Yaka, Landa Ngai
Sanza ya misato 23–29. “Namikundoli Boyokani na Ngai”: Esode 1–6


“Sanza ya misato 23–29. ‘Namikundoli Boyokani na Ngai’: Esode 1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya Misato 23–29. ‘Namikundoli Boyokani na Ngai’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Mose mpe esobe na moto

Moses and the Burning Bush [Mose mpe esobe na moto], na Jerry Thompson

Sanza ya misato 23– 29: “Namikundoli Boyokani na Ngai”

Esode 1– 6

Libiangi ya kokende kovanda na Ezipito ebikisaki libota ya Yakobo. Kasi nsima ya bankama ya bambula, bakitani na bango bakomisamaki bawumbu mpe batungisamaki na Farao ya sika oyo “ayebaki Yosefe te” (Esode 1:8). Elingaki kozala likambo ya pete mpo na Bayisalaele bamituna mpo na nini Nzambe atikaki likambo oyo ekomela bango, bato na Ye ya boyokani. Amikundolaki boyokani Asalaki na bango? Bazalaki kaka bato na Ye? Ekokaki Ye komona lolenge bazalaki konyokwama mingi?

Ekoki kozala na bantango oyo bokoki komiyoka lokola kotuna mituna ya lolenge moko. Bokoki komituna, “Nzambe ayebi makambo nini nazali kokutana na yango? Ekoki Ye koyoka kolela na ngai mpo na lisalisi?” Bokangolami ya Yisalaele na Ezipito eyanoli na mituna polele lokola: Nzambe abosanaka bato na Ye te. Amikundolaka mayokani na Ye elongo na biso mpe akokisaka yango na ntango mpe na lolenge na Ye moko. “Nakosikola bino na loboko esembolami,” Asakoli. “Nazali Nkolo Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na nse ya mikumba [na bino]” (Esode 6:6–7).

Mpo na koyeba makambo ya buku ya Esode, botala “Buku ya Esode” kati na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Esode 1–2

Nzambe akoki kosala na nzela na ngai mpo na kokokisa bantina na Ye.

Nini etuti bino oyo etali basi oyo balobelami kati na Esode 1–2? Lolenge nini basalisaki na kokokisa mwango ya Nzambe mpo na bato na Ye. Makasi na bango eteyi bino nini oyo etali lisalisi na mosala ya Nzambe?

Esode 1–3

Yesu Klisto azali Mosikoli na ngai.

Liboso bobanda kotanga Esode, bokoki kokanisa oyo etali mpasi oyo bozali kokutana na yango—likambo moko oyo bozali kolikya ete Nkolo akobikisa bino na yango. Maloba mpe maboke ya maloba nini kati na Esode 1–3 eyokani ya kokokana na bowumbu ya molimo to makambo mosusu oyo tokutanaka na yango lelo? Botala lisusu lolenge nini bana ya Yisalaele balukaki bokangolami mpe lolenge nini Nkolo ayanolaki (botala, ndakisa, Esode 2:23–25; 3:7–8). Lolenge nini Nkolo “akitaki kokangola” bino?

Na mokanda mobimba ya Esode, bokoki lisusu komona mwa bokokani kati na Mose mpe Yesu Klisto (botala Dutelonome 18:18–19; 1 Nefi 22:20–21). Ndakisa, bokokani nini bomoni kati na Esode 1:22; 2:1–10 mpe Matai 2:13–16? To kati na Esode 24:18 mpe Matai 4:1–2? Nini boyoki Nkolo alingi bino bososola oyo etali Yemei mpe nguya na Ye?

Boluka bilembo oyo ezali kotatola Yesu Klisto Bokoki … komona bozangi bokokani kati ya bomoi ya Mobikisi na kati ya bomoi ya baprofeta mpe mibali mpe basi mosusu kati na makomi. [Kosalaka bongo] emonisaka bosolo oyo etali Mobikisi na bisika oyo na lolenge mosusu bokoki koboya” (Botala Koteya na Lolenge ya Mobikisi7; botala lisusu Hosea 12:10).

basi bazali kobenda kitunga libanda ya ebale

Faith at Water’s Edge [Kondima na Nsuka ya Mai], na Anne Marie Oborn

Esode 3:1–6

elembo ya seminele
Nakoki kolakisa limemya mpo na makambo mpe bisika esantu.

Bokoki kokanisa na ngonga moko ntango eloko moko etondisaki bino na somo mpe kokamwa? Lolenge nini bosalaki?” Lolenge nini bokoki kolimbola mayoki boyokaki?

Na makanisi yango na moto, botanga Esode 3:1–6. Nini etuti bino oyo etali makambo efulami oyo Mose akutanaki na yango? Nini Mose asalaki mpo na kolakisa limemya epayi na Nzambe? Mikangano nini bomoni katikati na misala mpe limemya na ye mpo na makambo ya bule?

Kotanga milongo miye ekoki kotindika bino bokanisa oyo etali makambo esantu mpe bisika bisantu kati na bomoi na bino. Mpo na nini yango ezali bule epayi bino? Lolenge nini bosalelaka yango na bokeseni na makambo oyoya bato nyonso? Mpo na kokamba bomanioli na bino, bokoki kotanga eteni oyo ezali moto ya likambo“Komikundola Bilaka” kati na nsango ya Mpaka David A. Bednar “Bilaka Minene Koleka mpe ya Motuya” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 91–93). Bokoki lisusu koyemba to koyoka loyembo moko oyo efuli bino bobangi, lokola “I Stand All Amazed” (Hymns, no. 193) mpe komanyola nini ezali oyo etali nsango malamu oyo ezali kokamwisa bino.

Ya solo, ata soki tokutani na makambo kitoko ya molimo, ezali na likama ya kokoma likolo likolo mabe na oyo etali makambo ya bule. Lolenge nini bokoboya yango ekoma? Botala bansango mibale oyo ezali kolobela likambo yango; bopona moko, mpe boluka maloba oyo ekosalisa bino:Ulisses Soares, “Na Bobangi ya Klisto mpe Nsango Malamu na Ye” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 115–17); Gérald Caussé, “Is It Still Wonderful to You?” (Liahona, Sanza ya mitano 2015, 98–100).

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 6:10–12; 63:64.

Esode 3–4

Nzambe apesaka nguya na bato Ye abengaka kosala mosala na Ye.

Lelo toyebi Mose lokola profeta mpe mokambi monene. Kasi Mose amimonaki te yemei bongo ntango Nkolo abengaki ye mpo na mbala ya liboso. Ntango bozali kotanga Esode 3–4, botanga mitungisi ya Mose mpe lolenge nini Nkolo ayanolaki na moko na moko. Nini bomoni na mikapo oyo, oyo efuli bino ntango boyoki bomikoki te? Ntango nini bomonaki Nzambe kopesa bino to basusu nguya ya kosala mosala na Ye?

Botala lisusu “Eklezia Epesaka Biso Mabaku ya Kosalisa na Mosala ya Nzambe” kati na “Church Organization” na Topics and Questions, Biblioteke ya Nsango Malamu.

Esode 5–6

Bantina ya Nzambe ekokokisama na ngonga na Ye moko.

Ekoki kolembisa nzoto ntango makasi na biso mpo na kosala malamu ezali kobota mbuma te—ntango tozali komeka kosala bolingi ya Nkolo kasi tozali komona te matomba oyo tozalaki kolikya kozwa. Mpo na koyekola oyo etali makambo ekokani na oyo Mose akutanaki na yango, botanga Esode 5:4–9, 20–23. Lolenge nini Nkolo asalisaki Mose alonga mayoki na ye ya bolembu? (botala Esode 6:1–13). Lolenge nini Nkolo asalisaki bino bokoba kosala bolingi na Ye?

Botala lisusu Jeffrey R. Holland, “Kotalela Nkolo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 115–17.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Lokola Eyenga oyo ezali Eyenga ya mitano ya sanza, bateyi ya Eteyelo ya Bana balendisami kosalela milulu ya boyekoli na “Bobakisi B: Kolengela Bana mpo na Ntango ya Bomoi Mobimba na Nzela ya Boyokani ya Nzambe.”

Esode 1–2

Nzambe akoki kosala na nzela na ngai mpo na kokokisa bantina na Ye.

  • Mose azalaki na mokumba monene mpo na kokangola Yisalaele na bowumbu. Kasi elingaki kosalema te soki mama na ye, ndeko na ye ya mwasi, mwana ya mwasi ya Farao, mpe basi misusu ya sembo babatelaki mpe basalisaki ye te. Bosalisa bana na bino bayekola oyo etali basi oyo kati na Esode 1:15–20; Esode 2:2–10 (botala lisusu Mituya 26:59); mpe Esode 2:16–21. Bokoki lisusu kosalela lokasa ya molulu ya poso oyo mpe “Mwaana Mose” (kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 61–63) mpo na kobeta masolo na bango. Lolenge nini basi oyo basalisaki mpo na kokokisa mwango ya Nzambe? Bosolola moko na mosusu oyo etali bato misusu bokumisaka oyo basalisaki na mosala ya Nzambe, kobakisa kati na makambo ya mike mpe ya pete. Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango?

    1:36

    Baby Moses

Esode 3:1–5

Nakoki kosalela bisika esantu na limemya.

  • Nsima ya kotanga Esode 3:1–5 elongo, botuna bana na bino baloba na mokuse milongo miye na maloba na bango moko (botala lisusu “Mose profeta” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 64–66). Lolenge nini Mose alakisaki limemya na miso ya Nkolo? Lolenge nini Nkolo alingi biso tolakisa limemya? Bokoki lisusu kotuna bana na bino basalisa bino bozwa (to boyema) bililingi ya bisika ya bule to milulu epayi wapi tosengeli kozala na limemya. Tokoki kosala nini mpo na kokomisa ndako na biso esika ya bule?

    1:26

    Moses the Prophet

  • Boyemba elongo loyembo oyo etali limemya, lokola “Reverence Is Love” (Children’s Songbook, 31). Ntango bozali kosala yango, bana na bino bokoki kozwa maloba to makomi oyo elimboli nini elakisi kozala na limemya. Soki tozalaki komema moninga moko na eklezia mpo na mbala ya liboso, loleenge nini tolingaki kolimbola nini elingi koloba kozala na limemya?

Mose mpe Alona bazali koloba na bato

Moses and Aaron Speak to the People [Mose mpe Alona bazali koloba na bato], na James J. Tissot

Esode 3–4

Ntango Nkolo asengi ngai nasala eloko moko, Akosalisa ngai nasala yango.

  • Kosalelaka lisolo kati na Esode 3; 4:1–17, botika bana na bino basala lokola bazali Mose kati na lisano. Ekoki kozala esengo kotya biloko to biloko ya mike mike, lokola mwinda ya poketi mpe nzete ya moke mpo na komonisa zamba oyo ezali kozika. Bosalisa bana na bino bayeba lolenge nini Mose ayokaki oyo etali etinda Nkolo apesaki ye (botala Esode 3:11; 4:1, 10). Mbala mosusu bokoki kokabola elongo na moko na mosusu bangonga oyo bozwaki mayoki ya lolenge moko. Toli nini tokokaki kokabola na Mose mpo na kosalisa ye? Botanga oyo etali lolenge nini Nkolo alendisaki Mose kati na Esode 3:12; 4:2–9, 11–12. Boyebisa bana lolenge nini Mobikisi asalisaki bino bokokisa libiangi, kolanda botindiki, to kosala eloko mosusu oyo ezalaki makasi mpo na bino.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Mama ya Mose

The Mother of Moses [Mama ya Mose], na Simeon Solomon

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nakoki kolimbisa