Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mibale 2–8. “Nkolo Abiangaki Bato na Ye Siona”: Mose 7


Sanza ya mibale 2–8. ‘Nkolo Abiangaki Bato na Ye Siona’: Mose 7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

Sanza ya mibale 2–8. ‘Nkolo Abiangaki Bato na Ye Siona’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Enoka azali kozwa limoni etali Yesu Klisto

Enoka Amoni Ngonga ya Mokili, na Jennifer Paget

Sanza ya mibale 2–8: ““Nkolo Abiangaki Bato na Ye Siona””

Mose 7

Na lisituale mobimba, bato bamekaki kokokisa maye Enoka mpe bato na ye bakokisaki: kotongaka mboka moko ya kokesena epayi wapi ezali na bobola to makambo ya makasi te. Lokola bato ya Nzambe, tokabolaka mposa oyo. Tobengi yango kotonga Siona, mpe yango esangisi—longola kobatelaka bato na misala mpe kolukaka kimia—kosalaka mayokani, kofandaka elongo na boyengebene, kokoma moko elongo na moko na mosusu mpe elongo na Yesu Klisto, “mokonzi ya Siona” (Mose 7:53). Soki mokili, lisanga na bino, to libota na bino ezali oyo bolingi yango ezala te, ekosalisa ete botuna, lolenge nini Enoka mpe bato na ye basalaki yango? Lolenge nini bakomaki “motema moko mpe molimo moko” (Mose 7:18) atako boswani oyo ezingaki bango? Kati na makambo mikemike mingi Mose 7 epesi biso na oyo etali Siona, moko ya motuya mingimingi mpo na Basantu ba Mikolo mya Nsuka ekoki kozala oyo: Siona ezali kaka engumba te—ezali ezalela ya motema mpe molimo. Siona, lokola Nkolo ateyi, ezali “bapeto na mitema” (Malongi mpe Mayokani 97:21). Yango wana ntango mosusu lolenge ya malamu mpenza ya kotonga Siona ezali kobanda na mitema mpe bandako na biso moko.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Mose 7:16–21, 27, 53, 62–69

elembo ya seminele
Nakoki kosalisa kotonga Siona

Ntango Profeta Joseph Smith ayekolaki mbala ya liboso oyo etali Enoka mpe Engumba na ye ya Bosantu, afulamaki. Ye “ayebaki ete mokolo eyaki ntango Nkolo akolinga lisusu kotia Siona na mabele” (Saints, 1:108–9), mpe abandaki mosala ya bomoi mobimba mpo na kotonga Siona. Kotanga Mose 7 ekoki kofula bino bokoba kosala molende wana lelo.

Bokoki kobanda na kolukaka kati na mituna “Siona ezali nini?” mpe “Lolenge nini yango ezali ya kokesana na mokili oyo etikali?” Bokanisa kosala molongo ya biyano oyo ezali koyela bino ntango bozali kotanga Mose 7, mingimingi milongo 16–21, 27, 53, 62–69.

Biyano na bino na mituna oyo ekoki kokomisa yango polele ete tozali naino na mingi ya kosala mpo na kotonga Siona. Na yango, ndenge nini tokoki kosala yango? Ekoki kosalisa mpo na kokanisa etali bangonga oyo bomiyokaki ete bozalaki “na motema moko mpe molimo moko” elongo na moto moko (Mose 7:18). Ntango mosusu ezalaki kati na palwasi, libota, to etuluku na mosala to eteyelo. Bato basalaki nini mpo na kokela bomoko ya bosembo?

Botala makambo mosusu bokoki koluka mpo na kozwa makanisi mpe bofuli. Bokamata moko to mingi mpo na koyekola, mpe nsima bokoma maye boyoki bofulami kosala mpo na kotonga Siona:

Baninga bazali kolendisana moko na mosusu kati na etuluku ya kelasi

Nzambe alingi bato na Ye bazala “motema moko mpe molimo moko”(Moses 7:18).

Mose 7:53

Yesu Klisto azali “Mokonzi ya Siona.”

Elingi kolobela bino nini kozala na Yesu Klisto lokola Mokonzi na bino? Botala bankombo mosusu ya Yesu Klisto na molongo oyo. Yango eteyi bino nini na oyo etali Ye? Bokanisi elingi koloba nini kokota “na ekuke mpe [komata] na nzela na [Ye] ”?

Tala lisusu “Come, O Thou King of Kings,” Hymns, no. 59.

Mose 7:28–69

Nzambe alelaka—mpe asepelaka—mpo na bana na Ye.

Bato mosusu bamonaka Nzambe lokola moto moko ya mosika oyo atungisamaka te na motema na maye ekomelaka biso. Enoka azwaka limoni ekesana ya Nzambe kati na limoni oyo ekomami na Mose 7. Ayekolaki nini etali Nzambe—mpe boyekoli nini—na milongo 28–40? Mpo na nini bokanisi ete Enoka akamwaki komona Nzambe azali kolela? Mpo na nini ezali motuya epayi na bino boyeba ete Asalaka yango?

Lokola limoni ekobaki, Enoka alelaki mpe. Kasi Nzambe lisusu akabolaki elongo na ye ntina mingi ya kosepela. Boluka yango kati na Mose 7:41–69. Boyekoli nini uta na limoni ya Enoka oyo ekoki kosalisa bino “botombola motema na bino, mpe bosepela,” atako “bololo” kati na bomoi na bino (molongo 44)?

Botala lisusu Jeffrey R. Holland, “The Grandeur of God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2003, 70–73.

Mose 7:59–67

Yesu Klisto akoya lisusu na mikolo ya nsuka.

Limoni ya Enoka, mingimingi maye makomami na Mose 7:59–67, ezali moko ya masakoli ya yambo ya lisolo ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Nini etuti bino etali lolenge milongo oyo elimboli mikolo ya nsuka? Ndakisa, bokanisa lolenge boyokaka masakoli uta na milongo 62 ezali kokokisama. Maloba oyo eteyi bino nini etali mosala ya Nkolo na mikolo ya nsuka?

Botala lisusu Henry B. Eyring, “Sisters in Zion [Bandeko basi na Siona],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 67–69.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mose 7:18–21, 62–63, 68–69

Nzambe alingi biso tozala “motema moko mpe molimo moko.”

  • Mpo na kosalisa bana na bino bayekola oyo etali Enoka mpe Siona, bokoki kosalela “Mosakoli Enoka” na Masolo ya Kondimana na Kala (19–21) to molongo ya mibale ya “Follow the Prophet” (Children’s Songbook, 110–11). Nsima bokoki kosenga bana na bino basalisa bino kobeta lisusu lisolo na maloba na bango moko. Bafoto ya Enoka na mateya oyo ekoki kosalisa.

  • Botala lolenge moko ya kosalisa bana na bino basosola nini elingi koloba kozala “motema moko mpe molimo moko” (Mose 7:18): Bosala motema ya papie mpe bokata yango na biteni biteni, ekokoka mpo ete moko na moko ya mwana azala na yango moko. Botika bango bakoma nkombo na bango likolo ya eteni na bango mpe basala elongo mpo na kosangisa motema elongo. Ntango bazali kosala yango, bokoki kolobela makambo bolingaka epayi ya mwana moko na moko.

mama azali koyamba mwana ya mwasi
  • Bosalisa bana na bino batanga mbala boni liloba “Siona” ebimi kati na Mose 7:18–21, 62–63, 68–69. Mbala moko na moko bamoni liloba yango, bosalisa bango bamona maye molongo yango elobi na ntina ya Siona (botala lisusu Mokambi na Makomi, “Siona,” Bibliotekaya Nsango Malamu). Lolenge nini tokoki kozala mingi lokola bato oyo balobelami na milongo oyo?

Bolendisa boyekoli makomi ya moto ye moko. Atako soki bozali koteya libota na bino na ndako to na kelasi na mokolo ya eyenga, moko ya ndenge ya malamu mpenza bokoki kosalisa basusu batonga bondimi ewumelaka kati na Yesu Klisto ezali kosalisa bango batia momesano ya kolukaka makambo bazali kokutana na yango na makomi. Bokabola makambo bozali kokutana na yango na makomi, mpe bolendisa bato ya libota mpe bandimi ya kelasi bakabola makambo na bango. Ntango toyokaka oyo etali lolenge nini kotanga makomi ezali kopambola basusu, tofulamaka mbala mingi mpo na koluka mapamboli ya ndenge moko uta na Nkolo. (Botala Koteya na Lolenge ya Mobikisi25.)

Mose 7:32–33

Tata na Lola alingaka ngai napona kolanda Ye.

  • Mpo na koyingisa Mose 7:32–33 epayi ya bana na bino, bokoki kosolola na bango oyo etali boponi basengelaki kosala. Nsima bokoki kotanga milongo yango elongo mpo na koyeba nini Tata na Lola alingi topona. Maponi nini tokoki kosala mpo na kolakisa ete toponi Ye? Ntango mosusu bana na bino bakoki kosala na ngala ya kosalaka lisano moko ya maponi oyo ntango basusu bazali kokanisa maye lisano yango elakisi.

Mose 7:59–67

Yesu akoya lisusu na mabele.

  • Na Mose 7:59, Enoka atuni Nkolo motuna. Bobengisa bana na bino baluka yango, mpe nsima bosenga bango baluka eyano na molongo 60. Bokoki lisusu kosolola elongo na bango oyo etali ngonga oyo bazali kozela moto moko azonga ndako. Botuna bango lolenge nini bayokaki mpe basalaki nini mpo na kobelema. Lolenge nini tokoki kobelema mpo ete Yesu azonga?

  • Bokanisa kolakisa bafoto ya bangonga oyo Mobikisi abimelaki bato (ndakisa Buku ya Bilili ya Nsango Malamu, nos. 60, 82, 83, and 84). Bato bazali kosala nini na bafoto oyo? Bato bakokaki komiyoka lolenge nini ntango bakutanaki na Yesu? Bokoki lisusu koyemba loyembo etali Boyei ya Mibale ya Mobikisi, ndakisa “When He Comes Again” (Children’s Songbook, 82–83), mpe kotuna bana maye bakanisi ekozala ntango Yesu akoya lisusu. Botika bana bakabola lolenge nini bayoki etali komonaka Yesu ntango Akoya lisusu.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Enoka mpe bato ya engumba ya Siona bazali kobongolama

City of Zion Translated [Engumba ya Siona Ebongolami], na Del Parson

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nzambe alingi biso tolingana moko na mosusu.