Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mibale 23–Sanza ya misato 1. “Ezali na Likambo Moko oyo Ezali Mpasi Mpenza mpo na Nkolo?”: Genese 18–23


“Sanza ya mibale 23–Sanza ya misato 1. ‘Ezali na Likambo Moko oyo Ezali Mpasi Mpenza mpo na Nkolo?’: Genese 18–23,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya mibale 23–Sanza ya misato 1. ‘Ezali na Likambo Moko oyo Ezali Mpasi Mpenza mpo na Nkolo?’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Sala asimbi mwana Yisaka

Sala mpe Yisaka, na Scott Snow

Sanza ya mibale 23–Sanza ya misato 1: “Ezali na Likambo Moko oyo Ezali Mpasi Mpenza mpo na Nkolo?”

Genese 18–23

Bomoi ya Abalayama mpe Sala, etonda na makambo ya mpasi na motema mpe ya esengo, ezali elembeteli ya bosolo oyo Abalayama ayekolaki na limoni—ete tozali na mabele mpo na komekama “mpe komona soki [biso] tokosala makambo nyonso oyo Nkolo Nzambe [na biso] akotinda [biso]” (Abalayama 3:25). Abalayama mpe Sala balingaki komona bosembo? Balingaki kokoba kozwa bondimi na elaka ya Nzambe ya bana mingi, kutu ntango bazangaki bana na bobange na bango? Mpe ntango Yisaka abotama, bondimi na bango elingaki kotelemela oyo ekokaki kokanisama te—motindo moko ya kobonzela mwana mobali se moko oyo na nzela na ye Nzambe alakaki kokokisela boyokani wana?

Abalayama mpe Sala batiaki motema epayi ya Nzambe, mpe Ye atielaki bango motema (botala Genese 15:6; baloma 4:3). Na Genese 18–23, tozwi masolo uta na bomoi ya Abalayama, Sala, mpe basusu oyo bakoki kotindika biso tokanisa oyo etali bolingi na biso moko ya kondimela bilaka ya Nzambe, mpo na kokima nkuna mpe mokolo moko te kotala nsima, mpe kotyela Nzambe motema atako libonza yango. Na komekaka biso, Nzambe lisusu akolisaka biso.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Genese 18:9–14; 21:1–7

Nkolo akokisaka bilaka na Ye na ngonga na Ye moko.

Nkolo asalaki bilaka ya nkembo mpo na bayengebene, kasi ntango mosusu makambo ya bomoi na bango ekoki kokamwisa biso lolenge nini bilaka oyo ekoki kokokisama. Abalayama mpe Sala bakokaki koyoka lolenge wana. Boyekoli nini uta na mayebi na bango? Ekoki kozala ntina bobanda boyekoli na bino na kozongelaka maye Nkolo alakaki na Genese 17:4, 15–22. Lolenge nini Abalayama mpe Sala bayanolaki? (botala Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 17:23 na Genese 17:17, litangi ya nse b]; Genese 18:9–12). Lolenge nini Nkolo ayanolaki mpo na kosalisa bango bazala na bondimi monene koleka kati na bilaka na Ye? (botala Genese 18:14).

Bozwi nini kati na milongo miye oyo etongi bondimi na bino? Makambo mosusu nini—kati na bomoi na bino to ya moto mosusu—elendisi bondimi na bino ete Nkolo akokokisa bilaka na Ye na ngonga mpe lolenge na Ye moko? Bokoki lisusu komanyola lolenge nini bokoki kosunga bondimi na bino ntango mapamboli elakama ezwami te na bomoi oyo. Toli nini bozwi kati na Baebele 11:8–13 mpe nsango ya Mokambi Russell M. Nelson “Christ Is Risen; Faith in Him Will Move Mountains [Klisto Asekwi: Bondimi kati na Ye Ekolongola Bangomba]”? (Liahona, Sanza ya mitano 2021, 75–77).

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 88:68.

Genese 19:12–29

Nkolo abengi ngai nakima bobe mpe natala nsima te.

Mateya nini boyekoli etali kokima bobe ntango botangi etali Lota mpe libota na ye? Ndakisa, nini etuti bino etali maye banzelu balobaki mpe esalisaki Lota mpe libota na ye bakima bobebisi? (botala Genese 19:12–17). Lolenge nini Nkolo asalisaka bino mpe libota na bino bokima to bozwa bobateli uta na banguya ya satana kati na mokili? Bokanisa oyo etali bizalela epayi wapi bokoki komekama mpo na “[kotala] nsima” (molongo 26) ntango bosengeli kozala ya kotala liboso na bondimi kati na Mobikisi. Nini Luka 9:62 ebakisi na bososoli na bino ya liloba oyo?

Botala lisusu Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 19:9–15 (na bobakisi ya Biblia).

Genese 19:26

Mabe nini mwasi ya Lota asalaki?

Mpaka Jeffrey R. Holland ateyaki.

“Ezali lokola, oyo ezalaki mabe na mwasi ya Lota ezalaki ete azalaki kaka kotala nsima te; na motema na ye alingaki kozonga nsima. Elingaki komonana ete lokola kutu liboso aleka bandelo ya engumba, asilaki kozanga maye Sodomo mpe Gomora epesaka ye. …

“Ekoki kosalema ete mwasi ya Lota atalaki nsima na nkanda epayi ya Nkolo mpo na maye Ye azalaki kosenga ye atika nsima. … Yango wana ezali kaka te ete atalaki nsima; atalaki nsima ntango molai. Na mokuse, bokangami na ye na makambo ya kala elekaki bondimi na ye na makambo ekoya nsima. Wana, ezalaki pene, eteni ya lisumu na ye.

“… Nabondeli bino, bolekisa ntango te na mikolo eleka, boyimayima mpamba te, atako mikolo wana ekokaki kozala malamu. Esengeli koyekola uta na makambo ya kala kasi kobika yango te. Tozali kotala na nsima makala oyo epeli motane ya boyebi, kasi putulu te. Mpe ntango toyekoli oyo tosengeli koyekola mpe tomemi elongo na biso ya malamu mpenza oyo tokutani na yango, na bongo totali liboso mpe tokanisi ete bondimi etalaka ntango nyonso mambi makoya nsima. …

“… Kotalelaka bomoi ya kala, kobakisaka mabunga, ezali kaka malamu te! Ezali nsango malamu ya Yesu Klisto te. …

“Epayi ya [bato] banso ya nkola nyonso, nabeleli, ‘Kanisa mwasi ya Lota’ [Luka 17:32]. Bondimi ezali mpo na mambi makoya nsima. Bondimi etongaka likolo ya mambi ya kala kasi elukaka te kotikala kuna. Bondimi etiaka motema ete Nzambe azali na biloko mingi mpo na moko na moko na biso mpe ete Klisto solo azali ‘nganga monene ya biloko malamu bisili koya’ (Baebele 9:11)” (“The Best Is Yet to Be,” Ensign, Sanza ya yambo 2010, 24, 26–27).

Abalayama azali kotala na ngambo ya lola elongo na mbeli kati na loboko na ye mpe Yisaka alali likolo ya lotale

Abraham and Isaac [Abalayama mpe Yisaka], na Harold Copping

Genese 22:1–19

elembo ya seminele
Bolingi ya Abalayama ya kobonza Yisaka ezali elilingi ya Nzambe mpe Mwana na Ye.

Atako toyebi ntina nyonso Nzambe atindalki Abalayama apesa Yisaka lokola libonza te, toyebi ezalaki momekano ya bondimi kati na Nzambe. Toyebi lisusu ezalaki “elilingi ya Nzambe mpe Mwana Mobotami se Moko ya ye” (Yakobo 4:5). Ntango bozali kotanga Genese 22:1–19, bokoki koluka bilembo to bililingi katikati ya bopesi Yisaka ya Abalayama mpe bopesi ya Tata ya Mwana na Ye, Yesu Klisto. Bokanisa kokomaka maye bozwi kati na etando lokola oyo:

Abalayama mpe Yisaka

Tata na Lola mpe Yesu Klisto

Abalayama mpe Yisaka

Yisaka azali mwana mobali mobotami se moko ya Abalayama mpe Sala (Genese 22:2; botala lisusu Baebele 11:17)

Tata na Lola mpe Yesu Klisto

Azali Mwana Mobotami se Moko ya Tata (Yoane 3:16)

Abalayama mpe Yisaka

Yisaka asengelaki kopesama na esika ya mwana na mpate (Genese 22:7–9)

Tata na Lola mpe Yesu Klisto

Yesu Klisto azali Mwana-mpate ya Nzambe (Yoane 1:29.

Bilembo to bokakani nini na libonza ya bomikabi ya Mobikisi bomoni ya ntina mpenza? Bokanisa koyemba to kotanga maloba ya loyembo oyo ezali kolakisa bolingo ya Tata na Lola mpo na biso, lokola “God Loved Us, So He Sent His Son,” Hymns, no. 187. Bokoki lisusu kokoma makanisi na bino oyo etali Tata na Lola mpe Yesu Klisto mpe mbeka na Bango mpo na bino.

Soki bolingi koyekola mingi etali mbeka ya Mobikisi na biso, bokanisa kotanga nsango ya Mokambi Jeffrey R. Holland “Behold the Lamb of God [Botala Mwana na Mpate ya Nzambe]” (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 44–46): Mpo na nini mwana na mpate azali mpenza elembo ya nguya ya Mwana ya Nzambe? Nini Mokambi Holland ateyaki oyo ebutisi limemya na bino mpo na likabo ya Tata?

Botala lisusu “Akedah (video) (The Binding [Bokangisi])”, Biblioteke ya Nsango Malamu.

12:57

Akedah (The Binding)

Bosalela biloko emonanaka na miso mpo na koteya. Mpo na kobakisa ndenge na ndenge kati na kotangisa mpe koyekola, bokoki kosalela moko to bafoto mingi kati na liteya oyo ntango bozali koyekola masolo na Genese 18–23. Ndakisa, bino mpe libota na bino to kelasi bokoki kokoma makambo mike mike kati na bafoto ya Abalayama mpe Yisaka. Bosolola oyo etali mpo na nini makambo mike mike oyo ezali motuya mpona lisolo yango, mpe bozwa makambo mike mike oyo kati na makomi. Lolenge nini ebetaka nsete na elembo ya lisolo ya mbeka ya Mwana ya Nzambe?

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Genese 17:15–21; 18:14; 21:1–7

Nakoki kotyela Nzambe motema mpo na kobatela bilaka na Ye.

  • Mpo na koyekola oyo etali kotyela motema ya Abalayama mpe Sala na bilaka ya Nzambe, bino mpe bana na bino bokoki kosolola etali ngonga oyo basengelaki kozela likambo moko balingaki mpenza. Nsima bokoki kotala foto ya Sala mpe Yisaka na ebandeli ya mateya oyo mpe kolobela elaka Nzambe asalaki na ye mpe Abalayama (botala lisusu “Abalayama mpe Sala,” na Masolo ya Kondimana na Kala, 28–31). Bosalisa bana na bino bakanisa makambo Nzambe alaki biso soki tozali sembo. Bolendisa bango bazala bompikiliki mpe batya motema ete Nzambe akobatela bilaka na Ye.

    2:20

    Abraham and Sarah

  • Mpo na kosalisa bana na bino bayekola bosolo ya motuya na Genese 18:14, bokoki kokoma liloba moko na moko ya esakola ya yambo ya molongo na biteni ekabwana ya papie. Nsima bosangisa bapapie, mpe bobengisa bana na bino batia maloba yango na molongo esembolama. Bino na bana na bino bokoki nsima kotanga Genese 17:15–21; 21:1–7 mpo na kozwa ndakisa ya likambo moko Nkolo asalaki oyo emonanaki ekoki kosalema te. Bokabola elongo na bana na bino bondimi na bino ete Nkolo akokokisa bilaka na Ye, kutu soki ezali lokola ekoki kosalema te to ekozwa ngonga molai.

Genese 19:15–26

Nakoki kokima mabe.

  • Botuna bana na bino etali makambo oyo moto moko akoki kobengisa bango basala eloko moko bayebi ezali malamu te. Lolenge nini biso “tokokimela” makambo oyo? Boloba na mokuse Genese 19:15–26 na kolimbolaka ete libota ya Lota efandaki na engumba ya mabe mpenza mpe banzelu bakebisaki bango balongwa. Ntango bino mpe bana na bino bozali kotanga elongo milongo 15–17, 26, botuna bango nini ekokaki kolimbola mpo na biso lelo “kokima” mabe mpe “kotala nsima te” (molongo 17).

mobali mpe mwasi bazali kokima Sodomo mpe Gomola

Sodomo, na Julius Schnorr von Carolsfeld

Genese 22:1–14

Abalayama atosaki Nkolo.

  • Kosalela bafoto ya Abalayama mpe Yisaka mpe ya Bobaki na Ekulusu (botala Gospel Art Book, nos. 957) ekoki kosalisa bana bino bakokanisa lisolo kati na Genese 22 na mbeka ya Mobikisi (botala Matai 27:26–37). Nini tokoki koyekola etali Tata na Lola mpe Yesu Klisto uta na masolo ya Abalayama mpe Yisaka mpe Bobaki na Ekulusu ? (Botala lisusu “Abalayama mpe Yisaka,” na Masolo ya Kondimana na Kala, 34–37.)

    2:0

    Abraham and Isaac

  • Ekoki bino kokanisa lisano moko ya pete mpo na kosakana elongo na bana na bino oyo esengi bango balanda banzela? Ntango mususu banzela ekoki kokamba na foto moko ebombana ya Mobikisi. Lisano yango ekoki kotindika lisolo moko etali makambo Tata na Lola atindi biso tosala mpo ete tokoka kozala na Ye mpe Yesu Klisto lisusu. Bokanisa koyemba loyembo lokola: “Keep the Commandments;” (Children’s Songbook, 146–47). Lokasa ya milulu ya poso oyo ekoki kosalisa mpe.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Abalayama azali kotala Yisaka amemi mokumba ya koni.

Abraham and Isaac [Abalayama mpe Yisaka], na Jeff Ward

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Abalayama atosaki Nkolo