Yaka, Landa Ngai
Sanza ya misato 2–8. “Tika Ete Nzambe Alonga”: 24–33


“Sanza ya misato 2–8. ‘Tika Ete Nzambe Alonga’,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya misato 2–8. ‘Tika Ete Nzambe Alonga’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Esau ateki likoki ya bokulutu na ye na Yakobo mpo na sani moko ya supu

Esau Sells His Birthright [Esau Ateki Likoki ya Bokulutu na Ye], na Glen S. Hopkinson (makambo mike mike)

Sanza ya Misato 2– 8: “Tika Ete Nzambe Alonga”

Genese 24–33

Lolenge nini bokoki kozwa mapamboli uta na Nzambe? Bokoki koloba ete lisolo ya Yakobo, nkoko ya Abalayama mpe Sala, ezali lisolo ya moto oyo asosoli eyano na motuna oyo. Na bizalela oyo wapi mwana mobali ya yambo azwaki lipamboli ya likoki ya bokulutu, Yakobo abotamaki mwana ya mibale, kosimbaka litambe ya lipasa na ye ya mobali, Esau. Nkombo “Yakobo” elingi koloba “moto”—oyo azwaka esika ya moto mosusu. Yakobo apesaki lokumu na nkombo oyo na komekaka, mbala mingi koleka, kozwa esika ya Esau lokola mosangoli ya lipamboli ya likoki ya bokulutu mpamba te Esau abongaki na yango te (Botala Genese 25:30–34; 26:34–35; 27:36). Yango ebimisaki matata na kati ya libota, mpe Yakobo akimaki na esobe mpo na kobikisa bomoi na ye.

Mibu nsima, Nzambe apesaki motindo na Yakobo azonga ndako. Na nzela, Yakobo, na komikitisa, lisusu alukaki lipamboli uta na Nzambe. Makomi elimboli eleko oyo lokola “bitumba” mpo na Yakobo, mpe alobaki ete akotika te “longola kaka soki opamboli ngai” (Genese 32:26). Nsima liteya eyaki—mpe lipamboli. Nzambe abongolaki nkombo ya Yakobo na Yisalaele—oyo elimboli, kati na makambo mosusu “tika ete Nzambe alonga.” Yisalaele asosolaki ete mpo na kozwa mapamboli ya motuya koleka, mapamboli na Ye ya boyokani, esengeli te kozwa esika ya moto mosusu. Mapamboli na Ye esombamaka te to ezwamaka te na makasi to elongamaka te. Apesaka yango ya ofele na baye banso bazali na bomoi oyo eyokani na nkombo ya Yisalaele—baoyo batiki ete Nzambe alonga kati na bomoi na bango.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Genese 24

Boyokani ya libala ezali na ntina mpenza na mwango ya seko ya Nzambe.

Ntango bozali kotanga Genese 24, bomituna bino moko mpo na nini Abalayama azwaki libala ya mwana na ye ya mobali Yisaka ezala motuya mingi. Mpo na nini libala ezali na motuya epayi ya Nzambe?

Bizaleli malamu nini bomoni epayi ya Rebeka oyo ekoki kosalisa ete libala mpe libota ezala makasi? (botala mingimingi milongo 15–28, 57–61).

Botala Topics and Questions, “Boyamboli,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Genese 25:29–34

Nakoki kopesa motuya na makambo ya seko koleka makambo ya ntango.

Na bonkoko ya Yisaka mpe Rebeka, mwana ya mokolo koleka azwaka likoki ya bokulutu, oyo elingi koloba libula monene koleka, elongo na yango mikumba minene koeka mpo na kobatela libota. Ntango bozali kotanga Genese 25:29–34, bomanyola mpo na nini Esau akokaki kolinga kotika likoki na ye ya bokulutu mpo na kosobitina yango na bilei. Mateya nini bozwi mpo na bino moko kati na lisolo oyo? Ekoki kosunga mpo na kosala milongo mibale: (1) mapamboli ya seko oyo Nzambe alingi kopesa bino mpe (2) makambo ya mokili oyo ekoki kopengwisa likebi na bino. Nsima bokoki kotanga molongo, kotyaka na esika ya “likoki ya bokulutu” na eloko moko uta molongo ya liboso mpe “potopoto” na eloko mosusu uta molongo ya mibale. Lolenge nini bokoki koyekama likolo ya Mobikisi mpe mapamboli ya seko ya nsango malamu na Ye?

Botala lisusu Matai 6:19–33; M. Russell Ballard, “Remember What Matters Most [Bomikundolo Maye Mazali Motuya],” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 105–7.

Yakobo na Bethel

Jacob at Bethel [Yakobo na Betele], na James Smetham

Genese 28

elembo ya seminele
Mayokani ya Ndako ya Nzambe ememaka nguya ya Nzambe kati na bomoi na ngai.

Ntango alalaki likolo ya mabanga, Yakobo alotaki ndoto moko oyo ebongolaki bomoi na ye. Ezalaki mpenza likambo moko ya bule ete Yakobo apesaki esika yango nkombo Betele, to “ndako ya Nzambe,” kolobaka ete, “Ya solo Nkolo azali na esika oyo” (Genese 28:16).

Ntango bozali kotanga Genese 28, bokoki komituna binomei nini esalaki makambo oyo bule makasi epayi ya Yakobo. Nini ye azalaki kokutana na yango na ntango wana? Lolenge nini azalaki komiyoka? Bokoki mpe lisusu koluka maloba mpe makomi kati na milongo 10–22 oyo ezali kokundolisa bino ndako ya Nkolo. Makanisi nini bozwi etali Nzambe, ndako na Ye, mpe mayokani na Ye?

Na nsuka ya mateya oyo ezali na etando moko ya langi oyo ezali kolakisa ndoto ya Yakobo; bokoki koyekama na yango ntango bozali kotanga. Soki bosengelaki kokela elilingi ya binomei ya ndoto na ye, bolingaki kosala nini? Bosolo nini uta lisolo oyo bokolinga komeka koyema?

Loyembo “Nearer, My God, to Thee” (Hymns, no. 54) eyekami na likambo Yakobo akutanaki na yango. Mikangano nini bomoni kati na loyembo oyo mpe Genese 28:10–22? Lolenge nini tempelo esalisaka bino bomiyoka penepene na Nzambe? Bokanisa koluka biyano na mituna oyo kati na nsango ya Mokambi Russell M. Nelson “Tempelo mpe Moboko na Yo ya Molimo” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 93–96). Bokoki lisusu kolinga kotala lisusu mayokani mpe mapamboli ya ndako ya Nkolo kati na Buku Monene, 27.2 (Biblioteke ya Nsango Malamu). Lolenge nini kobatela mayokani oyo ememaka nguya ya Nzambe kati na bomoi na bino?

Bozala na Mayele ya Kokela. Ezali na ndenge mingi ya koyekola uta na makomi longola bobele kotanga yango. Bato mosusu bamonaka ete basosolaka makomi malamu koleka soki bazali koyema bililingi ya masolo yango. Basusu bazwaka bososoli ya molimo na miziki ya bule oyo elobelaka makomi. Bomipekisa te binomei na lolenge moko ya koyekola; bozala pene ya komeka miango ya ndenge na ndenge.

Genese 29:31–35; 30:1–24

Nkolo akanisaka ngai kati na mimekano na ngai.

Ntango bozali kotanga Genese 29:31–35 mpe 30:1–24, boluka maloba oyo elimboli ngolu ya Nzambe epayi ya Laele mpe Lea. Bomanyola lolenge nini Nzambe “atalaki mpasi na [bino]” mpe “akanisaki” bino (Genese 29:32; 30:22).

Genese 32–33

Mobikisi akoki kobikisa libota na ngai.

Lokola Yakobo azongaki na Kanana, azalaki “kobanga mpe komitungisa mingi” na oyo etali lolenge oyo ndeko na ye ya mobali, Esau, akoyamba ye (Genese 32:7). Ntango bozali kotanga Genese 32–33, bomanyola mayokani na bino moko ya libota— mbala mosusu mingimingi oyo esengeli kobikisama. Mbala mosusu lisolo oyo ekoki kofula bino bosolola na moto moko. Mituna lokola miye ekoki kokamba botangi na bino:

  • Lolenge nini Yakobo amilengelaki mpo na kokutana na Esau?

  • Nini ezali kobenda bokebi na bino na oyo etali libondeli ya Yakobo ezwami na Genese 32:9–12?

  • Boyekoli nini etali bolimbisi uta na ndakisa ya Esau?

  • Lolenge nini Mobikisi asungaka biso tobikisa mayokani ya libota?

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Genese 24:10–21

Nakoki kozala na boboto epayi ya basusu.

  • Mpo na kobeta nsete na ndakisa malamu ya boboto ya Rebeka, bokoki kolakisa bana na bino elilingi oyo ezali awa na nse to lokasa ya milulu ya poso oyo ntango bozali kolobela lisolo yango na mokuse kati na Genese 24:10–21. Bana na bino bakoki kosepela kosala masano ya lisolo yango. Yango ekoki kokamba na lisolo etali misala mpe boboto bino na bana na bino bomonaki.

  • Bokanisa koyemba loyembo etali boboto elongo, lokola “Kindness Begins with Me” (Children’s Songbook, 145). Bana na bino bakoki koyoka liloba “boboto” (to liloba ekokani) mpe kotelema ntango bayoki yango. Lolenge nini tokoki kozala boboto lokola Rebeka?

foto ya Rebeka

Old Testament Heroes [Bilombe ya Kondimana na Kala], na Dilleen Marsh (makambo mike mike)

Genese 25:21–34

Makambo ya seko ezali motuya mingi koleka makambo ya mokili.

  • Bokanisa kosalela “Yakobo mpe Esau” (kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 38–41) mpo na kosalisa bana na bino basosola lisolo kati na Genese 25:21–34. Ntango mosusu bana na bino bakoki kokanisa ete Esau asengaki toli na bango etali soki asengeli koteka likoki na ye ya bokulutu mpo na potopoto. Bakokaki koyebisa ye nini?

    2:5

    Jacob and Esau

  • Eloko nini ezali na motuya ya seko mingi mpo na bino na bana na bino? Mbala mosusu bana na bino bakoki kozwa bililingi to biloko oyo ezali komonisa biloko yango. Lolenge nini tokoki kolakisa Nkolo ete biloko oyo ezali motuya mpo na biso?

Genese 28:10–22

Mayokani esalisaka ngai nazonga epayi ya Tata na Lola.

  • Ntango bozali kotanga Genese 28:10–22 elongo, bokoki kosalela eskalye to ematelo (to elilingi lokola moko oyo ezali na nsuka ya mateya oyo) mpo na kolobela etali lolenge nini mayokani na biso ezali lokola eskalye. Mbala mosusu bana na bino bakoki kosala lokola bazali komata na eskalye, mpe na litambe moko na moko, kolobela oyo etali ntango oyo tolakaka kotosa Nzambe, ndakisa ntango tozwaka libatisi, ntango toliaka elambo, to ntango tokendaka na tempelo. Lolenge nini mayokani na biso ememaka biso penepene mingi koleka na Nzambe?

Genese 32:6–11; 33:1–4

Tata na Lola mpe Yesu Klisto bakoki kosalisa ngai nalinga libota na ngai.

  • Mpo na koyingisa milongo oyo, bokoki kolimbola ete nsima ya mibu mingi ya mayoki ya mabe, Yakobo akendaki kokutana lisusu na Esau. Botanga elongo Genese 32:6–11 Yakobo ayokaki lolenge nini? Asalaki nini mpo na kozwa lisalisi? Botanga elongo Genese 33:1–4 mpo na koyeba lolenge oyo Nzambe ayanolaki na libondeli ya Yakobo. Soki Yakobo mpe Esau bakokaki koloba na biso lelo, nini bakokaki koloba mpo na kosalisa biso ntango boswani ezali kati na libota na biso?

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Ndoto ya Yakobo ya eskalye mpe banzelu kokitaka uta na lola

Jacob’s Dream [Ndoto ya Yakobo], na J. Ken Spencer

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nakoki kozala na boboto epayi ya basusu