“Makanisi ya Kobosana te: Ndako ya Yisalaele,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Ndako ya Yisalaele,” Yaka, Landa Ngai: 2026
Makanisi ya Kobosana te
Ndako ya Yisalaele
Esika songolo kati na esobe ya monyele ya Kanana, Yakobo azalaki kozela na nsomo nyonso ete akokutana na lipasa na ye ya mobali Esau. Mbala ya nsuka Yakobo amonaki Esau, mibu 20 liboso, Esau alingaki aboma ye. Yakobo alekisaki butu mobimba na kobunda, kolukaka lipamboli moko ya Nzambe. Lokola mbano moko ya bondimi ya Yakobo, na molende, mpe na ekateli makasi, Nzambe ayanolaki na nsambo na ye. Butu wana nkombo ya Yakobo ebongwanaki na Yisalaele, nkombo oyo elakisi, kati na makambo mingi, “ayikaki mpiko elongo na Nzambe” (Genese 32:28, litangi ya nse b).
Penepene ya ebale ya Jabbok, Yakobo azwaki nkombo Yisalaele.
Yango ezali mbala ya yambo nkombo Yisalaele emonani kati na Biblia mpe ezali nkombo oyo ekobi na kati ya Biblia mpe na masolo ya kala. Kala te nkombo ekomaki kolakisa mingi koleka moto moko. Yisalaele azalaki na bana mibali 12, mpe bakitani na bango bazalaki kobengama na nkombo ya “ndako ya Yisalaele,” “mabota ya Yisalaele,” “bana ya Yisalaele,” to “Bayisalaele.”
Uta kala ya lisolo, bana ya Yisalaele bapesaki motuya mingi na bakitani na bango uta na moko ya mabota zomi na mibale ya Yisalaele. Bokitani na bango ezalaki eteni moko ya motuya ya bomoto na boyokani na bango. Ntoma Paulo atatolaki ete azalaki “ya libota ya Benyamina” (Baloma 11:1). Ntina moko oyo Lehi atindaki bana na ye ya mibali na Yelusaleme mpo na kozwa bapalata ya motako ezalaki ete bapalata yango ezalaki na “lisolo ya bankoko ya batata na ye” (1 Nefi 5:14). Lehi amonaki ete azalaki mokitani ya Yosefe, mpe bososoli ya bakitani na ye na ntina ya mokangano na bango elongo na ndako ya Yisalaele ezalaki na ntina mingi mpo na bango na bambula oyo elandaki.
Na Eklezia lelo, bokoki koyoka oyo etali Yisalaele na maloba lokola “bosangisi ya Yisalaele.” Toyembaka oyo etali “Redeemer of Israel,” the “Hope of Israel,” mpe “Ye Elders of Israel.” Na bisika oyo, tozali te kolobela to koyemba bokonzi ya kala ya Yisalaele to ekolo ya lelo oyo ebengami Yisalaele. Na esika na yango, tozali kolobela bato oyo basangisamaki uta bikolo ya mokili kati na Eklezia ya Yesu Klisto. Tozali kolobela bato oyo bayikaka mpiko elongo na Nzambe, oyo balukaka na solo mapamboli, mpe oyo na nzela ya libatisi, bakomi bato na Ye ya boyokani. Na maloba ya Mokambi Russell M. Nelson, kozala ya Yisalaele elakisi “kotika ete Nzambe alonga kati na bomoi na biso, … kotika Nzambe azala bopusi na biso ya nguya koleka kati na bomoi na biso.”
Lipamboli na bino ya bonkoko esakolaka mokangano na bino na moko na mabota ya ndako ya Yisalaele. Yango ezali malamu mingi koleka eteni ya lisolo ya libota. Yango etali lisusu lelo mpe lobi na bino. Kozala eteni ya ndako ya Yisalaele elingi koloba bozali na bondeko ya boyokani elongo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Elingi koloba ete bino, lokola Abalayama, bosengeli “kozala lipamboli moko” epayi ya bana ya Nzambe (Genese 12:2; Abalayama 2:9–11). Elingi koloba, na maloba ya Petelo, ete “bino bozali nkola eponami, bonganganzambe ya bokonzi, ekolo moko ya bule, bato ya kokamwa; ete bokoka kosakola misala na ye na nkembo, ye oyo abengi bino libanda ya molili kino na pole na ye ya kokamwa” (1 Petelo 2:9). Elingi koloba ete bino “botika Nzambe alonga”—ete bozali moko oyo “boyikaka mpiko elongo na Nzambe” lokola bozali kokumisa mayokani na bino elongo na Ye.
Family Tree of Jacob (Israel) [Nzete ya Libota ya Yakobo (Yisalaele)], na Brent Evans