Sanza ya mibale 16–22. ‘Mpo na Kozala Molandi Monene ya Bosembo’: Genese 12–17; Abalayama 1–2,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
Sanza ya mibale 16–22. ‘’Mpo na Kozala Molandi Monene ya Bosembo,” Yaka, Landa Ngai: 2026
Melekisedeke Azali Kopambola Abalama, na Walter Rane (makambo ya mikiemikie)
Sanza ya mibale 16–22: “Mpo na Kozala Molandi Monene ya Bosembo”
Genese 12–17; Abalayama 1–2
Mpo na ntina ya boyokani oyo Nzambe asalaki na ye, Abalayama abengamaki “Tata ya bondimi” (Malongi mpe Mayokani 138:41) mpe “Moninga ya Nzambe” (Jake 2:23). Lelo bamilio bazali kokumisa ye lokola nkoko na bango, mpe basusu basili kokamatama kati na libota na ye na nzela ya kobongwana na nsango malamu ya Yesu Klisto. Nzokande, Abalayama ye moko awutaki na libota oyo ezalaki na mikakatano—tata na ye, oyo atikaki losambo ya solo ya Nzambe, amekaki kotinda Abalayama apesa mbeka na banzambe ya lokuta. Atako bongo, mposa ya Abalayama ezalaki ya “kozala molandi monene ya bosembo” (Abalayama 1:2), mpe lisolo ya bomoi na ye elakisi ete Nzambe akokisaki mposa na ye. Bomoi ya Abalayama etelemi lokola litatoli ete ata lisolo ya libota ya moto ezali lolenge nini, akoki kozala na elikya mpo na mikolo ezali koya.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Nzambe akopambola ngai mpo na bondimi mpe mposa ya boyengebene na ngai.
“Tozalaka biso banso na botindiki ya mabota na biso [mpe] ya bonkoko na biso,” Mpaka Neil L. Andersen ateyaki, “mpe atako bongo, nandimi ete ezali na esika moko na kati na biso oyo biso moko nde tozali kotambwisa mpe kosala yango. … Nsukansuka, bamposa na biso ya kati epesami bomoi mpe emonanaka na maponi na biso mpe na misala na biso” (“Educate Your Desires, Elder Andersen Counsels,” ChurchofJesusChrist.org). Bokanisa lolenge nini Abalayama 1:1–19 elakisi maye Mpaka Andersen ateyaki. Mituna lokola oyo ekoki kosalisa:
-
Mposa ya Abalayama ezalaki nini? Lolenge nini bamposa na ye emonanaki na misala na ye? Lolenge nini Nzambe asungaki bamposa na ye?
-
Bamposa na bino ezali nini? Lolenge nini emonisamaka na misala na bino? Lolenge nini Nzambe asungaka bino?
-
Nsango nini milongo oyo ezali na yango mpo na bato oyo bandeko ya mabota bazali na mposa te ya bosembo?
Moko ya bamposa minene ya Abalayama mpe Sala—ya kozwa mwana—ekokisamaki te uta bambula ebele (botala Genese 15:1–6). Boyekoli nini uta na Baebele 11:8–13 etali lolenge nini Abalayama mpe Sala bakutanaki na momekano oyo? Lolenge nini Mobikisi asalisaka bino “boyamba” bilaka na Ye, ata soki ezali “mosika” ?
Botala lisusu “Deliverance of Abraham [Bokangoli ya Abalayama]” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.
Deliverance of Abraham
Genese 12:1–3; 13:15–16; 15:1–6; 17:1–8, 15–22; Abalayama 2:6–11
Nzambe alingi ngai nasala mpe nabatela mayokani elongo na Ye.
Mpo na nini ezali motuyampo bino boyeba maye etali boyokani Nzambe asalaki na Abalayama? Ezali mpo na Nzambe alingi kosala boyokani ya lolenge moko na bino. Alakaki ete boyokani oyo ekokoba kino na bakitani ya Abalayama, to “nkona,” mpe ete “baye banso bakozwa Nsango malamu oyo bakozala … kotangama lokola nkona” (botala Abalayama 2:10–11). Na maloba mosusu, boyokani ezali kokoba na bino—ntango bobatisami mpe mingi mpenza ntango bosali mayokani kati na tempelo (botala Bagalatia 3:26–29; Malongi mpe Mayokani 132:30–32).
Mpo na yango, bokoki kolinga koyekola Abalayama 2:6–11 mpe kosala molongo ya nini, solo, Nzambe alakaki Abalayama mpe Sala (botala lisusu Genese 12:1–3; 13:15–16; 15:1–6; 17:1–8, 15–22). Lolenge nini mapamboli oyo ekoki kosalelama epayi na bino?
Mingi ya bilaka oyo ezali na mingi ya kokokana. Lolenge nini bilaka ezali lokola mboka ya libula to bokitani monene ekokisama libela na libela? (botala Malongi mpe Mayokani 131:1–4; 132:20–24, 28–32).
Longola mapamboli elakama, Nzambe alobaki na Abalayama “azala lipamboli moko” (Genese 12:2; nsete ebetami). Okanisi wana elingi koloba nini? Lolenge nini ekozala bino lipamboli moko? (botala Abalayama 2:11).
Koteya oyo etali mayokani, Mpaka Dale G. Renlund alobaki na ntina ya Mbonge ya Ebale ya Amazon, mpe Mokambi Emily Belle Freeman alobaki oyo etali botamboli na nzela ya mabanga na litambe moko ebukana (botala “Accessing God’s Power through Covenants,” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 35–37; “Kotambola kati na Mokangano ya Boyokani elongo na Klisto,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 76–79). Boluka moko to mibale ya bansango oyo mpo na masakola oyo esalisaka koyanola motuna “Mpo na nini Nzambe alingi ngai nasala mayokani elongo na Ye?”
Bobengisa bato bamiteya moko na mosusu. Soki bozali koteya libota na bino to kelasi ya Eklezia oyo etali mayokani, bokanisa kopesa moto mokomoko eteni ya nsango ya Mpaka Renlund to Mokambi Freeman ya koyekola. Nsima bakoki kokabola na baye ya libota batikali to kelasi maye bayekoli. Yango epesi bato nzela ya kotatola mpe koyekola uta moko mosusu, mpe yango ebengisaka Molimo. (Botala Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 26.)
Botala lisusu Topics and Questions, “Abrahamic Covenant [Boyokani ya Abalayama],” Biblioteke ya Nsango Malamu; “Makanisi ya Kobosana te: Boyokani,” kati na mokanda oyo.
The Abrahamic Covenant [Boyokani ya Abalayama], na Dilleen Marsh (makambo ya mikemike)
Genese 14:18–19; Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 14:25–40
“Melekisedeke azalaki moto ya bondimi”
Bokanisa bozali kolakisa Melekisedeke epayi ya moto moko oyo ayebi ye te. Bokoloba nini? Boluka makanisi kati na Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 14:26–27, 33–38 (kati na mabakisi ya Biblia); Alma 13:13–19; Malongi mpe Mayokani 107:1–4. Bizalela malamu ya Boklisto nini bozwi kati na bandimbola ya Melekisedeki? Lolenge nini boyekoli na bino ya bomoi ya Melekisedeke ezali kosimba lolenge na bino ya komona Bonganganzambe ya Melekisedeki?
Genese 14:18–24; Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 14:36–40
Abalayama afutaki moko na zomi.
Nini boyekoli etali ezaleli ya Abalayama etali bozwi Genese 14:18–24 mpe Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 14:36–40 (na bobakisi ya Biblia)? Ndakisa, botala eyano na ye epayi ya Mokonzi ya Sodomo kati na Genese 14:23. Lolenge nini botosi na mobeko ya bofuti moko na zomi esimbi lolenge na bino ya komona mbongo?
Genese 16
Nzambe ayokaka ngai.
Ntango bozali kotanga Genese 16, bokoki kokanisa oyo etali ntango oyo boyokaki lokola basalelaki bino makambo na bosembo te, lokola Hagar. Botala ete “Yisamaele” elingi koloba “Nzambe ayokaka.” Lolenge nini Nzambe alakisaki bino ete Ayokaki bino?
Botala lisusu “Secret Prayer,” Hymns, no. 144.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yesu Klisto akokamba ngai na loboko.
-
Ntango bino mpe bana na bino bozali kotanga Abalayama 1:18 mpe 2:8, bokoki kobengisa bango bayoka mpo na kozwa eteni ya nzoto oyo ekomami na milongo mibale wana. Mbala mosusu bokoki kosakana lisano oyo mwana moko akangi miso na ye mpe bokambi mwana esika songolo na kosimbaka ye na loboko. Nsima bokoki kolobela oyo etali esengo nini yango epesaka kozala na Yesu Klisto kokamba biso na loboko to kobatela biso.
Genese 13:5–12
Nakoki kozala mopesi kimya
-
Bana na bino bakoki kosepela kosala lisano ya lisolo oyo ewuti na Genese 13:5–12, kolobaka ete bazali Abalayama, Lota, mpe babateli mpate. Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Abalayama ya kozalaka moto ya kimya kati na libota na biso mpe baninga? Bomeka komekola biyano na bango.
Lot’s Choice [Liponi ya Lota], na William Fredericks © Providence Collection/licensed from goodsalt.com
Genese 13:16; Genese 15:1–6; 17:1–8; Abalayama 2:9–11
Nzambe alingi ngai nasala mayokani elongo na Ye.
-
Bokanisa kolakisa bana na bino sani ya zelo, minzoto kati na mapata na butu, to foto na suka ya mokanda oyo. Oyo ekoki kosalisa bango basosola bilaka ya Nzambe kati na Genese 13:16; 15:1–6. Bolobela oyo etali lolenge nini bososoli kotyela bilaka ya Nzambe motema, atako ntango ezali komonana ete ekoki kosalema te.
-
Koteya bana na bino oyo etali mayokani, bosenga bango bayebisa bino maye matali ntango basalaki elaka to moto moko asalaki bango elaka. Soki ekoki kosalisa, bokabola bandakisa na bino moko—kobakisa mayokani oyo bosalaki na Nzambe na ntango ya libatisi to na tempelo. Lolenge nini mayokani na bino esimbi bondeko na bino na Nzambe? Mpo na mwa maloba moke uta na Genese 15:1–6; 17:1–8; Abalayama 2:9–11 mpo na kokabola mwa mapamboli Nzambe alakaki na Abalayama mpe Sala.
-
Mpo na kosalisa bana na bino bamilengela kosala boyokani na Nzambe ntango babatisami, bokoki kosalela mwa makanisi ya masano epesami kati na bobakisi A to bobakisi B.
Abalayama 1:12–17; Genese 16:7–11
Nzambe ayokaka ngai.
-
Ntango bomoi ya Abalayama ezalaki na likama, abengaki Nzambe. Ntango Hagar azalaki ye moko kati na esobe, asosolaki ete Nzambe ayokaki ye. Bokanisa kokabola masolo oyo mibale elongo na bana na bino: “Abalayama mpe Sala” mpe “Hagar” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 28–31, 32–33. Toyekoli nini etali Nzambe uta na masolo oyo? Nsima, bokoki lisusu kokabola moko na mosusu boyebi oyo bozwa ntango boyebaki ete Nzambe ayokaka bino. Loyembo lokola: “A Child’s Prayer” (Children’s Songbook,, 12-13) ekoki kolendisa likanisi oyo.
Abraham and Sarah
Hagar
Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .