Yaka, Landa Ngai
Makanisi ya Kobosana te: Boyokani


“Makanisi ya Kobosana te: Boyokani,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Boyokani,” Yaka, Landa Ngai: 2026

elembo ya makanisi

Makanisi ya Kobosana te

Boyokani

Na Kondimana na Kala mobimba, bokotanga mbala mingi liloba boyokani. Lelo tokanisaka na momesano mayokani lokola bilaka ya bule na Nzambe, kasi na mokili ya kala, mayokani ezalaki mpe lisusu eteni moko ya motuya ya ndenge bato basololaka moko na basusu. Mpo na bokengi mpe kobika na bango, bato basengelaki kozala na makoki ya kotielana motema moko na mosusu, mpe mayokani ezalaki nzela ya kobatela elikya wana.

Bongo, ntango Nzambe alobaki na Enoka, Noa, Mose mpe basusu na oyo etali mayokani, Azalaki kobengisa bango kokota kati na bondeko ya kotyela Ye motema. Tobengaka boyokani oyo boyokani ya sika mpe ya seko to boyokani ya Abalayama—etali boyokani oyo Nzambe asalaki na Abalayama mpe Sala mpe nsima azongisaki yango sika na bakitani na bango Yisaka mpe Yakobo (abengami lisusu Isalaele). Kati na Kondimana na Kala, eyebanaki kaka lokola “boyokani” Bokomona ete Kondimana na Kala ezali mingi lisolo ya batu oyo bamimonaki bangomei lokola basangeli ya boyokani yango—bato ya boyokani.

Boyokani ya Abalayama ezali kokoba kozala motuya kino lelo, mingimingi na basantu ba mikolo mya nsuka. Mpo na nini? Mpamba te tozali mpe bato ya boyokani, tozala to tozala te bakitani mbala moko ya Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo. Mpo na yango, ezali motuya kososola nini ezali boyokani ya Abalayama mpe lolenge nini esalelamaka na biso lelo.

Boyokani ya Abalayama ezali nini?

Abalayama alingaki “kozala molandi monene ya bosembo” (Abalayama 1:2), mpe Nzambe abengaki ye na bondeko ya boyokani. Abalayama azalaki te moto ya yambo ya kozala na mposa wana, mpe azalaki te moto ya yambo ya kozwa boyokani. Ezalaki nsima ya nyonso, boyokani ya seko. Abalayama alukaki “mapamboli ya batata” (Abraham 1:2)—Mapamboli oyo epesamaki na boyokani epayi ya Adama na Eva mpe na nsima epayi ya bato oyo balukaki mapamboli yango na molende.

Boyokani ya Nzambe na Abalayama elakaki mapamboli ya kokamwa: libula ya mabele, bakitani mingi, lotomo ya kosala makuli ya bonganganzambe, mpe nkombo moko oyo esengelaki kokumisama na bankola ekoya. Kasi mama ya likambo ya boyokani oyo ezalaki kaka te na mapamboli Abalayama mpe libota na ye basengelaki kozwa kasi lisusu na lipamboli oyo basengelaki kozala epayi ya bana nyonso ya Nzambe batikali. “Okozala lipamboli,” Nzambe asakolaki, “mpe kati na yo mabota nyonso ya mokili ekopambolama” (Genese 12:2–3).

Ezali boyokani oyo epesaki Abalayama, Eva, mpe bakitani na bango lokumu monene koleka kati na bana ya Nzambe? Kaka na lolenge ete ezali lokumu ya kopambola basusu. Libota ya Abalayama esengelaki “komema mosala oyo mpe Bonganganzambe boye epayi na bikolo nyonso,” kokabola “mapamboli ya Nsango malamu, oyo ezali mapamboli ya lobiko, kutu ya bomoi ya seko” (Abalayama 2:9, 11). Kozala bato ya Nzambe ya boyokani elakisi te ete bazalaki malamu koleka basusu; elakisaki ete bazalaki na mokumba ya kosalisa basusu bazala malamu koleka.

Boyokani oyo ezalaki lipamboli Abalayama azalaki koluka. Nsima ya kozwa yango, Abalayama alobaki kati na motema na ye, “Mosali na yo alukaki yo na makasi; sikawa nasili kobombola yo” (Abalayama 2:12).

Yango elekaki mibu nkoto, kasi boyokani oyo ezongisami na mikolo na biso. Mpe ezali sikawa kokokisama na bomoi ya bato ya Nzambe. Bokokisi ya boyokani etongami makasi mpenza na miloko mya nsuka lokola mosala ya Nzambe ezali kokende liboso, kopambolaka mabota na mokili mobimba. Mpe moto nyonso oyo, lokola Abalayama, alingi kozala molandi monene ya bosembo—moto nyonso oyo alukaka Nkolo na bosolo—akoki kozala eteni na yango.

libota liboso ya tempelo

Boyokani ya Abalayama Elingi Koloba nini epayi na Ngai?

Ozali mwana ya boyokani. Bozali kosala boyokani elongo na Nzambe ntango bozwi libatisi mpe ntango boliaka elambo. Mpe bozwaka litondi ya boyokani na kosalaka makuli ya bule ya tempelo.

Na nzela ya boyokani mpe makuli, tokomaka bato ya Nzambe. Tokangami na Ye “na basinga ya seko.” Ntango tosali boyokani na Nzambe,” Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “tolongwe na esika ya katikati libela na libela. Nzambe akotika te kimoninga na Ye na baoyo basali mokangano ya lolenge oyo na Ye. Na yango, baoyo nyonso basali boyokani na Nzambe bazali na ndingisa na bolingo mpe ngolu ya monene. … Na ntina ya boyokani na biso na Nzambe, Akolemba te na makasi na Ye mpo na kosalisa biso, mpe tokosilisa te motema molai na Ye ya mawa mpo na biso.” Bokomona yango na lisolo ya bato ya Nzambe ya boyokani kati na Kondimana na Kala, mpe bokomona yango kati na bomoi na bino moko lokola moko ya bana na Ye ya boyokani.

Yesu atelemi likolo ya mayi na maboko ya kotandama

Be Not Afraid [Kobanga Te], na Dan Wilson

Oyo ezali Bososoli monene ya motuya epesameli biso na ntina ya Bozongisi ya boyokani ya Abalayama ya nzela ya Profeta Joseph Smith. Na yango, ntango bozali kotanga oyo etali mayokani kati na Kondimana na Kala, bokanisa kaka te etali bondeko ya Nzambe na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo. Bokanisa lisusu oyo etali bondeko na Ye na biso. Ntango bozali kotanga oyo etali libula ya bakitani bazanga motango, bokanisa kaka te etali bamilio oyo lelo babengaka Abalayama Tata na bango. Bokanisa lisusu na ntina ya elaka ya Nzambe epayi na bino ya mabota ya seko mpe bokoli ya seko.. Ntango bozali kotanga na ntina ya elaka ya libula ya mabele, bokanisa kaka te mabele elakama na Abalayama. Bokanisa lisusu na ntina ya lobi ekoya ya seko ya mabele yango moko—libula oyo elakamaki na bato ya “bopolo” oyo “bazali kotalela Nkolo” (Matai 5:5; Nzembo 37:9, 11). mpe ntango bokotanga oyo etali elaka ete bato ya boyokani ya Nzambe bakopambola “mabota nyonso ya mabele” (Abalayama 2:11), bokanisa kaka te oyo etali mosala ya Abalayama to na basakoli oyo bazalaki bakitani na ye. Bokanisa lisusu oyo etali oyo bokoki kosala—lokola molandi ya boyokani na Yesu Klisto—kozala lipamboli na mabota nzinganzinga na biso.