Yaka, Landa Ngai
Sanza ya misato 16–22. “Nzambe Abongolaki Yango na Bolamu”: Genese 42–50


“Sanza ya misato 16–22. ‘Nzambe Abongolaki Yango na Bolamu’: Genese 42–50,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya misato 16–22. ‘Nzambe Abongolaki Yango na Bolamu’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Yosefu kolimbisaka bandeko na ye ya mibali

Bolimbisi, na Megan Rieker

Sanza ya Misato 16– 22: “Nzambe Abongolaki Yango na Bolamu”

Genese 42–50

Elekaki pene ya mibu 22 uta ntango bandeko mibali ya Yosefu batekaki ye na bowumbu. Yosefe anyokwamaki mikakatano mingi, kobakisa mafunda ya makambo ya lokuta mpe kobwakama na boloko. Ntango nsuka nsuka amonaki lisusu bandeko na ye ya mibali, Yosefe azalaki guvernere ya Ezipito mobimba, na nsima ya farao. Akokaki na bopete mpenza kozongisa mabe na bandeko na ye, nakotalaka maye basalaki na Yosefe, yango ekokaki komonana lokola ya kososolama. Nzokande, Yosefe alimbisaki bango. Kaka yango te, asungaki bango bamona ntina ya Nzambe na minyoko na ye. “Nzambe Abongolaki yango na bolamu” (Genese 50:20), alobaki na bango, mpo ete etyaki ye na esika ya kobikisa “baye banso ya ndako ya tata na ye” (Genese 47:12) na nzala.

Na lolenge ebele, Yosefe azalaki lokola Yesu Klisto. Atako masumu na biso esalaki mpasi makasi na Yesu Klisto, Ye Apesaka bolimbisi, kokangolaka biso banso uta na mabaku ya mabe mosika koleka nzala. Soki tosengeli kozwa bolimbisi to kopesa yango to te—na esika mosusu biso banso tosengeli kosala nyonso mibale—ndakisa ya Yosefe elakisi biso epayi ya mobikisi, liziba ya solo ya libiki mpe boyokani lisusu.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Genese 45:5–7; 47:12

“Nzambe atindaki ngai liboso na bino mpo na kobatela bino.”

Emoni bino bokokani kati na bomoi ya Yosefe mpe etinda ya bomikabi ya Yesu Klisto? Mpo na komona bandakisa misusu ya bokokani oyo, bomeka kokokanisa:

  • Genese 37:3 na Matai 3:17.

  • Genese 37:26–28 na Matai 26:14–16.

  • Genese 45:5–7 na Luka 4:18.

  • Genese 47:12 na Yoane 6:35.

Mayoki nini bozwi etali Mobikisi mpe etinda na Ye ntango botangi milongo oyo?

Genese 45; 50:15–21

elembo ya seminele
Bolimbisi ememaka kobikisama.

Kotanga oyo etali Yosefe kolimbisaka bandeko na ye na makambo mabe basalaka ekoki kotinda bino bokanisa moto moko bozali kobunda sikawa mpo na kolimbisa. Mituna oyo elandi ekoki kosalisa bino ntango bozali kobunda mpo na kosalela mobeko oyo:

  • Mpo na nini ekokaki kozala mpasi mpo na Yosefe alimbisa bandeko na ye? (mpo na komona lisusu oyo basalaki ye, botala Genese 37). Makambo nini to bizaleli nini epesaki Yosefe makasi ya kolimbisa? (botala, mpo na ndakisa, Genese 45:1–15 to 50:15–21).

  • Mapamboli nini ewuti na bolimbisi ya Yosefe na bandeko na ye? Ndakisa, kokanisa mikangano kati na libota ya Yakobo na ebandeli ya lisolo (botala, mpo na ndakisa, Genese 37:3–11) elongo na mikangano na nsuka (botala Genese 45:9–15; 50:15–21). Lolenge nini makambo elingaki kosalema na bokeseni soki Yosefe alingaki kolimbisa te?

  • Bokanisa kokoma na nse nkombo ya moto moko oyo akoki kozala na mposa ya bolimbisi na bino—soki to te asengaki bolimbisi. Nini bokoki kosala mpo na kobengisa nguya ya kobikisa ya Mobikisi kati na likambo oyo? Soki kolimbisa ezali komonana mpasi mingi, bokanisa kotala lisusu toli ya Mpaka Gerrit W. Gong kati na biteni motoba ya nsango na ye “Esengo mpe Libela na libela” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 85). Bozwi nini oyo epesi bino elikya ete bokoki kolimbisa?

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 64:9–11; “Forgiveness: My Burden Was Made Light” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.

8:24

Forgiveness: My Burden Was Made Light

Genese 49

Yakobo apesaki libota na ye mapamboli ya lisakoli.

Mapamboli ya Yakobo na bakitani na ye ezali na bililingi ya polele, kasi ezali pete te mpo na kososola yango. Likambo ya esengo, nsango malamu ezongisama epesi biso mwa lisalisi. Ntango bozali kotanga lipamboli ya Yosefe kati na Genese 49:22–26, botanga lisusu milongo elandi, mpe botala bososoli nini epesaka: 1 Nefi 15:12; 2 Nefi 3:4–5; Yakobo 2:25; Malongi mpe Mayokani 50:44.

Ntango bozali kotanga oyo etali lipamboli ya Yuda kati na Genese 49:8–12, bomikundola ete Yesu Klisto azalaki mokitani ya Yuda. Bomoni nini kati na milongo oyo ekundolisi bino Mobikisi? (botala lisusu Emoniseli 5:5-6, 9; 1 Nefi 15:14-15; Malongi mpe Mayokani 45:59; 133:46–50).

Kotanga mapamboli oyo ekoki kofula bino botala lisusu lipamboli na bino ya botata—to, soki bozali na yango te, kozwa yango. Maloba mpe makomi nini kati na lipamboli na bino ebalusaka makanisi na bino epayi ya Yesu Klisto?

Botala lisusu Randall K. Bennett, “Your Patriarchal Blessing—Inspired Direction from Heavenly Father [Lipamboli na Bino ya Bonkoko—Efulaka Boyangeli uta na Tata na Lola],” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 42–44.

Genese 50:19–21

Nzambe akoki kosalisa na ngai nazwa bososoli kati na mikakatano na ngai.

Atako ekoki kozala ete ezalaki polele te ntango azalaki kokutana na yango, nsukansuka Yosefe azalaki na makoki ya kotala nsima na mpasi na ye na Ezipito mpe komona ete “Nzambe abongolaki yango na bolamu” (Genese 50:20). Soki bokokaki kokende kotala Yosefe ntango azalaki na libulu to kati na boloko, lolenge nini bokokaki kobondisa ye? Lolenge nini ekoki Genese 50:19–21 kosalisa bino na bantango na bino ya mikakatano?

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 122; “How Firm a Foundation,” Hymns, no. 42.

Yosefe ya Ezipito kozwaka limoni ya Joseph Smith kozwaka palaki ya wolo uta na anzelu Moroni

Joseph Smith among the Prophets [Joseph Smith kati na baprofeta], na Paul Mann (makambo yo mike mike)

Genese 50:24–25

“Nkolo Nzambe na ngai akotelemisa momoni.”

Ntango bozali kotanga Genese 50:24–25 mpe Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 50:24–38 (Kati na bobakisi ya Biblia), bomanyola mpo na nini ekokaki kozala motuya mpo na Yosefe koyeba oyo etali Mose mpe Joseph Smith bikeke mingi liboso. Lolenge nini Joseph Smith akokisaki masakoli ya Yosefe oyo etalia ye? (botala Malongi mpe Mayokani 1:17–23; 20:7–12; 39:11; 135:3).

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Genese 42–44; 45:4–15

Nakoki kolakisa bolingo mpe bolimbisi epayi ya libota na ngai.

  • Ekoki kozala lisano mpo na bana na bino basala lisolo ya Yosefe kosangisaka libota na ye (botala Genese 42–44). To bakoki kosalela “Yosefe mpe Nzala Makasi” (kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 57–60) to bililingi kati na lokasa oyo mpo na koteya lisolo yango moko na mosusu. Awa ezali ndambo ya mituna ekoki kosalisa bana na bino bayekola uta lisolo:

    • Nini Yosefe asalaki mpo na kolakisa bolingo na libota na ye (botala Genese 45:4–15).

    • Mpo na nini boyoki ete Yosefe alimbisaki bandeko na ye?

    • Lolenge nini bokanisi bandeko ya Yosefe bayokaki ntango bamonaki ete Yosefe alimbisaki bango? Nani kati na bomoi na bino azali na mposa ya kolimbisama? Lolenge nini bokoki kolakisa bolingo mpe bolimbisi?

    2:26

    Joseph and the Famine

Ntango bozali komilengela mpo na koteya, botuna, “Nini bana na ngai bakosala mpo na koyekola?” Ndakisa, na lisano oyo bana na bino bazali kosala to kobeta lisusu lisolo. Kosalaka bongo ekosunga bango bamikundola nini esalemaki mpe mibeko ya nsango malamu oyo ezali na kati.

  • Bino to bana na bino bokoki kolinga kokabola boyebi moko ntango balimbisaki to ntango moto moko alimbisaki bango. Nsima bokoki koyemba loyembo lokola “Love One Another” (Children’s Songbook,, 136) to “Help Me, Dear Father” (Children’s Songbook, 99).

Genese 48:8–9

Nkolo asalisaka ngai na nzela ya mapamboli ya bonganganzambe.

  • Bino na bana na bino bokoki kotala elilingi ya Yakobo kopambolaka bana na ye ya mibali na nsuka ya lokasa oyo mpe kosolola na ntina ya makambo nini ekomaki (botala Genese 48:8–9). Soki esengelami, bolimbola ete Yakobo, tata ya Yosefe, alingaki kopesa mapamboli ya bonganganzambe na libota na ye. Mbala mosusu bokokaki kokabola elongo moko na mosusu boyebi bozweli lisalisi uta na Nzambe na nzela ya lipamboli ya bonganganzambe. Mwa bantina nini ezali oyo tokoki kosengela lipamboli ya bonganganzambe?

elenge mwasi azali kozwa lipamboli

Genese 45:5– 11

Tata na Lola atindaki Yesu Klisto mpo na kobikisa ngai.

  • Lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino bamona Mobikisi kati na lisolo ya Yosefe kobikisaka libota na ye uta na nzala makasi? Bokanisa kosala etanda oyo ezali na makonzi mibale oyo batye bilembo Yosefe mpe Yesu Klisto. Bosalisa bana na bino baluka makomi mibale oyo elandi mpe batondisa etando na makambo ya ndenge moko oyo Yozefe mpe Yesu bazali na yango ya kokokana: Genese 37:3 mpe Matai 3:17; Genese 37:26–28 mpe Matai 26:14–16; Genese 45:5–7 mpe Luka 4:18; mpe Genese 47:12 mpe Yoane 6:35.

  • Botuna bana na bino maye elimboli kobikisa to kosalisa moto moko. Soki moko na bango azali na boyebi ete abikisama to asalisama uta na likama, bobengisa bango bakabola makanisi. Lolenge nini Yosefe abikisaki bandeko na ye? (botala Genese 42:1–3; 45:5–7). Nsima, bokoki kotala elilingi ya Mobikisi elongo mpe kotuna bana na bino balobela lolenge nini Yesu Klisto abikisaka biso.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Yisalaele kopesaka lipamboli ya bonganganzambe na mwana na ye ya mobali

Jacob Blessing Joseph (Jacob Blessing His Sons) [Yakobo Kopambolaka Yosefe (Yakobo Kopambolaka Bana na Ye)], na Harry Anderson

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nakoki kolimbisa