bokoki lisusu koloba ete lisekwa ya Yesu Klisto, na Eyenga ya Pasika wana ya yambo, ekangisaka bato ya Nzambe nyonso na lisitwale mobimba: baoyo babotama liboso ya Lisekwi na Ye bazalaki kozela yango na bondimi (botala Yakobo 4:4), mpe baye babotamaki nsima bakanisaka yango na bondimi. Ntango totangaka masolo mpe masakoli ya Kondimana na Kala, tomona naino nkombo ya Yesu Klisto te, kasi tomonaka bilembeteli ya bondimi ya bandimi ya kala mpe mposa makasi ya Masiya mpe Mosikoli na bango. Yango wana biso oyo tobengisami mpo na komikundola Ye tokoki koyoka mokangano elongo na baye bazalaki kozela Ye. Mpo ete solo Yesu Klisto amemaki “lisumu na biso nyonso” (Yisaya 53:6; nsete ebakisami), mpe “kati na Klisto banso bakozwa bomoi” (1 Bakolinti 15:22; nsete ebakisami).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Baprofeta ya kala mpe ya sika batatolaka mbeka ya bomikabi ya Mobikisi.

Biteni ya makomi kati na Kondimana na Kala elobelaka mosala mpe mbeka ya bomikabi ya Mobikisi. Etando oyo ezali na nse epesi molongo ya biteni ya makomi oyo misusu. Ntango bozali kotanga mikapo oyo, makanisi nini eyeli bino etali Mobikisi?

Kondimana na Kala

Kondimana na Sika

Kondimana na Kala

Zekalia 9:9

Kondimana na Sika

Matai 21:1–11

Kondimana na Kala

Zekalia 11:12–13

Kondimana na Sika

Matai 26:14–16; 27:3–8

Kondimana na Kala

Yisaya 53:4

Kondimana na Sika

Matai 8:16–17; 26:36–39

Kondimana na Kala

Yisaya 53:7

Kondimana na Sika

Malako 14:60–61

Kondimana na Kala

Nzembo 22:16

Kondimana na Sika

Yoane 19:17–18; 20:25–27

Kondimana na Kala

Nzembo 22:18

Kondimana na Sika

Matai 27:35

Kondimana na Kala

Nzembo 69:21

Kondimana na Sika

Matai 25:34, 48

Kondimana na Kala

Nzembo 118:22

Kondimana na Sika

Matai 21:42

Kondimana na Kala

Yisaya 53:9, 12

Kondimana na Sika

Matai 27:57–60; Malako 15:27–28

Kondimana na Kala

Yisaya 25:8.

Kondimana na Sika

Malako 16:1–6; Luka 24: 6

Kondimana na Kala

Daniele 12:2

Kondimana na Sika

Matai 27:52–53

Masakoli oyo eteyaka etali Mobikisi ezali kutu mingi mpenza mpe polele na Buku ya Mormon. Bokanisa lolenge nini bondimi na bino elendisami na biteni ya makomi lokola oyo: 1 Nefi 11:31–33; 2 Nefi 25:13; Mosiya 3:2–11; Alma 7:10–13.

Baprofeta ya basantu ya mikolo ya nsuka bakobi kopesa litatoli ya kafukafu ya Yesu Klisto mpe etinda na Ye ya bomikabi. Ntango bozali koyoka likita linene nsuka ya poso oyo ya Pasika, bokoma matatoli na ntina ya Yesu Klisto oyo bokoyoka. Eteyi bino nini na etali Ye?

elembo ya seminele
Yesu Klisto apesi ngai kimya mpe esengo.

Pasika ezali ngonga moko ya esengo, mpo ete ezali ngonga mpo na kokembela Bomikabi mpe Lisekwi ya Mobikisi,. Mpe lisusu, kutu na eleko ya Pasika, ezali na bato mingi oyo bayokaka esengo te mpo na bantina mingi. Bokoki kosala nini mpo na kopalangisa kimya mpe esengo ya Mobikisi na Pasika oyo?

Likanisi moko esengeli kozwa kati na makomi oyo etali kimya mpe esengo Yesu Klisto apesaka, lokola oyo: Nzembo 16:8–11; 30:2–5; Yisaya 12; 25:8–9; 40:28–31; Yoane 14:27; 16:33; Alma 26:11–22. Botala lolenge nini bokoki kokabola nsango oyo elongo na basusu. Ndakisa, ntango mosusu bokoki kokela bakalati ya Pasika mpo na kokabola, koyekamaka likolo ya bansango oyo. Bozala na losambo na oyo etali nani asengeli kozwa mbote na yo ya Pasika. Bokoki lisusu kozwa ekateli ya kokabola bansango na bino na rezo sosio, epayi wapi bato mingi bakoki komona yango.

Nzembo etali Klisto mpe Lisekwi, lokola “He Is Risen!” (Hymns, no. 121), ekoki kosalisa biso toyoka kimya mpe esengo na Pasika. Boluka biteni ya maloba na loyembo yango oyo, na makanisi na bino, ezali kolakisa esengo ya Pasika.

Botala lisusu Jeffrey R. Holland, “Not as the World Giveth Lokola Mokili Epesaka Te],” [Liahona, Sanza ya mitano 2021, 35–38; Mark S. Palmer, “Our Sorrow Shall Be Turned into Joy [Mawa na Biso Ekobongwana na Esengo],” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 88–90.

Yesu azalikopesa Maria mbote libanda ya Lilita na Ye

Why Weepest Thou [Mpo na nini ozali kolela], na Simon Dewey (makambo mike mike)

Mpo na ntina ya Bomikabi na Ye, Yesu Klisto azali na nguya ya kosalisa ngai nalonga lisumu, mimekano, mpe botau.

Botala molulu moko oyo ekoki kosalisa bino bomona mapamboli mingi oyo eyaka na nzela ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Botanga makomi oyo ezali na nse etali maye Yesu Klisto asalisaka biso tolonga. Bomeka kobimisa biteni ya makomi kati na makambo oyo: lisumu, liwa, mimekano, mpe botau (biteni ya makomi misusu ekoki kotiama na yango mingi koleka likambo moko). Ntango bozali kotanga, makanisi nini bozali na yango etali nguya ya Mobikisi?

Lolenge nini bokoki kolimbola na moninga oyo azali Moklisto te mpo na nini Yesu Klisto azali motuya mpo na bino? Nsango ya Mpaka Ahmad S. Corbitt “Oyebi Mpo na Nini Ngai Lokola Moklisto Nandimelaka Klisto? (Liahona, Sanza ya mitano 2023, 119–21) ekoki kosalisa.

Botala lisusu Reyna I. Aburto, “Lilita Ezali na Elonga Te,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 85–87; Topics and Questions, “Atonement of Jesus Christ,” “Resurrection,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Yesu Klisto afutaki ntalo ya nsuka mpo na lobiko na biso.

Boyekoli nini nini uta na milongo oyo elandi etali ntalo Yesu afutaki mpo na lobiko na biso: Yisaya 53:3–5; Mosiya 3:7; Malongi mpe Mayokani 19:16–19? Ntalo nini Tata na Lola afutaki? (botala Yoane 3:16).

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana

Makanisi mpo na Koteya Bana

Yesu Klisto ayokaki mpasi mpe akufaki mpo na ngai.

  • Poso ya Pasika ezali ngonga malamu mpo na koteya bana na bino oyo etali maye Mobikisi asalaki mpo na biso na Getesemane mpe na ekulusu. Bokoki kobanda na kolakisaka bango bafoto oyo ezali na nse mpe kotikaka bango basolola etali maye mazali kosalema kati na bafoto yango. Ntango bana na bino bazali kotala bafoto yango, bokoki kotanga milongo oyo ezali kolimbola makambo oyo (botala Matai 26:36–46; 27:35–50; Luka 22:39–46; Yoane 19:16–30). Bana na bino bakoki kobimisa makambo mike mike kati na bafoto oyo bayoki kati na milongo yango.

elilingi esangana ya Yesu kati na Getesemane mpe na ekulusu

Loboko ya mwasi: Christ in Gethsemane [Klisto kati na Getesemane], na Harry Anderson Loboko ya Mwasi: The Crucifixion [Bobakami na ekulusu], na Harry Anderson

  • Lolenge nini topambolami mpo na mbeka ya Yesu mpo na biso? Bosalisa bana na bino baluka maloba mpe biteni ya maloba oyo ezali koyanola motuna oyo kati na Yisaya 53:4–12; Alma 7:11–13; mpe Malongi mpe Mayokani 19:16–19. Bokabola moko na mosusu lolenge nini bozali koyoka etali Mobikisi nsima ya kotanga makomi oyo.

Yesu Klisto asekwaki mpo na ngai.

  • Bokoki kosalela lokasa ya milulu ya poso oyo to bafoto misusu kati na mateya oyo mpo na kobetela bana na bino lisolo ya Lisekwi (botala lisusu “Yesu Asekwi,” kati na Masolo ya Kondimana na Sika, 139–44). Nsima botika bana na bino babetela bino lisusu lisolo yango.

  • Bokanisa lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino bazwa esengo kati na Klisto na Pasika. Ndakisa, bokoki koyemba elongo loyembo ya Pasika oyo bolingaka mingi, lokola “Christ the Lord Is Risen Today” (Hymns, no. 122) to “Gethsemane” (Biblioteke ya Nsango Malamu). Mpo na kozwa nzembo misusu etali Lisekwi, bokoki koluka kati na bobakisi ya bamama ya likambo ya Hymns mpe Children’s Songbook. Bino mpe bana na bino bokoki kokabola elongo moko na mosusu mpo na nini bolingaka nzembo oyo mpe lolenge nini bomiyokaka ntango boyembaka yango. Nini nzembo yango eteyi biso etali Tata na Lola mpe Yesu Klisto?

Bana bakoki koyoka Molimo kasi bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na koyebaka nguya na Ye. Boteya bana etali ndenge ekeseni Molimo asololaka na biso. Bosalisa bango bayeba mongongo na Ye ntango Azali kolobela bango. Yango ekosalisa bango bamatisa ezaleli ya kolukaka mpe kosalaka na emoniseli na bango moko na bomoi na bango mobimba” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi32). Ndakisa, ntango bozali koyemba nzembo etali Mobikisi elongo na bana na bino, botala bafoto na Ye, to botanga masolo etali Ye, bokabola elongo na moko na mosusu mayoki ya molimo oyo bozali na yango.

  • Biblioteke ya Nsango Malamu ezali na liboke ya Easter videos [video ya Pasika] oyo bana na bino bakoki kosepela na yango. Ntango mosusu bokoki kotika bango bazwa moko mpo na kotala. Botuna bango maye bayekoli etali Yesu Klisto uta na video yango. Bokoki lisusu kotuna bango baloba na mokuse nsango ya video na esakola moko.

Baprofeta batatolaka Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.

  • Ntango bino mpe bana na bino bozali kotala likita linene elongo nsuka ya poso oyo ya Pasika, bosalisa bango bamona ntango banzeneneke ya kafukafu ya Mobikisi bazali kotatola na ntina ya Lisekwi. Ntango mosusu bokoki kosakana lisano na yango—bobengisa bango batelema ntango nyonso bayoki maloba lokola Pasika to Bomikabi to Bosikoli. Bokabola moko na mosusu mpo nini bozali na botondi mpo na matatoli ya baprofeta na bomoi na ntina ya Mobikisi.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

liyemi ya Yesu Klisto nsima ya Lisekwi

For This Purpose [Mpo na Ntina Oyo], na Yongsung Kim Elilingi na ndingisa ya bolingo ya havenlight.com

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Yesu asekwaki mpo na ngai